< Bilombe 13 >

1 Bana ya Isalaele basalaki lisusu mabe na miso ya Yawe, mpe Yawe akabaki bango mibu tuku minei na maboko ya bato ya Filisitia.
ויספו בני ישראל לעשות הרע בעיני יהוה ויתנם יהוה ביד פלשתים ארבעים שנה׃
2 Ezalaki na mobali moko, moto ya Tsorea, ya libota ya Dani, kombo na ye ezalaki Manoa; mwasi na ye azalaki ekomba, mpe abotelaki ye bana te.
ויהי איש אחד מצרעה ממשפחת הדני ושמו מנוח ואשתו עקרה ולא ילדה׃
3 Anjelu na Yawe abimelaki mwasi ya Manoa mpe alobaki: « Tala, ozali ekomba mpe ozali na bana te, kasi okokoma na zemi mpe okobota mwana mobali.
וירא מלאך יהוה אל האשה ויאמר אליה הנה נא את עקרה ולא ילדת והרית וילדת בן׃
4 Sik’oyo, sala keba! Komela vino te to masanga mosusu ya makasi, mpe kolia te eloko nyonso ya mbindo;
ועתה השמרי נא ואל תשתי יין ושכר ואל תאכלי כל טמא׃
5 pamba te okozwa zemi mpe okobota mwana mobali. Bakoki te kokata suki ya moto na ye, pamba te mwana mobali yango akozala bule mpo na Nzambe wuta na libumu ya mama na ye. Akobanda kokangola Isalaele wuta na maboko ya bato ya Filisitia. »
כי הנך הרה וילדת בן ומורה לא יעלה על ראשו כי נזיר אלהים יהיה הנער מן הבטן והוא יחל להושיע את ישראל מיד פלשתים׃
6 Tango mwasi azongaki epai ya mobali na ye, ayebisaki ye: « Moto moko ya Nzambe ayaki epai na ngai, azalaki lokola Anjelu na Nzambe: azalaki somo mingi. Natunaki ye te soki awuti wapi, mpe ayebisaki ngai te kombo na ye.
ותבא האשה ותאמר לאישה לאמר איש האלהים בא אלי ומראהו כמראה מלאך האלהים נורא מאד ולא שאלתיהו אי מזה הוא ואת שמו לא הגיד לי׃
7 Kasi alobaki na ngai: ‹ Okozwa zemi mpe okobota mwana mobali. Bongo komela vino to masanga mosusu ya makasi te mpe kolia eloko moko te ya mbindo, pamba te mwana mobali oyo okobota akozala bule mpo na Nzambe wuta na libumu ya mama na ye kino na mokolo na ye ya kufa. › »
ויאמר לי הנך הרה וילדת בן ועתה אל תשתי יין ושכר ואל תאכלי כל טמאה כי נזיר אלהים יהיה הנער מן הבטן עד יום מותו׃
8 Bongo Manoa asambelaki Yawe: « Oh Nkolo, nabondeli Yo: tika ete ozongisa lisusu moto na Nzambe, oyo otindelaki biso, mpo ete aya lisusu koteya biso nini tosengeli kosala mpo na mwana mobali oyo akobotama! »
ויעתר מנוח אל יהוה ויאמר בי אדוני איש האלהים אשר שלחת יבוא נא עוד אלינו ויורנו מה נעשה לנער היולד׃
9 Nzambe ayokaki Manoa, mpe Anjelu na Nzambe ayaki lisusu epai ya mwasi, wana avandaki na bilanga. Kasi mobali na ye, Manoa, azalaki elongo na ye te.
וישמע האלהים בקול מנוח ויבא מלאך האלהים עוד אל האשה והיא יושבת בשדה ומנוח אישה אין עמה׃
10 Mwasi ya Manoa akendeki mbangu koyebisa mobali na ye: « Tala, namoni moto oyo abimelaki ngai na mikolo oyo eleki! »
ותמהר האשה ותרץ ותגד לאישה ותאמר אליו הנה נראה אלי האיש אשר בא ביום אלי׃
11 Manoa atelemaki mpe alandaki mwasi na ye. Tango akomaki epai ya moto yango, alobaki: — Boni, ezali yo nde osololaki na mwasi na ngai? Azongisaki: — Iyo, ezali ngai.
ויקם וילך מנוח אחרי אשתו ויבא אל האיש ויאמר לו האתה האיש אשר דברת אל האשה ויאמר אני׃
12 Manoa atunaki ye: — Tango maloba na yo ekokokisama, mibeko nini tosengeli kotosa mpo na bomoi ya mwana? Mpe ye mwana asengeli kosala nini?
