< Bileli 3 >

1 Nazali moto oyo amona pasi na nzela ya fimbu ya kanda na Ye.
ALEPH ego vir videns paupertatem meam in virga indignationis eius
2 Amemaki ngai mpe atambolisaki ngai kati na molili, kasi na pole te.
ALEPH me minavit et adduxit in tenebris et non in lucem
3 Solo, mokolo mobimba, azalaki kobalola loboko na Ye mpo na kotelemela ngai tango nyonso.
ALEPH tantum in me vertit et convertit manum suam tota die
4 Abebisaki nzoto na ngai mpe poso na yango, abukaki mikuwa na ngai.
BETH vetustam fecit pellem meam et carnem meam contrivit ossa mea
5 Mpo na kotelemela ngai, atongaki zingazinga na ngai mir ya ngenge mpe ya pasi.
BETH aedificavit in gyro meo et circumdedit me felle et labore
6 Atongelaki ngai ndako ya kovanda kati na molili, lokola bato ya tango ya kala oyo bakufa.
BETH in tenebrosis conlocavit me quasi mortuos sempiternos
7 Azingelaki ngai na bamir mpo ete nakima te; akangaki ngai na minyololo ya kilo.
GIMEL circumaedificavit adversum me ut non egrediar adgravavit conpedem meam
8 Ezala soki nabeleli mpo na kosenga lisungi, azali koyoka libondeli na ngai te.
GIMEL sed et cum clamavero et rogavero exclusit orationem meam
9 Akangaki nzela na ngai na mabanga minene mpe abebisaki banzela na ngai ya mike.
GIMEL conclusit vias meas lapidibus quadris semitas meas subvertit
10 Azalaki mpo na ngai lokola ngombolo oyo ebongami, lokola nkosi oyo ebombameli ngai;
DELETH ursus insidians factus est mihi leo in absconditis
11 apengwisaki ngai nzela, apasolaki ngai mpe akomisaki ngai eloko ya pamba.
DELETH semitas meas subvertit et confregit me posuit me desolatam
12 Abendaki tolotolo na Ye mpe akomisaki ngai esika na Ye ya kobamba makonga.
DELETH tetendit arcum suum et posuit me quasi signum ad sagittam
13 Atobolaki motema na ngai, na makonga oyo ewutaki na libenga na Ye.
HE misit in renibus meis filias faretrae suae
14 Nakomaki eloko ya liseki na miso ya bato na ngai nyonso; bazalaki tango nyonso kotiola ngai na banzembo.
HE factus sum in derisu omni populo meo canticum eorum tota die
15 Atondisaki ngai na matiti ya bololo mpe alangwisaki ngai na masanga ya bololo.
HE replevit me amaritudinibus inebriavit me absinthio
16 Abukaki minu na ngai na mabanga, azindisaki ngai na putulu.
VAV et fregit ad numerum dentes meos cibavit me cinere
17 Nazangaki kimia, nayebaki lisusu te nini yango bolamu.
VAV et repulsa est anima mea oblitus sum bonorum
18 Boye nalobaki: « Lokumu mpe makambo nyonso oyo natielaki elikya na Yawe esili! »
VAV et dixi periit finis meus et spes mea a Domino
19 Nakanisi pasi mpe minyoko na ngai, ezali lokola ngenge mpe masanga ya bololo.
ZAI recordare paupertatis et transgressionis meae absinthii et fellis
20 Tango nyonso nakanisaka yango, motema na ngai ebukanaka.
ZAI memoria memor ero et tabescet in me anima mea
21 Nzokande, tala makambo oyo nakanisaka; oyo mpo na yango, nazalaka na elikya:
ZAI hoc recolens in corde meo ideo sperabo
22 Bolamu ya Yawe esili te, mawa na Ye ekomi nanu na suka te;
HETH misericordiae Domini quia non sumus consumpti quia non defecerunt miserationes eius
23 ekomaka ya sika tongo nyonso. Solo, boyengebene na Yo ezali monene!
