< Levitike 13 >
1 Yawe alobaki na Moyize mpe Aron:
The Lord told Moses and Aaron,
2 « Soki poso ya nzoto ya moto ebimisi bambuma ya mike-mike to esali kolokoto to lipalata, bongo ezwi lolenge ya bokono ya maba, bakomema moto yango epai ya Nganga-Nzambe Aron to epai ya moko kati na bana na ye, Banganga-Nzambe.
“Anyone who has a swelling, a rash, or a spot on the skin that may be an infectious skin disease must be taken to Aaron the priest or to one of his descendants.
3 Nganga-Nzambe akotala malamu poso ya nzoto oyo esili kozwa bokono. Soki amoni ete bapwale oyo ezali na esika oyo ezwi bokono na poso ebongwani mpe ekomi pembe; bongo bapota efungwami na poso ya nzoto, wana elakisi ete ezali bokono ya maba; mpe Nganga-Nzambe akoki koloba mbala moko ete moto yango azali mbindo.
The priest will inspect whatever is on the skin. If the hair there has turned white and if the issue seems to be more than something on the surface, it is a serious skin disease, and the priest who inspects it will declare the person unclean.
4 Soki lipalata oyo ebimi na poso ezali ya pembe mpe ezali kongenga, bongo efungwami te mpo na kosala pota na poso ya nzoto, Nganga-Nzambe akolongola kati na lisanga, moto oyo abeli mpe akotia ye na esika oyo akozala ye moko mikolo sambo.
But if the spot is only a white discoloration and doesn't seem to be more than superficial, and if the hair on the spot has not turned white, the priest will place the person in isolation for seven days.
5 Sima na mikolo yango sambo, Nganga-Nzambe akotala ye lisusu malamu: soki amoni ete lipalata oyo ebimaki na poso ya nzoto efungwami te mpe epanzani te na nzoto mobimba, akotika moto oyo abeli na esika oyo atiaki ye mpo ete asala lisusu mikolo sambo.
On the seventh day the priest will conduct another inspection, and if he discovers that the spot hasn't changed and hasn't spread on the skin, the priest must place the person in isolation for another seven days.
6 Sima na mikolo sambo yango, Nganga-Nzambe akotala ye lisusu malamu: soki lipalata oyo ebimaki na poso ya nzoto ekawuki mpe epanzani te na nzoto mobimba, Nganga-Nzambe akoloba ete moto yango azali mbindo te; ezali kolokoto ya pamba. Moto yango akosukola bilamba na ye mpo ete azali mbindo te.
On the seventh day after this the priest will inspect it again. If the spot has faded and has not spread on the skin, the priest will declare the person clean since it was a rash. They must wash their clothes and will be clean.
7 Nzokande, soki sima na Nganga-Nzambe kotala mpe koloba ete moto yango azali peto, kolokoto yango epanzani na poso, moto yango asengeli kozonga epai ya Nganga-Nzambe mpo ete atala ye lisusu.
However, if the rash does spread after the person has been inspected by the priest and has been declared clean, the person must go back to be inspected again.
8 Soki amoni ete kolokoto epanzani na poso ya nzoto, Nganga-Nzambe akoloba ete moto yango azali na bokono ya maba mpe azali mbindo.
If the priest discovers that the rash has spread, he must declare the person unclean because it is certainly a skin disease.
9 Soki moto azwi bokono ya maba, basengeli komema ye epai ya Nganga-Nzambe.
Anyone who develops an infectious skin disease must be taken to the priest.
10 Nganga-Nzambe akotala ye malamu. Soki amoni ete poso ya nzoto na ye ebimisi bambuma ya pembe ya mike-mike, ekomisi bapwale ya nzoto na ye pembe, efungwami mpe ebimisi bapota,
The priest will inspect them, and if there is a white swelling on the skin and the hair there has turned white, and there is an open wound in the swelling,
11 wana elakisi ete ezali bokono ya maba ya libela kati na poso ya nzoto na ye, mpe Nganga-Nzambe akoloba ete moto yango azali mbindo. Ekozala na tina te kotia ye na esika oyo akozala ye moko, pamba te emonani ete azali mbindo.
it is a serious skin disease and the priest must declare them unclean. He doesn't need to place the person in isolation because they are unclean.
