< Levitike 14 >
1 Yawe alobaki na Moyize:
And the LORD spoke to Moses, saying,
2 « Tala mobeko oyo etali moto oyo azali na bokono ya maba, na mokolo ya kopetolama na ye: ‹ Basengeli komema moto oyo azali na bokono ya maba epai ya Nganga-Nzambe.
This shall be the law of the leper in the day of his cleansing: He shall be brought to the priest:
3 Nganga-Nzambe akokende libanda ya molako mpo na kotala ye malamu. Soki abiki na bokono na ye ya maba,
And the priest shall go forth out of the camp: and the priest shall look, and behold, [if] the plague of leprosy is healed in the leper;
4 Nganga-Nzambe akopesa mitindo ete bamema biloko oyo, mpo na kopetolama ya moto oyo abiki na bokono ya maba: bandeke mibale ya peto mpe ya bomoi, eteni ya nzete ya sedele, eteni ya elamba ya motane makasi mpe eteni ya nzete ya izope.
Then shall the priest command to take for him that is to be cleansed two birds alive, [and] clean, and cedar-wood, and scarlet, and hyssop.
5 Nganga-Nzambe akopesa mitindo ete bakata kingo ya ndeke moko kati na bandeke wana mibale, na likolo ya sani basala na mabele mpe etondi na mayi ya peto.
And the priest shall command that one of the birds be killed in an earthen vessel, over running water.
6 Bongo akokamata ndeke ya mibale, ya bomoi, elongo na eteni ya nzete ya sedele, eteni ya elamba ya motane makasi mpe eteni ya nzete ya izope; akozindisa yango kati na makila ya ndeke oyo bawuti kokata kingo na likolo ya mayi ya peto;
As for the living bird, he shall take it, and the cedar-wood, and the scarlet, and the hyssop, and shall dip them, and the living bird, in the blood of the bird [that was] killed over the running water.
7 akosopa makila yango mbala sambo na nzoto ya moto oyo asengeli kopetolama na maba. Sima na yango, Nganga-Nzambe akotatola ete moto yango akomi peto; mpe akotika ndeke oyo ya bomoi kopumbwa mpe kokende na zamba.
And he shall sprinkle upon him that is to be cleansed from the leprosy seven times, and shall pronounce him clean, and shall let the living bird loose into the open field.
8 Moto oyo asengeli na kopetolama akosukola bilamba na ye, akokata bapwale na ye nyonso mpe akomisukola nzoto na mayi; sima na yango, akokoma peto. Bongo, akoki kozonga kati na molako, kasi akovanda mikolo sambo libanda ya ndako na ye ya kapo.
And he that is to be cleansed shall wash his clothes, and shave off all his hair, and wash himself in water, that he may be clean: and after that he shall come into the camp, and shall tarry abroad out of his tent seven days.
9 Na mokolo ya sambo, akokata lisusu bapwale na ye, suki na ye ya moto mpe ya miso, mandefu na ye mpe bapwale nyonso mosusu; akosukola bilamba na ye mpe akomisukola nzoto na mayi. Na bongo, akozala peto.
But it shall be on the seventh day, that he shall shave all his hair off his head, and his beard, and his eye-brows, even all his hair he shall shave off; and he shall wash his clothes, also he shall wash his flesh in water, and he shall be clean.
10 Na mokolo ya mwambe, akokamata bana meme mibale ezanga mbeba elongo na meme moko ya mwasi ezanga mbeba mpe esili kokokisa mobu moko, kilo libwa ya farine basangisa na mafuta lokola, likabo ya bambuma, mpe kati-kati ya litele moko ya mafuta.
And on the eighth day he shall take two he-lambs without blemish, and one ewe-lamb of the first year without blemish, and three tenth-parts of fine flour [for] a meat-offering, mingled with oil, and one log of oil.
11 Nganga-Nzambe oyo azali kosala mosala ya kopetola akotia ye elongo na makabo na ye liboso ya Yawe, na ekotelo ya Ndako ya kapo ya Bokutani.
