< Bilombe 19 >

1 Na mikolo oyo mokonzi azalaki te kati na Isalaele, Molevi moko oyo azalaki kovanda na suka ya etuka ya bangomba ya Efrayimi azwaki lokola makangu mwasi ya mboka Beteleemi kati na Yuda.
이스라엘에 왕이 없을 그 때에 에브라임 산지 구석에 우거하는 어떤 레위 사람이 유다 베들레헴에서 첩을 취하였더니
2 Kasi makangu yango atambolaki na ekobo liboso na ye, alongwaki na libala mpe azongaki na ndako ya tata na ye, na Beteleemi kati na Yuda. Sima na basanza minei wuta azongaki na ndako ya tata na ye,
그 첩이 행음하고 남편을 떠나 유다 베들레헴 그 아비의 집에 돌아가서 거기서 넉달의 날을 보내매
3 mobali na ye ayaki epai na ye mpo na kobondela ye ete azonga na libala. Mobali ayaki elongo na mosali na ye mpe amemaki ba-ane mibale. Mwasi yango akotisaki mobali na ye kati na ndako ya tata na ye; mpe tango tata na ye amonaki mobali yango, asepelaki koyamba ye.
그 남편이 그 여자에게 다정히 말하고 그를 데려오고자 하여 하인 하나와 나귀 두 필을 데리고 그에게로 가매 여자가 그를 인도하여 아비의 집에 들어가니 그 여자의 아비가 그를 보고 환영하니라
4 Tata-bokilo na ye, tata ya mwana mwasi, akangaki ye mpo ete avanda mwa moke. Boye avandaki na ye mikolo misato, aliaki, amelaki mpe alalaki kuna.
그 첩장인 곧 여자의 아비가 그를 머물리매 그가 삼일을 그와 함께 거하며 먹고 마시며 거기서 유숙하다가
5 Na mokolo ya minei, balamukaki na tongo-tongo, mpe Molevi abongamaki mpo na kokende. Kasi tata ya mwana mwasi alobaki na bokilo na ye: « Lia mwa eloko mpo ete ozwa makasi; bongo sima, okoki na yo kokende. »
나흘 만에 일찌기 일어나 떠나고자 하매 여자의 아비가 그 사위에게 이르되 `떡을 조금 먹어 그대의 기력을 도운 후에 그대의 길을 행하라'
6 Boye, bango mibale bavandaki esika moko mpo na kolia mpe komela. Sima na yango, tata ya mwana mwasi alobaki: « Nabondeli yo, vanda lisusu, na butu ya lelo, mpo ete motema na yo esepela. »
두 사람이 앉아서 함께 먹고 마시매 여자의 아비가 그 사람에게 이르되 `청하노니 이 밤을 여기서 유숙하여 그대의 마음을 즐겁게하라'
7 Mobali atelemaki mpo na kokende; kasi lokola tata-bokilo na ye abondelaki ye makasi ete avanda, avandaki kuna na butu yango.
그 사람이 일어나서 가고자 하되 첩장인의 간청으로 다시 유숙하더니
8 Na tongo ya mokolo ya mitano, tango mobali alamukaki, tata ya mwana mwasi alobaki: « Lia mwa eloko mpo ete ozwa makasi, zela kino na sima ya midi. » Boye, bango mibale baliaki mesa moko.
다섯째 날 아침에 일찌기 일어나 떠나고자 하매 여자의 아비가 이르되 `청하노니 그대의 기력을 돕고 해가 기울도록 머물라' 하므로 두 사람이 함께 먹고
9 Tango mobali elongo na makangu na ye mpe mosali na ye batelemaki mpo na kokende, tata-bokilo na ye, tata ya mwana mwasi, alobaki na ye: « Tala, pokwa esili koya! Nabondeli yo: lekisa lisusu butu awa; mokolo esili, vanda mpe sepelisa motema na yo. Bongo lobi, na tongo-tongo, bokoki kotelema mpo na kokende, mpe okozonga na ndako na yo. »
그 사람이 첩과 하인으로 더불어 일어나 떠나고자 하매 그 첩장인 곧 여자의 아비가 그에게 이르되 `보라! 이제 해가 저물어가니 청컨대 이 밤도 유숙하라 보라! 해가 기울었느니라 그대는 여기서 유숙하여 그대의 마음을 즐겁게 하고 내일 일찌기 그대의 길을 행하여 그대의 집으로 돌아가라'
10 Kasi mosali asepelaki te kolekisa butu mosusu; alongwaki mpe, elongo na ba-ane na ye mibale mpe makangu na ye, akendeki na Yebusi oyo ezali Yelusalemi. Ba-ane na ye ezalaki na bivandelo ya malamu penza.