12 Kasi soki bokono na ye ya maba ebimisi bambuma ya mike-mike na poso ya nzoto na ye mobimba, kobanda na moto kino na makolo, na bisika nyonso oyo Nganga-Nzambe akoki kotala,
However, if the skin disease affects all their skin so that it covers their skin from head to toe, everywhere the priest can see,
13 Nganga-Nzambe akotala ye lisusu malamu: soki amoni ete bambuma ya mike-mike etondi ye penza na nzoto mobimba, akoloba ete moto yango azali mbindo te mpo ete akomi pembe nzoto mobimba.
the priest shall inspect them, and if the disease has covered their entire body, he will declare the person clean. As it has all turned white, they are clean.
14 Kasi akokoma mbindo na mokolo kaka poso ya nzoto na ye ekofungwama mpe ekobimisa bapota.
But if when someone's inspected an open wound is found, they will be unclean.
15 Soki kaka Nganga-Nzambe atali mpe amoni bapota oyo ebimi na poso, akoloba ete moto yango azali mbindo mpe bapota oyo efungwami ezali mbindo: ezali bokono ya maba.
When the priest discovers an open wound, he must declare the person unclean. The open wound is unclean; it is an infectious skin disease.
16 Mpe soki bapota oyo efungwami ekomi lisusu pembe, moto yango akozonga lisusu epai ya Nganga-Nzambe
But if the open wound heals and becomes white, the person must go back to the priest.
17 mpo ete atala ye malamu. Soki Nganga-Nzambe amoni ete bapota yango ekomi penza pembe, akoloba ete nzoto ezali mbindo te mpe ye moko moto yango azali mbindo te.
The priest will inspect them again, and if the wound has turned white, the priest is to declare the person clean; then they are clean.
18 Soki moto moko abelaki bibon mpe yango ekawuki;
When a boil comes up on someone's skin and then it heals,
19 bongo bambuma mike-mike ya pembe to lipalata ya mwa pembe mpe mwa motane ebimi na esika oyo bibon ezalaki, moto yango asengeli kokende epai ya Nganga-Nzambe oyo akotala ye malamu.
and a white swelling or a reddish-white spot appears in its place, they must show themselves to the priest.
20 Soki Nganga-Nzambe amoni ete lidusu moko esalemi na poso ya nzoto ya moto wana, bapwale na ye ebongwani mpe ekomi pembe, akoloba ete moto yango azali mbindo, pamba te ezali bokono ya maba oyo ebimi na esika oyo elembo ya pota ya bibon ezali.
The priest shall inspect it, and if it seems to be more than something on the surface, and if the hair there has turned white, the priest shall declare him unclean. It is a serious skin disease that has infected the boil.
21 Nzokande, soki na ngonga ya kotala ye, Nganga-Nzambe amoni te bapwale ya moto yango kobongwana pembe mpe lidusu kosalema na poso na ye, akotia ye na esika oyo akozala ye moko mpo na mikolo sambo.
However, if when the priest inspects it, it doesn't have white hair in it and doesn't seem to be more than superficial, and has faded, the priest is to place the person in isolation for seven days.
22 Sima na yango, soki Nganga-Nzambe amoni ete lipalata yango epanzani na poso ya nzoto, akoloba ete moto yango azali mbindo, pamba te azali na bokono ya maba.
If then the spot has spread further on the skin, the priest will declare them unclean; it is a disease.
23 Kasi soki lipalata yango epanzani te, wana elakisi ete ezali bobele elembo ya pota ya bibon; mpe Nganga-Nzambe akoloba ete moto yango azali na ye mbindo te.
But if the spot stays the same and doesn't spread, it's just the scar from the boil, and the priest will declare them clean.
