< Bilombe 16 >

1 Mokolo moko, Samison akendeki na Gaza epai wapi amonaki mwasi moko ya ndumba, mpe asangisaki na ye nzoto.
و شمشون به غزه رفت و در آنجافاحشه‌ای دیده، نزد او داخل شد.۱
2 Tango bato ya Gaza bayokaki sango ete Samison azali kati na engumba na bango, bazingelaki esika oyo Samison alalaki mpe basenzelaki butu mobimba, mpo na kozela ye na ekuke ya engumba. Na butu yango, baninganaki te mpe balobaki: « Tokoboma ye na tongo tango akobima. »
و به اهل غزه گفته شد که شمشون به اینجا آمده است. پس او را احاطه نموده، تمام شب برایش نزددروازه شهر کمین گذاردند، و تمام شب خاموش مانده، گفتند، چون صبح روشن شود او رامی کشیم.۲
3 Kasi Samison alalaki wana kaka kino na kati-kati ya butu; bongo na ngonga ya zomi na mibale ya butu, alamukaki. Tango akomaki na ekuke ya engumba, asimbaki bizipelo na yango elongo na makonzi na yango mibale. Apikolaki yango elongo na libaya ya kokangela, atombolaki mpe atiaki yango na mapeka na ye, bongo amemaki yango kino na songe ya ngomba moke oyo etalana na engumba Ebron.
و شمشون تا نصف شب خوابید. ونصف شب برخاسته، لنکهای دروازه شهر و دوباهو را گرفته، آنها را با پشت بند کند و بر دوش خود گذاشته، بر قله کوهی که در مقابل حبرون است، برد.۳
4 Sima na yango, Samison alingaki mwasi moko oyo azalaki kovanda na lubwaku ya Soreki; kombo na ye ezalaki « Dalila. »
و بعد از آن واقع شد که زنی را در وادی سورق که اسمش دلیله بود، دوست می‌داشت.۴
5 Bakambi ya Filisitia bakendeki epai ya Dalila mpe balobaki na ye: « Solola na ye na maloba ya sukali mpo ete alakisa yo sekele ya makasi na ye mpe ndenge nini tokoki kolonga ye, mpo ete tokanga ye basinga mpe tosilisa ye makasi. Moko na moko kati na biso akopesa yo mbongo ya bibende ya palata, nkoto moko na nkama moko. »
وسروران فلسطینیان نزد او برآمده، وی را گفتند: «او را فریفته، دریافت کن که قوت عظیمش در چه چیز است، و چگونه بر او غالب آییم تا او را بسته، ذلیل نماییم، و هریکی از ما هزار و صد مثقال نقره به تو خواهیم داد.»۵
6 Dalila ayebisaki Samison: — Yebisa ngai sekele ya makasi na yo mpe ndenge nini bakoki kokanga yo basinga mpe kosilisa yo makasi.
پس دلیله به شمشون گفت: «تمنا اینکه به من بگویی که قوت عظیم تو در چه چیز است و چگونه می‌توان تو را بست و ذلیل نمود.»۶
7 Samison azongiselaki ye: — Soki bakangi ngai na basinga sambo ya mobesu, oyo nanu bakawusi te, nakokoma moto na bolembu lokola moto nyonso.
شمشون وی را گفت: «اگر مرا به هفت ریسمان تر و تازه که خشک نباشد ببندند، من ضعیف و مثل سایر مردم خواهم شد.»۷
8 Boye, bakambi ya Filisitia bamemelaki Dalila basinga sambo ya mobesu, oyo nanu bakawusi te, mpe Dalila alingaki Samison basinga yango.
و سروران فلسطینیان هفت ریسمان تر و تازه که خشک نشده بود، نزد او آوردند و او وی را به آنهابست.۸
9 Lokola bato oyo batindamaki mpo na kokanga ye bazalaki ya kobombama kati na ndako, Dalila abelelaki: « Samison, bato ya Filisitia bayei kobundisa yo! » Samison akataki na pete penza basinga yango ndenge basinga ya lino ekatanaka soki ezwi moto. Boye, basosolaki te sekele ya makasi na ye.
