< Levitike 15 >

1 Yawe alobaki na Moyize mpe Aron:
RAB Musa'yla Harun'a şöyle dedi:
2 « Boloba na bana ya Isalaele mpe boyebisa bango: ‹ Soki nzoto ya mibali ya mobali moko ezali kobimisa tofina to mayi, kobima yango ekomisi mobali yango mbindo.
“İsrail halkına deyin ki, ‘Adamın erkeklik organında akıntı varsa, akıntı kirlidir.
3 Ata soki tofina to mayi ekobi kobima na nzoto na ye to ekangami, azali kaka mbindo. Tala ndenge kobima ya tofina to ya mayi yango ekomisaka moto mbindo:
Akıntı ister devam etsin, ister kesilsin adamı kirletir. Akıntının neden olduğu kirlilikler şunlardır:
4 mbeto nyonso oyo mobali oyo azali kobimisa tofina to mayi na nzoto na ye ya mibali akolala to eloko nyonso oyo akovandela ekokoma mbindo.
Üzerinde yattığı her yatak ve oturduğu her şey kirli sayılacaktır.
5 Moto nyonso oyo akosimba mbeto na ye asengeli kosukola bilamba na ye mpe nzoto na ye na mayi, mpe akozala mbindo kino na pokwa.
Kim yatağına dokunursa, giysilerini yıkayacak, yıkanacak, akşama kadar kirli sayılacaktır.
6 Moto oyo akovanda likolo ya eloko oyo mobali oyo azali kobima tofina to mayi na nzoto na ye ya mibali avandelaki, asengeli kosukola bilamba na ye mpe nzoto na ye na mayi, mpe akozala mbindo kino na pokwa.
Adamın üzerine oturduğu bir eşyaya oturan da giysilerini yıkayacak, yıkanacak, akşama kadar kirli sayılacaktır.
7 Moto oyo akosimba mobali oyo azali kobima tofina to mayi na nzoto na ye ya mibali, asengeli kosukola bilamba na ye mpe nzoto na ye na mayi, mpe akozala mbindo kino pokwa.
Kim akıntısı olan adamın bedenine dokunursa giysilerini yıkayacak, yıkanacak, akşama kadar kirli sayılacaktır.
8 Soki mobali oyo azali kobima tofina to mayi na nzoto na ye ya mibali abwakeli moto oyo azali peto soyi, moto yango asengeli kosukola bilamba na ye mpe nzoto na ye na mayi, mpe akozala mbindo kino na pokwa.
Eğer akıntısı olan adam temiz bir adama tükürürse, o kişi giysilerini yıkayacak, yıkanacak, akşama kadar kirli sayılacaktır.
9 Eloko nyonso oyo mobali oyo azali kobima tofina to mayi na nzoto na ye ya mibali akovandela likolo ya mpunda tango azali kosala mobembo, ekokoma mbindo.
Akıntısı olan adamın bindiği her eyer kirli sayılacaktır.
10 Moto nyonso oyo akosimba eloko nyonso kati na biloko oyo ezali na se ya mobali yango, akozala mbindo kino na pokwa; mpe moto nyonso oyo akolokota biloko yango asengeli kosukola bilamba na ye mpe nzoto na ye na mayi, mpe akozala mbindo kino na pokwa.
Adamın üzerine oturduğu ya da yattığı herhangi bir eşyaya dokunan, akşama kadar kirli sayılacaktır. Bu eşyaları taşıyan herkes giysilerini yıkayacak, yıkanacak, akşama kadar kirli sayılacaktır.
11 Moto nyonso oyo mobali oyo azali kobima tofina to mayi na nzoto na ye ya mibali akosimba na kozanga komisukola maboko na mayi, asengeli kosukola bilamba na ye mpe nzoto na ye na mayi, mpe akozala mbindo kino na pokwa.
Akıntısı olan adam ellerini yıkamadan kime dokunursa o kişi giysilerini yıkayacak, yıkanacak, akşama kadar kirli sayılacaktır.
12 Mbeki nyonso oyo esalema na mabele oyo bakosimba na mobali oyo azali kobima tofina to mayi, basengeli kopanza yango; mpe eloko nyonso oyo esalema na nzete basengeli kosukola yango na mayi.
