< Bilombe 4 >

1 Sima na kufa ya Ewudi, bana ya Isalaele basalaki lisusu makambo mabe na miso ya Yawe.
Et les fils d’Israël firent de nouveau ce qui est mauvais aux yeux de l’Éternel; or Éhud était mort.
2 Yawe akabaki bango lisusu na maboko ya Yabini, mokonzi ya Kanana, oyo azalaki kovanda na Atsori. Sisera, mokonzi ya mampinga na ye ya basoda, azalaki kovanda na Arosheti-Goyimi.
Et l’Éternel les vendit en la main de Jabin, roi de Canaan, qui régnait à Hatsor; et le chef de son armée était Sisera, et celui-ci habitait à Harosheth des nations.
3 Yabini azalaki na bashar nkama libwa ya bibende, mpe anyokolaki makasi bana ya Isalaele mibu tuku mibale. Bongo bana ya Isalaele bagangaki epai na Yawe mpo na kosenga lisungi.
Et les fils d’Israël crièrent à l’Éternel; car [Jabin] avait 900 chars de fer, et il opprima fortement les fils d’Israël pendant 20 ans.
4 Na tango wana, Debora, mwasi mosakoli, mwasi ya engumba Lapidoti, azalaki kokamba Isalaele.
Et Debora, une prophétesse, femme de Lappidoth, jugeait Israël en ce temps-là.
5 Azalaki kosambisa na se ya nzete ya mbila ya Debora, oyo ezalaki na kati ya Rama mpe Beteli, kati na etuka ya bangomba ya Efrayimi. Bana ya Isalaele bazalaki koya epai na ye mpo na kosambisama.
Et elle habitait sous le palmier de Debora, entre Rama et Béthel, dans la montagne d’Éphraïm; et les fils d’Israël montaient vers elle pour être jugés.
6 Mokolo moko, abengisaki Baraki, mwana mobali ya Abinoami, moto ya Kedeshi ya Nefitali, mpe alobaki na ye: — Yawe, Nzambe ya Isalaele, apesi yo mitindo: « Kende, kamata elongo na yo bato nkoto zomi ya mabota ya Nefitali mpe ya Zabuloni, mpe mema bango na nzela oyo ekenda na ngomba Tabori.
Et elle envoya, et appela Barak, fils d’Abinoam, de Kédesh de Nephthali, et lui dit: L’Éternel, le Dieu d’Israël, ne l’a-t-il pas commandé? Va, et rends-toi sur le mont Thabor, et prends avec toi 10 000 hommes des fils de Nephthali et des fils de Zabulon;
7 Nakomema Sisera, mokonzi ya basoda ya Yabini, na mayi moke ya Kishoni elongo na bashar mpe basoda na ye, mpe nakokaba ye na maboko na yo. »
et j’attirerai vers toi, vers le torrent de Kison, Sisera, chef de l’armée de Jabin, et ses chars, et sa multitude, et je le livrerai en ta main.
8 Baraki azongiselaki Debora: — Soki okokende elongo na ngai, wana nakokende; kasi soki okokende na ngai te, wana ngai mpe nakokende te.
Et Barak lui dit: Si tu vas avec moi, j’irai; mais si tu ne vas pas avec moi, je n’irai pas.
9 Debora alobaki na ye: — Malamu, nakokende elongo na yo. Kasi yeba ete, na nzela oyo ozali kokende, lokumu ekozala ya yo te, pamba te Yawe akokaba Sisera na maboko ya mwasi. Boye, Debora akendeki elongo na Baraki, na mboka Kedeshi.
Et elle dit: J’irai bien avec toi; seulement ce ne sera pas à ton honneur dans le chemin où tu vas, car l’Éternel vendra Sisera en la main d’une femme. Et Debora se leva, et s’en alla avec Barak à Kédesh.
10 Kuna na Kedeshi, Baraki abengisaki bato ya mabota ya Zabuloni mpe ya Nefitali. Bato nkoto zomi balandaki ye, mpe Debora akendeki elongo na ye.
Et Barak rassembla Zabulon et Nephthali à Kédesh; et 10 000 hommes montèrent à sa suite, et Debora monta avec lui.
11 Kaka na mokolo wana, Eberi, moto ya Keni, akabwanaki na bato mosusu ya Keni, bakitani ya Obabi, semeki ya Moyize. Mpe Eberi akendeki kino na terebente oyo ezali na Tsananimi, pembeni ya Kedeshi, mpo na kotelemisa ndako na ye ya kapo.
(Or Héber, le Kénien, s’était séparé des Kéniens, fils de Hobab, beau-père de Moïse, et avait dressé sa tente jusqu’au chêne de Tsaannaïm, qui est près de Kédesh.)
12 Tango bayebisaki Sisera ete Baraki, mwana mobali ya Abinoami, amataki na likolo ya ngomba Tabori,
Et on rapporta à Sisera que Barak, fils d’Abinoam, était monté sur le mont Thabor.
13 Sisera abengisaki, longwa na Arosheti-Goyimi, bato nyonso oyo bazalaki na ye elongo, mpe asangisaki bashar nkama libwa ya bibende. Amemaki bango na mayi moke ya Kishoni.
