< Levitike 19 >

1 Yawe alobaki na Moyize:
The LORD spoke to Moses, saying,
2 « Yebisa lisanga mobimba ya bana ya Isalaele: ‹ Bozala bule, pamba te Ngai Yawe, Nzambe na bino, nazali Bule.
“Speak to all the congregation of the children of Israel, and tell them, ‘You shall be holy; for I, the LORD your God, am holy.
3 Moto nyonso kati na bino asengeli kotosa mama mpe tata na ye, mpe bosengeli kotosa mikolo na Ngai ya Saba. Nazali Yawe, Nzambe na bino.
“‘Each one of you shall respect his mother and his father. You shall keep my Sabbaths. I am the LORD your God.
4 Bomipesa te na banzambe ya bikeko to bomisalela te banzambe ya bikeko ya bibende; Ngai nazali Yawe, Nzambe na bino.
“‘Don’t turn to idols, nor make molten gods for yourselves. I am the LORD your God.
5 Tango bokobonza mbeka ya boyokani epai na Yawe, bosala yango na ndenge esengeli mpo ete endimama mpo na bolamu na bino.
“‘When you offer a sacrifice of peace offerings to the LORD, you shall offer it so that you may be accepted.
6 Bosengeli kolia yango kaka na mokolo oyo bobonzi yango lokola mbeka to na mokolo oyo elandi. Mpe eloko nyonso oyo ekotikala, bosengeli kozikisa yango na moto na mokolo ya misato.
It shall be eaten the same day you offer it, and on the next day. If anything remains until the third day, it shall be burned with fire.
7 Kasi na mokolo yango ya misato, mbeka yango ekokoma mbindo; soki moto moko alie yango, nakondima yango lisusu te.
If it is eaten at all on the third day, it is an abomination. It will not be accepted;
8 Moto nyonso oyo akolia yango, akomema mokumba ya mabe na ye mpo ete asambwisi eloko oyo ezali bule mpo na Yawe, mpe basengeli kobengana ye kati na bato na ye.
but everyone who eats it shall bear his iniquity, because he has profaned the holy thing of the LORD, and that soul shall be cut off from his people.
9 Tango okobuka mbuma ya bilanga na yo, okobuka yango te kino na mondelo, mpe okozonga te mpo na kolokota mbuma oyo ekokweya.
“‘When you reap the harvest of your land, you shall not wholly reap the corners of your field, neither shall you gather the gleanings of your harvest.
10 Okobuka mpe te mbuma ya vino oyo ekotikala to kolokota oyo ekokweya. Okotika yango mpo na babola to bapaya: nazali Yawe Nzambe na yo.
You shall not glean your vineyard, neither shall you gather the fallen grapes of your vineyard. You shall leave them for the poor and for the foreigner. I am the LORD your God.
11 Okoyiba te, okoloba lokuta te, moto moko te akosa moninga na ye.
“‘You shall not steal. “‘You shall not lie. “‘You shall not deceive one another.
12 Okolapa te ndayi ya lokuta na Kombo na Ngai mpe okobebisa te bosantu ya Kombo ya Nzambe na yo. Nazali Yawe, Nzambe na yo.
“‘You shall not swear by my name falsely, and profane the name of your God. I am the LORD.
13 Okonyokola te moninga na yo to okoyiba ye te. Okobomba te lifuti ya mosali na yo butu mobimba kino na tongo.
“‘You shall not oppress your neighbor, nor rob him. “‘The wages of a hired servant shall not remain with you all night until the morning.
14 Okolakela mabe te moto oyo akufa matoyi mpe okotia libaku te liboso ya mokufi miso, kasi okotosa Nzambe na yo. Nazali Yawe.
“‘You shall not curse the deaf, nor put a stumbling block before the blind; but you shall fear your God. I am the LORD.
15 Okosambisa na bosembo. Okokotela te, ezala mobola to mozwi. Okosambisa moninga na yo na bosembo.
“‘You shall do no injustice in judgment. You shall not be partial to the poor, nor show favoritism to the great; but you shall judge your neighbor in righteousness.
16 Okokende te kotonga bato na yo bipai na bipai. Okosala eloko moko te oyo ekoyeisa pasi na bomoi ya moninga na yo. Nazali Yawe.
“‘You shall not go around as a slanderer among your people. “‘You shall not endanger the life of your neighbor. I am the LORD.
17 Okoyina ndeko na yo te na motema na yo; kasi pamela moninga mpo ete omema ngambo te na likambo na ye.
“‘You shall not hate your brother in your heart. You shall surely rebuke your neighbor, and not bear sin because of him.
18 Okozongisa mabe na mabe te to okobombela moko kati na bato na yo kanda te, kasi okolinga moninga na yo ndenge yo moko omilingaka. Nazali Yawe.
“‘You shall not take vengeance, nor bear any grudge against the children of your people; but you shall love your neighbor as yourself. I am the LORD.
19 Okobatela bikateli na ngai: okosangisa nzoto te ya banyama mibale ya lolenge mibale ekesana; okolona mpe te na elanga na yo nkona mibale ekesana. Okolata te elamba oyo batongi na basinga mibale ekesana.
“‘You shall keep my statutes. “‘You shall not cross-breed different kinds of animals. “‘You shall not sow your field with two kinds of seed; “‘Don’t wear a garment made of two kinds of material.
