< Bilombe 9 >

1 Abimeleki, mwana mobali ya Yerubali, akendeki na Sishemi epai ya banoko na ye mpe na ndako mobimba ya tata ya mama na ye. Alobaki:
Abimélec, fils de Jérubbaal, se rendit à Sichem, chez les frères de sa mère, et leur tint, ainsi qu’à toute la famille paternelle de sa mère, ce discours:
2 « Botuna nanu motuna oyo epai ya bakambi nyonso ya engumba Sishemi: ‹ Eloko nini eleki malamu mpo na bino? Bakamba bino na bana mibali tuku sambo ya Yerubali to na mwana mobali moko? › Boyeba ete ngai mpe bino tozali makila moko mpe nzoto moko. »
"Faites donc entendre ceci à tous les bourgeois de Sichem: Lequel vaut mieux pour vous, être gouvernés par soixante-dix hommes, par tous les fils de Jérubbaal, ou d’être gouvernés par un seul homme? Et souvenez-vous que je suis de votre sang et de votre chair."
3 Tango banoko na ye balobaki maloba nyonso ya Abimeleki epai ya bakambi nyonso ya Sishemi, mitema na bango nyonso ekendeki epai ya Abimeleki, pamba te balobaki ete azali ndeko na bango ya mobali.
Les frères de sa mère firent entendre toutes ces choses, en sa faveur, aux bourgeois de Sichem, et le cœur de ceux-ci inclina pour Abimélec, car ils se disaient: "C’Est notre frère."
4 Bapesaki ye mbongo ya bibende ya palata, tuku sambo oyo bazwaki na tempelo ya Bala-Beriti. Na mbongo yango, Abimeleki afutaki bato ya mobulu mpo na kolanda ye.
Ils lui donnèrent soixante-dix pièces d’argent, tirées du temple de Baal-Berith, et Abimélec s’en servit pour stipendier des gens de rien, des aventuriers, qui le suivirent.
5 Akendeki na Ofira, na ndako ya tata na ye, mpe abomaki bandeko na ye ya mibali tuku sambo, bana ya Yerubali na likolo ya libanga moko ya monene. Kasi Yotami, mwana mobali ya suka ya Yerubali, abikaki mpo ete amibombaki.
Alors il s’en fut à Ofra, dans la maison de son père, et massacra ses frères, les soixante-dix fils de Jérubbaal, sur une même pierre. Jotham, le plus jeune fils de Jérubbaal, resta sauf, parce qu’il s’était caché.
6 Bakambi nyonso ya Sishemi mpe ndako nyonso ya Milo basanganaki mpo na kokende kokomisa Abimeleki mokonzi, pembeni ya terebente, na likonzi ya mabanga kati na Sishemi.
Or, tous les bourgeois de Sichem et toute la maison de Millo s’assemblèrent et se rendirent auprès du Chêne de Mouçab, dans Sichem. Là ils proclamèrent roi Abimélec.
7 Tango bayebisaki makambo yango epai ya Yotami, amataki likolo ya ngomba Garizimi mpe agangaki makasi: « Bino bakambi ya Sishemi, boyoka ngai, mpo ete Nzambe ayoka bino.
Jotham, instruit du fait, alla se placer sur le sommet du mont Garizim et, élevant la voix, les interpella ainsi: "Ecoutez-moi, bourgeois de Sichem, et Dieu aussi vous écoutera!
8 Mokolo moko, banzete ebimaki mpo na kokomisa moko kati na yango mokonzi. Elobaki na nzete ya Olive: ‹ Zala mokonzi na biso. ›
Un jour les arbres se mirent en campagne pour se donner un roi. Ils dirent à l’olivier: "Sois notre roi."
9 Nzete ya Olive ezongiselaki yango: ‹ Natika penza mafuta na ngai, oyo bapesaka na yango Nzambe mpe bato lokumu, mpo ete nakende koningana-ningana na likolo ya banzete mosusu? ›
L’Olivier leur répondit: "Quoi! je renoncerais à mon suc, que Dieu et les hommes prisent en moi, pour aller me fatiguer à gouverner les arbres?"
10 Banzete elobaki na nzete ya figi: ‹ Yaka mpe zala mokonzi na biso. ›
Et les arbres dirent au figuier: "Viens, toi, régner sur nous."
11 Nzete ya figi ezongiselaki yango: ‹ Natika penza elengi na ngai mpe mbuma na ngai ya kitoko mpo ete nakende koningana-ningana na likolo ya banzete mosusu? ›
Le figuier leur répondit: "Quoi! je renoncerais à ma douceur et à ma production exquise pour me fatiguer à gouverner les arbres?"
