< Bileli 2 >

1 Tala ndenge nini Nkolo azipi Siona, mboka kitoko, na lipata ya kanda na Ye: akweyisi lokumu ya Isalaele, wuta na likolo kino na se; na mokolo ya kanda na Ye, abosanaki enyatelo makolo na Ye!
Comment, dans sa colère, le Seigneur a-t-il couvert d’un nuage la fille de Sion! Il a jeté des cieux sur la terre la beauté d’Israël, et, au jour de sa colère, il ne s’est pas souvenu du marchepied de ses pieds.
2 Na kozanga mawa, Nkolo abebisi bandako nyonso ya Jakobi; na kanda na Ye, akweyisi bandako batonga makasi ya Yuda, mwasi kitoko, mpe asambwisi bokonzi mpe bakambi na yango.
Le Seigneur a englouti, sans épargner, toutes les habitations de Jacob; il a renversé dans sa fureur les forteresses de la fille de Juda; il a jeté par terre, il a profané le royaume et ses princes.
3 Na kanda makasi na Ye, abukaki Isalaele maseke nyonso, alongolaki loboko na Ye ya mobali na likolo na yango tango monguna na bango azalaki kopusana; apelisaki moto kati na mokili ya Jakobi lokola moto makasi oyo etumbaka biloko nyonso na bangambo na yango nyonso.
Il a retranché, dans l’ardeur de sa colère, toute la corne d’Israël; il a retiré sa droite devant l’ennemi, et il a brûlé en Jacob comme un feu flamboyant qui dévore à l’entour.
4 Lokola moyini, abendi tolotolo na Ye; lokola monguna, asemboli loboko na Ye mpe abomi nyonso oyo ezalaki kosepelisa miso; mpe asopi kanda makasi na Ye lokola moto na likolo ya bandako ya kapo ya Siona, mboka kitoko.
Il a bandé son arc comme un ennemi; il s’est tenu là avec sa droite comme un adversaire, et il a tué tout ce qui était agréable à l’œil dans la tente de la fille de Sion; il a versé, comme un feu, sa fureur.
5 Yawe akomi lokola monguna: abebisi mokili ya Isalaele, abebisi bandako nyonso ya mokonzi ya Isalaele, abuki bandako na yango batonga makasi, atondisi matanga mpe kolela kati na Yuda, mboka kitoko.
Le Seigneur a été comme un ennemi; il a englouti Israël; il a englouti tous ses palais, il a détruit ses forteresses, et il a multiplié chez la fille de Juda le gémissement et la plainte.
6 Abebisi lopango na ye ndenge babebisaka lopango ya elanga, abebisi esika na bango ya mayangani. Na kanda makasi na Ye, Yawe asali ete Siona abosana bafeti oyo ekatama mpe mikolo ya Saba; mpe apameli mokonzi mpe Nganga-Nzambe.
Il a saccagé sa clôture comme un jardin; il a détruit le lieu de son assemblée. L’Éternel a fait oublier dans Sion jour solennel et sabbat; et, dans l’indignation de sa colère, il a méprisé roi et sacrificateur.
7 Yawe abwaki etumbelo na ye, asundoli esika na ye ya bule mpe akabi na maboko ya monguna bamir mpe bandako ya mokonzi na yango. Bato bagangi makasi kati na Tempelo ya Yawe ndenge bagangaka na mokolo ya feti oyo ekatama.
Le Seigneur a rejeté son autel, il a répudié son sanctuaire; il a livré en la main de l’ennemi les murs de ses palais; on a poussé des cris dans la maison de l’Éternel comme au jour d’une fête solennelle.
8 Yawe akani kobuka bamir oyo ezingeli Siona, mboka kitoko; atandi singa ya komekela molayi mpe azongisi loboko na Ye na sima te mpo na kobebisa; abebisi bamir oyo ebatelaka engumba mpe bamir mosusu; bongo akweyisi yango nyonso.
L’Éternel s’est proposé de détruire la muraille de la fille de Sion; il a étendu le cordeau, il n’a pas retiré sa main pour cesser de détruire; et il fait mener deuil au rempart et à la muraille: ils languissent ensemble.
9 Bikuke na yango ezindi na mabele; abuki-buki mpe abebisi banzete oyo bakangelaka bikuke yango. Mokonzi mpe bakambi na ye bakei na bowumbu kati na bikolo, Mobeko ezali lisusu te, mpe basakoli na ye bazali kozwa lisusu te bimoniseli kowuta na Yawe.
Ses portes sont enfoncées dans la terre; il a détruit et brisé ses barres; son roi et ses princes sont parmi les nations; la loi n’est plus; ses prophètes aussi ne trouvent pas de vision de la part de l’Éternel.
10 Bampaka ya Siona, mboka kitoko, bavandi kimia na mabele, bamisopeli putulu na mito na bango mpe balati basaki; bongo bilenge basi ya Yelusalemi bafukami, bilongi na bango kino na se.
Les anciens de la fille de Sion sont assis par terre, ils gardent le silence; ils ont mis de la poussière sur leur tête, ils se sont ceints de sacs; les vierges de Jérusalem baissent leur tête vers la terre.
11 Miso na ngai elembi kobimisa mpinzoli, nazali komitungisa, libumu na ngai ezali kobaluka, motema na ngai ezali kotungisama mpo ete bato na ngai babebisami, mpo ete bana mpe bana oyo bazali komela mabele balembi-lembi banzoto na balabala ya engumba.
Mes yeux se consument dans les larmes, mes entrailles sont agitées, mon foie s’est répandu sur la terre, à cause de la ruine de la fille de mon peuple, parce que les enfants et ceux qui tètent défaillent dans les places de la ville.