20 Soki mobali moko asangisi nzoto na mwasi oyo azali mobandami ya mobali mosusu, kasi nanu bapeseli ye te biloko ya libala to kopesa ye bonsomi, esengeli mobali wana afuta lomande. Nzokande bango mibale, bakoboma bango te mpo ete mwasi yango asikolamaki nanu te.
“‘If a man lies carnally with a woman who is a slave girl, pledged to be married to another man, and not ransomed or given her freedom; they shall be punished. They shall not be put to death, because she was not free.
21 Mpe mobali asengeli komema na ekotelo ya Ndako ya kapo ya Bokutani meme ya mobali oyo akobonza epai na Yawe lokola mbeka mpo na masumu.
He shall bring his trespass offering to the LORD, to the door of the Tent of Meeting, even a ram for a trespass offering.
22 Bongo na nzela ya meme yango ya mbeka mpo na masumu, Nganga-Nzambe akosala mosala ya bolimbisi masumu ya mobali yango liboso ya Yawe, mpe masumu oyo asilaki kosala ekolimbisama.
The priest shall make atonement for him with the ram of the trespass offering before the LORD for his sin which he has committed; and the sin which he has committed shall be forgiven him.
23 Tango bokokota na mokili ya Kanana, bokolona banzete ya lolenge nyonso oyo ebotaka mbuma. Na mibu misato, bokozwa bambuma na yango nyonso lokola bambuma ya mbindo; boye bokolia yango te.
“‘When you come into the land, and have planted all kinds of trees for food, then you shall count their fruit as forbidden. For three years it shall be forbidden to you. It shall not be eaten.
24 Na mobu ya minei, bokobulisa bambuma na yango nyonso ekozala bule mpo na Yawe lokola litatoli ya kozongisa matondi epai na Ye.
But in the fourth year all its fruit shall be holy, for giving praise to the LORD.
25 Nzokande na mobu ya mitano, bokoki kolia bambuma yango. Na nzela wana, bambuma na bino ekokoma ebele. Nazali Yawe, Nzambe na bino.
In the fifth year you shall eat its fruit, that it may yield its increase to you. I am the LORD your God.
26 Bokolia te nyama oyo ezali na makila kati na yango. Bokosalela soloka to kindoki te.
“‘You shall not eat any meat with the blood still in it. You shall not use enchantments, nor practice sorcery.
27 Okokata suki te na bangambo nyonso ya moto na yo, okokata mpe te mandefu na bapembeni na yango.
“‘You shall not cut the hair on the sides of your head or clip off the edge of your beard.
28 Soki bozwi matanga, bomikata-kata banzoto na bino te to bomikatisa banzoloko te. Nazali Yawe.
“‘You shall not make any cuttings in your flesh for the dead, nor tattoo any marks on you. I am the LORD.
29 Bobebisa te lokumu ya bana na bino ya basi na kokomisa bango basi ya ndumba, noki te mboka mobimba ekomipesa na kindumba mpe ekotonda na mabe.
“‘Don’t profane your daughter, to make her a prostitute; lest the land fall to prostitution, and the land become full of wickedness.
30 Bokobatelaka mikolo na Ngai ya Saba mpe bokotosaka Esika na Ngai ya bule. Nazali Yawe.
“‘You shall keep my Sabbaths, and reverence my sanctuary; I am the LORD.
31 Bokende te kotuna makambo na bino epai ya bato oyo basololaka na bakufi to epai ya banganga-kisi, noki te bokomikomisa mbindo; Ngai nazali Yawe, Nzambe na bino.
“‘Don’t turn to those who are mediums, nor to the wizards. Don’t seek them out, to be defiled by them. I am the LORD your God.
32 Bokotelema liboso ya bato oyo banuni, bokolakisa botosi na bino epai ya mibange; na nzela wana, bokokumisa Nzambe na bino. Nazali Yawe.
“‘You shall rise up before the gray head and honor the face of the elderly; and you shall fear your God. I am the LORD.
33 Soki mopaya moko ayei kovanda kati na bino, na mokili na bino, bonyokola ye te.
“‘If a stranger lives as a foreigner with you in your land, you shall not do him wrong.
34 Nzokande bozwa ye kati na bino lokola mwana mboka. Bokolinga ye lokola bino moko, pamba te bino mpe bozalaki bapaya kati na Ejipito. Nazali Yawe, Nzambe na bino.
The stranger who lives as a foreigner with you shall be to you as the native-born among you, and you shall love him as yourself; for you lived as foreigners in the land of Egypt. I am the LORD your God.
35 Bokosalela lokuta te tango bokomeka molayi, bakilo mpe tango bokoluka koyeba ebele oyo ekoki kozala na kati.
“‘You shall do no unrighteousness in judgment, in measures of length, of weight, or of quantity.
36 Bokosalela bimekelo ya malamu, bakilo ya malamu, efa ya malamu; Ngai nazali Yawe, Nzambe na bino, oyo abimisaki bino na Ejipito.
You shall have just balances, just weights, a just efah, and a just hin. I am the LORD your God, who brought you out of the land of Egypt.
37 Bokobatela bikateli mpe mibeko na Ngai nyonso mpe bokosalela yango. Nazali Yawe. › »
“‘You shall observe all my statutes and all my ordinances, and do them. I am the LORD.’”

< Levitike 19 >