< Levitike 16 >

1 Yawe alobaki na Moyize, sima na kufa ya bana mibali mibale ya Aron, oyo bakufaki tango bapusanaki liboso ya Yawe.
Now the LORD spoke to Moses after the death of two of Aaron’s sons when they approached the presence of the LORD.
2 Yawe alobaki na Moyize: « Loba na Aron, ndeko na yo ya mobali, ete akotaka tango nyonso te na Esika ya bule, na sima ya rido, liboso ya esika ya bolimbisi masumu, likolo ya Sanduku mpo ete akufa te; pamba te namimonisaka na nzela ya lipata likolo ya esika ya bolimbisi masumu.
And the LORD said to Moses: “Tell your brother Aaron not to enter freely into the Most Holy Place behind the veil in front of the mercy seat on the ark, or else he will die, because I appear in the cloud above the mercy seat.
3 Tala ndenge Aron akobanda kokota na Esika ya bule: akomema ngombe moko ya mobali lokola mbeka ya masumu mpe meme moko ya mobali lokola mbeka ya kotumba.
This is how Aaron is to enter the Holy Place: with a young bull for a sin offering and a ram for a burnt offering.
4 Akolata na nzoto na ye: nzambala ya bule basala na lino mpe bakaputula ya lino; akomikanga mokaba ya lino mpe kitendi ya lino na moto na ye. Lokola bilamba oyo ezali ya bule, asengeli komisukola nzoto na ye na mayi liboso ya kolata yango.
He is to wear the sacred linen tunic, with linen undergarments. He must tie a linen sash around him and put on the linen turban. These are holy garments, and he must bathe himself with water before he wears them.
5 Aron akozwa kati na lisanga ya bana ya Isalaele: bantaba mibale ya mibali lokola mbeka ya masumu mpe meme moko ya mobali lokola mbeka ya kotumba.
And he shall take from the congregation of Israel two male goats for a sin offering and one ram for a burnt offering.
6 Aron akobonza mpo na ye moko, ngombe ya mobali lokola mbeka ya masumu mpe akosala mosala ya bolimbisi masumu mpo na ye moko mpe mpo na ndako na ye.
Aaron is to present the bull for his sin offering and make atonement for himself and his household.
7 Akozwa bantaba ya mibali nyonso mibale mpe akotia yango liboso ya Yawe, na ekotelo ya Ndako ya kapo ya Bokutani.
Then he shall take the two goats and present them before the LORD at the entrance to the Tent of Meeting.
8 Aron akobeta zeke mpo na bantaba ya mibali nyonso mibale: moko mpo na Yawe, mpe mosusu, mpo na Azazeli.
After Aaron casts lots for the two goats, one for the LORD and the other for the scapegoat,
9 Bongo Aron akomema ntaba oyo zeke ekolakisa ete ezali mpo na Yawe, mpe akobonza yango lokola mbeka mpo na masumu.
he shall present the goat chosen by lot for the LORD and sacrifice it as a sin offering.
10 Kasi ntaba ya mobali oyo zeke ekolakisa ete ezali mpo na Azazeli, akomema yango ya bomoi liboso ya Yawe mpo ete basala na yango mosala ya bolimbisi masumu, bongo bakotinda yango na esobe mpo na Azazeli.
But the goat chosen by lot as the scapegoat shall be presented alive before the LORD to make atonement by sending it into the wilderness as the scapegoat.
11 Aron akobonza, mpo na ye moko, ngombe ya mobali lokola mbeka mpo na masumu mpe akosala mosala ya bolimbisi masumu na ye moko mpe ya ndako na ye. Sima na ye kokata kingo ya ngombe ya mobali oyo abonzi mpo na ye moko lokola mbeka ya masumu,
When Aaron presents the bull for his sin offering and makes atonement for himself and his household, he is to slaughter the bull for his own sin offering.
12 akotondisa mbabola ya kotumba malasi na makala ya moto oyo ewuti na etumbelo liboso ya Yawe mpe akotondisa maboko na ye mibale na malasi ya putulu, bongo akomema yango na sima ya rido.
Then he must take a censer full of burning coals from the altar before the LORD, and two handfuls of finely ground fragrant incense, and take them inside the veil.
