< Bilombe 15 >

1 Sima na mwa mikolo, na eleko oyo bakataka ble, Samison azwaki mwana ntaba mpe akendeki kotala mwasi na ye. Alobaki: — Nalingi kokota na shambre epai wapi mwasi na ngai alalaka. Kasi tata ya mwasi na ye apesaki ye nzela te.
Et il arriva quelque temps après, pendant les jours de la moisson des froments, que Samson alla visiter sa femme, avec un chevreau; et il dit: Je veux entrer vers ma femme dans la chambre. Mais le père ne lui permit pas d’entrer.
2 Alobaki na Samison: — Nakanisaki penza ete olingaka ye te, yango wana nabalisaki ye epai ya moko kati na baninga na yo, oyo obengisaki na feti. Tala leki na ye ya mwasi, aleki ye na kitoko te? Zwa ye kaka.
Et le père dit: J’ai pensé que tu l’avais en haine, et je l’ai donnée à ton compagnon. Sa jeune sœur n’est-elle pas plus belle qu’elle? Prends-la à sa place, je te prie.
3 Samison alobaki na bango: — Ya mbala oyo, nakozala ata na ngambo moko te liboso ya bato ya mokili ya Filisitia; nakeyi kosala bango mabe.
Et Samson leur dit: Cette fois je suis innocent à l’égard des Philistins si je leur fais du mal.
4 Samison abimaki mpe akangaki bambwa ya zamba nkama misato, akangisaki yango mibale-mibale na mikila mpe atiaki koni na kati-kati ya mikila mibale-mibale ya bambwa yango.
Et Samson s’en alla, et prit 300 chacals; et il prit des torches, et tourna [les chacals] queue contre queue, et mit une torche entre les deux queues, au milieu.
5 Apelisaki koni yango mpe atikaki bambwa ya zamba kati na bilanga ya ble ya bato ya Filisitia, oyo esili kokomela. Atumbaki maboke ya ble oyo batiaki na mipiku mpe ble oyo babukaki nanu te, banzete ya vino mpe banzete ya olive.
Et il mit le feu aux torches, et lâcha [les chacals] dans les blés des Philistins; et il brûla tant les tas de gerbes que le blé sur pied et les plantations d’oliviers.
6 Bato ya Filisitia batunaki: — Nani asali boye? Bazongiselaki bango: — Ezali Samison, bokilo ya moto moko ya Timina; pamba te abalisaki mwasi ya Samison epai ya moko kati na baninga oyo Samison abengisaki na feti. Bato ya Filisitia bakendeki mpe batumbaki mwasi yango elongo na tata na ye kino bakufaki.
Et les Philistins dirent: Qui a fait cela? Et on dit: Samson, le gendre du Thimnite; parce qu’il lui a pris sa femme et l’a donnée à son compagnon. Et les Philistins montèrent, et la brûlèrent au feu, elle et son père.
7 Samison alobaki na bango: « Lokola bosali boye, nakotika te kino nakozongisela bino mabe na mabe. »
Et Samson leur dit: Si c’est ainsi que vous faites, alors certes je me vengerai de vous, et après je cesserai.
8 Samison abundisaki bango mpe abomaki ebele kati na bango. Bongo akendeki mpe avandaki kati na lidusu ya mabanga, na Etami.
Et il les frappa d’un grand coup, à leur casser bras et jambes. Et il descendit, et habita dans une caverne du rocher d’Étam.
9 Bato ya Filisitia bayaki mpe batongaki molako na bango kati na etuka ya Yuda, bapanzanaki kino na etuka ya Leyi.
Et les Philistins montèrent, et campèrent en Juda, et se répandirent en Lékhi.
10 Bato ya Yuda batunaki: — Mpo na nini boyei kobundisa biso? Bato ya Filisitia bazongiselaki bango: — Toyei kokanga Samison na basinga mpo ete tosala ye ndenge asalaki biso.
Et les hommes de Juda dirent: Pourquoi êtes-vous montés contre nous? Et ils dirent: Nous sommes montés pour lier Samson, afin de lui faire comme il nous a fait.
11 Bato nkoto misato ya Yuda bakendeki na lidusu ya mabanga ya Etami, mpe balobaki na Samison: — Oyebi te ete bato ya Filisitia bazali kokonza biso? Likambo nini osali biso? Samison azongisaki: — Nazongiseli bango makambo oyo bango basalaki ngai.
