< Bilombe 7 >
1 Na tongo-tongo, Yerubali, elingi koloba Jedeon, abimaki elongo na bato nyonso oyo balandaki ye mpe batongaki molako na bango pembeni ya etima ya mayi ya Arodi. Nzokande molako ya bato ya Madiani ezalaki na ngambo ya nor ya molako ya bana ya Isalaele, na lubwaku, pembeni ya ngomba moke ya More.
Tad JerubBaāls, tas ir Gideons, un visi ļaudis, kas pie viņa, agri cēlās un apmetās pie Aroda avota, tā ka Midijaniešu karaspēks viņam bija pret ziemeļa pusi, aiz Mores pakalna, ielejā.
2 Yawe alobaki na Jedeon: « Bato oyo ozali na bango baleki ebele mpo na ngai kokaba bato ya Madiani na maboko na bango, noki te Isalaele akozwa lolendo na koloba: ‹ Loboko na ngai moko nde ebikisi ngai. ›
Un Tas Kungs sacīja uz Gideonu: Pārāk daudz ļaužu ir pie tevis, nekā Es dotu Midijaniešus viņu rokā; lai Israēls pret Mani nelielās un nesaka: mana roka mani izpestījusi.
3 Yango wana, loba na bato oyo: ‹ Tika ete moto nyonso oyo azali kolenga na kobanga azala mosika ya ngomba Galadi mpe azonga epai na ye. › » Boye, bato nkoto tuku mibale na mibale bazongaki epai na bango mpe nkoto zomi batikalaki.
Tad izsauc jel to ļaužu ausīs un saki: kas šaubīgs un bailīgs, lai griežas atpakaļ un steidzās projām no Gileāda kalna. Tad no tiem ļaudīm griezās atpakaļ divdesmit divi tūkstoši, un tik desmit tūkstoši atlika.
4 Kasi Yawe alobaki na Jedeon: « Bato bazali kaka ebele. Kitisa bango nyonso na mayi, mpe kuna, nakomeka bango mpo na yo. Soki nalobi: ‹ Oyo akoki kokende na yo, ye nde asengeli kokende na yo. › Kasi soki nalobi: ‹ Oyo akoki te kokende na yo, ye asengeli te kokende na yo. › »
Un Tas Kungs sacīja uz Gideonu: ļaužu vēl ir par daudz; noved tos pie ūdens, tur Es tos tev pārbaudīšu, un par kuru Es uz tevi sacīšu: šim būs iet ar tevi, tas lai iet ar tevi, bet par kuru Es tev sacīšu, tam nebūs iet ar tevi, tas lai neiet.
5 Boye, Jedeon akitisaki bato na mayi. Kuna, Yawe alobaki na ye: « Kabola bango: tia na ngambo moko, bato oyo bakomela mayi na nzela ya lolemo lokola mbwa; mpe tia na ngambo mosusu, bato oyo bakofukama, mpo na komela mayi. »
Un viņš tos ļaudis noveda pie ūdens. Tad Tas Kungs sacīja uz Gideonu: ikkatru, kas ar savu mēli ūdeni laks, kā suns lok, to nostādi par sevi, un tāpat ikkatru, kas nometīsies ceļos dzert.
6 Bato nkama misato bazwaki mayi na maboko na bango mpo na komema yango na minoko na bango mpe komela yango na nzela ya lolemo; bato nyonso oyo batikali bafukamaki mpo na komela mayi.
Un to pulks, kas no savas rokas pie mutes bija lakuši, bija trīssimt vīri, bet visi citi ļaudis bija ūdeni dzēruši ceļos nometušies.
7 Yawe alobaki na Jedeon: « Nakobikisa bino na nzela ya bato nkama misato oyo bamelaki mayi na nzela ya lolemo lokola mbwa, mpe nakokaba bato ya Madiani na maboko na yo. Tika ete bato nyonso oyo batikali bazonga, moto na moto na esika na ye. »
Un Tas Kungs sacīja uz Gideonu: caur šiem trīs simti vīriem, kas lakuši, Es jūs izpestīšu un nodošu Midijaniešus tavā rokā; tāpēc atlaid visus citus ļaudis, ikvienu uz savu vietu.
8 Boye mibali yango nkama misato bazwaki biloko ya kolia mpe bakelelo ya bato mosusu. Mpe Jedeon azongisaki na bandako na bango, bana ya Isalaele oyo batikalaki. Nzokande, molako ya bato ya Madiani ezalaki na lubwaku, na se ya molako ya bana ya Isalaele.
