< Bilombe 14 >

1 Mokolo moko, Samison akendeki na Timina mpe amonaki kuna elenge mwasi moko ya Filisitia.
那時三松下到提默納;在那裏見了一個女子,她是培肋舍特人的女兒。
2 Tango azongaki, alobaki na tata mpe mama na ye: — Namoni mwasi moko kati na basi ya bato ya Filisitia, na Timina; bokende kobalela ngai ye.
三松上去稟告他的父母說:「我在提默納見了一個女子,她是培肋舍特人的女兒,願你們現今把她給我娶來為妻! 」
3 Tata mpe mama na ye bazongisaki: — Boni, kati na bandeko na yo to kati na bato na biso nyonso, ezali te na bana basi ya kitoko mpo ete okende kozwa mwasi kati na bato ya Filisitia oyo bakatama ngenga te? Kasi Samison alobaki na tata na ye: — Balela ngai ye, pamba te ye nde abongi mpo na ngai.
他的父母對他說:「難道在你兄弟的女兒中,在我們民族間沒有女子嗎﹖為什麼你要去從那些未受割損的培肋舍特人中間娶妻呢﹖」三松向他的父親說:「請給我娶了她! 因為我實在喜歡她。」
4 Baboti na ye bayebaki te ete likambo wana ewutaki epai na Yawe, pamba te Yawe azalaki koluka nzela mpo na kokotisa mobulu kati na bana ya Isalaele mpe bato ya Filisitia. Pamba te na tango wana, bato ya Filisitia bazalaki kokonza bana ya Isalaele.
他的父母原不知道這事是出於上主,使他找機會攻擊培肋舍特,因為那時培肋舍特正統治以色列。
5 Samison akendeki na Timina elongo na tata mpe mama na ye. Tango bakomaki pembeni ya bilanga ya vino ya Timina, mbala moko, mwana nkosi moko eyaki konguluma liboso ya Samison.
三松往提默納去,來到提默納的葡萄園時,看,有一隻小獅子向他咆哮;
6 Molimo na Yawe akitelaki Samison na nguya. Boye, Samison apasolaki nkosi na kati-kati, na maboko pamba, ndenge bapasolaka mwana ntaba. Kasi kati na makambo oyo asalaki, ayebisaki eloko moko te epai ya tata to mama na ye.
上主的神突然降在他身上,他當時雖赤手空拳,竟將那獅子撕裂,好像撕裂小山羊;他沒有把所作的這事告訴他的父母。
7 Sima na yango, Samison akendeki na Timina, asololaki na mwana mwasi mpe alingaki ye.
此後他下去向那女子談情,三松很喜愛她。
8 Sima na mwa mikolo, tango azongaki na Timina mpo na kobala mwasi na ye, alekaki pembeni mpo na kotala nzoto ya nkosi oyo ekufaki. Kati na nzoto yango, amonaki liboke ya banzoyi mpe mafuta na yango.
過了不久,回去娶她,繞路去看那隻死獅子。看,在獅子屍體內有一窩蜜蜂作了蜜。
9 Akamataki yango na maboko na ye mpe aliaki yango nzela-nzela. Tango akutanaki na baboti na ye, apesaki bango ndambo ya mafuta ya nzoyi. Bongo bango mpe baliaki yango; kasi atikalaki koyebisa bango te ete azwaki mafuta yango ya nzoyi kati na nzoto ya nkosi oyo ekufa.
他取了些蜜放在手中,繼續前行,一面走一面吃;來到他父母那裏,也給他們一些,他們也吃了,但他沒有告訴他們這蜜是從獅子屍體內取來的。
10 Tata na ye akendeki kotala elenge mwasi yango, mpe Samison asalisaki kuna feti moko ya monene, kolanda ndenge ezalaki momesano mpo na libala.
三松又來到那女子那裏,有人為他設了婚筵,因為青年人們慣常這樣做。
11 Tango abimaki, bapesaki bato tuku misato mpo ete bavanda na ye elongo.
但有人害怕他,便請來三十個同伴陪伴他。
12 Samison alobaki na bango: — Nalingi koyebisa bino lisese moko. Soki bopesi ngai eyano, na mikolo sambo ya feti, nakopesa bino bilamba tuku misato ya lino mpe bilamba tuku misato ya feti.