HETH novae diluculo multa est fides tua
24 Namilobeli: « Yawe azali elikya na ngai; yango wana nakotia motema epai na Ye. »
HETH pars mea Dominus dixit anima mea propterea expectabo eum
25 Yawe azali malamu mpo na bato oyo batielaka Ye elikya, mpo na bato oyo balukaka Ye!
TETH bonus est Dominus sperantibus in eum animae quaerenti illum
26 Ezali malamu kozela na kimia lobiko kowuta na Yawe!
TETH bonum est praestolari cum silentio salutare Domini
27 Ezali malamu mpo na moto komema ekangiseli na ye wana azali nanu elenge.
TETH bonum est viro cum portaverit iugum ab adulescentia sua
28 Tika ete avanda kimia mpe avanda ye moko, pamba te Yawe nde alingi bongo mpo na ye.
IOTH sedebit solitarius et tacebit quia levavit super se
29 Tika ete atia elongi na ye na mabele: tango mosusu elikya ekoki kozala.
IOTH ponet in pulvere os suum si forte sit spes
30 Tika ete apesa litama mpo ete babeta ye mbata, mpe tika ete atonda na soni!
IOTH dabit percutienti se maxillam saturabitur obprobriis
31 Pamba te Nkolo abwakaka moto te mpo na libela.
CAPH quia non repellet in sempiternum Dominus
32 Ezala soki apesi etumbu, ayokaka kaka mawa mpo na bolingo monene na Ye.
CAPH quia si abiecit et miserebitur secundum multitudinem misericordiarum suarum
33 Ezalaka na esengo te nde Yawe ayokisaka bato soni to atindelaka bato pasi.
CAPH non enim humiliavit ex corde suo et abiecit filios hominis
34 Tango banyataka na makolo bakangami nyonso ya mokili,
LAMED ut contereret sub pedibus suis omnes vinctos terrae
35 tango babebisaka lokumu ya moto na miso ya Ye-Oyo-Aleki-Likolo,
LAMED ut declinaret iudicium viri in conspectu vultus Altissimi
36 tango banyokolaka moto kati na kosambisama, boni, Nkolo amonaka yango te?
LAMED ut perverteret hominem in iudicio suo Dominus ignoravit
37 Nani akoki kaka kobimisa liloba mpo ete likambo esalema soki Nkolo apesi yango nzela te?
MEM quis est iste qui dixit ut fieret Domino non iubente
38 Boni, ezali te wuta na monoko ya Ye-Oyo-Aleki-Likolo nde pasi mpe bolamu ekomelaka bato?
MEM ex ore Altissimi non egredientur nec mala nec bona
39 Mpo na nini moto na bomoi amilela-lela tango bapesi ye etumbu likolo ya masumu na ye?
MEM quid murmuravit homo vivens vir pro peccatis suis
40 Tokota na mozindo ya kososola banzela na biso mpe totala malamu etamboli na biso, bongo tozonga epai na Yawe;
NUN scrutemur vias nostras et quaeramus et revertamur ad Dominum
41 totombola mitema mpe maboko na biso epai ya Nzambe oyo azali na Lola mpe toloba:
NUN levemus corda nostra cum manibus ad Dominum in caelos
42 « Tosalaki masumu mpe totombokelaki Yo, yango wana olimbisaki te.
