< Bilombe 11 >
1 Jefite, moto ya Galadi, azalaki elombe ya bitumba. Azalaki mwana mobali oyo Galadi abotaki na mwasi ya makangu.
Jephté, fils de Galaad, était un homme très-fort; il était né d'une prostituée qui l'avait eu de Galaad.
2 Nzokande mwasi ya Galadi abotelaki ye mpe bana mibali. Mpe tango bakolaki, babenganaki Jefite; balobaki na ye: « Ozali na libula te kati na ndako ya tata na biso, pamba te ozali mwana ya makangu. »
Or, la femme de Galaad avait enfanté pour celui-ci des fils; et les fils de cette femme devinrent grands, et ils chassèrent Jephté, et ils lui dirent: Tu n'auras point part à l'héritage de notre père, parce que tu es le fils d'une prostituée.
3 Boye, Jefite akimaki mosika ya bandeko na ye ya mibali mpe akomaki kovanda kati na etuka ya Tobi. Bato ya mobulu basanganaki na ye mpe bazalaki kotambola elongo na ye.
Jephté s'enfuit donc de devant la face de ses frères, et il demeura en la terre de Tob. Et des hommes dénués de tout se rassemblèrent autour de Jephté, et ils sortirent avec lui.
4 Sima na mwa tango, bato ya Amoni babundisaki Isalaele.
Lorsque les fils d'Ammon furent en guerre avec Israël,
5 Wana bato ya Amoni bazalaki kobundisa bana ya Isalaele, bampaka ya Galadi bakendeki koluka Jefite, kati na Tobi.
Les anciens de Galaad allèrent prendre Jephté en la terre de Tob.
6 Balobaki na Jefite: — Yaka, mpe zala mokambi na biso mpo ete tobundisa bato ya Amoni.
Et ils dirent à Jephté: Viens, tu seras notre chef, et nous livrerons bataille aux fils d'Ammon.
7 Jefite azongiselaki bampaka ya Galadi: — Boni, ezali bino te bato oyo boyinaki ngai mpe bobenganaki ngai wuta na ndako ya tata na ngai? Mpo na nini bozali koya sik’oyo epai na ngai, awa bokomi na pasi?
Et Jephté dit aux anciens de Galaad: N'est-ce point vous qui m'avez haï, et qui m'avez expulsé de la maison paternelle, et qui m'avez chassé loin de vous? Pourquoi donc êtes-vous venus ici, maintenant que vous avez besoin de moi?
8 Bampaka ya Galadi balobaki lisusu na Jefite: — Soki tozongi sik’oyo epai na yo, ezali mpo ete oya elongo na biso, obundisa bato ya Amoni mpe okoma mokonzi na biso, mokonzi ya bavandi nyonso ya Galadi.
Et les anciens de Galaad dirent à Jephté: Nous sommes venus te trouver, pour que tu viennes avec nous, que tu combattes les fils d'Ammon, et que tu sois le chef de tous ceux qui habitent Galaad.
9 Jefite azongiselaki bampaka ya Galadi: — Soki bozongisi ngai mpo na kobundisa bato ya Amoni, bongo Yawe akabi bango na maboko na ngai, boni, nakozala solo mokonzi na bino?
Et Jephté dit aux fils de Galaad: Si vous m'emmenez pour livrer bataille aux fils d'Ammon, et si le Seigneur me les livre, vous me laisserez dominer sur vous.
10 Bampaka ya Galadi bazongiselaki Jefite: — Tika ete Yawe azala Motatoli kati na biso! Tika ete apesa biso etumbu soki tosali te ndenge olobi.
Et les anciens de Galaad dirent à Jephté: Que le Seigneur soit témoin entre nous, si nous n'agissons pas selon ta parole.
11 Boye Jefite akendeki nzela moko na bampaka ya Galadi, mpe bato ya Galadi bakomisaki ye mokambi mpe mokonzi ya mampinga. Mpe Jefite azongelaki koloba maloba na ye nyonso liboso ya Yawe, kati na Mitsipa.
Jephté partit donc avec les anciens de Galaad; le peuple le mit à sa tête et le reconnut pour chef; et Jephté dit toutes ses paroles devant le Seigneur en Massépha.