And the priest that maketh [him] clean, shall present the man that is to be made clean, and those things, before the LORD, [at] the door of the tabernacle of the congregation.
12 Nganga-Nzambe akozwa mwana meme ya liboso mpe akobonza yango elongo na kati-kati ya litele moko ya mafuta lokola mbeka mpo na kozongisa boyokani; akotombola yango liboso ya Yawe.
And the priest shall take one he-lamb, and offer him for a trespass-offering, and the log of oil, and wave them [for] a wave-offering before the LORD.
13 Akokata mwana meme yango kingo na esika oyo babomaka banyama oyo babonzi epai ya Nzambe lokola mbeka mpo na bolimbisi masumu mpe lokola mbeka ya kotumba, kati na esika yango ya bule; pamba te, ezala mbeka mpo na kozongisa boyokani to mbeka mpo na bolimbisi masumu, ezali ya Nganga-Nzambe: ezali eloko ya bule koleka.
And he shall slay the lamb in the place where he shall kill the sin-offering and the burnt-offering, in the holy-place: for as the sin-offering [is] the priest's, [so is] the trespass-offering: it [is] most holy.
14 Nganga-Nzambe akozwa makila ya mbeka oyo ebonzami mpo na kozongisa boyokani, akopakola yango na likolo ya litoyi ya ngambo ya loboko ya mobali ya moto oyo azali komipetola, na mosapi ya liboso ya loboko na ye ya ngambo ya mobali mpe na mosapi ya liboso ya lokolo na ye ya ngambo ya loboko ya mobali.
And the priest shall take [some] of the blood of the trespass-offering, and the priest shall put [it] upon the tip of the right ear of him that is to be cleansed, and upon the thumb of his right hand, and upon the great toe of his right foot.
15 Nganga-Nzambe akokamata kati-kati ya litele ya mafuta mpe akosopa ndambo na yango na loboko na ye ya ngambo ya mwasi.
And the priest shall take [some] of the log of oil, and pour [it] into the palm of his own left hand:
16 Nganga-Nzambe akozindisa, kati na mafuta oyo asili kosopa na loboko na ye ya ngambo ya mwasi, mosapi ya mibale ya loboko na ye ya ngambo ya mobali mpe akosalela yango mpo na kosopa mbala sambo mafuta liboso ya Yawe.
And the priest shall dip his right finger in the oil that [is] in his left hand, and shall sprinkle of the oil with his finger seven times before the LORD.
17 Bongo kati na mafuta oyo ekotikala ye na loboko, Nganga-Nzambe akokamata ndambo na yango mpo na kopakola na likolo ya litoyi ya ngambo ya loboko ya mobali ya moto oyo azali komipetola, na mosapi ya liboso ya loboko na ye ya ngambo ya mobali mpe na mosapi ya liboso ya lokolo na ye ya ngambo ya loboko ya mobali, kaka na esika oyo awuti kotia makila ya mwana meme oyo ebonzami lokola mbeka mpo na kozongisa boyokani.
And of the rest of the oil that [is] in his hand, shall the priest put upon the tip of the right ear of him that is to be cleansed, and upon the thumb of his right hand, and upon the great toe of his right foot, upon the blood of the trespass-offering.
18 Bongo Nganga-Nzambe akosopa, na moto ya moto oyo azali komipetola, mafuta oyo ekotikala na loboko na ye mpo na kosala, liboso ya Yawe, mosala ya bolimbisi masumu na ye.
And the remnant of the oil that [is] in the priest's hand he shall pour upon the head of him that is to be cleansed: and the priest shall make an atonement for him before the LORD.
19 Sima na yango, Nganga-Nzambe akobonza, liboso ya Nzambe, mbeka mpo na masumu, mpo ete asala mosala ya bolimbisi masumu ya moto oyo azali komipetola na mbindo na ye; mpe akokata lisusu kingo ya nyama oyo ebonzami lokola mbeka ya kotumba.
And the priest shall offer the sin-offering, and make an atonement for him that is to be cleansed from his uncleanness; and afterward he shall kill the burnt-offering.