Et Sisera rassembla tous ses chars, 900 chars de fer, et tout le peuple qui était avec lui, depuis Harosheth des nations, au torrent de Kison.
14 Debora alobaki na Baraki: « Kende! Ezali lelo nde mokolo oyo Yawe akokaba Sisera na maboko na yo. » Baraki akitaki na ngomba Tabori, mpe bato nkoto zomi balandaki ye.
Et Debora dit à Barak: Lève-toi, car c’est ici le jour où l’Éternel livrera Sisera en ta main. L’Éternel n’est-il pas sorti devant toi? Et Barak descendit du mont Thabor, et 10 000 hommes après lui.
15 Wana Baraki azalaki kokende, Yawe apanzaki, na nzela ya mopanga na Ye, Sisera, bashar na ye nyonso mpe mampinga na ye ya basoda. Sisera asundolaki shar na ye mpe akimaki na makolo.
Et l’Éternel mit en déroute Sisera, et tous ses chars, et toute l’armée, par le tranchant de l’épée, devant Barak; et Sisera descendit de son char, et s’enfuit à pied.
16 Kasi Baraki alandaki bashar mpe mampinga kino na Arosheti-Goyimi. Mampinga nyonso ya basoda ya Sisera ekufaki na mopanga, ata moto moko te abikaki.
Et Barak poursuivit les chars et l’armée jusqu’à Harosheth des nations; et toute l’armée de Sisera tomba sous le tranchant de l’épée: il n’en resta pas un seul.
17 Nzokande, Sisera akimaki na makolo kino na ndako ya kapo ya Yaeli, mwasi ya Eberi, moto ya Keni; pamba te boyokani ya malamu ezalaki kati na Yabini, mokonzi ya Atsori, mpe libota ya Eberi, moto ya Keni.
Et Sisera s’enfuit à pied vers la tente de Jaël, femme de Héber, le Kénien; car il y avait paix entre Jabin, roi de Hatsor, et la maison de Héber, le Kénien.
18 Yaeli abimaki mpo na kokutana na Sisera mpe alobaki na ye: — Yaka, nkolo na ngai; kimela epai na ngai, kobanga te. Sisera akotaki na ndako ya kapo ya Yaeli, mpe Yaeli azipaki ye bulangeti.
Et Jaël sortit à la rencontre de Sisera, et lui dit: Retire-toi, mon seigneur, retire-toi chez moi, ne crains point. Et il se retira chez elle dans la tente, et elle le couvrit d’une couverture.
19 Sisera alobaki na Yaeli: — Nabondeli yo, pesa ngai mayi mpo ete namela; nazali na posa ya mayi. Yaeli afungolaki mbeki etonda na miliki ya mayi, mpe amelisaki ye yango. Sima, azipaki ye lisusu bulangeti.
Et il lui dit: Je te prie, donne-moi un peu d’eau à boire, car j’ai soif. Et elle ouvrit l’outre du lait et lui donna à boire, et le couvrit.
20 Sisera alobaki na Yaeli: — Telema na ekuke ya ndako ya kapo. Soki moto ayei kotuna yo: « Moto azali awa? » Zongisa: « Te! »
Et il lui dit: Tiens-toi à l’entrée de la tente, et s’il arrive qu’on vienne et qu’on t’interroge et dise: Y a-t-il quelqu’un ici? tu diras: Non.
21 Kasi wana Sisera alalaki pongi makasi mpo ete alembaki, Yaeli, mwasi ya Eberi, akamataki pike ya ndako ya kapo mpe azwaki marto; akotaki malembe pembeni na ye, abetaki ye pike na litoyi, mpe pike yango etobolaki moto na ye kino ekotaki na mabele; mpe Sisera akufaki.
Et Jaël, femme de Héber, prit un pieu de la tente, et saisit le marteau dans sa main, et elle vint vers lui doucement, et lui enfonça le pieu dans la tempe, de sorte qu’il pénétra dans la terre; or il dormait profondément et était fatigué; et il mourut.
22 Wana Baraki azalaki nanu kolanda Sisera, Yaeli abimaki mpo na kokutana na ye. Alobaki na Baraki: « Yaka, nakolakisa yo moto oyo ozali koluka. » Baraki akotaki na ndako ya kapo ya Yaeli mpe amonaki Sisera ya kokufa, alala na mabele, mpe pike kati na litoyi na ye.
Et voici Barak, qui poursuivait Sisera; et Jaël sortit à sa rencontre, et lui dit: Viens, et je te montrerai l’homme que tu cherches. Et il entra chez elle; et voici, Sisera gisait [là], mort, et le pieu dans sa tempe.
23 Mokolo wana, Nzambe akitisaki liboso ya bana ya Isalaele, Yabini, mokonzi ya Kanana.
Et en ce jour-là, Dieu abattit Jabin, roi de Canaan, devant les fils d’Israël.
24 Bana ya Isalaele bakomaki makasi koleka Yabini, mokonzi ya Kanana, kino babomaki ye.
Et la main des fils d’Israël avançait toujours et pesait durement sur Jabin, roi de Canaan, jusqu’à ce qu’ils eurent retranché Jabin, roi de Canaan.

< Bilombe 4 >