24 Soki poso ya nzoto ya moto moko eziki na moto, bongo litono moko ya pembe to ya motane esalemi kati na esika oyo eziki,
If someone has a burn on their skin and where it's raw changes into a reddish-white or white spot,
25 Nganga-Nzambe akotala moto yango malamu: soki bapwale oyo ezali kati na litono ebongwani, ekomi pembe mpe litono yango kati na poso ebongwani, esali pota: elakisi ete ezali bokono ya maba nde ebimi na esika oyo ezikaki. Boye, Nganga-Nzambe akoloba ete moto yango azali mbindo, pamba te azali na bokono ya maba.
the priest must inspect it. If the hair in the spot has turned white and the spot seems to be more than something on the surface, it is a serious skin disease that has infected the burn, and the priest who inspects it will declare the person unclean. It is an infectious skin disease.
26 Nzokande, soki tango Nganga-Nzambe atali moto yango malamu, amoni te bapwale ya pembe kati na litono; mpe soki litono ebongwani te, esali na yango pota te na poso mpe epanzani te; akotia ye na esika oyo akozala ye moko mpo na mikolo sambo.
However, if when the priest inspects it, it doesn't have white hair in it and doesn't seem to be more than superficial, and has faded, the priest is to place the person in isolation for seven days.
27 Na mokolo ya sambo, Nganga-Nzambe akotala ye malamu: soki litono epanzani solo na poso, Nganga-Nzambe akoloba ete moto yango azali mbindo, pamba te ezali bokono ya maba.
On the seventh day the priest will inspect the person again. If then the spot has spread further on the skin, the priest will declare them unclean; it is a serious skin disease.
28 Nzokande, soki litono yango etikali kaka esika moko, epanzani te na poso kasi ekawuki, wana etalisi ete ezali kaka kobeba ya poso ya nzoto mpo na kozika na ye na moto. Boye Nganga-Nzambe akoloba ete azali mbindo te, pamba te ezali kaka elembo ya pota ya moto.
But if the spot stays the same and hasn't spread on the skin, but has faded, it's the swelling from the burn, and the priest will declare them clean because it's just the scar from the burn.
29 Soki mobali to mwasi abeli bokono ya poso ya nzoto, ezala na moto to na mbanga,
If someone, man or woman, has a sore on the head or chin,
30 Nganga-Nzambe akotala malamu poso ya nzoto ya moto yango: soki amoni ete bapota ebimi na poso ya nzoto ya moto yango, bapwale eteli mpe kotela na yango epanzani, akoloba ete mobali to mwasi yango azali mbindo, pamba te ezali lipalata ya moto to ya mbanga.
the priest shall inspect it, and if it appears to be more than superficial and the hair in it has become pale and thin, the priest must declare them unclean; it is an infection producing scabs, a serious disease of the head or chin.
31 Nzokande, soki Nganga-Nzambe amoni ete poso ya nzoto ebimisi na yango bapota te, atako bapwale ezali kaka ya mwindo, akotia ye na esika oyo akozala ye moko mpo na mikolo sambo.
However, if the priest inspects the scabby infection and it doesn't seem to be more than superficial and has no pale hair in it, the priest is to place the person in isolation for seven days.
32 Na mokolo ya sambo, Nganga-Nzambe akotala malamu poso: soki bokono yango epanzani te, bapwale eteli te, bapota ebimi te na poso,
On the seventh day the priest will inspect the person again and if the scabby infection has not spread and there is no pale hair in it, and it doesn't seem to be more than superficial,
33 mobeli akokokola suki na ye kasi akotika suki oyo ezali na bisika oyo bokono emonani. Bongo Nganga-Nzambe akotia lisusu mobeli na esika oyo akozala ye moko mpo na mikolo sambo.
then the person must shave themselves except for the scaly area. The priest is to place the person in isolation for another seven days.
34 Na mokolo ya sambo, Nganga-Nzambe akotala malamu bokono yango ya poso ya nzoto: soki epanzani te mpe ebimisi bapota te, Nganga-Nzambe akoloba ete mobali to mwasi yango azali mbindo te. Boye mobali to mwasi yango akosukola kaka bilamba na ye mpe akokoma peto.