그 사람이 다시 밤을 지내고자 아니하여 일어나 떠나서 여부스 맞은편에 이르렀으니 여부스는 곧 예루살렘이라 안장 지운 나귀 둘과 첩이 그와 함께 하였더라
11 Tango bakomaki pembeni ya Yebusi mpe mokolo ekomaki pene ya kosila, mosali alobaki na nkolo na ye: — Nabondeli yo, tokota na engumba oyo ya bato ya Yebusi mpe tolekisa kuna butu.
그들이 여부스에 가까왔을 때에 해가 지려 하는지라 종이 주인에게 이르되 `청컨대 우리가 돌이켜 여부스 사람의 이 성읍에 들어 가서 유숙하사이다'
12 Nkolo azongiselaki ye: — Te, tokotelema te na engumba oyo ya bapaya, epai wapi ata mwana moko te ya Isalaele azali; tokokoma kino na Gibea.
주인이 그에게 이르되 `우리가 돌이켜 이스라엘 자손에게 속하지 아니한 외인의 성읍으로 들어갈 것이 아니니 기브아로 나아가리라' 하고
13 Alobaki lisusu na mosali na ye: — Yaka, topusana pene na moko ya bamboka oyo; bongo tokolekisa butu kati na Gibea to na Rama.
또 그 종에게 이르되 `우리가 기브아나 라마 중 한 곳에 나아가 거기서 유숙하자' 하고
14 Boye bakobaki kotambola, mpe moyi ebungaki tango bakomaki pene ya Gibea, kati na mokili ya Benjame.
모두 앞으로 행하더니 베냐민에 속한 기브아에 가까이 이르러는 해가 진지라
15 Batelemaki na Gibea mpo na kolekisa butu. Bakotaki mpe bavandaki na esika oyo bato ebele ya engumba bakutanaka, kasi moto moko te ayambaki bango na ndako na ye mpo na kolekisa butu.
기브아에 가서 유숙하려고 그리로 돌이켜 들어가서 성읍 거리에 앉았으나 그를 집으로 영접하여 유숙케 하는 자가 없었더라
16 Na pokwa, mobali moko ya mobange awutaki na mosala na ye ya bilanga; azalaki moto ya etuka ya bangomba ya Efrayimi mpe azalaki kovanda na Gibea. Nzokande bato ya esika wana bazalaki bato ya libota ya Benjame.
이미 저물매 한 노인이 밭에서 일하다가 돌아오니 그 사람은 본래 에브라임 산지 사람으로서 기브아에 우거하는 자요 그 곳 사람들은 베냐민 사람이더라
17 Tango atombolaki miso, amonaki moto ya mobembo na esika oyo bato ebele ya engumba bakutanaka. Mobange yango atunaki ye: — Okeyi wapi mpe owuti wapi?
노인이 눈을 들어 성읍 거리에 행객이 있는 것을 본지라 노인이 묻되 그대는 어디로 가며 어디서 왔느뇨?
18 Moto ya mobembo azongiselaki ye: — Towuti na Beteleemi ya Yuda; tozali kokende na esika oyo navandaka, na suka ya mboka ya etuka ya bangomba ya Efrayimi. Nazalaki na Beteleemi, na Yuda, sik’oyo nazali kokende na Ndako ya Yawe. Moto moko te ayambi ngai kati na ndako na ye.
그가 그에게 이르되 `우리는 유다 베들레헴에서 에브라임 산지 구석으로 가나이다 나는 그곳 사람으로서 유다 베들레헴에 갔다가 이제 여호와의 집으로 가는 중인데 나를 자기 집으로 영접하는 사람이 없나이다
19 Nzokande tozali na matiti mpe biloko mpo na ba-ane na biso mibale, tozali lisusu na lipa mpe vino mpo na ngai, mwasi na ngai mpe mosali na ngai moko oyo nazali na ye elongo; tozangi eloko moko te.
우리에게는 나귀들에게 먹일 짚과 보리가 있고 나와 당신의 여종과 당신의 종 우리들과 함께한 소년의 먹을 양식과 포도주가 있어 무엇이든지 부족함이 없나이다'
20 Mobange yango alobaki: — Tika ete kimia ezala na yo! Bosenga na yo nyonso ekozala na moto na ngai. Kasi kolekisa butu te na esika oyo bato ebele ya engumba bakutanaka.
