< Levitike 17 >
1 Yawe alobaki na Moyize:
et locutus est Dominus ad Mosen dicens
2 « Yebisa Aron, bana na ye ya mibali mpe bana nyonso ya Isalaele, mpe loba na bango: ‹ Tala maloba oyo Yawe alobi:
loquere Aaron et filiis eius et cunctis filiis Israhel et dices ad eos iste est sermo quem mandavit Dominus dicens
3 ‘Moto nyonso kati na bana ya Isalaele, oyo akokata kingo ya ngombe, ya meme to ya ntaba, ezala kati na molako to na libanda ya molako;
homo quilibet de domo Israhel si occiderit bovem aut ovem sive capram in castris vel extra castra
4 mpe amemi yango te na ekotelo ya Ndako ya kapo ya Bokutani mpo na kobonza yango lokola likabo epai na Yawe liboso ya Mongombo ya Yawe, makila na yango ekotangama na moto ya moto yango. Lokola asopi makila, bakolongola ye kati na bato na ye.
et non obtulerit ad ostium tabernaculi oblationem Domino sanguinis reus erit quasi sanguinem fuderit sic peribit de medio populi sui
5 Boye, na esika ete bana ya Isalaele bamemaka bambeka na bango na bilanga, bakomema yango mpo na Yawe epai ya Nganga-Nzambe, na ekotelo ya Ndako ya kapo ya Bokutani lokola mbeka ya boyokani epai na Yawe.
ideo offerre debent sacerdoti filii Israhel hostias suas quas occidunt in agro ut sanctificentur Domino ante ostium tabernaculi testimonii et immolent eas hostias pacificas Domino
6 Nganga-Nzambe akobwaka makila na etumbelo ya Yawe, na ekotelo ya Ndako ya kapo ya Bokutani mpe akotumba mafuta na yango lokola mbeka oyo solo kitoko na yango ekosepelisa Yawe.
fundetque sacerdos sanguinem super altare Domini ad ostium tabernaculi testimonii et adolebit adipem in odorem suavitatis Domino
7 Bana ya Isalaele bakobonza lisusu te bambeka na bango epai banzambe ya bikeko ya bantaba ya mibali, oyo basambelaka. Oyo ekozala malako ya libela mpo na bango mpe mpo na milongo oyo ekoya.’ ›
et nequaquam ultra immolabunt hostias suas daemonibus cum quibus fornicati sunt legitimum sempiternum erit illis et posteris eorum
8 Loba na bango: ‹ Moto nyonso ya Isalaele to mopaya nyonso oyo azali kati na bango, oyo akobonza mbeka ya kotumba to mbeka mosusu,
et ad ipsos dices homo de domo Israhel et de advenis qui peregrinantur apud vos qui obtulerit holocaustum sive victimam
9 na kozanga komema yango na ekotelo ya Ndako ya kapo ya Bokutani mpo na kobonza yango epai ya Yawe, bakolongola ye kati na bato ya Isalaele.
et ad ostium tabernaculi testimonii non adduxerit eam ut offeratur Domino interibit de populo suo
10 Nakobalukela mpe nakolongola kati na bato na ye, moto nyonso oyo akolia makila, azala moto ya Isalaele to mopaya nyonso oyo avandi kati na bango;
homo quilibet de domo Israhel et de advenis qui peregrinantur inter eos si comederit sanguinem obfirmabo faciem meam contra animam illius et disperdam eam de populo suo
11 pamba te bomoi ya ekelamu nyonso ezali kati na makila. Napesi bino yango mpo ete bosala na yango mosala ya bolimbisi masumu mpo na bomoi na bino, na etumbelo. Lokola bomoi ya moto ezali kati na makila, yango wana makila esalaka mosala ya bolimbisi masumu.
quia anima carnis in sanguine est et ego dedi illum vobis ut super altare in eo expietis pro animabus vestris et sanguis pro animae piaculo sit
12 Boye, nalobaki na bana ya Isalaele: ‘Moto moko te mpe mopaya moko te kati na bino akoki kolia makila.’
idcirco dixi filiis Israhel omnis anima ex vobis non comedet sanguinem nec ex advenis qui peregrinantur inter vos
13 Moto nyonso kati na bana ya Isalaele to mopaya oyo avandi kati na bango, oyo akokende bokila mpe akokanga nyama ya zamba to ndeke oyo baliaka, asengeli kosopa makila na yango mpe kozipa yango na mabele, pamba te bomoi ya ekelamu nyonso ezali kati na makila na yango.
homo quicumque de filiis Israhel et de advenis qui peregrinantur apud vos si venatione atque aucupio ceperit feram vel avem quibus vesci licitum est fundat sanguinem eius et operiat illum terra
14 Yango wana, nalobaki na bana ya Isalaele: ‘Bokoki kolia makila ya ekelamu ata moko te, pamba te bomoi ya ekelamu nyonso ezali kati na makila na yango. Moto oyo akolia yango, bakolongola ye kati na bato.’
anima enim omnis carnis in sanguine est unde dixi filiis Israhel sanguinem universae carnis non comedetis quia anima carnis in sanguine est et quicumque comederit illum interibit
15 Moto nyonso, azala mwana mboka to mopaya, oyo akolia mosuni ya nyama oyo ekufi yango moko to oyo babomi na nyama ya zamba, akosukola bilamba na ye mpe nzoto na ye na mayi. Akozala mbindo kino na pokwa, sima na yango akokoma peto.
anima quae comederit morticinum vel captum a bestia tam de indigenis quam de advenis lavabit vestes suas et semet ipsum aqua et contaminatus erit usque ad vesperum et hoc ordine mundus fiet
16 Kasi soki asukoli bilamba mpe nzoto na ye te, akomema ngambo. › »
quod si non laverit vestimenta sua nec corpus portabit iniquitatem suam