12 Banzete elobaki na nzete ya vino: ‹ Yaka mpe zala mokonzi na biso. ›
Et les arbres dirent à la vigne: "Viens, toi, règne sur nous."
13 Kasi nzete ya vino ezongiselaki yango: ‹ Natika penza vino na ngai, oyo esepelisaka banzambe mpe bato mpo ete nakende koningana-ningana na likolo ya banzete mosusu? ›
La vigne leur répondit: "Quoi! je renoncerais à mon jus, qui réjouit Dieu et les hommes, pour me fatiguer à gouverner les arbres?"
14 Sima, banzete nyonso elobaki na nzete ya nzube: ‹ Yaka mpe zala mokonzi na biso. ›
Alors les arbres dirent ensemble au buisson d’épines: "Viens donc, toi, et règne sur nous."
15 Nzete ya nzube ezongiselaki yango: ‹ Soki bolingi penza kopakola ngai mafuta mpo ete nazala mokonzi na bino, boya kobombama na se ya pio na ngai. Soki bongo te, tika ete moto ebima na nzete ya nzube mpe ezikisa banzete ya sedele ya Libani! ›
Et le buisson répondit aux arbres: "Si c’est de bonne foi que vous m’élisez pour votre roi, venez vous abriter sous mon ombre; sinon, qu’un feu sorte du buisson, et dévore les cèdres du Liban!
16 Soki penza bosaleli na bosembo mpe na bosolo, wana bokomisi Abimeleki mokonzi; soki bozalaki na motema malamu liboso ya Yerubali mpe libota na ye, soki bosalelaki ye kolanda misala malamu oyo ye asalelaki bino,
Et maintenant, vous aussi, si vous avez agi avec sincérité et loyauté en faisant roi Abimélec; si vous avez bien agi envers Jérubbaal et sa famille, agi en hommes reconnaissants de ses services…
17 bobosana te ete tata na ngai abundelaki bino, andimaki ata kokufa mpo na kokangola bino wuta na loboko ya Madiani.
Car mon père a combattu pour vous, il a fait bon marché de sa vie, vous a délivrés du pouvoir de Madian.
18 Kasi na mokolo ya lelo, botombokeli libota ya tata na ngai, bobomi bana na ye ya mibali tuku sambo, na libanga moko, mpe botie Abimeleki, mwana mobali ya mwasi mowumbu na ye, mokonzi ya bato ya Sishemi, pamba te azali ndeko na bino ya mobali.
Et vous, vous vous êtes rués sur la maison de mon père, vous avez tué ses fils au nombre de soixante-dix hommes sur une même pierre, et aujourd’hui vous donnez Abimélec, le fils de sa servante, pour roi aux citoyens de Sichem, parce qu’il est votre frère.
19 Soki bosaleli na bosembo mpe bosolo liboso ya Yerubali mpe libota na ye, na mokolo ya lelo, tika ete Abimeleki asepela na bino, mpe bino bosepela na ye!
Si donc vous avez, en ce jour, honnêtement agi envers Jérubbaal et sa famille, grand bien vous fasse d’Abimélec et grand bien lui fasse de vous!
20 Kasi soki ezali bongo te, tika ete moto ebima wuta na Abimeleki mpe etumba bino bavandi ya Sishemi mpe ya Beti-Milo; mpe tika ete moto ebima wuta na bino bavandi ya Sishemi mpe ya Beti-Milo, mpe etumba Abimeleki! »
Sinon, qu’un feu sorte d’Abimélec pour dévorer les Sichémites et la maison de Millo, et qu’un feu sorte des Sichémites et de la maison de Millo pour consumer Abimélec!"
21 Yotami abimaki, akendeki na Beri mpe avandaki kuna, pamba te azalaki kobanga Abimeleki, ndeko na ye ya mobali.
Là-dessus, Jotham s’enfuit et alla se réfugier à Beêr, où il s’établit pour échapper à son frère Abimélec.
