< Bilombe 8 >

1 Mibali ya Efrayimi batunaki Jedeon: — Bizaleli ya boye elakisi nini epai na biso? Mpo na nini obengaki biso te tango okendeki kobundisa bato ya Madiani? Mpe basilikelaki ye makasi.
Then the men of Ephraim said to Gideon, “Why have you done this to us? Why did you fail to call us when you went to fight against Midian?” And they contended with him violently.
2 Kasi Jedeon azongiselaki bango: — Nasali nini oyo ekokani na oyo bino bosala? Boni, ndambo ya bambuma ya vino oyo etikalaki na sima mpo ete Efrayimi abuka yango ezali kitoko te koleka bambuma ya vino ya liboso ya Abiezeri?
But Gideon answered them, “Now what have I accomplished compared to you? Are not the gleanings of Ephraim better than the grape harvest of Abiezer?
3 Nzambe akabaki bakonzi ya bato ya Madiani, Orebi mpe Zeebi, na maboko na bino. Eloko nini ya lokumu ngai nasali oyo ekokani na oyo bino bosala? Liloba oyo ekitisaki kanda na bango.
God has delivered Oreb and Zeeb, the two princes of Midian, into your hand. What was I able to do compared to you?” When he had said this, their anger against him subsided.
4 Jedeon elongo na basoda na ye nkama misato bakomaki na Yordani mpe bakatisaki yango. Atako balembaki, bakobaki kaka kolanda bato ya Madiani.
Then Gideon and his three hundred men came to the Jordan and crossed it, exhausted yet still in pursuit.
5 Tango bakomaki na mboka Sukoti, Jedeon asengaki na bato ya mboka: — Bopesa basoda na ngai mapa, pamba te basili kolemba na nzala. Nazali kolanda Zeba mpe Tsalimuna, bakonzi ya Madiani.
So Gideon said to the men of Succoth, “Please give my troops some bread, for they are exhausted, and I am still pursuing Zebah and Zalmunna, the kings of Midian.”
6 Kasi bakonzi ya mboka Sukoti bazongiselaki ye: — Boni, osili kozwa Zeba mpe Tsalimuna na se ya bokonzi na yo mpo ete biso topesa basoda na yo mapa?
But the leaders of Succoth asked, “Are the hands of Zebah and Zalmunna already in your possession, that we should give bread to your army?”
7 Jedeon alobaki: — Lokola bolobi boye, tango Yawe akokaba, na maboko na ngai, Zeba mpe Tsalimuna, nakopasola-pasola misuni na bino na basende ya esobe mpe na singa ya nzube.
“Very well,” Gideon replied, “when the LORD has delivered Zebah and Zalmunna into my hand, I will tear your flesh with the thorns and briers of the wilderness!”
8 Wuta kuna, Jedeon amataki na mboka Penueli mpe asengaki epai ya bavandi na yango, ndenge kaka asengaki epai ya bato ya Sukoti. Kasi bato ya Penueli bazongiselaki ye ndenge kaka bato ya Sukoti basalaki.
From there he went up to Penuel and asked the same from them, but the men of Penuel gave the same response as the men of Succoth.
9 Jedeon alobaki na bato ya Penueli: « Soki nakozonga na kimia mpe na bomoi, nakobuka ndako molayi na bino. »
So Gideon told the men of Penuel, “When I return in triumph, I will tear down this tower!”
10 Nzokande, Zeba mpe Tsalimuna bazalaki na Karikori elongo na basoda na bango, nkoto zomi na mitano. Oyo ezali nde motango nyonso ya basoda ya bato ya este oyo batikalaki. Pamba te basoda nkoto nkama moko na tuku mibale oyo bayebi kobunda na mopanga bakufaki.
Now Zebah and Zalmunna were in Karkor with their army of about fifteen thousand men—all that were left of the armies of the people of the east. A hundred and twenty thousand swordsmen had already fallen.
11 Bongo, Jedeon akendeki na nzela ya bavandi ya bandako ya kapo, na ngambo ya este ya Noba mpe ya Yogibeka; abetaki mampinga ya banguna na mopanga mpe alongaki bango tango bazalaki kokanisa ete bazali na kimia.
