< Levitike 11 >

1 Yawe alobaki na Moyize mpe Aron:
And the Lord spoke to Moses and Aaron, saying:
2 « Loba na bana ya Isalaele: ‹ Kati na banyama nyonso oyo ezali kati na mokili, tala banyama oyo bokoki kolia:
Say to the children of Israel: These are the animals which you are to eat of all the living things of the earth.
3 banyama oyo ezali na litindi epasuka na kati-kati mpe ezongisaka na monoko biloko oyo ewuti na libumu.
Whatsoever hath the hoof divided, and cheweth the cud among the beasts, you shall eat.
4 Kasi, kati na banyama oyo ezongisaka na monoko biloko oyo ewuti na libumu, mpe kati na banyama oyo litindi na yango epasuka na kati-kati, tala banyama oyo bosengeli te kolia: shamo, pamba te ezongisaka na monoko biloko oyo ewuti na libumu, kasi litindi na yango epasuka te na kati-kati: ezali mbindo mpo na bino;
But whatsoever cheweth indeed the cud, and hath a hoof, but divideth it not, as the camel, and others, that you shall not eat, but shall reckon it among the unclean.
5 mpanya ya zamba, pamba te ezongisaka te na monoko biloko oyo ewuti na libumu, kasi litindi na yango epasuka te na kati-kati: ezali mbindo mpo na bino;
The cherogrillus which cheweth the cud, but divideth not the hoof, is unclean.
6 mpanya ya matoyi milayi, pamba te ezongisaka na monoko biloko oyo ewuti na libumu, kasi litindi na yango epasuka te na kati-kati: ezali mbindo mpo na bino;
The hare also: for that too cheweth the cud, but divideth not the hoof.
7 ngulu, pamba te ezali na litindi epasuka na kati-kati kasi ezongisaka te na monoko biloko oyo ewuti na libumu: ezali mbindo mpo na bino.
And the swine, which, though it divideth the hoof, cheweth not the cud.
8 Bosengeli te kolia misuni ya banyama yango to kosimba bibembe na yango, pamba te ezali mbindo mpo na bino.
The flesh of these you shall not eat, nor shall you touch their carcasses, because they are unclean to you.
9 Kati na bikelamu nyonso oyo evandaka na mayi lokola bibale minene mpe miluka, bokoki kolia nyonso oyo ezali na binyanyeli mpe biteku.
These are the things that breed in the waters, and which it is lawful to eat. All that hath fins, and scales, as well in the sea, as in the rivers, and the pools, you shall eat.
10 Kasi bokolia te nyonso oyo ezangi binyanyeli mpe biteku: ezali mbindo mpo na bino.
But whatsoever hath not fins and scales, of those things that move and live in the waters, shall be an abomination to you,
11 Bosengeli te kolia misuni ya banyama yango to kosimba bibembe na yango, pamba te ezali mbindo mpo na bino.
And detestable: their flesh you shall not eat, and their carcasses you shall avoid.
12 Bikelamu nyonso oyo evandaka na mayi kasi ezangi binyanyeli mpe biteku, ezali mbindo mpo na bino.
All that have not fins and scales, in the waters, shall be unclean.
13 Kati na bandeke, tala oyo ezali mbindo mpo na bino, oyo bosengeli te kolia: mpongo, engondo, mpongo ya ebale monene,
Of birds these are they which you must not eat, and which are to be avoided by you: The eagle, and the griffon, and the osprey,
14 nzengo mpe bandeke ya lolenge nyonso oyo eliaka misuni,
And the kite, and the vulture, according to their kind,
15 bayanganga ya lolenge nyonso;
And all that is of the raven kind, according to their likeness.
16 maligbanga, kumu, ndeke ya ebale monene mpe bakombekombe ya lolenge nyonso,
The ostrich, and the owl, and the larus, and the hawk according to its kind.
17 esulungutu, libata ya mayi, esulungutu ya monene,
The screech owl, and the cormorant, and the ibis,
18 esulungutu ya pembe, libeke, ndeke oyo eliaka misuni ya kopola,
And the swan, and the bittern, and the porphyrion,
19 nkoko, mokwela ya lolenge nyonso, kengele mpe lolema.
The heron, and the charadrion according to its kind, the houp also, and the bat.