NUN nos inique egimus et ad iracundiam provocavimus idcirco tu inexorabilis es
43 Omizipaki na kanda ndenge bamizipaka liputa, onyokolaki biso mpe obomaki na mawa te.
SAMECH operuisti in furore et percussisti nos occidisti nec pepercisti
44 Omizipaki lipata mpo ete mabondeli edusola te.
SAMECH opposuisti nubem tibi ne transeat oratio
45 Okomisaki biso lokola eloko ya nkele mpe ya tina te na miso ya bikolo.
SAMECH eradicationem et abiectionem posuisti me in medio populorum
46 Banguna na biso nyonso bafungolaki minoko mpo na kotiola biso;
FE aperuerunt super nos os suum omnes inimici
47 libula na biso ekomi: somo, mabulu, kobebisama mpe kufa. »
FE formido et laqueus facta est nobis vaticinatio et contritio
48 Miso na ngai ezali kosopa miluka ya mpinzoli mpo ete bato na ngai babebisami.
FE divisiones aquarum deduxit oculus meus in contritione filiae populi mei
49 Miso na ngai ezali kobimisa mpinzoli tango nyonso mpe ezali kolemba te,
AIN oculus meus adflictus est nec tacuit eo quod non esset requies
50 kino tango Yawe akotala mpe akomona wuta kuna na Lola.
AIN donec respiceret et videret Dominus de caelis
51 Makambo oyo miso na ngai ezali komona ezali koyokisa motema na ngai pasi likolo na bana basi nyonso ya engumba na ngai.
AIN oculus meus depraedatus est animam meam in cunctis filiabus urbis meae
52 Bato oyo bayinaka ngai na pamba balukaki kokanga ngai lokola ndeke;
SADE venatione ceperunt me quasi avem inimici mei gratis
53 balukaki koboma ngai kati na libulu, babwakelaki ngai mabanga;
SADE lapsa est in lacu vita mea et posuerunt lapidem super me
54 mayi etondaki kino kozipa moto na ngai mpe nakanisaki ete nakomi pene ya kokufa.
SADE inundaverunt aquae super caput meum dixi perii
55 Nabelelaki Kombo na Yo, Yawe, wuta na mozindo ya libulu.
COPH invocavi nomen tuum Domine de lacis novissimis
56 Oyokaki ngai libondeli na ngai: « Kokanga matoyi na Yo te wana nazali kobelela Yo mpo ete oyoka kolela na ngai mpe nazwa lisungi kowuta na Yo! »
COPH vocem meam audisti ne avertas aurem tuam a singultu meo et clamoribus
57 Tango nabelelaki Yo, opusanaki pene na ngai mpe olobaki: « Kobanga te! »
COPH adpropinquasti in die quando invocavi te dixisti ne timeas
58 Nkolo, obundelaki ngai solo, osikolaki bomoi na ngai!
RES iudicasti Domine causam animae meae redemptor vitae meae
59 Yawe, omonaki mabe oyo basalaki ngai: longisa ngai!
RES vidisti Domine iniquitatem adversum me iudica iudicium meum
60 Omonaki solo posa na bango ya kozongisa mabe na mabe mpe mabongisi na bango ya kosala ngai mabe.
RES vidisti omnem furorem universas cogitationes eorum adversum me
61 Yawe, oyokaki mafinga na bango, mabongisi na bango ya kosala ngai mabe,
SEN audisti obprobria eorum Domine omnes cogitationes eorum adversum me
62 maloba ya bayini na ngai mpe makanisi na bango ya kosala ngai mabe.
SEN labia insurgentium mihi et meditationes eorum adversum me tota die
63 Tala mpe mona bango! Ezala bavandi to batelemi, mosala na bango: kotiola ngai na banzembo na bango.
SEN sessionem eorum et resurrectionem eorum vide ego sum psalmus eorum
64 Yawe, pesa bango lifuti oyo ekoki na bango kolanda misala na bango;
THAU reddes eis vicem Domine iuxta opera manuum suarum
65 yeisa mitema na bango makasi, kweyisela bango bilakeli mabe na Yo;
THAU dabis eis scutum cordis laborem tuum
66 nyokola bango na kanda makasi na Yo mpe bebisa bango na se ya Lola na Yo, Yawe!
THAU persequeris in furore et conteres eos sub caelis Domine

< Bileli 3 >