12 Bazalaki koloba na bamama na bango: « Epai wapi tokoki kozwa ble mpe masanga ya vino? » Ndenge bazalaki kokweya-kweya lokola bato oyo bazoki bapota minene na babalabala ya engumba, ndenge wana mpe bazalaki kokufa na maboko ya bamama na bango.
Ils disent à leurs mères: Où est le blé et le vin? – défaillant dans les places de la ville comme des blessés à mort, [et] rendant l’âme sur le sein de leurs mères.
13 Naloba lisusu nini mpo na yo? Nakokanisa yo na nani, Yelusalemi, mboka kitoko? Nakokanisa yo na nani mpo ete nakoka kobondisa yo, Siona, mboka kitoko? Pota na yo ezali monene lokola ebale monene; nani akoki kobikisa yo?
Quel témoignage t’apporterai-je? Que comparerai-je à toi, fille de Jérusalem? Qui est-ce que j’égalerai à toi, afin que je te console, vierge, fille de Sion? car ta ruine est grande comme la mer: qui te guérira?
14 Bimoniseli ya basakoli na yo ezalaki ya lokuta mpe ya pamba; balakisaki yo masumu na yo te mpo ete okende na bowumbu te: masakoli oyo bazwelaki yo ezalaki ya mabe mpe ya lokuta!
Tes prophètes ont vu pour toi la vanité et la folie, et ils n’ont pas mis à découvert ton iniquité pour détourner ta captivité; mais ils ont vu pour toi des oracles de vanité et de séduction.
15 Bato nyonso oyo bolekelaka na nzela na yo bazali kobeta maboko na kokamwa, bazali kobeta piololo mpe koningisa mito mpo na Yelusalemi, mboka kitoko: « Boni, ezali solo engumba oyo bazalaki kobenga kitoko ekoka mpe esengo ya mokili mobimba? »
Tous ceux qui passent par le chemin battent des mains sur toi; ils sifflent et branlent la tête sur la fille de Jérusalem: Est-ce ici la ville dont on disait: La parfaite en beauté, la joie de toute la terre?
16 Banguna na yo nyonso bafungoli minoko na bango mpo na kotiola yo, bazali koseka yo mpe kolia minu na bango; bongo bazali koloba: « Tomeli ye! Tala mokolo oyo tozalaki kozela! Tokomi penza na mokolo yango mpe tomoni yango! »
Tous tes ennemis ouvrent la bouche sur toi; ils sifflent et grincent des dents; ils disent: Nous les avons engloutis; oui, c’est ici le jour que nous attendions! Nous l’avons trouvé, nous l’avons vu!
17 Yawe asali makambo oyo abongisaki, akokisi liloba na Ye, nyonso oyo aloba wuta kala: akweyisi yo na mawa te, apesi nzela na banguna na yo ete balonga yo, atomboli liseke ya banguna na yo.
L’Éternel a fait ce qu’il s’était proposé, il a accompli sa parole qu’il avait commandée dès les jours d’autrefois; il a renversé et n’a point épargné, et il a fait que l’ennemi s’est réjoui sur toi; il a élevé la corne de tes adversaires.
18 Mitema ya bato ezali koganga epai na Nkolo. Oh mir ya Siona, mboka kitoko, tika ete mpinzoli na yo ebima lokola ebale, butu mpe moyi, mpe miso na yo ekangama te!
Leur cœur a crié au Seigneur. Muraille de la fille de Sion, laisse couler des larmes jour et nuit, comme un torrent; ne te donne pas de relâche, que la prunelle de tes yeux ne cesse point!
19 Telema, ganga na butu ndenge bakengeli basalaka na butu; sopa motema na yo lokola mayi, na miso ya Nkolo, tombola maboko na yo epai na Ye mpo na bomoi ya bana na yo, oyo bazali kokufa nzala na babalabala nyonso.
Lève-toi, crie de nuit au commencement des veilles; répands ton cœur comme de l’eau devant la face du Seigneur. Lève tes mains vers lui pour la vie de tes petits enfants qui défaillent de faim au coin de toutes les rues.
20 Oh Yawe, tala mpe mona! Nani oyo osalela makambo ya boye? Boni, basi basengelaki solo kolia mbuma ya mabumu na bango to bana oyo bango moko babokoli? Boni, basengelaki solo koboma mosakoli mpe Nganga-Nzambe kati na Esika ya bule ya Nkolo?
Regarde, Éternel, et considère à qui tu as fait ainsi! Les femmes dévoreront-elles leur fruit, les petits enfants dont elles prennent soin? Tuera-t-on le sacrificateur et le prophète dans le sanctuaire du Seigneur?
21 Bibembe ya bilenge mpe ya mikolo elali-lali na babalabala; basali na ngai ya mibali mpe ya basi bakufi na mopanga! Obomi bango na mokolo ya kanda na Yo; obomi bango na mawa te!
L’enfant et le vieillard sont couchés par terre dans les rues; mes vierges et mes jeunes hommes sont tombés par l’épée: tu as tué au jour de ta colère, tu as égorgé, tu n’as point épargné!
22 Ndenge obengisaka bato na mokolo ya feti, ndenge wana mpe obengisaki pasi wuta na bangambo nyonso mpo na kosala ngai mabe. Na mokolo ya kanda ya Yawe, moto moko te abikaki to atikalaki na bomoi. Monguna na ngai abebisi bato oyo nazalaki kobokola mpe kobatela.
Tu as convoqué, comme en un jour de fête solennelle, mes terreurs de toutes parts; et au jour de la colère de l’Éternel, il n’y a eu ni réchappé, ni reste: ceux dont j’avais pris soin et que j’avais élevés, mon ennemi les a consumés.

< Bileli 2 >