12 Bongo Jefite atindaki bantoma epai ya mokonzi ya bato ya Amoni mpo na koloba na ye: — Ozwi biso na likambo nini mpo ete oya kobundisa mboka na biso?
Et Jephté dépêcha des envoyés au roi des fils d'Ammon, disant: Qu'y a-t- il entre moi et toi, pour que tu viennes ici apporter la guerre en ma contrée?
13 Mokonzi ya bato ya Amoni azongiselaki bantoma ya Jefite: — Ezali mpo ete Isalaele abotolaki mokili na ngai tango abimaki na Ejipito; babotolaki mokili yango longwa na lubwaku ya Arinoni, mayi moke ya Yaboki kino na lubwaku ya Yordani. Sik’oyo, zongisela ngai yango na kimia.
Le roi des fils d'Amnion dit aux envoyés de Jephté: Parce qu'Israël, en venant d'Egypte, s'est emparé de mon territoire depuis l'Arnon jusqu'au Jaboc, et jusqu'au Jourdain; maintenant rends-nous-le pacifiquement, et je me retirerai.
14 Jefite atindaki lisusu bantoma epai ya mokonzi ya bato ya Amoni mpo na koloba na ye:
Jephté insista, et il dépêcha au roi des fils d'Ammon des envoyés,
15 — Tala maloba oyo Jefite alobi: « Bana ya Isalaele bazwaki mokili ya Moabi te to mokili ya bato ya Amoni te.
Qui lui dirent: Voici ce que dit Jephté: Israël n'a point pris la terre de Moab, ni la terre des fils d'Ammon.
16 Kasi tango bana ya Isalaele babimaki na Ejipito, batambolaki na esobe kino na ebale monene ya Barozo, mpe bakomaki na Kadeshi.
En venant de l'Egypte, Israël a traversé le désert jusqu'à la mer de Siph, et est arrivé à Cadès.
17 Batindaki bantoma epai ya mokonzi ya Edomi, mpo na koloba na ye: ‹ Pesa biso nzela ya koleka na mokili na yo. › Kasi mokonzi ya Edomi aboyaki koyoka. Bana ya Isalaele batindaki lisusu bantoma epai ya mokonzi ya Moabi, kasi ye mpe aboyaki. Boye, bana ya Isalaele bawumelaki na Kadeshi.
De là, Israël a envoyé des messagers au roi d'Edom, disant: Je passerai par ta terre, et le roi d'Edom ne les a pas écoutés; et Israël a envoyé au roi de Moab, qui n'a pas voulu acquiescer à leur demande. Et Israël a campé en Cadès;
18 Na sima, batambolaki na esobe mpe babalukaki na sima ya mokili ya Edomi mpe ya Moabi, balekaki na ngambo ya este ya mokili ya Moabi mpe batongaki milako na bango kuna, na ngambo mosusu ya lubwaku ya Arinoni. Kasi bakotaki te na mokili ya Moabi.
Puis, il s'est avancé par le désert; il a tourné autour de la terre d'Edom et de la terre de Moab; il a passé à l'orient de la terre de Moab, il a dressé ses tentes au delà du torrent d'Arnon; mais il n'est point entré en Moab, puisque l'Arnon est hors des limites de Moab.
19 Bongo bana ya Isalaele batindaki bantoma epai ya Sikoni, mokonzi ya bato ya Amori, oyo azalaki kovanda na Eshiboni mpo na koloba na ye: ‹ Tika biso toleka na mokili na yo mpo ete tokende na esika na biso. ›
Après cela, Israël a envoyé des messagers à Sehon, roi des Amorrhéens, roi d'Esebon, et Israël lui a dit: Permets que nous traversions ta terre jusqu'au pays qui nous appartient.
20 Kasi Sikoni andimaki te bana ya Isalaele mpo ete baleka na mokili na ye. Boye asangisaki bato na ye nyonso; batongaki milako, na Yakatsi, mpe babundisaki Isalaele.
Séhon ne s'est pas fié à Israël pour le laisser traverser son territoire, et Séhon a rassemblé tout son peuple, et il a campé en Jasa, et il a combattu Israël.