و کسان نزد وی در حجره در کمین می‌بودند و او وی را گفت: «ای شمشون فلسطینیان بر تو آمدند.» آنگاه ریسمانها رابگسیخت چنانکه ریسمان کتان که به آتش برخورد گسیخته شود، لهذا قوتش دریافت نشد.۹
10 Dalila alobaki na Samison: — Osakani na ngai mpe okosi ngai! Sik’oyo, yebisa ngai eloko nini bakoki kosalela mpo na kokanga yo?
و دلیله به شمشون گفت: «اینک استهزاکرده، به من دروغ گفتی، پس الان مرا خبر بده که به چه چیز تو را توان بست.»۱۰
11 Samison alobaki: — Soki bakangi ngai na basinga ya sika oyo nanu basaleli te, nakokoma moto na bolembu lokola moto nyonso.
او وی را گفت: «اگر مرا با طنابهای تازه که با آنها هیچ کار کرده نشده است، ببندند، ضعیف و مثل سایر مردان خواهم شد.»۱۱
12 Dalila azwaki basinga ya sika mpe akangaki na yango Samison. Bongo abelelaki: « Samison, bato ya Filisitia bayei kobundisa yo! » Atako bato oyo batindamaki mpo na kokanga ye bazalaki lisusu ya kobombama kati na ndako, Samison akataki kaka lokola singa moko pamba, basinga oyo bakangaki ye.
و دلیله طنابهای تازه گرفته، او رابا آنها بست و به وی گفت: «ای شمشون فلسطینیان بر تو آمدند.» و کسان در حجره درکمین می‌بودند. آنگاه آنها را از بازوهای خود مثل نخ بگسیخت.۱۲
13 Boye Dalila alobaki na Samison: — Kino sik’oyo, ozali kaka kosakana na ngai mpe kokosa ngai! Yebisa ngai ndenge nini bakoki kokanga yo basinga. Samison azongisaki: — Soki okangi suki sambo ya moto na ngai na singa oyo batongelaka bilamba, mpe soki okangisi yango na likonzi, nakokoma moto na bolembu lokola moto nyonso. Boye tango Samison azalaki nanu kolala, Dalila azwaki suki sambo ya moto na ye, akangaki yango na singa oyo batongelaka bilamba
و دلیله به شمشون گفت: «تابحال مرااستهزا نموده، دروغ گفتی. مرا بگو که به چه چیزبسته می‌شوی.» او وی را گفت: «اگر هفت گیسوی سر مرا با تار ببافی.»۱۳
14 mpe akangisaki yango na likonzi. Dalila abelelaki lisusu Samison: « Samison, bato ya Filisitia bayei kobundisa yo! » Samison alamukaki na pongi na ye mpe apikolaki likonzi elongo na singa oyo batongelaka bilamba.
پس آنها را به میخ قایم بست و وی را گفت: «ای شمشون فلسطینیان بر تو آمدند.» آنگاه از خواب بیدار شده، هم میخ نورد نساج و هم تار را برکند.۱۴
15 Dalila alobaki na ye: « Ndenge nini okoki koloba ete olingaka ngai tango motema na yo ezali elongo na ngai te! Oyo ezali mbala na yo ya misato ya kosakana na ngai, pamba te oyebisi ngai te sekele ya makasi na yo. »
و او وی را گفت: «چگونه می‌گویی که مرادوست می‌داری و حال آنکه دل تو با من نیست. این سه مرتبه مرا استهزا نموده، مرا خبر ندادی که قوت عظیم تو در چه چیز است.»۱۵
16 Lokola, mokolo na mokolo, Dalila azalaki kotungisa Samison na maloba na ye mpe kozangisa ye kimia, Samison amonaki ete motungisi yango eleki ye ndelo.