Akıntısı olan adamın dokunduğu toprak kap parçalanacak, tahta kap ise suyla çalkalanacaktır.
13 Soki tofina to mayi etiki kobima na nzoto ya mibali ya mobali yango, akotanga mikolo sambo mpo na kopetolama na ye; sima akosukola bilamba na ye, akosukola nzoto na ye na mayi ya etima mpe akokoma peto.
“‘Eğer adamın akıntısı kesilirse, paklanmak için yedi gün bekleyecek. Sonra giysilerini yıkayacak, akarsuda yıkanacak ve temiz sayılacak.
14 Na mokolo ya mwambe, akozwa bibenga mibale ya zamba to bana bibenga mibale mpe akoya liboso ya Yawe na ekuke ya Ndako ya kapo ya Bokutani. Akopesa yango epai ya Nganga-Nzambe.
Sekizinci gün iki kumru ya da iki güvercin alıp RAB'bin huzuruna, Buluşma Çadırı'nın giriş bölümüne gelecek ve bunları kâhine verecek.
15 Nganga-Nzambe akobonza yango, moko lokola mbeka ya masumu mpe mosusu lokola mbeka ya kotumba. Na nzela wana nde Nganga-Nzambe akosala mosala ya bolimbisi masumu mpo na mobali yango liboso ya Yawe likolo ya kobima tofina to mayi na nzoto na ye ya mibali.
Kâhin birini günah sunusu, ötekini yakmalık sunu olarak sunacak. Böylece akıntısı olan adamı RAB'bin huzurunda arıtacak.
16 Soki mobali abimi mayi ya mibali na nzoto na ye ya mibali, asengeli kosukola nzoto na ye mobimba na mayi mpe akozala mbindo kino na pokwa.
“‘Eğer bir adamdan meni akarsa, bedeninin tümünü yıkayacak ve akşama kadar kirli sayılacaktır.
17 Elamba nyonso to eloko nyonso oyo esalema na poso ya nyama oyo ekweyeli mayi ya mibali, esengeli basukola yango na mayi, mpe ekozala mbindo kino na pokwa.
Üzerine meni bulaşan her giysi ya da deri eşya yıkanacak, akşama kadar kirli sayılacaktır.
18 Soki mobali asangisi nzoto na mwasi, bango mibale basengeli kosukola nzoto na mayi mpe bakozala mbindo kino na pokwa.
Bir adam kadınla cinsel ilişkide bulunurken menisi akarsa, ikisi de yıkanacak ve akşama kadar kirli sayılacaklardır.
19 Soki mwasi amoni makila na ye ya sanza, akozala mbindo mikolo sambo, mpe moto nyonso oyo akosimba ye akozala mbindo kino na pokwa.
“‘Âdet gördüğü için kan kaybeden kadın yedi gün kirli sayılacak. Ona dokunan da akşama kadar kirli sayılacak.
20 Eloko nyonso oyo akolalela na tango wana ekokoma mbindo, mpe eloko nyonso oyo akovandela ekokoma mbindo.
Âdet gördüğü günlerde kadının üzerinde yattığı ya da oturduğu her şey kirli sayılacaktır.
21 Moto nyonso oyo akosimba mbeto na ye akosukola bilamba na ye mpe nzoto na ye na mayi mpe akozala mbindo kino na pokwa.
Kim kadının yatağına dokunursa, giysilerini yıkayacak, yıkanacak, akşama kadar kirli sayılacaktır.
22 Moto nyonso oyo akosimba eloko oyo mwasi yango avandeli, asengeli kosukola bilamba na ye mpe nzoto na ye na mayi, mpe akozala mbindo kino na pokwa.
Kim kadının üzerine oturduğu herhangi bir şeye dokunursa, o da giysilerini yıkayacak, yıkanacak, akşama kadar kirli sayılacaktır.
23 Soki eloko ezali na mbeto na ye to likolo ya eloko oyo avandeli, moto oyo akosimba yango akozala mbindo kino na pokwa.