On the seventh day the priest will inspect the scabby infection, and if it has not spread on the skin and doesn't seem to be more than superficial, the priest is to pronounce the person clean. They must wash their clothes and will be clean.
35 Nzokande, atako Nganga-Nzambe asili koloba ete mobali to mwasi wana azali peto kasi soki bokono yango epanzani ye kaka na poso ya nzoto,
However, if the scabby infection has spread on the skin after been declared clean,
36 Nganga-Nzambe akotala malamu: lokola bokono epanzani ye penza na poso ya nzoto, ekozala na tina te ete Nganga-Nzambe aluka lisusu koyeba soki bapwale eteli to te, pamba te mobali to mwasi yango azali penza mbindo.
the priest must inspect them, and if the scabby infection has indeed spread on the skin, the priest doesn't need to check for pale hair; the person is unclean.
37 Nzokande, soki bokono epanzani na yango te mpe bapwale ya mwindo ebimi na bisika oyo bokono ezali, wana elakisi ete mobeli abiki na bokono na ye mpe azali peto: Nganga-Nzambe akoloba ete azali peto.
But if the priest sees that the scabby infection hasn't changed, and black hair has grown in it, then it has healed. The person is clean, and the priest must declare it.
38 Soki mobali to mwasi amoni matono ya pembe kobima na poso ya nzoto na ye,
If someone, man or woman, has white spots on the skin,
39 Nganga-Nzambe akotala ye malamu: soki pembe ya matono yango ezali na yango ya pete, wana elakisi ete ezali na yango penza bokono te: moto yango azali peto.
the priest shall inspect them, and if the spots appear a dull white, it's just a rash that has developed on the skin; the person is clean.
40 Soki suki ya mobali moko ekatani, bongo akomi na libandi, elakisi te ete akomi mbindo.
If a man loses his hair and goes bald, he is still clean.
41 Soki suki yango ekataneli ye na mbunzu, bongo akomi na libandi, wana elakisi ete azali peto.
If he has a receding hairline and he goes bald on his forehead, he is still clean.
42 Kasi soki lipalata moko ya mwa pembe mpe ya mwa motane ebimi ye na libandi, ezala na dikosi to na mbunzu, wana elakisi ete bokono ya maba ebandi kobima ye na libandi.
But if a reddish-white sore appears on his bald head or forehead, it is an infectious disease developing.
43 Nganga-Nzambe akotala ye malamu: soki amoni ete bokono yango ya maba ebandi kobimisa bambuma ya mike-mike ya mwa pembe mpe ya mwa motane, ezala na dikosi to na mbunzu; wana elakisi ete azali na bokono ya maba na libandi.
The priest must inspect him, and if the swelling of the sore on his bald head or forehead looks reddish-white like a skin disease,
44 Boye mobali yango azali na bokono ya maba, azali mbindo; mpe Nganga-Nzambe asengeli koloba ete azali mbindo mpo na bokono oyo akomi na yango na moto.
then he is has an infectious disease; he is unclean. The priest must declare him unclean because of the infection on his head.
45 Moto oyo azwi bokono ya boye asengeli kolata bilamba epasuka, akokatisa suki te, akozipa mandefu na ye mpe akoganga: ‹ Mbindo! Mbindo! ›
Anyone who has such diseases must wear clothes that are torn and let their hair remain uncombed. They must cover their faces and shout out, ‘Unclean, unclean!’
46 Lokola bokono oyo akomi na yango ezali mbindo, ye moko mpe akozala mbindo. Boye akotonga ndako na ye mosika na bato mpe akovanda libanda ya molako.
They remain unclean as long as the infection lasts. They have to live alone somewhere outside the camp.