Un tie ļaudis ņēma savu maizi savā rokā un savas trumetes, bet visus citus Israēla vīrus viņš atlaida, ikvienu uz savu dzīvokli, un tos trīs simti vīrus viņš paturēja, un Midijaniešu karaspēks viņam bija ielejas pusē.
9 Na butu wana, Yawe alobaki na Jedeon: « Telema, kita mpo na kobundisa molako ya bato ya Madiani, pamba te napesi yango na maboko na yo.
Un notika tanī naktī, ka Tas Kungs uz viņu sacīja: celies, noej uz lēģeri, jo Es to esmu devis tavā rokā.
10 Soki ozali kobanga kobunda, kita elongo na Pura, mosali na yo ya mobali,
Bet ja tev ir bail noiet, tad noej uz to lēģeri tu un Purus, tavs puisis,
11 mpe yoka maloba oyo bazali koloba. Boye okozwa makasi ya kobundisa bango. » Jedeon akitaki elongo na Pura, mosali na ye ya mobali, kino na liboso ya molako ya bitumba.
Tad tu dzirdēsi, ko tie runā, un pēc tam tavas rokas stiprināsies, un tu celsies pret to lēģeri. Tad viņš nogāja ar Puru, savu puisi, pie tiem pirmiem apbruņotiem, kas bija lēģerī.
12 Bato ya Madiani, ya Amaleki mpe ya ngambo ya este bazalaki ya kopanzana kati na lubwaku, ebele lokola mabanki. Bashamo na bango ezalaki ebele koleka zelo ya ebale.
Un Midijanieši un Amalekieši un visi tie austruma bērni gulēja ielejā kā siseņu pulks, un viņu kamieļu pulku nevarēja skaitīt, kā smiltis jūrmalā.
13 Jedeon akomaki na molako ya banguna na bango na tango kaka mobali moko ya Madiani azalaki kobeta lisolo ya ndoto na ye epai ya moninga na ye: — Tala ndoto naloti: Namonaki lipa moko basala na bambuma ya orje ezali kobaluka kati na molako na biso mobimba, bongo lipa yango eyaki kotuta ndako ya kapo na makasi koleka. Ndako ya kapo ekweyaki mpe ebalukaki.
Kad nu Gideons nonāca, redzi, tur viens savam biedram stāstīja sapni un sacīja: redzi, es esmu sapni redzējis, un redzi, cepta miežu maize vēlās Midijaniešu lēģerī un atnāca līdz pat teltij un to sita, ka tā krita, un to pavisam apgāza, un telts gulēja (pie zemes).
14 Moninga na ye azongisaki: — Oyo ekoki kozala eloko mosusu te! Ezali kaka mopanga ya Jedeon, mwana mobali ya Joasi, moto ya Isalaele. Solo, Nzambe akabi bato ya Madiani mpe molako mobimba na maboko na ye.
Tad viņa biedrs atbildēja un sacīja: tas nav nekas cits, kā Gideona, Joasa dēla, tā Israēlieša, zobens; Dievs Midijaniešus un visu šo lēģeri devis viņa rokā.
15 Tango Jedeon ayokaki ndoto mpe ndimbola na yango, afukamelaki Nzambe mpe atondaki Ye. Azongaki na molako ya Isalaele mpe agangaki: « Botelema, Yawe akabi molako ya bato ya Madiani na maboko na biso. »
Un kad Gideons dzirdēja šā sapņa stāstīšanu un izskaidrošanu, tad viņš pielūdza Dievu, griezās atpakaļ uz Israēla lēģeri un sacīja: ceļaties, jo Tas Kungs Midijaniešu karaspēku devis jūsu rokās.
16 Jedeon akabolaki basoda na ye nkama misato na biteni misato. Mpe apesaki na mobali moko na moko kelelo moko, mbeki moko oyo ezangi eloko na kati, singa ya mwinda mpe moto ya mbeki.
Un viņš dalīja tos trīs simtI vīrus trijos pulkos, un deva visiem trumetes un tukšas krūzes rokā un lāpas krūzēs.
17 Na sima, apesaki bango mitindo oyo: « Bino nyonso, botala esika ngai nazali mpe bolanda ndenge ngai nakosala tango nakokoma pembeni ya molako ya banguna na biso.