و چون اووی را هر روز به سخنان خود عاجز می‌ساخت واو را الحاح می‌نمود و جانش تا به موت تنگ می‌شد،۱۶
17 Boye, ayebisaki Dalila makambo nyonso. Alobaki: « Suki na ngai ekatamaka te, pamba te Nzambe abulisa ngai wuta na libumu ya mama na ngai. Soki kaka bakati ngai suki, makasi na ngai ekosila mpe nakokoma moto na bolembu lokola moto nyonso. »
هر‌چه در دل خود داشت برای او بیان کرده، گفت که «استره بر سر من نیامده است، زیرا که از رحم مادرم برای خداوند نذیره شده‌ام، واگر تراشیده شوم، قوتم از من خواهد رفت وضعیف و مثل سایر مردمان خواهم شد.»۱۷
18 Tango Dalila amonaki ete Samison ayebisi ye makambo nyonso, atindaki sango epai ya bakambi ya Filisitia. Alobaki: « Boya lisusu, ayebisi ngai makambo nyonso. » Bakambi ya Filisitia bazongaki epai ya Dalila na mbongo ya bibende na maboko na bango.
پس چون دلیله دید که هرآنچه در دلش بود، برای او بیان کرده است، فرستاد و سروران فلسطینیان را طلبیده، گفت: «این دفعه بیایید زیراهرچه در دل داشت مرا گفته است.» آنگاه سروران فلسطینیان نزد او آمدند و نقد را به‌دست خود آوردند.۱۸
19 Dalila alalisaki Samison na mipende na ye, abengaki mobali moko mpo na kokata ye suki sambo ya moto na ye. Samison akomaki kolemba, mpe makasi na ye esilaki.
و او را بر زانوهای خودخوابانیده، کسی را طلبید و هفت گیسوی سرش را تراشید. پس به ذلیل نمودن او شروع کرد وقوتش از او برفت.۱۹
20 Dalila abelelaki Samison: « Samison, bato ya Filisitia bayei kobundisa yo! » Samison alamukaki na pongi na ye mpe amilobelaki: « Nakosala ndenge kaka nasalaka liboso mpe nakokangolama na ngai. » Kasi ayebaki te ete Yawe alongwaki kati na ye.
و گفت: «ای شمشون فلسطینیان بر تو آمدند.» آنگاه از خواب بیدارشده، گفت: «مثل پیشتر بیرون رفته، خود رامی افشانم. اما او ندانست که خداوند از او دورشده است.۲۰
21 Bato ya Filisitia bakangaki ye, batobolaki ye miso, bamemaki ye na Gaza mpe bakangaki ye minyololo ya bibende ya bronze. Akomaki konika bambuma ya ble na enikelo ya libanga kati na boloko.
پس فلسطینیان او را گرفته، چشمانش را کندند و او را به غزه آورده، به زنجیرهای برنجین بستند و در زندان دستاس می‌کرد.۲۱