13 Akotia malasi na moto liboso ya Yawe mpo ete milinga na yango ezipa esika ya bolimbisi oyo ezali likolo ya Sanduku ya Boyokani mpo ete akufa te.
He is to put the incense on the fire before the LORD, and the cloud of incense will cover the mercy seat above the Testimony, so that he will not die.
14 Akozwa makila ya ngombe ya mobali mpe, na nzela ya mosapi na ye, akobwaka yango liboso ya esika ya bolimbisi masumu, na ngambo ya este. Boye, na nzela ya mosapi na ye, akobwaka makila mbala sambo liboso ya esika ya bolimbisi masumu.
And he is to take some of the bull’s blood and sprinkle it with his finger on the east side of the mercy seat; then he shall sprinkle some of it with his finger seven times before the mercy seat.
15 Akokata kingo ya ntaba ya mobali ya mbeka mpo na masumu ya bato mpe akomema makila na yango na sima ya rido. Bongo akosala na makila yango ndenge asalaki na makila ya ngombe ya mobali: akobwaka liboso mpe likolo ya esika ya bolimbisi masumu.
Aaron shall then slaughter the goat for the sin offering for the people and bring its blood behind the veil, and with its blood he must do as he did with the bull’s blood: He is to sprinkle it against the mercy seat and in front of it.
16 Na nzela wana, akosala mosala ya bolimbisi masumu mpo na Esika ya bule likolo ya mbindo, botomboki mpe masumu ya bana ya Isalaele. Akosala mpe ndenge moko mpo na Ndako ya kapo ya Bokutani oyo ezali elongo na bango kati na mbindo na bango.
So he shall make atonement for the Most Holy Place because of the impurities and rebellious acts of the Israelites in regard to all their sins. He is to do the same for the Tent of Meeting which abides among them, because it is surrounded by their impurities.
17 Moto moko te akozala kati na Ndako ya kapo ya Bokutani tango Aron akokota kuna mpo na kosala mosala ya bolimbisi masumu kati na Esika ya bule kino tango akobima na libanda. Mpe akosala mosala ya bolimbisi masumu mpo na ye moko, mpo na ndako na ye mpe mpo na lisanga mobimba ya Isalaele.
No one may be in the Tent of Meeting from the time Aaron goes in to make atonement in the Most Holy Place until he leaves, after he has made atonement for himself, his household, and the whole assembly of Israel.
18 Sima na yango, akobima mpo na kokende na etumbelo oyo ezali liboso ya Yawe mpe akosala mosala ya bolimbisi masumu mpo na etumbelo yango. Akozwa makila ya ngombe ya mobali mpe ya ntaba ya mobali mpe akotia yango na maseke ya etumbelo.
Then he shall go out to the altar that is before the LORD and make atonement for it. He is to take some of the bull’s blood and some of the goat’s blood and put it on all the horns of the altar.
19 Mpe na nzela ya mosapi na ye, akobwaka makila mbala sambo na etumbelo. Ezali na nzela wana nde akopetola mpe akobulisa yango na mbindo ya bana ya Isalaele.
He is to sprinkle some of the blood on it with his finger seven times to cleanse it and consecrate it from the uncleanness of the Israelites.
20 Tango Aron akosilisa kosala mosala ya bolimbisi masumu mpo na Esika ya bule, mpo na Ndako ya kapo ya Bokutani mpe mpo na etumbelo, akomema ntaba ya mobali ya bomoi.
When Aaron has finished purifying the Most Holy Place, the Tent of Meeting, and the altar, he is to bring forward the live goat.
21 Aron akotia maboko na ye mibale na moto ya ntaba yango, akotubela mabe, botomboki mpe masumu nyonso ya bana ya Isalaele na moto ya ntaba yango. Na nzela wana akotia masumu nyonso na moto ya ntaba yango; sima akopona moto moko mpo na kobengana ntaba yango na esobe.
Then he is to lay both hands on the head of the live goat and confess over it all the iniquities and rebellious acts of the Israelites in regard to all their sins. He is to put them on the goat’s head and send it away into the wilderness by the hand of a man appointed for the task.