20 Bokolia te banyama nyonso ya mike-mike oyo ezali na mapapu mpe etambolaka na makolo minei; ezali mbindo mpo na bino.
Of things that fly, whatsoever goeth upon four feet, shall be abominable to you.
21 Nzokande, kati na banyama nyonso ya mike-mike oyo ezali na mapapu, bokoki kolia oyo ezali lisusu na makolo oyo esungaka yango mpo na kopumbwa wuta na mabele:
But whatsoever walketh upon four feet, but hath the legs behind longer, wherewith it hoppeth upon the earth,
22 lolenge nyonso ya mabanki, mankoko, makelele mpe mayoyo.
That you shall eat, as the bruchus in its kind, the attacus, and ophiomachus, and the locust, every one according to their kind.
23 Kasi banyama mike nyonso oyo ezali na mapapu mpe na makolo minei ezali mbindo mpo na bino.
But of dying things whatsoever hath four feet only, shall be an abomination to you:
24 Soki te, ekokomisa bino mbindo; mpe moto nyonso oyo akosimba bibembe na yango akozala mbindo kino na pokwa.
And whosoever shall touch the carcasses of them, shall be defiled, and shall be unclean until the evening:
25 Moto nyonso oyo akosimba bibembe na yango akosukola bilamba na ye mpe akozala mbindo kino na pokwa.
And if it be necessary that he carry any of these things when they are dead, he shall wash his clothes, and shall be unclean until the sun set.
26 Tala banyama mosusu oyo bokomona lokola mbindo: nyama oyo ezali na litindi epasuka te mpe ezongisaka te na monoko biloko oyo ewuti na libumu. Moto nyonso oyo akosimba yango akozala mbindo.
Every beast that hath a hoof, but divideth it not, nor cheweth the cud, shall be unclean: and he that toucheth it, shall be defiled.
27 Nyama nyonso oyo ezali na makolo minei mpe etambolaka na matambe na yango ezali mbindo. Moto nyonso oyo akosimba bibembe na yango akozala mbindo kino na pokwa.
That which walketh upon hands of all animals which go on all four, shall be unclean: he that shall touch their carcasses shall be defiled until evening.
28 Mpe moto nyonso oyo akolokota bibembe na yango akosukola bilamba na ye mpe akozala mbindo kino na pokwa. Bokomona yango mbindo.
And he that shall carry such carcasses, shall wash his clothes, and shall be unclean until evening: because all these things are unclean to you.
29 Kati na banyama mike oyo etambolaka na mabele, tala oyo bosengeli komona lokola mbindo: mpuku ya se ya mabele, mpuku mpe lolenge nyonso ya miselekete,
These also shall be reckoned among unclean things, of all that move upon the earth, the weasel, and the mouse, and the crocodile, every one according to their kind:
30 moselekete ya ndako, moselekete ya zelo, moselekete ya zamba, moselekete ya langi ya pondu, mongungu.
The shrew, and the chameleon, and the stello, and the lizard, and the mole:
31 Kati na bibwele nyonso oyo etambolaka na libumu, bokomona oyo wana lokola mbindo. Moto nyonso oyo akosimba yango wana esili kokufa akozala mbindo kino na pokwa.
All these are unclean. He that toucheth their carcasses shall be unclean until the evening.
32 Eloko nyonso oyo nyama yango ekokweyela, wana esili kokufa, ekozala mbindo, ezala esalelo ya libaya, elamba, poso to sakosi; botia yango na mayi mpe ekozala mbindo kino na pokwa; sima na yango nde ekozonga lisusu peto.
And upon what thing soever any of their carcasses shall fall, it shall be defiled, whether it be a vessel of wood, or a garment, or skins or haircloths; or any thing in which work is done, they shall be dipped in water, and shall be unclean until the evening, and so afterwards shall be clean.
33 Soki moko kati na banyama yango ekweyi na mbeki basala na mabele, biloko nyonso oyo ezali kati na mbeki yango ekokoma mbindo mpe bokopanza mbeki yango.
But an earthen vessel, into which any of these shall fall, shall be defiled, and therefore is to be broken.