And Gideon went up by way of the caravan route east of Nobah and Jogbehah, and he attacked their army, taking them by surprise.
12 Zeba mpe Tsalimuna, bakonzi mibale ya Madiani, bakimaki; kasi Jedeon alandaki mpe akangaki bango. Mpe apanzaki mampinga na bango nyonso.
When Zebah and Zalmunna fled, Gideon pursued and captured these two kings of Midian, routing their entire army.
13 Jedeon, mwana mobali ya Joasi, azongaki wuta na bitumba na nzela ya ngomba Eresi.
After this, Gideon son of Joash returned from the battle along the Ascent of Heres.
14 Akangaki elenge mobali moko kati na mibali ya mboka Sukoti, mpe atunaki ye mituna. Boye, elenge mobali yango akomelaki ye bakombo ya bakambi mpe ya bampaka tuku sambo na sambo ya engumba.
There he captured a young man of Succoth and interrogated him. The young man wrote down for him the names of the seventy-seven leaders and elders of Succoth.
15 Jedeon akendeki epai ya bato ya mboka Sukoti mpe alobaki na bango: « Tala Zeba mpe Tsalimuna oyo bofingelaki ngai na koloba: ‹ Osili kotia na se ya bokonzi na yo Zeba mpe Tsalumuna mpo ete biso topesa lipa na basoda na yo, oyo basili kolemba? › »
And Gideon went to the men of Succoth and said, “Here are Zebah and Zalmunna, about whom you taunted me, saying, ‘Are the hands of Zebah and Zalmunna already in your possession, that we should give bread to your weary men?’”
16 Azwaki bampaka ya engumba Sukoti mpe abetisaki bango fimbu, na basende ya esobe mpe singa ya nzube.
Then he took the elders of the city, and using the thorns and briers of the wilderness, he disciplined the men of Succoth.
17 Abukaki ndako molayi ya Penueli mpe abomaki mibali ya engumba.
He also pulled down the tower of Penuel and killed the men of the city.
18 Jedeon atunaki Zeba mpe Tsalimuna: — Mibali oyo bobomaki na Tabori, bazalaki ndenge nini? Bazongisaki: — Bakokanaki na yo mpe bazalaki lokola bana ya bakonzi.
Next, Gideon asked Zebah and Zalmunna, “What kind of men did you kill at Tabor?” “Men like you,” they answered, “each one resembling the son of a king.”
19 Jedeon alobaki na bango lisusu: — Bato wana bazalaki bandeko na ngai ya mibali, bana ya mama na ngai penza. Na Kombo na Yawe, soki bobikisaki bango, ngai mpe nalingaki koboma bino te.
“They were my brothers,” Gideon replied, “the sons of my mother! As surely as the LORD lives, if you had let them live, I would not kill you.”
20 Mpe apesaki mitindo na Yeteri, mwana na ye ya liboso ya mobali: « Telema mpe boma bango! » Kasi elenge mobali abimisaki mopanga na ye te, pamba te azalaki nanu elenge mpe azalaki na somo.
So he said to Jether, his firstborn, “Get up and kill them.” But the young man did not draw his sword; he was fearful because he was still a youth.
21 Zeba mpe Tsalimuna balobaki: « Telema mpe boma biso yo moko, pamba te likambo oyo ekoki na bato ya mitema makasi. » Boye, Jedeon atelemaki mpe abomaki bango. Akamataki bamedayi ya wolo oyo ezalaki na bakingo ya bashamo na bango.
Then Zebah and Zalmunna said, “Get up and kill us yourself, for as the man is, so is his strength.” So Gideon got up and killed Zebah and Zalmunna, and he took the crescent ornaments from the necks of their camels.
22 Bana ya Isalaele balobaki na Jedeon: — Zala mokonzi na biso, yo moko, mwana na yo ya mobali mpe koko na yo ya mobali, pamba te obikisi biso na loboko ya bato ya Madiani.
Then the Israelites said to Gideon, “Rule over us—you and your son and grandson—for you have saved us from the hand of Midian.”
23 Kasi Jedeon alobaki na bango: — Nakozala mokonzi na bino te, ezala ata mwana na ngai ya mobali. Yawe nde akozala mokonzi na bino.