20 Nganga-Nzambe akotia mbeka yango na likolo ya etumbelo elongo na makabo ya farine. Boye, Nganga-Nzambe akosala mosala ya bolimbisi masumu ya moto yango, mpe akozala peto.
And the priest shall offer the burnt-offering, and the meat-offering upon the altar: and the priest shall make an atonement for him, and he shall be clean.
21 Soki moto yango azali mobola, bongo akoki kozwa te biloko wana nyonso, akokamata kaka mwana meme moko lokola mbeka mpo na kozongisa boyokani, mpo na kobonza yango mpo na mosala ya bolimbisi masumu ya moto yango; akobakisa na likolo na yango lokola makabo bakilo misato ya farine basangisa na mafuta mpe kati-kati ya litele moko ya mafuta.
And if he [is] poor, and cannot get so much; then he shall take one lamb [for] a trespass-offering to be waved, to make an atonement for him, and one tenth-part of fine flour mingled with oil for a meat-offering, and a log of oil;
22 Akobonza lisusu bibenga mibale kolanda bozwi na ye: moko lokola mbeka mpo na bolimbisi masumu, mosusu lokola mbeka ya kotumba.
And two turtle-doves, or two young pigeons, such as he is able to get; and the one shall be a sin-offering, and the other a burnt-offering.
23 Na mokolo ya mwambe, akomema yango epai ya Nganga-Nzambe, na ekotelo ya Ndako ya kapo ya Bokutani, liboso ya Yawe, mpo na kopetolama na ye.
And he shall bring them on the eighth day for his cleansing to the priest, to the door of the tabernacle of the congregation, before the LORD.
24 Nganga-Nzambe akokamata mafuta mpe mwana meme oyo ebonzami lokola mbeka mpo na bolimbisi masumu, mpe akobonza yango epai na Yawe.
And the priest shall take the lamb of the trespass-offering, and the log of oil, and the priest shall wave them [for] a wave-offering before the LORD.
25 Akokata kingo ya mwana meme yango oyo ebonzami lokola mbeka mpo na bolimbisi masumu. Nganga-Nzambe akotia makila ya mbeka mpo na bolimbisi masumu, na likolo ya litoyi ya ngambo ya loboko ya mobali ya moto oyo azali komipetola, na mosapi ya liboso ya loboko na ye ya ngambo ya mobali mpe na mosapi ya liboso ya lokolo na ye ya ngambo ya loboko ya mobali.
And he shall kill the lamb of the trespass-offering, and the priest shall take [some] of the blood of the trespass-offering, and put [it] upon the tip of the right ear of him that is to be cleansed, and upon the thumb of his right hand, and upon the great toe of his right foot.
26 Nganga-Nzambe akosopa lisusu ndambo ya mafuta na loboko na ye ya ngambo ya mwasi.
And the priest shall pour of the oil into the palm of his own left hand.
27 Mpe na nzela ya mosapi ya mibale ya loboko na ye ya ngambo ya mobali, Nganga-Nzambe akokamata mpe akosopa mafuta yango mbala sambo, liboso ya Yawe.
And the priest shall sprinkle with his right finger [some] of the oil that [is] in his left hand seven times before the LORD:
28 Nganga-Nzambe akokamata ndambo mosusu mpe akotia yango na likolo ya litoyi ya ngambo ya loboko ya mobali, ya moto oyo azali komipetola, na mosapi ya liboso ya loboko na ye ya ngambo ya mobali mpe na mosapi na ye liboso ya lokolo na ye ya ngambo ya loboko ya mobali, mpe na bisika oyo atiaki makila ya mbeka mpo na bolimbisi masumu.
And the priest shall put of the oil that [is] in his hand upon the tip of the right ear of him that is to be cleansed, and upon the thumb of his right hand, and upon the great toe of his right foot, upon the place of the blood of the trespass-offering.
29 Bongo mpo na ndambo ya makila oyo ekotikala na loboko na ye ya mwasi, Nganga-Nzambe akosopa yango na moto ya moto oyo azali komipetola, mpo na kosala mosala ya bolimbisi masumu na ye liboso ya Yawe.