34 Soki basopi mayi ya mbeki yango na eloko nyonso oyo baliaka, eloko yango ekokoma mbindo; ezali mpe bongo mpo na eloko nyonso oyo bamelaka: soki basopeli yango mayi ya mbeki wana, ekokoma mbindo ata soki ezali kati na mbeki ya lolenge nini.
Any meat which you eat, if water from such a vessel be poured upon it, shall be unclean; and every liquor that is drunk out of any such vessel, shall be unclean.
35 Eloko nyonso oyo ebembe ya moko kati na banyama wana ekokweya likolo na yango ekokoma mbindo. Soki ezali fulu ya moto to mbabola, esengeli kopanza yango; pamba te ekozala mbindo mpe bokomona yango bongo.
And upon whatsoever thing any of these dead beasts shall fall, it shall be unclean: whether it be oven, or pots with feet, they shall be destroyed, and shall be unclean.
36 Nzokande soki nyama yango ya mbindo ekweyi kati na etima to kati na libulu ya mayi, mayi ekotikala peto kasi moto oyo akosimba ebembe na yango akozala mbindo.
But fountains and cisterns, and all gatherings together of waters shall be clean. He that toucheth their carcasses shall be defiled.
37 Soki eteni moko ya ebembe na yango ekweyi likolo ya nkona oyo basengeli kolona, nkona ekotikala peto;
If it fall upon seed corn, it shall not defile it.
38 kasi soki basilaki kosopela nkona yango mayi, bongo eteni ya ebembe ya nyama ya mbindo ekweyi lisusu likolo na yango, bokomona nkona yango mbindo.
But if any man pour water upon the seed, and afterwards it be touched by the carcasses, it shall be forthwith defiled.
39 Soki nyama oyo bozali na ndingisa ya kolia ekufi, moto nyonso oyo akosimba ebembe na yango akozala mbindo kino na pokwa;
If any beast die, of which it is lawful for you to eat, he that toucheth the carcass thereof, shall be unclean until the evening:
40 mpe moto oyo akolia mosuni ya nyama oyo esili kokufa asengeli kosukola bilamba na ye, mpe akozala mbindo kino na pokwa. Moto oyo mpe akomema ebembe na yango akosukola bilamba na ye mpe akozala mbindo kino na pokwa.
And he that eateth or carrieth any thing thereof, shall wash his clothes, and shall be unclean until the evening.
41 Bosengeli komona lokola mbindo banyama nyonso oyo etambolaka na libumu, mpe epekisami kolia yango.
All that creepeth upon the earth shall be abominable, neither shall it be taken for meat.
42 Bokolia ata nyama moko te oyo etambolaka na libumu; ata oyo etambolaka na makolo minei to koleka, pamba te ezali mbindo.
Whatsoever goeth upon the breast on four feet, or hath many feet, or traileth on the earth, you shall not eat, because it is abominable.
43 Bino moko mpe bomikomisa mbindo te na nzela ya moko kati na bikelamu wana oyo etambolaka na libumu. Bomikomisa mbindo te na nzela na yango to tika ete yango mpe ekomisa bino mbindo te.
Do not defile your souls, nor touch aught thereof, lest you be unclean,
44 Pamba te, nazali Yawe, Nzambe na bino. Botambola lokola bato ya bule mpe bozala bule, pamba te Ngai nazali Bule. Bomikomisa mbindo te na nzela ya banyama nyonso oyo etambolaka na libumu.
For I am the Lord your God: be holy because I am holy. Defile not your souls by any creeping thing, that moveth upon the earth.
45 Nazali Yawe oyo abimisaki bino na Ejipito mpo ete nazala Nzambe na bino. Boye bozala bule, pamba te Ngai nazali Bule.
For I am the Lord, who brought you out of the land of Egypt, that I might be your God.
46 Yango wana nde ezali mobeko oyo etali banyama, bandeke, bikelamu nyonso ya bomoi oyo etambolaka kati na mayi to na libumu.
You shall be holy, because I am holy. This is the law of beasts and fowls, and of every living creature that moveth in the waters, and creepeth on the earth:
47 Bosengeli kosala bokeseni kati na oyo ezali mbindo mpe oyo ezali peto, kati na bikelamu ya bomoi oyo bakoki kolia mpe oyo bakoki kolia te. › »
That you may know the differences of the clean, and unclean, and know what you ought to eat, and what to refuse.

< Levitike 11 >