22 Boye ntaba ekomema masumu na bango nyonso na esika oyo ezanga bato, mpe moto yango akotika ntaba kokende na esobe.
The goat will carry on itself all their iniquities into a solitary place, and the man will release it into the wilderness.
23 Bongo Aron akokota na Ndako ya kapo ya Bokutani, akolongola bilamba ya lino oyo alataki tango akotaki na Esika ya bule mpe akotika yango kuna.
Then Aaron is to enter the Tent of Meeting, take off the linen garments he put on before entering the Most Holy Place, and leave them there.
24 Akosukola nzoto na ye na mayi na esika moko ya bule; mpe akolata bilamba na ye. Sima, akobima libanda mpe akobonza mbeka ya kotumba mpo na ye moko mpe mpo na bato. Na nzela wana nde akosala mosala ya bolimbisi masumu mpo na ye moko mpe mpo na bato.
He is to bathe himself with water in a holy place and put on his own clothes. Then he must go out and sacrifice his burnt offering and the people’s burnt offering to make atonement for himself and for the people.
25 Akotumba mafuta ya mbeka ya masumu na likolo ya etumbelo.
He is also to burn the fat of the sin offering on the altar.
26 Moto oyo akobengana ntaba ya mobali mpo na Azazeli, asengeli kosukola nzoto na ye na mayi; mpe sima na yango, akozonga na molako.
The man who released the goat as the scapegoat must wash his clothes and bathe himself with water; afterward he may reenter the camp.
27 Bakomema libanda ya molako ngombe ya mobali mpe ntaba ya mobali ya mbeka ya masumu oyo bamemaki makila na yango na Esika ya bule mpo na kosala mosala ya bolimbisi masumu mpe bakotumba na moto poso na yango, misuni na yango mpe banyei na yango.
The bull for the sin offering and the goat for the sin offering, whose blood was brought into the Most Holy Place to make atonement, must be taken outside the camp; and their hides, flesh, and dung must be burned up.
28 Moto oyo akotumba yango asengeli kosukola na mayi bilamba na ye mpe nzoto na ye, sima na yango nde akoki kozonga na molako.
The one who burns them must wash his clothes and bathe himself with water, and afterward he may reenter the camp.
29 Tala malako oyo bosengeli kosalela mpo na libela: na mokolo ya zomi ya sanza ya sambo, ezala mwana mboka to mopaya oyo avandi kati na bino, bosengeli komikitisa mpe bokosala mosala ata moko te,
This is to be a permanent statute for you: On the tenth day of the seventh month, you shall humble yourselves and not do any work—whether the native or the foreigner who resides among you—
30 pamba te na mokolo wana nde bokosala mosala ya bolimbisi masumu mpo na bino mpe kopetolama bino. Boye bokopetolama na masumu na bino nyonso liboso ya Yawe.
because on this day atonement will be made for you to cleanse you, and you will be clean from all your sins before the LORD.
31 Ekozala mpo na bino mokolo ya Saba, mokolo ya bopemi, mpe bosengeli komikitisa. Ezali malako ya libela.
It is a Sabbath of complete rest for you, that you may humble yourselves; it is a permanent statute.
32 Nganga-Nzambe oyo bakopakola mafuta mpe akobulisama mpo na kosala mosala ya bonganga-Nzambe na esika ya tata na ye, akosala mosala ya bolimbisi masumu. Akolata bilamba ya bule ya lino.
The priest who is anointed and ordained to succeed his father as high priest shall make atonement. He will put on the sacred linen garments
33 Akosala mosala ya bolimbisi masumu mpo na ndako ya bule, mpo na Ndako ya kapo ya Bokutani, mpo na etumbelo, mpo na Nganga-Nzambe mpe mpo na bato nyonso ya lisanga.
and make atonement for the Most Holy Place, the Tent of Meeting, and the altar, and for the priests and all the people of the assembly.
34 Oyo nde ekozala mpo na bino malako ya libela: mbala moko na mobu, bokosala mosala ya bolimbisi masumu nyonso ya bana ya Isalaele. » Mpe basalaki ndenge kaka Yawe atindaki Moyize.
This is to be a permanent statute for you, to make atonement once a year for the Israelites because of all their sins.” And all this was done as the LORD had commanded Moses.

< Levitike 16 >