三松對他們說:「讓我給你們說個謎語,如果你們能在這七天婚筵期內,給我猜出來,我就給你們三十件襯衫和三十套禮服。
13 Soki bokoki te kopesa ngai eyano, bokopesa ngai bilamba tuku misato ya lino mpe bilamba tuku misato ya feti. Balobaki: — Yebisa biso lisese na yo, tolingi koyoka yango!
若是你們不能給我解說,你們就得給我三十件襯衫和三十套禮服。」他們對他說:「請你把謎語講給我們聽。」
14 Samison alobaki na bango: — Kati na oyo eliaka, ebimi oyo baliaka; kati na oyo ezali makasi, ebimi oyo ezali elengi. Mikolo misato mobimba, bakokaki te kopesa ye eyano.
他向他們說:「食者生出食品,強者生出甘甜。」他們三天之久不能解這謎語。
15 Bongo na mokolo ya minei, balobaki na mwasi ya Samison: — Bondela mobali na yo mpo ete apesa biso ndimbola ya lisese; sima na yango, yaka koyebisa biso ndimbola yango. Soki te, tokotumba yo elongo na ndako ya tata na yo. Obengisi biso awa mpo na koyiba biso?
到了第四天,他們對三松的妻子說:「請引誘你的丈夫,把謎語說給你,以免我們放火燒你和你的父家。難道你請了我們來,是為了奪取我們的東西嗎﹖」
16 Bongo mwasi ya Samison akomaki kolela liboso ya mobali mpe alobaki na ye: — Oyina ngai! Solo, olingaka ngai te! Oyebisaki bato na ngai lisese, kasi oyebisaki ngai ndimbola na yango te! Samison azongisaki: — Natikala kutu kolimbola yango epai ya tata to mama na ngai te, bongo ndenge nini nalimbola yango epai na yo?
三松的妻子就在他眼前哭哭啼啼說:「你是恨我,而不是愛我! 你給我的同胞說謎語,都不解給我聽。」三松對她說:「你看,我都沒有告訴我的父母,怎能告訴你﹖」
17 Na mikolo nyonso sambo ya feti, azalaki kaka kolela. Suka na suka, na mokolo ya sambo, Samison alimbolelaki ye yango, pamba te mwasi na ye atungisaki ye mingi. Bongo mwasi ya Samison, ye mpe akendeki kopesa ndimbola ya lisese yango epai ya bato na ye.
那七天婚筵期內,她常在他跟前哭哭啼啼;到了第七天,由於她不斷的催逼,三松便將謎底告訴了她;她就把謎底告訴自己的同胞。
18 Na mokolo ya sambo, liboso ete moyi elala, bato ya engumba bayaki koloba na Samison: — Eloko nini ezali elengi koleka mafuta ya nzoyi? Mpe eloko nini eleki nkosi na makasi? Samison alobaki na bango: — Soki bosalaki likita te na mwasi na ngai, bokokaki koyeba te ndimbola ya lisese na ngai.
到了第七天,在他進洞房之前,本城的人給他說:「有什麼比蜜還甜﹖有什麼比獅子還強﹖」他向他們說:「你們若不是用我的小母牛耕田,你們決不會猜出我的謎底。」
19 Bongo Molimo na Yawe akitelaki Samison na nguya. Akendeki na Ashikeloni mpe abomaki bato tuku misato, azwaki bilamba na bango mpe apesaki yango epai ya bato oyo bapesaki ye ndimbola ya lisese. Azongaki na ndako ya tata na ye na kanda makasi.
上主的神又突然降在他身上,他就下到阿市刻隆,擊殺了三十個人,拿了所劫奪的東西,把三十套禮服送給猜中謎語的人;以後憤怒的回到父親家裏。
20 Mpe babalisaki mwasi ya Samison epai ya moko kati na baninga ya Samison, oyo babengisaki na feti.
三松的妻子以後卻跟了作他伴郎的一個同伴。

< Bilombe 14 >