22 Sima, Abimeleki akambaki Isalaele mibu misato.
Or, Abimélec exerçait le pouvoir sur Israël depuis trois ans,
23 Nzambe atindaki molimo mabe kati na Abimeleki mpe bavandi ya Sishemi, mpe bavandi ya Sishemi basalelaki Abimeleki likita.
lorsque Dieu suscita un mauvais esprit entre lui et les bourgeois de Sichem, et ceux-ci devinrent infidèles à Abimélec;
24 Nzambe asalaki bongo mpo na kozongisa mabe na mabe na oyo basalaki tango babomaki bana mibali tuku sambo ya Yerubali, mpo ete makila na bango etangama na moto ya ndeko na bango ya mobali, Abimeleki, mpe na mito ya bato ya Sishemi oyo basungaki ye mpo na koboma bandeko na ye ya mibali.
car l’attentat commis sur les soixante-dix fils de Jérubbaal et leur sang répandu devaient retomber sur leur frère Abimélec, qui les avait tués, et sur les gens de Sichem, qui l’avaient encouragé à ce meurtre.
25 Bavandi ya Sishemi batielaki Abimeleki motambo na likolo ya bangomba: batiaki bato na esika ya kobombama mpo na kobotola biloko epai ya baleki nzela nyonso oyo bazalaki koleka pene na bango. Mpe bamemelaki Abimeleki sango yango.
Les bourgeois de Sichem postèrent contre lui, au sommet des montagnes, des embuscades, qui faisaient main-basse sur tous les voyageurs; et Abimélec en fut informé.
26 Nzokande Gali, mwana mobali ya Ebedi, akendeki na Sishemi, elongo na bandeko na ye ya mibali; mpe bato ya Sishemi batielaki ye motema.
Cependant, Gaal, fils d’Ebed, vint à passer par Sichem avec ses frères; il gagna la confiance des bourgeois de Sichem.
27 Na tango ya kobuka bambuma ya vino, bato ya Sishemi bakendeki na bilanga, bakamolaki vino mpe basalaki feti monene kati na tempelo ya nzambe na bango. Wana bazalaki kolia mpe komela, balakelaki Abimeleki mabe.
Ils allèrent aux champs, firent les vendanges et le pressurage, et se livrèrent à des réjouissances; puis ils se rendirent au temple de leur dieu, mangèrent et burent, et se répandirent en imprécations contre Abimélec.
28 Bongo Gali, mwana mobali ya Ebedi, alobaki: « Abimeleki nde nani liboso ya Sishemi mpo ete biso bato ya Sishemi tosalela ye? Boni, azali mwana mobali ya Yerubali te? Zebuli azali molobeli na ye te? Bosalela bato ya Amori, tata ya Sishemi! Kasi mpo na nini tosalela Abimeleki?
Et Gaal, fils d’Ebed, s’écria: "Qu’est-ce qu’Abimélec et qu’est-ce que Sichem, pour que nous obéissions à cet homme? N’Est-il pas fils de Jérubbaal, et Zeboul son lieutenant? Servez plutôt les descendants d’Hamor, père de Sichem; mais lui, pourquoi le servirions-nous?
29 Oh soki kaka nazalaki kokamba bato oyo, mbele nalingaki kobengana Abimeleki, mpe nalingaki koloba na ye: ‹ Bakisa lisusu makasi ya mampinga na yo, mpe yaka tobunda. › »
Ah! si j’avais ce peuple sous la main, j’aurais bientôt écarté Abimélec!" Et apostrophant Abimélec: "Augmente ton armée, et avance!…"
30 Tango Zebuli, moyangeli ya engumba, ayokaki makambo oyo Gali, mwana mobali ya Ebedi, alobaki, asilikaki makasi.
Zeboul, gouverneur de la ville, ayant eu connaissance des propos de Gaal, fils d’Ebed, s’enflamma de colère,
31 Atindaki bantoma na nkuku epai ya Abimeleki mpo na koloba na ye: « Gali, mwana mobali ya Ebedi, mpe bandeko na ye ya mibali bayaki na Sishemi, mpe bazali kotindika bato ya engumba mpo ete batombokela yo.
et il envoya sous main des exprès à Abimélec, pour lui dire: "Sache que Gaal, fils d’Ebed, et ses frères sont venus à Sichem, et ils ameutent la ville contre toi.
32 Sik’oyo telema, na butu, yo elongo na bato na yo; bokende kovanda kati na elanga, na esika ya kobombama.
Donc lève-toi cette nuit, avec les hommes dont tu disposes, et embusque-toi dans la campagne;
33 Bongo, na tongo-tongo, wana moyi ezali kobima, okokende mpe okobundisa engumba. Tango Gali elongo na bato na ye nyonso bakobima mpo na kokutana na yo, sala nyonso oyo loboko na yo ekoki kosala. »
et demain de bonne heure, aux premiers rayons du soleil, tu te déploieras autour de la ville. Lui alors marchera à ta rencontre avec le peuple qui le suit, et tu lui feras ce que tu pourras lui faire."