ויאמר מנוח עתה יבא דבריך מה יהיה משפט הנער ומעשהו׃
13 Anjelu na Yawe azongiselaki Manoa: — Mwasi na yo asengeli kosala makambo nyonso oyo nayebisaki ye.
ויאמר מלאך יהוה אל מנוח מכל אשר אמרתי אל האשה תשמר׃
14 Akolia eloko moko te oyo ewuti na nzete ya vino, akomela vino te to masanga mosusu ya makasi, akolia eloko moko te ya mbindo; asengeli kosala makambo nyonso oyo natindi ye.
מכל אשר יצא מגפן היין לא תאכל ויין ושכר אל תשת וכל טמאה אל תאכל כל אשר צויתיה תשמר׃
15 Manoa alobaki na Anjelu na Yawe: — Soki okoki kozela mwa moke, wana tozali kobongisela yo mwana ntaba.
ויאמר מנוח אל מלאך יהוה נעצרה נא אותך ונעשה לפניך גדי עזים׃
16 Anjelu na Nzambe azongiselaki Manoa: — Ata ozelisi ngai, nakolia ata eloko na yo moko te; kasi soki obongisi mbeka ya kotumba, bonzela yango nde Yawe. Manoa asosolaki te ete oyo azali liboso na ye azali Anjelu na Yawe.
ויאמר מלאך יהוה אל מנוח אם תעצרני לא אכל בלחמך ואם תעשה עלה ליהוה תעלנה כי לא ידע מנוח כי מלאך יהוה הוא׃
17 Manoa atunaki Anjelu na Yawe: — Kombo na yo nani mpo ete topesa yo lokumu tango elaka na yo ekokokisama?
ויאמר מנוח אל מלאך יהוה מי שמך כי יבא דבריך וכבדנוך׃
18 Anjelu na Yawe azongiselaki ye: — Mpo na nini ozali kotuna ngai kombo na ngai? Kombo na ngai ezali kombo ya kokamwa.
ויאמר לו מלאך יהוה למה זה תשאל לשמי והוא פלאי׃
19 Boye Manoa azwaki mwana ntaba elongo na mbeka ya gato, abonzaki yango na likolo ya libanga, liboso ya Yawe. Wana Manoa mpe mwasi na ye bazalaki kotala, Yawe asalaki likambo moko ya kokamwa.
ויקח מנוח את גדי העזים ואת המנחה ויעל על הצור ליהוה ומפלא לעשות ומנוח ואשתו ראים׃
20 Ndenge moto ezalaki komata na likolo longwa na etumbelo, Anjelu na Yawe mpe amataki kati na moto. Tango bamonaki bongo, Manoa mpe mwasi na ye bakweyaki bilongi kino na mabele.
ויהי בעלות הלהב מעל המזבח השמימה ויעל מלאך יהוה בלהב המזבח ומנוח ואשתו ראים ויפלו על פניהם ארצה׃
21 Tango Anjelu na Yawe alimwaki na miso ya Manoa mpe ya mwasi na ye, Manoa asosolaki ete ezalaki Anjelu ya Yawe.
ולא יסף עוד מלאך יהוה להראה אל מנוח ואל אשתו אז ידע מנוח כי מלאך יהוה הוא׃
22 Manoa alobaki na mwasi na ye: — Solo, tokufi na biso, pamba te tomoni Nzambe!
ויאמר מנוח אל אשתו מות נמות כי אלהים ראינו׃
23 Kasi mwasi na ye azongisaki: — Soki Yawe asepelaki koboma biso, akokaki kondima te mbeka ya kotumba mpe mbeka ya gato oyo esalemi na maboko na biso to kolakisa biso makambo oyo nyonso to mpe koyebisa biso sik’oyo makambo oyo.
ותאמר לו אשתו לו חפץ יהוה להמיתנו לא לקח מידנו עלה ומנחה ולא הראנו את כל אלה וכעת לא השמיענו כזאת׃
24 Mwasi ya Manoa abotaki mwana mobali mpe apesaki ye kombo « Samison. » Mwana akolaki, mpe Yawe apambolaki ye.
ותלד האשה בן ותקרא את שמו שמשון ויגדל הנער ויברכהו יהוה׃
25 Molimo na Yawe abandaki kosalela ye tango azalaki na Maane Dani, na kati-kati ya Tsorea mpe Eshitaoli.
ותחל רוח יהוה לפעמו במחנה דן בין צרעה ובין אשתאל׃

< Bilombe 13 >