< Levitike 12 >

1 Yawe ayebisaki Moyize:
RAB Musa'ya şöyle dedi:
2 « Loba na bana ya Isalaele: ‹ Soki mwasi aboti mwana mobali, akozala mbindo mikolo sambo lokola tango amonaka makila na ye ya sanza.
“İsrail halkına de ki, ‘Bir kadın hamile kalıp erkek çocuk doğurursa, âdet gördüğü günlerde olduğu gibi yedi gün kirli sayılacaktır.
3 Bongo na mokolo ya mwambe, basengeli kokata mwana ngenga.
Çocuk sekizinci gün sünnet edilmeli.
4 Sima, akolekisa lisusu mikolo tuku misato na misato mpo ete apetolama na makila na ye oyo ebimaki tango abotaki. Akosimba eloko moko te ya bule mpe akokende te na Esika ya bule kino mikolo ya kopetolama na ye ekokoka.
Kadın kanamasından paklanmak için otuz üç gün bekleyecek. Pak sayılması için geçmesi gereken bu günler doluncaya dek kutsal bir şeye dokunmayacak, tapınağa girmeyecek.
5 Soki mwasi aboti mwana mwasi, akozala mbindo baposo mibale lokola tango amonaka makila na ye ya sanza. Bongo akolekisa mikolo tuku motoba na motoba mpo ete apetolama na makila na ye oyo ebimaki tango abotaki.
Ancak, kız çocuk doğurursa, âdet gördüğü günler gibi iki hafta kirli sayılacaktır. Kanamasından paklanmak için altmış altı gün bekleyecektir.
6 Soki mikolo ya kopetolama na ye ekoki, ezala abotaki mwana mobali to mwana mwasi, akomema epai ya Nganga-Nzambe, na ekotelo ya Ndako ya kapo ya Bokutani, mwana meme ya mobu moko lokola mbeka ya kotumba mpe ebenga moko ya mboka to ebenga moko ya zamba lokola mbeka mpo na masumu.
“‘Erkek ya da kız çocuk doğuran kadının temiz sayılması için geçmesi gereken günler dolunca, yakmalık sunu olarak bir yaşında bir kuzu, günah sunusu olarak bir güvercin ya da bir kumru getirip Buluşma Çadırı'nın giriş bölümünde kâhine verecektir.
7 Nganga-Nzambe akobonza bambeka yango liboso ya Yawe mpe sima, akosala mosala ya bolimbisi masumu ya mwasi. Soki kaka asilisi kosala yango nde mwasi akokoma peto. Wana nde mobeko mpo na mwasi oyo aboti mwana mobali to mwana mwasi.
Kâhin bunu RAB'bin huzurunda sunacak ve kadını arıtacak. Böylece kadın kanamasından temizlenmiş sayılacak. Erkek ya da kız doğuran kadınla ilgili yasa budur.
8 Soki azangi makoki ya kozwa mwana meme, akoki komema bana mibale ya ebenga ya mboka to bibenga mibale ya zamba: moko mpo na mbeka ya kotumba, mpe mosusu, mpo na mbeka mpo na masumu. Sima na Nganga-Nzambe kosala mosala ya bolimbisi masumu, mwasi akokoma peto. › »
“‘Eğer kadının kuzu alacak gücü yoksa, biri yakmalık sunu, öbürü günah sunusu olmak üzere, iki kumru ya da iki güvercin yavrusu getirecek. Kâhin kadını arıtacak ve kadın temiz sayılacaktır.’”

< Levitike 12 >