34 Na butu, Abimeleki elongo na mampinga na ye nyonso batelemaki, bakabwanaki na biteni minei mpe bakendeki kovanda kati na esika ya kobombama, pene ya Sishemi.
Abimélec se mit en mouvement avec tous ses hommes, la nuit suivante, et ils s’embusquèrent près de Sichem en quatre fractions.
35 Tango Gali, mwana mobali ya Ebedi, abimaki mpe atelemaki na ekuke ya engumba, Abimeleki elongo na basoda na ye babimaki na esika oyo babombamaki.
Comme Gaal, fils d’Ebed, sortait, et se tenait à la porte de la ville, Abimélec s’élança de son embuscade avec la troupe qui l’accompagnait.
36 Tango Gali amonaki bato, alobaki na Zebuli: — Tala, bato bazali kokita wuta na likolo na bangomba. Kasi Zebuli alobaki na ye: — Oyo ozali komona lokola bato, ezali nde bililingi ya bangomba.
Gaal, les remarquant, dit à Zeboul: "Voici une troupe qui descend du sommet des montagnes." Zeboul lui répondit: "C’Est l’ombre des montagnes, que tu prends pour des hommes."
37 Kasi Gali alobaki lisusu: — Tala, bato bazali kokita elongo na basoda wuta na likolo ya ngomba ya kati-kati ya engumba, mpe bamosusu bazali koya na nzela ya terebente ya bamoni makambo.
Et Gaal insista en disant: "Je vois du monde descendre de la hauteur centrale, et une fraction s’avancer par le chemin du Chêne des Augures."
38 Zebuli alobaki na Gali: — Sik’oyo, tia lisusu monoko! Mpe loba lisusu: « Abimeleki nde nani mpo ete tosalela ye? » Ezali te bato oyo yo otiolaki? Kende sik’oyo kobunda!
Alors Zeboul lui dit: "Qu’est devenu ton fier langage, toi qui disais: Qu’est-ce qu’Abimélec pour que nous le servions? Eh bien! le voilà ce peuple que tu dédaignais; va maintenant et mesure-toi avec lui!"
39 Boye, Gali amemaki bavandi ya Sishemi mpe abundisaki Abimeleki.
Gaal s’avança à la tête des bourgeois de Sichem, et engagea le combat avec Abimélec.
40 Abimeleki alandaki Gali, mpe Gali akimaki liboso ya Abimeleki, mpe bato ebele penza bakufaki kino na ekotelo ya ekuke.
Mais Abimélec le força de fuir, et le poursuivit, en lui tuant beaucoup de monde, jusqu’à la porte de la ville.
41 Abimeleki avandaki na Aruma, mpe Zebuli abenganaki Gali elongo na bandeko na ye ya mibali mpo ete bavanda lisusu te na Sishemi.
Abimélec se tint à Arouma; et Zeboul expulsa Gaal et ses frères, leur interdisant le séjour de Sichem.
42 Mokolo oyo elandaki, bato ya Sishemi babimaki mpe bakendeki na bilanga. Bato bamemaki sango epai ya Abimeleki.
Le lendemain, le peuple se répandit dans la campagne, et Abimélec en fut informé.
43 Abimeleki azwaki bato na ye mpe akabolaki bango na biteni misato ya basoda, mpe atiaki bango kati na bilanga, na esika ya kobombama. Tango amonaki bato kobima longwa na engumba, atelemaki mpo na kobundisa bango.
Alors il réunit ses hommes et en fit trois divisions, avec lesquelles il s’embusqua dans les champs, et voyant le peuple sortir de la ville, il fondit sur lui et le tailla en pièces.
44 Nzokande, tango Abimeleki mpe masanga ya mampinga oyo bazalaki elongo na ye bakendeki na lombangu mpe batelemaki na ekuke ya engumba, masanga mibale mosusu ya mampinga balandaki bato kino na bilanga mpe babomaki bango nyonso.
Abimélec et sa division se déployèrent vers la porte de la ville, tandis que les deux autres divisions attaquèrent et battirent tous ceux qui étaient dans la campagne.
45 Abimeleki abundisaki engumba mokolo mobimba, abotolaki engumba yango mpe abomaki bato oyo bazalaki kuna. Bongo abebisaki engumba mpe asopelaki yango mungwa.
Le reste de ce jour, Abimélec donna l’assaut à la ville, s’en rendit maître, en massacra la population, puis il rasa la ville et y sema du sel.