47 Soki elamba ya kolata ezwi mbungi, ebebi mpe ekomi lokola nzoto ya moto oyo abeli bokono ya maba, ezala elamba basala na lino to na bapwale ya meme
The following regulations relate to any material that becomes affected by mold, such as wool or linen clothing,
48 to elamba ya pete to elamba ya lino mpo na komibatela na malili to elamba basala na bapwale ya meme to mpe ezala mbungi yango emonani na likolo ya eloko basala na kapo ya pete to na kapo ya makasi,
anything woven or knitted made from linen or wool, or anything made of leather:
49 soki mbungi yango ezwi langi ya mayi ya pondu to ezwi langi ya motane, na likolo ya elamba, wana elakisi ete ezali litono ya maba; boye basengeli komema yango epai ya Nganga-Nzambe mpo ete atala yango malamu.
If the spot is green or red on the material, whether it's leather, woven, or knitted or some other leather item, then it is infected with mold and must be shown to the priest.
50 Sima na Nganga-Nzambe kotala yango malamu, akotia yango na esika oyo ekozala yango moko mpo na mikolo sambo.
The priest must inspect the mold and place the item in isolation for seven days.
51 Na mokolo ya sambo, Nganga-Nzambe akotala lisusu malamu litono yango. Soki amoni ete epanzani na likolo ya elamba ya kolata, ya elamba ya pamba, ya elamba ya malili to na likolo ya kapo; wana elakisi ete ezali litono ya bokono ya maba oyo bakoki kolongola te mpe elakisi lisusu ete elamba yango ezali mbindo.
On the seventh day the priest shall inspect it again, and if the patch of mold has spread in the material, whether it's leather, woven, or knitted or some other leather item, then it is a harmful mold; the article is unclean, whatever it is being used for.
52 Boye basengeli kotumba elamba yango, atako ezali ndenge nini, pamba te ezali na litono oyo bakoki kolongola te: basengeli kotumba yango.
The priest is to burn it, whether the affected item is wool or linen or leather. Because the mold is harmful, the article must be burned.
53 Nzokande, soki sima na kotala elamba yango malamu, Nganga-Nzambe amoni ete litono epanzani te na likolo ya elamba yango to na likolo ya kapo,
However, if when the priest inspects it again it, the patch mold has not spread,
54 Nganga-Nzambe akopesa mitindo ete basukola yango; bongo akotia yango lisusu na esika oyo ekozala yango moko mpo na mikolo sambo.
the priest shall order that the affected item is washed and placed in isolation for another seven days.
55 Sima na kosukola yango, Nganga-Nzambe akotala lisusu malamu litono; soki amoni ete ebongwani te mpe epanzani na yango te, wana elakisi ete elamba ezali mbindo mpe esengeli kotumba yango na moto: ezali elamba oyo ebebi na liboso mpe na sima.
Once it has been washed, the priest is to inspect again it, and if the item with the mold hasn't changed how it looks, it is unclean. Though the mold hasn't spread, you must burn the item, whether the mold damage is on the inside or the outside.
56 Nzokande, soki Nganga-Nzambe, sima na kotala malamu elamba, amoni ete litono elongwaki na tango basukolaki elamba; akokata kaka eteni ya elamba epai wapi litono ezali.
If the priest inspects it and the patch of mold has faded after it has been washed, he is to cut out the affected part the material, whether it's leather, woven, or knitted.
57 Soki sima na mwa tango, litono yango ezongi lisusu, wana elakisi ete ezali bokono ya maba oyo ezali kokola. Boye esengeli kotumba na moto eteni oyo ezali na litono na elamba.
However, if the mold comes back then it is spreading. In that case you must burn the affected item.
58 Tango bakosukola elamba oyo ezali na litono, soki litono yango elongwe, esengeli kosukola yango lisusu na mbala ya mibale mpo ete ezala peto. »
If the mold disappears after washing, then have it washed again, and it will be clean.
59 Wana nde mitindo oyo etali litono ya bokono ya maba na likolo ya elamba basala na bapwale ya meme to elamba ya lino, na likolo ya eloko nyonso basala na poso ya nyama, mpo na koyeba soki elamba ezali peto to mbindo.
These are the regulations regarding what needs to be done when mold contaminates wool or linen material, whether woven or knitted, or any leather item, as to declaring it clean or unclean.”