Kadının yatağındaki ya da oturduğu şeyin üzerindeki herhangi bir eşyaya dokunan herkes akşama kadar kirli sayılacaktır.
24 Soki mobali moko asangisi na ye nzoto mpe makila na ye ya sanza ezwi mobali yango, akozala mbindo mikolo sambo. Bongo mbeto nyonso oyo mobali yango akolalela, ekokoma mbindo.
Âdet gören kadının kirliliği onunla yatan adama da bulaşır. Adam yedi gün kirli kalır ve yattığı her yatak kirli sayılır.
25 Soki mwasi azali kobima makila mikolo ebele na tango oyo amonaka makila na ye ya sanza te to azali kokoba kobima makila penza na tango oyo amonaka makila na ye ya sanza, akozala mbindo mikolo nyonso oyo azali kobima makila lokola na mikolo oyo amonaka makila na ye ya sanza.
“‘Eğer bir kadının âdet günleri dışında uzun süreli bir kanaması varsa, ya da kanaması âdet günlerinden sonra da devam ediyorsa, kanaması olduğu sürece âdet günlerinde olduğu gibi kirli sayılır.
26 Mbeto nyonso oyo akolalela na tango oyo makila na ye ezali kokoba kobima, ekozala mbindo; mpe eloko nyonso oyo akovandela ekokoma mbindo lokola na tango oyo amonaka makila na ye ya sanza.
Kanaması olduğu sürece, âdet günlerinde olduğu gibi, yattığı her yatak ve üzerine oturduğu her şey kirli sayılacaktır.
27 Moto nyonso oyo akosimba biloko wana akokoma mbindo. Asengeli kosukola bilamba mpe nzoto na ye na mayi; akozala mbindo kino na pokwa.
Kim bunlara dokunursa kirli sayılacak. Giysilerini yıkayacak, yıkanacak, akşama kadar kirli kalacaktır.
28 Soki apetolami na kobima makila na ye, asengeli kotanga mikolo sambo; sima na yango, akokoma peto.
“‘Ama kanama durursa, kadın yedi gün bekleyecek, sonra temiz sayılacaktır.
29 Na mokolo ya mwambe, akozwa bibenga mibale ya zamba to bana bibenga mibale mpe akomema yango epai ya Nganga-Nzambe na ekuke ya Ndako ya kapo ya Bokutani.
Sekizinci gün iki kumru ya da iki güvercin alıp Buluşma Çadırı'nın giriş bölümüne getirecek ve bunları kâhine verecek.
30 Nganga-Nzambe akobonza yango, moko lokola mbeka ya masumu mpe mosusu lokola mbeka ya kotumba. Na nzela wana nde Nganga-Nzambe akosala mosala ya bolimbisi masumu mpo na mwasi yango liboso ya Yawe mpo na mbindo ya kobima makila na ye.
Kâhin birini günah sunusu, ötekini yakmalık sunu olarak sunacak. Böylece kadını kanamasından doğan kirlilikten RAB'bin huzurunda arıtacak.
31 Bosengeli kosala ete bana ya Isalaele bazala mosika ya makambo oyo ekokomisa bango mbindo; boye bakokufa te na mbindo na bango, na kokomisa mbindo Mongombo na Ngai, oyo ezali kati na bango. ›
“‘İsrail halkını kirliliğinden arındıracaksın. Öyle ki, aralarında bulunan konutumu kirletip kirlilik içinde ölmesinler.’”
32 Oyo nde mibeko mpo na mobali oyo azali kobima tofina to mayi na nzoto na ye ya mibali to mpo na mobali oyo abimi mayi ya mibali oyo ekomisi ye mbindo;
Akıntısı olan, boşalarak kirlenen adam, âdet gören kadın, akıntısı olan erkek ya da kadın ve kirli sayılan kadınla yatan erkekle ilgili yasa budur.
33 mpo na mwasi oyo azali komona makila na ye ya sanza mpe mpo na mobali oyo azali kobima tofina to mayi to mpo na mwasi oyo azali kobima makila, mpe mpo na mobali oyo asangisi nzoto na mwasi ya mbindo. »

< Levitike 15 >