But Gideon replied, “I will not rule over you, nor will my son. The LORD shall rule over you.”
24 Jedeon abakisaki: — Nalingi kosenga bino eloko moko: Kati na biloko oyo bino bosili kozwa na bitumba, tika ete moko na moko kati na bino apesa ngai eloko ya litoyi. Pamba te banguna na biso bazalaki kolata biloko ya matoyi mpo ete bazali bana ya Isimaeli.
Then he added, “Let me make a request of you, that each of you give me an earring from his plunder.” (For the enemies had gold earrings because they were Ishmaelites.)
25 Bana ya Isalaele bazongisaki: — Tokopesa yango. Batandaki elamba na mabele, moko na moko abwakaki eloko na ye ya litoyi, oyo ewutaki na bomengo ya bitumba.
“We will give them gladly,” they replied. So they spread out a garment, and each man threw an earring from his plunder onto it.
26 Biloko ya matoyi ya wolo, oyo Jedeon asengaki ezalaki ya bakilo pene tuku mibale, longola bamedayi ya wolo oyo ezalaki lokola sanza ya ndambo, biloko ya matoyi oyo ediembelaka, bilamba ya talo ya motane makasi oyo bakonzi ya Madiani balataki mpe mayaka oyo ezalaki na bakingo ya bashamo na bango.
The weight of the gold earrings he had requested was 1,700 shekels, in addition to the crescent ornaments, the pendants, the purple garments of the kings of Midian, and the chains from the necks of their camels.
27 Jedeon asalelaki yango ekeko oyo atiaki na Ofira, engumba na ye. Bana ya Isalaele bakomaki kokende kofukama liboso ya ekeko yango, mpe ekomaki motambo monene mpo na Jedeon mpe libota na ye.
From all this Gideon made an ephod, which he placed in Ophrah, his hometown. But soon all Israel prostituted themselves by worshiping it there, and it became a snare to Gideon and his household.
28 Boye, bato ya Madiani bakitisamaki liboso ya bana ya Isalaele mpe batombolaki lisusu mito na bango te. Na tango nyonso oyo Jedeon azalaki na bomoi, mokili etikalaki na kimia mibu tuku minei.
In this way Midian was subdued before the Israelites and did not raise its head again. So the land had rest for forty years in the days of Gideon,
29 Yerubali, mwana mobali ya Joasi, azongaki na ndako na ye mpe avandaki kuna.
and he—Jerubbaal son of Joash—returned home and settled down.
30 Jedeon azalaki na bana tuku sambo oyo bawutaki na mokongo na ye, pamba te azalaki na basi ebele.
Gideon had seventy sons of his own, since he had many wives.
31 Makangu na ye, oyo azalaki kovanda na Sishemi, abotelaki ye mpe mwana mobali oyo bapesaki kombo « Abimeleki. »
His concubine, who dwelt in Shechem, also bore him a son, and he named him Abimelech.
32 Jedeon, mwana mobali ya Joasi, akufaki na kimobange ya esengo, mpe bakundaki ye kati na kunda ya Joasi, na Ofira, mboka ya libota ya Abiezeri.
Later, Gideon son of Joash died at a ripe old age and was buried in the tomb of his father Joash in Ophrah of the Abiezrites.
33 Sima na kufa ya Jedeon, bana ya Isalaele bazongelaki kosambela banzambe Bala. Bakomisaki Bala-Beriti nzambe na bango.
And as soon as Gideon was dead, the Israelites turned and prostituted themselves with the Baals, and they set up Baal-berith as their god.
34 Bana ya Isalaele babosanaki Yawe, Nzambe na bango, oyo akangolaki bango na maboko ya banguna na bango.
The Israelites failed to remember the LORD their God who had delivered them from the hands of all their enemies on every side.
35 Bazongisaki ata bolamu moko te na libota ya Yerubali oyo elakisi Jedeon, mpo na bolamu nyonso oyo asalelaki Isalaele.
They did not show kindness to the house of Jerubbaal (that is, Gideon) for all the good things he had done for Israel.

< Bilombe 8 >