And the rest of the oil that [is] in the priest's hand he shall put upon the head of him that is to be cleansed, to make an atonement for him before the LORD.
30 Nganga-Nzambe akozwa moko kati na bibenga mibale oyo moto wana abonzi kolanda bozwi na ye
And he shall offer one of the turtle-doves, or of the young pigeons, such as he can get;
31 mpe akobonza yango lokola mbeka mpo na masumu; bongo akobonza ebenga mosusu lokola mbeka ya kotumba elongo na makabo ya farine. Mpe Nganga-Nzambe akosala liboso ya Yawe, mosala ya bolimbisi masumu ya moto oyo azali komipetola. ›
[Even] such as he is able to get, the one [for] a sin-offering, and the other [for] a burnt-offering, with the meat-offering. And the priest shall make an atonement for him that is to be cleansed, before the LORD.
32 Wana nde mibeko oyo ezali kotala moto oyo abeli bokono ya maba, oyo azali penza na makoki te mpo na kopetolama na ye. »
This [is] the law [of him] in whom is the plague of leprosy, whose hand is not able to get [that which pertaineth] to his cleansing.
33 Yawe alobaki na Moyize mpe Aron:
And the LORD spoke to Moses and to Aaron, saying,
34 « Tango bokokota na mokili ya Kanana oyo napesi bino, soki natie litono ya maba na ndako moko ya mokili oyo napesi bino,
When ye shall have come into the land of Canaan, which I give to you for a possession, and I put the plague of leprosy in a house of the land of your possession;
35 nkolo ndako asengeli kokende koloba boye epai ya Nganga-Nzambe: ‹ Namoni litono ya maba kati na ndako na ngai. ›
And he that owneth the house shall come and tell the priest, saying, it seemeth to me [there is] as it were a plague in the house:
36 Bongo Nganga-Nzambe akopesa mitindo ya kobima na ndako yango liboso ete ye akota kuna mpo na kotala malamu litono yango. Bongo akoloba ete biloko nyonso kati na ndako yango ezali peto. Sima na yango, Nganga-Nzambe akokota kati na yango mpo na kotala malamu.
Then the priest shall command that they empty the house, before the priest shall enter to see the plague, that all that [is] in the house may not be made unclean; and afterward the priest shall go in to see the house:
37 Akobanda kotala malamu litono yango kati na mir. Soki amoni ete ezwi langi ya mayi ya pondu to ya motane mpe esali lidusu kati na mir,
And he shall look on the plague, and behold, [if] the plague [is] in the walls of the house, with hollow streaks, greenish, or reddish, which in sight [are] lower than the wall;
38 Nganga-Nzambe asengeli kobima wuta na ndako mpe kotelema na ekotelo na yango; bongo akokanga ndako yango mpo na mikolo sambo.
Then the priest shall go out of the house to the door of the house, and shut up the house seven days:
39 Na mokolo ya sambo, Nganga-Nzambe akozonga mpo na kotala lisusu malamu. Soki litono yango epanzani kati na mir,
And the priest shall come again the seventh day, and shall look; and behold, [if] the plague is spread in the walls of the house;
40 Nganga-Nzambe akopesa mitindo ete balongola mabanga oyo ebebi na matono mpe babwaka yango libanda ya engumba na esika ya mbindo.
Then the priest shall command that they take away the stones in which the plague [is], and they shall cast them into an unclean place without the city:
41 Bongo akosenga ete bakokola mir nyonso na ngambo na yango ya kati mpe babwaka libanda ya engumba na esika ya mbindo mabele nyonso oyo bakokola.
And he shall cause the house to be scraped within on all sides, and they shall pour out the dust that they scrape off without the city into an unclean place:
42 Sima, bakozongisa mabanga mosusu na bisika oyo balongolaki mpe bakozwa mabele mosusu mpo na kopakola ndako.
And they shall take other stones, and put [them] in the place of those stones; and he shall take other mortar, and shall plaster the house.