노인이 가로되 `그대는 안심하라 그대의 모든 쓸 것은 나의 담책이니 거리에서는 자지 말라' 하고
21 Akotisaki bango na ndako na ye mpe apesaki ba-ane na ye matiti. Sima, basukolaki makolo, baliaki mpe bamelaki.
그를 데리고 자기 집에 들어가서 나귀에게 먹이니 그들이 발을 씻고 먹고 마시니라
22 Wana bazalaki nanu kolia mpe komela, ndambo ya mibali ya engumba, ya mitema mabe, bazingelaki ndako; babetaki na ekuke mpe balobaki na mobange oyo azalaki nkolo ndako: — Bimisa mosali oyo ayei na ndako na yo; tolingi kosangisa na ye nzoto ndenge basangisaka nzoto na basi.
그들이 마음을 즐겁게 할 때에 그 성읍의 비류들이 그 집을 에워 싸고 문을 두들기며 집 주인 노인에게 말하여 가로되 `네 집에 들어온 사람을 끌어내라 우리가 그를 상관하리라'
23 Nkolo ndako abimaki libanda mpe alobaki na bango: — Te, bandeko na ngai, bozala mabe boye te! Lokola mobali oyo azali kati na ndako na ngai, bosala ye mabe oyo te.
집 주인 그 사람이 그들에게로 나와서 이르되 `아니라 내 형제들아 청하노니 악을 행치 말라 이 사람이 내 집에 들었으니 이런 망령된 일을 행치 말라
24 Botala mwana na ngai ya mwasi oyo ayebi nanu nzoto ya mibali te mpe makangu ya mobali oyo azali kati na ndako! Nazali kobimisa bango sik’oyo libanda mpo na bino mpo ete bokoka kosala bango nyonso oyo bolingi. Kasi mpo na mobali oyo, bosala likambo ya soni ya boye te.
보라 여기 내 처녀 딸과 이 사람의 첩이 있은즉 내가 그들을 끌어 내리니 너희가 그들을 욕보이든지 어찌하든지 임의로 하되 오직 이사람에게는 이런 망령된 일을 행치 말라' 하나
25 Kasi mibali yango baboyaki koyokela ye. Boye mobali azwaki makangu na ye mpe abimisaki ye libanda epai na bango. Bakangaki ye mpe basangisaki na ye nzoto na makasi, butu mobimba; mpe tango tongo ekomaki pene ya kotana, batikaki ye akende.
무리가 듣지 아니하므로 그 사람이 자기 첩을 무리에게로 붙들어 내매 그들이 그에게 행음하여 밤새도록 욕보이다가 새벽 미명에 놓은지라
26 Tango tongo ezali kotana, mwasi azongaki na ndako epai wapi mobali na ye azalaki, akweyaki na ekuke mpe alelaki wana kino tongo etanaki malamu.
동틀 때에 여인이 그 주인의 우거한 그 사람의 집 문에 이르러 엎드러져 밝기까지 거기 누웠더라
27 Na tongo, tango mobali na ye alamukaki, afungolaki ekuke ya ndako mpo na kobima libanda mpe kokoba mobembo na ye; amonaki makangu na ye alali na ekuke ya ndako, maboko liboso ya ekuke.
그의 주인이 일찌기 일어나 집 문을 열고 떠나고자 하더니 그 여인이 집 문에 엎드러지고 그 두 손이 문지방에 있는 것을 보고
28 Alobaki na ye: « Telema; tokende! » Kasi azwaki eyano te. Bongo mobali yango atiaki makangu na ye na likolo ya ane na ye, akobaki mobembo na ye mpo na kozonga na ndako na ye.
그에게 이르되 `일어나라 우리가 떠나가자' 하나 아무 대답이 없는지라 이에 그 시체를 나귀에 싣고 행하여 자기 곳에 돌아가서
29 Tango akomaki na ndako na ye, azwaki mbeli, akataki nzoto ya makangu na ye na biteni zomi na mibale mpe atindaki yango na etando nyonso ya Isalaele.
그 집에 이르러서는 칼을 취하여 첩의 시체를 붙들어 그 마디를 찍어 열 두덩이에 나누고 그것을 이스라엘 사방에 두루 보내매
30 Moto nyonso oyo amonaki yango alobaki: « Likambo ya boye nanu namona yango te mpe nanu esalema te, wuta mokolo oyo bana ya Isalaele babimaki na Ejipito. Bokanisa na tina na yango, botala yango malamu mpe boyebisa biso nini tosengeli kosala. »
그것을 보는 자가 다 가로되 `이스라엘 자손이 애굽 땅에서 나온 날부터 오늘날까지 이런 일은 행치도 아니하였고 보지도 못하였도다 생각하고 상의한 후에 말하자' 하니라

< Bilombe 19 >