< Bileli 5 >
1 Oh Yawe, kanisa makambo oyo ekomeli biso! Tala mpe mona soni na biso!
耶和华啊,求你记念我们所遭遇的事, 观看我们所受的凌辱。
2 Libula na biso ekeyi na maboko ya bapaya, bandako na biso ekeyi na maboko ya bato mosusu.
我们的产业归与外邦人; 我们的房屋归与外路人。
3 Tokomi lokola bana bitike, tozangi tata; bamama na biso bakomi lokola basi bakufisa mibali!
我们是无父的孤儿; 我们的母亲好像寡妇。
4 Tosengeli kofuta mbongo ata mpo na mayi na biso ya komela to mpe mpo na bakoni na biso!
我们出钱才得水喝; 我们的柴是人卖给我们的。
5 Banguna na biso bazali kolanda biso, bakomi na sima ya mokongo; bongo biso tolembi nzoto, tozangi kimia.
追赶我们的,到了我们的颈项上; 我们疲乏不得歇息。
6 Tokomi ata kobondela bato ya Ejipito mpe ya Asiri mpo ete bapesa biso bilei.
我们投降埃及人和亚述人, 为要得粮吃饱。
7 Solo batata na biso basalaki masumu, kasi bazali lisusu te, bongo biso tokomi komema mokumba ya etumbu na bango.
我们列祖犯罪,而今不在了; 我们担当他们的罪孽。
8 Bawumbu bakomi kokonza biso, mpe moto ata moko te amonani mpo na kokangola biso na maboko na bango.
奴仆辖制我们, 无人救我们脱离他们的手。
9 Tozali kozwa bilei na biso na motuya ya bomoi na biso, likolo na mopanga ya babomi kuna na esobe.
因为旷野的刀剑, 我们冒着险才得粮食。
10 Poso ya nzoto na biso ekomi moto lokola nde balekisi yango na mbabola, pamba te nzala ezali kotumba biso makasi.
因饥饿燥热, 我们的皮肤就黑如炉。
11 Basambwisi basi kati na Siona, mpe bilenge basi oyo bayebi nanu nzoto ya mibali te kati na bingumba ya Yuda.
敌人在锡安玷污妇人, 在犹大的城邑玷污处女。
12 Badiembiki bakalaka, na maboko na bango; mpe bapesi bakambi lokumu te.
他们吊起首领的手, 也不尊敬老人的面。
13 Bilenge mibali bazali komema libanga oyo banikelaka ble; bongo bana mike bazali kotepatepa na se ya kilo ya bakoni.
少年人扛磨石, 孩童背木柴,都绊跌了。
14 Bakambi batika kokende na ekuke ya engumba, mpe bilenge batika kobeta mindule.
老年人在城门口断绝; 少年人不再作乐。
15 Esengo ezalaka lisusu te kati na mitema na biso, mabina na biso ebongwana matanga.
我们心中的快乐止息, 跳舞变为悲哀。
16 Mitole ekweyi wuta na mito na biso. Mawa na biso, mpo ete tosali masumu!
冠冕从我们的头上落下; 我们犯罪了,我们有祸了!
17 Soki mitema na biso ezali komona pasi mpe soki miso na biso ekomi komona molili,
这些事我们心里发昏, 我们的眼睛昏花。
18 ezali mpo ete ngomba Siona ebebisami, mpe mbwa ya zamba ekomi kovanda kuna.
锡安山荒凉, 野狗行在其上。
19 Oh Yawe, ozali Mokonzi seko na seko; Kiti ya Bokonzi na Yo ekowumela libela na libela.
耶和华啊,你存到永远; 你的宝座存到万代。
20 Mpo na nini obosana biso mpo na tango nyonso? Mpo na nini osundola biso tango molayi?
你为何永远忘记我们? 为何许久离弃我们?
21 Oh Yawe, zongisa biso epai na Yo; mpe tokozonga penza! Yeisa mikolo na biso sika ndenge ezalaki na tango ya kala!
耶和华啊,求你使我们向你回转, 我们便得回转。 求你复新我们的日子,像古时一样。
22 Boni, osundoli biso solo mpo na libela mpe otombokeli biso na kanda eleka ndelo?
你竟全然弃绝我们, 向我们大发烈怒?