Et 3 000 hommes de Juda descendirent à la caverne du rocher d’Étam, et dirent à Samson: Ne sais-tu pas que les Philistins dominent sur nous? Et que nous as-tu fait? Et il leur dit: Comme ils m’ont fait, ainsi je leur ai fait.
12 Bato ya Yuda balobaki na Samison: — Toyei mpo na kokanga yo na basinga mpe kokaba yo na maboko ya bato ya Filisitia. Samison alobaki na bango: — Bolapa ndayi liboso na ngai ete bokoboma ngai te bino moko.
Et ils lui dirent: Nous sommes descendus pour te lier, afin de te livrer en la main des Philistins. Et Samson leur dit: Jurez-moi que vous ne vous jetterez pas sur moi.
13 Bato ya Yuda bazongisaki: — Iyo! Tokoboma yo te. Tolingi kaka kokanga yo na basinga mpe kokaba yo na maboko na bango. Bongo bakangaki ye na basinga mibale ya sika mpe babimisaki ye na lidusu ya mabanga.
Et ils lui parlèrent, disant: Non, mais nous voulons te lier, et nous te livrerons en leur main; mais certainement nous ne te tuerons pas. Et ils le lièrent avec deux cordes neuves, et le firent monter hors du rocher.
14 Tango bakomaki pembeni ya etuka ya Leyi, bato ya Filisitia bayaki kokutana na ye na koganga. Molimo na Yawe akitelaki ye na nguya, mpe basinga oyo ekangaki maboko na ye ekatanaki lokola basinga ya lino oyo eziki na moto, mpe ekweyaki wuta na maboko na ye.
Il vint jusqu’à Lékhi, et les Philistins poussèrent des cris à sa rencontre. Et l’Esprit de l’Éternel le saisit; et les cordes qui étaient à ses bras devinrent comme de l’étoupe qui brûle au feu, et ses liens coulèrent de dessus ses mains.
15 Samison amonaki mokuwa ya mobesu ya mbanga ya ane, asembolaki loboko na ye, alokotaki mokuwa yango mpe abomaki na yango bato nkoto moko.
Et il trouva une mâchoire d’âne fraîche, et il étendit sa main et la prit, et en frappa 1 000 hommes.
16 Samison alobaki: « Na mokuwa ya mobesu ya mbanga ya ane, nakangisi bango mipiku na mipiku; na mokuwa ya mobesu ya mbanga ya ane, nabomi bato nkoto moko. »
Et Samson dit: Avec la mâchoire de l’âne, un monceau, deux monceaux! Avec la mâchoire de l’âne j’ai frappé 1 000 hommes.
17 Tango asilisaki koloba, abwakaki mokuwa yango mosika mpe apesaki esika yango kombo « Ramati-Leyi. »
Et il arriva que, quand il eut achevé de parler, il jeta de sa main la mâchoire, et nomma ce lieu-là Ramath-Lékhi.
18 Lokola azalaki na posa makasi ya mayi, asambelaki Yawe: « Opesi mosali na Yo elonga oyo monene; boni, nakufa sik’oyo na posa ya mayi mpe nakweya na maboko ya bato oyo bakatama ngenga te? »
Et il eut une très grande soif, et il cria à l’Éternel, et dit: Tu as donné par la main de ton serviteur cette grande délivrance, et maintenant je mourrais de soif, et je tomberais entre les mains des incirconcis!
19 Bongo Nzambe afungolaki libanga oyo ezalaki kati na Leyi, mpe libanga yango ebimisaki mayi. Tango Samison amelaki mayi, makasi na ye ezongaki mpe azwaki lisusu bomoi. Boye abengaki etima yango Eyini-Akore.
Et Dieu fendit le rocher creux qui était à Lékhi, et il en sortit de l’eau; et il but, et son esprit revint, et il vécut: c’est pourquoi le nom de cette [source] fut appelé En-Hakkoré; elle est à Lékhi, jusqu’à ce jour.
20 Samison akambaki Isalaele mibu tuku mibale, wana bato ya Filisitia bazalaki kokonza mokili.
Et [Samson] jugea Israël, aux jours des Philistins, 20 ans.

< Bilombe 15 >