22 Kasi suki ya moto na ye ekomaki lisusu kokola wuta tango bakataki ye yango.
و موی سرش بعد از تراشیدن باز به بلند شدن شروع نمود.۲۲
23 Bakambi ya Filisitia basanganaki mpo na kobonza mbeka monene epai ya nzambe na bango, Dagoni, mpe kosala feti. Balobaki: « Nzambe na biso akabi monguna na biso, Samison, na maboko na biso. »
و سروران فلسطینیان جمع شدند تا قربانی عظیمی برای خدای خود، داجون بگذرانند، وبزم نمایند زیرا گفتند خدای ما دشمن ما شمشون را به‌دست ما تسلیم نموده است.۲۳
24 Tango bato bamonaki Samison, bakumisaki nzambe na bango, balobaki: « Nzambe na biso akabi na maboko na biso, monguna na biso, oyo azalaki kobebisa mokili na biso mpe koboma bato ebele kati na biso. »
و چون خلق او را دیدند خدای خود را تمجید نمودند، زیراگفتند خدای ما دشمن ما را که زمین ما را خراب کرد و بسیاری از ما را کشت، به‌دست ما تسلیم نموده است.۲۴
25 Wana bazalaki kosepela, bagangaki: « Bomemela biso Samison mpo ete asepelisa biso! » Babimisaki Samison na boloko mpe akomaki kosala masano liboso na bango. Tango batelemisaki ye na kati-kati ya makonzi ya tempelo na bango,
و چون دل ایشان شاد شد، گفتند: «شمشون را بخوانید تا برای ما بازی کند.» پس شمشون را از زندان آورده، برای ایشان بازی می کرد، و او را در میان ستونها برپا داشتند.۲۵
26 Samison alobaki na mosali oyo asimbaki loboko na ye: « Tia ngai na esika oyo nakoki kosimba makonzi oyo esimbi tempelo mpo ete nalalela yango. »
وشمشون به پسری که دست او را می‌گرفت، گفت: «مرا واگذار تا ستونهایی که خانه بر آنها قایم است، لمس نموده، بر آنها تکیه نمایم.»۲۶
27 Nzokande, tempelo ezalaki ya kotonda na mibali, basi mpe bakambi nyonso ya Filisitia. Na likolo ya ndako, ezalaki na bato pene nkoto misato, mibali mpe basi, oyo bazalaki kotala masano oyo Samison azalaki kosala.
و خانه از مردان و زنان پر بود و جمیع سروران فلسطینیان در آن بودند و قریب به سه هزار مرد و زن برپشت بام، بازی شمشون را تماشا می‌کردند.۲۷
28 Samison abondelaki Yawe: « Nkolo Yawe, Yo oyo osalaka nyonso oyo olingi, kanisa ngai! Nabondeli Yo, Nzambe: Pesa ngai makasi mbala oyo lisusu, mpe pesa ngai nzela ete, na mbala moko, nazongisa mabe na mabe epai ya bato oyo ya Filisitia mpo na miso na ngai mibale. »
و شمشون از خداوند استدعا نموده، گفت: «ای خداوند یهوه مرا بیاد آور و‌ای خدا این مرتبه فقط مرا قوت بده تا یک انتقام برای دو چشم خوداز فلسطینیان بکشم.»۲۸
29 Samison asimbaki makonzi nyonso mibale ya kati-kati, oyo esimbaki tempelo, mpe ayekamelaki yango, loboko ya mobali na likonzi moko, mpe loboko ya mwasi na likonzi mosusu.
و شمشون دو ستون میان را که خانه بر آنها قایم بود، یکی را به‌دست راست و دیگری را به‌دست چپ خود گرفته، بر آنها تکیه نمود.۲۹
30 Bongo Samison alobaki: « Tika ete nakufa elongo na bato ya Filisitia! » Bongo atindikaki na makasi na ye nyonso, mpe tempelo ekweyelaki bakambi mpe bato nyonso oyo bazalaki kuna. Boye, kati na kufa na ye, abomaki bato ebele koleka na tango oyo azalaki na bomoi.
و شمشون گفت: «همراه فلسطینیان بمیرم و با زور خم شده، خانه بر سروران و برتمامی خلقی که در آن بودند، افتاد. پس مردگانی که در موت خود کشت از مردگانی که درزندگی‌اش کشته بود، زیادتر بودند.۳۰
31 Bandeko na ye mpe libota nyonso ya tata na ye bayaki kozwa ebembe na ye. Bazongaki na yango mpe bakundaki ye kati na kunda ya tata na ye, Manoa, na kati ya bingumba Tsorea mpe Eshitaoli. Samison akambaki Isalaele mibu tuku mibale.
آنگاه برادرانش و تمامی خاندان پدرش آمده، او رابرداشتند و او را آورده، در قبر پدرش مانوح درمیان صرعه و اشتاول دفن کردند. و او بیست سال بر اسرائیل داوری کرد.۳۱

< Bilombe 16 >