21 Kasi Yawe, Nzambe ya Isalaele, akabaki Sikoni mpe bato na ye nyonso na maboko ya bana ya Isalaele, mpe balongaki bango. Boye bana ya Isalaele babotolaki mokili nyonso ya bato ya Amori oyo bazalaki kovanda na etando wana.
Le Seigneur Dieu d'Israël a livré Séhon et tout son peuple aux mains d'Israël, qui l'a accablé; et Israël a pris possession de tout le territoire de l'Amorrhéen qui habitait cette terre,
22 Babotolaki etuka nyonso ya bato ya Amori, longwa na lubwaku ya Arinoni kino na mayi moke ya Yaboki, longwa na esobe kino na Yordani.
Et il a pris possession de toutes les limites de l'Amorrhéen,
23 Awa Yawe, Nzambe ya Isalaele, asili kobotola mokili ya bato ya Amori mpe apesi yango epai ya bana ya Isalaele, yo olingi sik’oyo kobotola bango yango?
Et maintenant que le Seigneur Dieu d'Israël a fait disparaître l'Amorrhéen de devant la face de son peuple Israël, ce serait toi qui prendrais son héritage?
24 Boni, okozwa te oyo Kemoshi, nzambe na yo, apesi yo? Biso tokozwa oyo Yawe, Nzambe na biso, apesi biso.
N'est-ce point toi qui hérites de ceux dont Chamos, ton dieu, te livre l'héritage? Hériterons-nous de tous ceux que le Seigneur notre Dieu a fait disparaître de devant vous?
25 Boni, ozali malamu koleka Balaki, mwana mobali ya Tsipori, mokonzi ya Moabi? Boni, asila koswanisa to kobundisa bana ya Isalaele?
D'ailleurs, l'emportes-tu en vaillance sur Balac, fils de Sephor, roi de Moab? Est-ce qu'il a combattu et combattu Israël? est-ce qu'il a lui fait guerre sur guerre,
26 Mibu nkama misato, bana ya Isalaele bavandaki na Eshiboni, na Aroeri, na bamboka na yango ya mike mpe na bingumba nyonso oyo ezali pembeni ya Arinoni. Mpo na nini bobotolaki yango te na tango wana?
Lorsque Israël eut habité trois cents ans Esebon et son territoire, Aroer et son territoire, et toutes les villes auprès du Jourdain? Et pourquoi donc pendant tout ce temps ne les as-tu pas réclamées?
27 Ngai nasali yo mabe te, kasi yo nde ozali kosala ngai mabe na kobundisa ngai. Tika ete Yawe, Mosambisi, akata lelo likambo kati na bana ya Isalaele mpe bato ya Amoni. »
Ce n'est donc point moi aujourd'hui qui ai failli envers toi; tu agis mal à mon égard, en apportant la guerre en ma contrée; que le Seigneur juge entre les fils d'Israël et les fils d'Ammon.
28 Kasi mokonzi ya Amoni aboyaki koyoka maloba oyo Jefite atindelaki ye.
Or, le roi des fils d'Ammon ne fit point attention aux paroles que Jephté lui avait fait dire.
29 Molimo na Yawe akitelaki Jefite. Jefite akatisaki Galadi mpe Manase, mpe alekaki na Mitsipe ya Galadi. Wuta na Mitsipe ya Galadi, akendeki kobundisa bato ya Amoni.
Et l'Esprit du Seigneur vint sur Jephté, qui traversa Galaad, Manassé, et passa au delà des hauteurs de Galaad, de l'autre côté des fils d'Ammon.
30 Jefite alapaki ndayi epai na Yawe, alobaki: « Soki okabi bato ya Amoni na maboko na ngai,
Et Jephté fit un vœu au Seigneur; il dit: Si vous livrez à ma main les fils d'Ammon,
31 nakobonzela Yo, Yawe, lokola mbeka ya kotumba, nyonso oyo ekobima na ekuke ya ndako na ngai mpo na koyamba ngai, tango nakozonga na elonga wuta na bato ya Amoni. »
Le premier qui, venant à ma rencontre, franchira les portes de ma maison, lorsque j'y retournerai après la paix, celui-là sera au Seigneur; je le lui offrirai en holocauste.