46 Tango bavandi nyonso ya ndako molayi ya Sishemi bayokaki makambo yango, bakendeki kobombama kati na libulu ya mabanga ya tempelo ya Beriti, nzambe na bango.
A cette nouvelle, les bourgeois de la tour de Sichem allèrent se réfugier dans le donjon du temple d’El-Berith.
47 Bamemelaki Abimeleki sango ete bavandi ya ndako molayi ya Sishemi basangani wana.
Abimélec, apprenant que tous les hommes de la tour de Sichem étaient réunis là,
48 Abimeleki elongo na bato na ye nyonso bamataki na ngomba Tsalimoni. Abimeleki azwaki epasola mpe akataki mwa bitape ya nzete, amemaki yango na mapeka na ye mpe alobaki na bato nyonso oyo bazalaki elongo na ye: « Oyo bomoni ngai kosala, bino mpe bosala bongo na lombangu. »
se dirigea vers le mont Çalmon, suivi de tout son monde, se munit de haches, coupa une branche d’arbre et la mit sur son épaule, en disant au peuple: "Ce que vous m’avez vu faire, faites-le comme moi, vite!"
49 Boye bato nyonso bakataki, moto na moto etape na ye ya nzete. Balandaki Abimeleki, batiaki bitape ya nzete na libulu ya mabanga mpe batumbaki libulu yango ya mabanga elongo na bato nyonso oyo bazalaki kati na yango. Boye bato nyonso ya ndako molayi ya Sishemi bakufaki: bato pene nkoto moko, mibali mpe basi.
Et tout le peuple, à son tour, abattit chacun sa branche; ils suivirent Abimélec, et, avec ces branches disposées autour du donjon, ils y mirent le feu, de sorte que tous les gens de la tour de Sichem, environ mille, tant hommes que femmes, périrent eux aussi.
50 Sima na yango, Abimeleki akendeki na Tebesi, azingelaki mpe abotolaki yango.
De là Abimélec marcha sur Tébeç, assiégea cette ville et s’en empara.
51 Nzokande, ezalaki na ndako moko ya molayi mpe ya makasi kati na engumba. Bavandi nyonso, mibali mpe basi, bakimelaki kuna; bakangaki ekuke sima na bango mpe bamataki na likolo ya ndako yango.
Au milieu de la ville était une tour servant de défense; tous les hommes et les femmes, tous les bourgeois de la ville y coururent, s’y enfermèrent et montèrent sur le toit de la tour.
52 Abimeleki ayaki kino na ndako molayi mpo na kobundisa yango, mpe apusanaki kino na ekuke ya ndako yango mpo na kotumba yango.
Abimélec s’avança vers cette tour et l’attaqua. Déjà il s’approchait de l’entrée de l’édifice pour y mettre le feu,
53 Na tango yango, mwasi moko abwakaki libanga oyo banikelaka ble na moto ya Abimeleki mpe epanzaki ye moto.
lorsqu’une femme lança sur la tête d’Abimélec un fragment de meule, qui lui fracassa le crâne.
54 Abimeleki abengaki na lombangu elenge mobali oyo azalaki komema bibundeli na ye mpe alobaki na ye: « Bimisa mopanga na yo mpe boma ngai mpo baloba te na tina na ngai: ‹ Mwasi moko abomaki ye. › » Boye, elenge mobali atobolaki ye mopanga mpe akufaki.
Aussitôt il appela son jeune écuyer et lui dit: "Tire ton épée et achève-moi! je ne veux pas qu’on dise: C’Est une femme qui l’a tué." Son serviteur lui donna un coup d’épée, et il mourut.
55 Tango bana ya Isalaele bamonaki ete Abimeleki akufi, bazongaki moto na moto epai na ye.
Les Israélites, voyant qu’Abimélec était mort, s’en retournèrent chacun chez soi.
56 Boye, Nzambe azongiselaki Abimeleki mabe oyo asalaki tata na ye tango abomaki bandeko na ye ya mibali tuku sambo.
Ainsi Dieu rendit à Abimélec le mal qu’il avait fait à son père en faisant périr ses soixante-dix frères;
57 Nzambe azongiselaki bato ya Sishemi mabe nyonso oyo basalaki. Ezali ndenge wana nde elakeli mabe oyo Yotami, mwana mobali ya Yerubali, asakolaki ekokisamaki.
et toute la méchanceté des Sichémites, Dieu la leur fit expier aussi, et la malédiction de Jotham, fils de Jérubbaal, s’accomplit sur eux.

< Bilombe 9 >