Un viņš uz tiem sacīja: skatāties uz mani un tā dariet; un redzi, kad es nākšu pie lēģera malas, tad dariet jūs tā, kā es daru.
18 Tango ngai mpe bato nyonso oyo bazali elongo na ngai tokobeta kelelo, bino nyonso, na zingazinga ya molako, bokobeta mpe bakelelo na bino mpe bokoganga: ‹ Mpo na Yawe mpe mpo na Jedeon. › »
Kad es trumetēšu, es un visi, kas pie manis, tad jums arīdzan būs trumetēt ap visu lēģeri un saukt: Tā Kunga un Gideona (zobens)!
19 Jedeon mpe mibali nkama moko oyo bazalaki na ye elongo, bakomaki pembeni ya molako, mwa tango moke liboso ete midi ya butu ekoka, wana bawutaki kotia bakengeli mosusu. Babetaki bakelelo mpe babukaki bambeki oyo ezalaki na maboko na bango.
Tad Gideons un tie simts vīri ar viņu nāca pie lēģera malas ap nakts vidu, kad nule sargi bija mainīti, un tie pūta trumetēs un sadauzīja tās krūzes savās rokās.
20 Biteni nyonso misato ya basoda babetaki bakelelo mpe babukaki bambeki. Na loboko na bango ya mwasi, basimbaki minda, mpe, na loboko ya mobali, bakelelo mpo na kobeta. Mpe bazalaki koganga: « Mopanga mpo na Yawe mpe mpo na Jedeon. »
Tā tie trīs pulki pūta trumetēs un sadauzīja tās krūzes un turēja ar kreiso roku tās lāpas un savā labajā rokā tās trumetes un pūta un kliedza: Tā Kunga un Gideona zobens.
21 Wana soda moko na moko ya Isalaele atelemaki na esika na ye zingazinga ya molako, banguna kati na molako bapotaki mbangu, bagangaki mpe bakimaki.
Un tie stāvēja ikviens savā vietā ap to lēģeri. Tad viss karaspēks sāka skriet un tie brēca un bēga.
22 Tango bakelelo nkama misato ebetaki lisusu, Yawe asalaki ete, kati na molako mobimba, moto na moto atuba moninga na ye mopanga; mpe bango nyonso bakimaki kino na Beti-Shita, na ngambo ya Tserera, mpe kino na ngambo ya Abele-Meola pembeni ya Tabati.
Jo kad tie trīs simti vīri trumetēs pūta, tad Tas Kungs grieza viena zobenu pret otru visā lēģerī, un tas karaspēks bēga līdz BetZitai uz Careratas pusi, līdz AbelMeolas robežai pie Tābatas.
23 Bana ya Isalaele oyo bawutaki na Nefitali, na Aseri mpe na Manase basanganaki mpo na kobengana bato ya Madiani.
Tad Israēla vīri tapa sasaukti no Naftalus un no Ašera un no visa Manasus, un tie dzinās pakaļ Midijanam.
24 Jedeon atindaki bantoma kati na etuka ya bangomba ya Efrayimi mpo na koloba: « Bokita mpo na kokutana na bato ya Madiani; bokanga, liboso na bango, nzela ya mayi kino na Beti-Bara mpe na Yordani. » Bana nyonso ya libota ya Efrayimi bakitaki mpe bakangaki nzela ya mayi kino na Beti-Bara mpe na Yordani.
Un Gideons sūtīja vēstnešus uz visiem Efraīma kalniem un sacīja: nonāciet pretī Midijaniešiem un aizstājiet tiem to ūdeni līdz Betbarai un Jardāni. Tā visi Efraīma vīri tika sasaukti un aizstāja to ūdeni līdz Betbarai un Jardāni.
25 Bakangaki bakonzi mibale ya bato ya Madiani: Orebi mpe Zeebi. Babomaki Orebi na libanga monene ya Orebi, mpe Zeebi na esika oyo bakamolaka vino ya Zeebi. Balandaki bato ya Madiani mpe bamemelaki Jedeon mito ya Orebi mpe ya Zeebi, kuna na ngambo ya Yordani.
Un tie gūstīja divus Midijaniešu valdniekus, Orebu un Zeēbu, un nokāva Orebu pie Oreb akmens, un Zeēbu tie nokāva pie Zeēba spaida un dzinās pakaļ Midijanam un nonesa Oreba un Zeēba galvas pie Gideona viņpus Jardānes.