32 Bongo Jefite akatisaki bandelo ya bato ya Amoni, mpe Yawe akabaki bango na maboko na ye.
Jephté s'approcha donc des fils d'Ammon pour les combattre, et le Seigneur les livra à ses mains;
33 Abebisaki bingumba tuku mibale oyo ezali na kati-kati ya Aroeri mpe Miniti kino na Abele-Keramimi. Ezalaki kobebisama ya makasi mpo na bato ya Amoni oyo bakweyaki liboso ya bana ya Isalaele.
Il les écrasa dans vingt villes, depuis Aroer jusqu'à l'Arnon, et jusqu'à Ebel-Charmin; il les frappa d'une très-grande plaie, et les fils d'Ammon furent humbles devant la face des fils d'Israël.
34 Tango Jefite azongaki na ndako na ye, na Mitsipa, mwana na ye ya mwasi abimaki mpo na koyamba ye; azalaki kobina mpe kobeta mbonda ya moke. Azalaki mwana na ye kaka moko: azalaki na mwana mosusu te, ezala ya mwasi to ya mobali.
Puis, Jephté revint à Massépha en sa maison, et voilà que sa fille en sortit à sa rencontre, avec des tambours et des chœurs; elle était son unique enfant, il n'avait point d'autre fille, ni de fils.
35 Tango kaka Jefite amonaki ye, apasolaki bilamba na ye mpe agangaki: — Ah, mwana na ngai ya mwasi! Opesi ngai mawa mingi mpe otie ngai na mobulu, pamba te nalapaki ndayi epai na Yawe mpe nakoki lisusu kozonga sima te.
Lorsqu'il la vit il déchira ses vêtements, et il dit: Hélas! hélas! ma fille, tu m'as consterné cruellement, et toi seule causes ma consternation, car j'ai contre toi ouvert la bouche devant le Seigneur, et je ne puis m'en dédire.
36 Mwana na ye ya mwasi alobaki: — Tata na ngai, opesaki elaka epai na Yawe. Sala na ngai ndenge olakaki epai na Yawe, pamba te Yawe azongisi mabe na mabe epai ya banguna na yo, bato ya Amoni.
Et elle lui dit; Père, as-tu ouvert la bouche devant le Seigneur? Dispose de moi selon ce qui est sorti de ta bouche, puisque le Seigneur a tiré par toi vengeance des fils d'Ammon tes ennemis,
37 Abakisaki: — Pesa ngai nzela ete likambo oyo moko esalema mpo na ngai: Tikela ngai basanza mibale mpo ete nakende koyengayenga mpe kolela, elongo na baninga na ngai, bozangi na ngai koyeba nzoto ya mobali.
Elle dit encore à son père: Que mon père exauce cette prière: Laisse à ta fille deux mois; et je partirai; et j'irai par les monts, et je pleurerai ma virginité, moi et mes compagnes.
38 Jefite alobaki na ye: — Okoki na yo kokende. Mpe atikaki ye kokende mpo na basanza mibale. Boye mwana mwasi akendeki na ngomba elongo na baninga na ye ya basi, mpe alelaki mpo ete ayebaki nanu nzoto ya mibali te.
Et il lui dit: Pars; et il la congédia pour deux mois; elle partit, elle et ses compagnes, et elle pleura sa virginité sur les monts.
39 Sima na basanza mibale, azongaki epai ya tata na ye, Jefite; mpe Jefite akokisaki epai ya mwana na ye ya mwasi, ndayi oyo alapaki. Nzokande, atikalaki kaka koyeba nzoto ya mobali te. Boye, ekoma momesano kati na Isalaele:
A la fin des deux mois, elle retourna vers son père, et il accomplit en elle le vœu qu'il avait fait; or, elle ne connut point d'homme, et elle fut l'occasion d'une loi en Israël.
40 mibu nyonso, bilenge basi ya Isalaele babimaka mikolo minei, mpo na kosala feti na tina na mwana mwasi ya Jefite, moto ya Galadi.
D'âge en âge, les filles d'Israël s'en vont quatre jours par an pleurer la fille de Jephté, fils de Galaad.