< Levitike 18 >

1 Yawe alobaki na Moyize:
耶和华对摩西说:
2 « Yebisa bana ya Isalaele: ‹ Ngai nazali Yawe, Nzambe na bino.
“你晓谕以色列人说:我是耶和华—你们的 神。
3 Bokoki te kosala makambo ndenge esalemaka na Ejipito epai wapi bozalaki kovanda to na Kanana epai wapi nazali komema bino.
你们从前住的埃及地,那里人的行为,你们不可效法,我要领你们到的迦南地,那里人的行为也不可效法,也不可照他们的恶俗行。
4 Bosengeli kotosa bobele mibeko mpe bikateli na Ngai. Nazali Yawe, Nzambe na bino.
你们要遵我的典章,守我的律例,按此而行。我是耶和华—你们的 神。
5 Bobatela mitindo mpe mibeko na Ngai, pamba te moto oyo akosalela yango akobika bomoi na ye na nzela na yango. Nazali Yawe.
所以,你们要守我的律例典章;人若遵行,就必因此活着。我是耶和华。
6 Mobali moko te akosangisa nzoto na mwasi ya libota na ye penza. Nazali Yawe.
“你们都不可露骨肉之亲的下体,亲近他们。我是耶和华。
7 Okosambwisa te tata na yo na kosangisa nzoto na mama na yo. Lokola azali mama na yo, kosambwisa ye te.
不可露你母亲的下体,羞辱了你父亲。她是你的母亲,不可露她的下体。
8 Okosangisa nzoto te na mwasi mosusu ya tata na yo, soki te okosambwisa tata na yo.
不可露你继母的下体;这本是你父亲的下体。
9 Okosangisa nzoto te na ndeko na yo ya mwasi, ezala na mwana mwasi ya tata na yo to ya mama na yo, oyo abotami na ndako to na libanda ya ndako.
你的姊妹,不拘是异母同父的,是异父同母的,无论是生在家生在外的,都不可露她们的下体。
10 Okosangisa nzoto te na mwana mwasi ya mwana na yo ya mobali to ya mwasi; kosambwisa ye te.
不可露你孙女或是外孙女的下体,露了她们的下体就是露了自己的下体。
11 Okosangisa nzoto te na mwana mwasi ya mwasi ya tata na yo, azali ndeko na yo ya mwasi.
你继母从你父亲生的女儿本是你的妹妹,不可露她的下体。
12 Okosangisa nzoto te na ndeko mwasi ya tata na yo, azali tata mwasi na yo.
不可露你姑母的下体;她是你父亲的骨肉之亲。
13 Okosangisa nzoto te na ndeko mwasi ya mama na yo, azali mama leki to mama kulutu na yo.
不可露你姨母的下体;她是你母亲的骨肉之亲。
14 Okosambwisa te ndeko mobali ya tata na yo na kosangisa nzoto na mwasi na ye. Azali mama na yo.
不可亲近你伯叔之妻,羞辱了你伯叔;她是你的伯叔母。
15 Okosangisa nzoto te na bokilo na yo. Azali mwasi ya mwana na yo, kosangisa na ye nzoto te.
不可露你儿妇的下体;她是你儿子的妻,不可露她的下体。
16 Okosambwisa te ndeko na yo ya mobali na kosangisa nzoto na mwasi na ye.
不可露你弟兄妻子的下体;这本是你弟兄的下体。
17 Okosangisa nzoto te na mama mpe na mwana na ye ya mwasi to na mwana mwasi ya mwana na ye ya mobali mpe ya mwasi; pamba te bazali makila moko mpe ekozala likambo ya nkele penza na miso ya Nzambe.
不可露了妇人的下体,又露她女儿的下体,也不可娶她孙女或是外孙女,露她们的下体;她们是骨肉之亲,这本是大恶。
18 Okosangisa nzoto te na ndeko mwasi ya mwasi na yo, wana mwasi na yo azali nanu na bomoi, noki te ekoyeisa bombanda.
你妻还在的时候,不可另娶她的姊妹作对头,露她的下体。
19 Okosangisa nzoto te na mwasi oyo azali komona makila na ye ya sanza, pamba te azali mbindo.
“女人行经不洁净的时候,不可露她的下体,与她亲近。
20 Okosangisa nzoto te na mwasi ya moninga na yo, noki te okokoma mbindo elongo na ye.
不可与邻舍的妻行淫,玷污自己。
21 Okopesa moko kati na bana na yo te lokola mbeka epai ya nzambe Moloki, pamba te osengeli te kobebisa lokumu ya Kombo ya Nzambe na yo. Ngai nazali Yawe.
不可使你的儿女经火归与摩洛,也不可亵渎你 神的名。我是耶和华。
22 Okosangisa nzoto te na mwana mobali ndenge basangisaka nzoto na mwana mwasi; ezali likambo ya nkele.
不可与男人苟合,像与女人一样;这本是可憎恶的。
23 Okosangisa nzoto te na nyama, noki te okokoma mbindo elongo na yango. Ndenge moko mpe mwasi akosangisa nzoto te na nyama: ezali kotiola Nzambe.
不可与兽淫合,玷污自己。女人也不可站在兽前,与它淫合;这本是逆性的事。
24 Bomikomisa mbindo te na moko ya makambo oyo, pamba te ezali na nzela na yango nde bato ya bikolo oyo nazali kobengana liboso na bino bamikomisaki mbindo.
“在这一切的事上,你们都不可玷污自己;因为我在你们面前所逐出的列邦,在这一切的事上玷污了自己;
25 Lokola mboka yango moko mpe ekomaki mbindo, napesaki yango mpe etumbu mpo na lisumu na yango; bongo esanzaki bavandi na yango.
连地也玷污了,所以我追讨那地的罪孽,那地也吐出它的居民。
26 Kasi, ezala mwana mboka to mopaya oyo bazali kati na bino, bosengeli kotosa malako mpe bikateli na Ngai; mpe bosengeli koboya kosala makambo nyonso oyo ya nkele na miso ya Nzambe.
故此,你们要守我的律例典章。这一切可憎恶的事,无论是本地人,是寄居在你们中间的外人,都不可行,(
27 Pamba te bato oyo bazalaki kovanda na mboka oyo liboso na bino babandaki kosala makambo oyo nyonso, bongo mboka ekomaki mbindo.
在你们以先居住那地的人行了这一切可憎恶的事,地就玷污了,)
28 Bino bokeba ete bokomisa mboka mbindo te, mpo ete yango esanza bino te ndenge esanzaki bato ya bikolo oyo bazalaki liboso na bino.
免得你们玷污那地的时候,地就把你们吐出,像吐出在你们以先的国民一样。
29 Moto nyonso oyo akosala moko ya makambo oyo ya nkele na miso ya Nzambe, esengeli balongola ye kati na bato na ye.
无论什么人,行了其中可憎的一件事,必从民中剪除。
30 Boye, bobatela malako na Ngai mpe bolanda ata likambo moko te kati na makambo mabe oyo ezalaki kosalema liboso ete bino boya, mpo ete bomikomisa mbindo te na nzela na yango. Nazali Yawe, Nzambe na bino. › »
所以,你们要守我所吩咐的,免得你们随从那些可憎的恶俗,就是在你们以先的人所常行的,以致玷污了自己。我是耶和华—你们的 神。”

< Levitike 18 >