43 Sima na kolongola mabanga oyo ebebaki, kokokola bamir mpe kopakola mabele mosusu, soki litono esalemi lisusu,
And if the plague shall return, and break out in the house, after that he hath taken away the stones, and after he hath scraped the house, and after it is plastered;
44 Nganga-Nzambe akokende kotala lisusu malamu: soki amoni solo ete litono esalemi lisusu mpe epanzani, wana elakisi ete maba ezali kati na ndako mpe ndako yango ekokoma mbindo.
Then the priest shall come and look; and behold, [if] the plague is spread in the house, it [is] a fretting leprosy in the house: it [is] unclean.
45 Boye bakokweyisa ndako yango: mabanga mpe mabaya na yango nyonso ekobwakama na libanda ya engumba na esika ya mbindo.
And he shall break down the house, its stones, and its timber, and all the mortar of the house: and he shall carry [them] forth out of the city to an unclean place.
46 Na mikolo nyonso oyo ndako ekozala ya kokangama, moto nyonso oyo akokota akozala mbindo kino na pokwa.
Moreover, he that goeth into the house all the while that it is shut up, shall be unclean until the evening.
47 Moto nyonso oyo akolekisa butu to kolia kati na ndako yango, asengeli kosukola bilamba na ye.
And he that lieth in the house shall wash his clothes: and he that eateth in the house shall wash his clothes.
48 Nzokande, soki na ngonga ya kotala malamu ndako sima na kopakola yango mabele, Nganga-Nzambe amoni te kobima ya litono, wana akoloba ete ndako yango ezali peto, pamba te mbindo na yango esili kolongwa.
And if the priest shall come in, and look [upon it], and behold, the plague hath not spread in the house, after the house was plastered: then the priest shall pronounce the house clean, because the plague is healed.
49 Boye mpo na kopetolama na yango, Nganga-Nzambe akozwa bandeke mibale, mabaya ya sedele, eteni ya elemba ya motane makasi mpe eteni ya nzete ya izope;
And he shall take to cleanse the house two birds, and cedar-wood, and scarlet, and hyssop:
50 akokata kingo ya ndeke ya liboso na likolo ya sani oyo basala na mabele mpe ezali na mayi ya peto kati na yango.
And he shall kill one of the birds in an earthen vessel, over running water:
51 Akokamata mabaya ya sedele, eteni ya nzete ya izope, eteni ya elamba ya motane makasi mpe ndeke mosusu, akozindisa yango kati na makila ya ndeke oyo asilaki kokata kingo mpe kati na mayi ya peto oyo akobwaka na likolo ya ndako mbala sambo.
And he shall take the cedar-wood, and the hyssop, and the scarlet, and the living bird, and dip them in the blood of the slain bird, and in the running water, and sprinkle the house seven times:
52 Akopetola ndako na nzela ya makila ya ndeke, ya mayi ya peto, ya ndeke oyo ezali na bomoi, ya mabaya ya sedele, ya eteni ya nzete ya izope mpe ya eteni ya elamba ya motane.
And he shall cleanse the house with the blood of the bird, and with the running water, and with the living bird, and with the cedar wood, and with the hyssop, and with the scarlet:
53 Bongo akotika ndeke oyo etikalaki ya bomoi kokende na zamba, na libanda ya engumba. Ezali ndenge wana nde akosala mosala ya bolimbisi masumu ya ndako; mpe ndako yango ekokoma peto. »
But he shall let go the living bird out of the city into the open fields, and make an atonement for the house: and it shall be clean.
54 Wana nde mibeko oyo etali lolenge nyonso ya maba, litono,
This [is] the law for all manner of plague of leprosy, and scall,
55 maba ya elamba mpe ya ndako,
And for the leprosy of a garment, and of a house,
56 bambuma ya mike-mike, mapalata mpe matono oyo ezali kongenga,
And for a rising, and for a scab, and for a bright spot:
57 mpo na kotalisa soki moto azali mbindo to te. Yango nde mibeko oyo etali maba.
To teach when [it is] unclean, and when [it is] clean: this [is] the law of leprosy.