< Bilombe 10 >
1 Sima na kufa ya Abimeleki, ezalaki Tola, mwana mobali ya Puwa, mwana mobali ya Dodo, moto ya Isakari, nde atelemaki mpo na kobikisa Isalaele. Azalaki kovanda na Shamiri, kati na etuka ya bangomba ya Efrayimi.
Et après Abimélec, Thola, fils de Pua, fils de Dodo, homme d’Issacar, se leva pour sauver Israël; et il habitait à Shamir, dans la montagne d’Éphraïm.
2 Akambaki Isalaele mibu tuku mibale na misato; sima na yango, akufaki, mpe bakundaki ye na Shamiri.
Et il jugea Israël 23 ans; et il mourut, et fut enterré à Shamir.
3 Yairi, moto ya Galadi, akitanaki na Tola mpe akambaki Isalaele mibu tuku mibale na mibale.
Et après lui, se leva Jaïr, le Galaadite; et il jugea Israël 22 ans.
4 Azalaki na bana mibali tuku misato oyo bazalaki kotambola likolo ya ba-ane, mpe bazalaki na bamboka tuku misato kati na Galadi. Kino na mokolo ya lelo, babengaka yango « Bamboka ya Yairi. »
Et il avait 30 fils, qui montaient sur 30 ânons; et ils avaient 30 villes qu’on a nommées jusqu’à aujourd’hui les bourgs de Jaïr, lesquels sont dans le pays de Galaad.
5 Yairi akufaki, mpe bakundaki ye na Kamone.
Et Jaïr mourut, et fut enterré à Kamon.
6 Bana ya Isalaele basalaki lisusu makambo mabe na miso ya Yawe; basalelaki banzambe Bala, Asitarite, mpe banzambe ya Siri, ya Sidoni, ya Moabi, ya Amoni mpe ya Filisitia. Basundolaki Yawe mpe basalelaki Ye lisusu te.
Et les fils d’Israël firent de nouveau ce qui est mauvais aux yeux de l’Éternel, et ils servirent les Baals, et les Ashtoreths, et les dieux de Syrie, et les dieux de Sidon, et les dieux de Moab, et les dieux des fils d’Ammon, et les dieux des Philistins; et ils abandonnèrent l’Éternel et ne le servirent pas.
7 Boye, kanda ya Yawe epelaki likolo ya Isalaele, mpe Yawe akabaki bango na maboko ya bato ya Filisitia mpe ya bato ya Amoni.
Et la colère de l’Éternel s’embrasa contre Israël, et il les vendit en la main des Philistins et en la main des fils d’Ammon,
8 Mibu zomi na mwambe, banyokolaki bana nyonso ya Isalaele oyo bazalaki kovanda na ngambo mosusu ya Yordani, mokili ya bato ya Amori, kati na Galadi.
qui opprimèrent et écrasèrent les fils d’Israël cette année-là; pendant 18 ans [ils écrasèrent] tous les fils d’Israël qui étaient au-delà du Jourdain, dans le pays des Amoréens, qui est en Galaad.
9 Bato ya Amoni mpe bakatisaki na ngambo ya Yordani mpo na kobundisa libota ya Yuda, ya Benjame mpe ya Efrayimi. Boye, Isalaele akomaki na pasi mingi.
Et les fils d’Ammon passèrent le Jourdain pour faire la guerre aussi contre Juda et contre Benjamin, et contre la maison d’Éphraïm. Et Israël fut dans une grande détresse.
10 Bana ya Isalaele bagangaki epai ya Yawe: — Tosalaki masumu na miso na Yo, pamba te tosundolaki Yo, Nzambe na biso, mpe tosalelaki banzambe Bala.
Et les fils d’Israël crièrent à l’Éternel, disant: Nous avons péché contre toi; car nous avons abandonné notre Dieu, et nous avons servi les Baals.
11 Yawe azongiselaki bana ya Isalaele: — Boni, nabikisaki bino te na maboko ya bato ya Ejipito, ya Amori, ya Amoni mpe ya Filisitia?
Et l’Éternel dit aux fils d’Israël: [Ne vous ai-je] pas [délivrés] des Égyptiens, et des Amoréens, des fils d’Ammon, et des Philistins?
12 Tango bato ya Sidoni, ya Amaleki mpe ya Maoni banyokolaki bino, boni, bogangaki epai na Ngai te mpo na kosenga lisungi? Boni, nakangolaki bino te wuta na maboko na bango?
Et les Sidoniens, et Amalek, et Maon, vous ont opprimés, et vous avez crié vers moi, et je vous ai sauvés de leur main.
13 Kasi bino, bosundolaki Ngai mpe bosalelaki banzambe mosusu. Yango wana, nakokangola bino lisusu te.
Mais vous, vous m’avez abandonné, et vous avez servi d’autres dieux; c’est pourquoi je ne vous sauverai plus.
14 Bokende koganga epai ya banzambe oyo boponaki mpo ete ebikisa bino awa bozali kati na pasi.
Allez, et criez aux dieux que vous avez choisis; eux, vous sauveront au temps de votre détresse!
15 Kasi bana ya Isalaele balobaki na Yawe: — Ya solo, tosalaki lisumu na miso na Yo. Oyo omoni ete ezali malamu na miso na Yo, sala yango na biso; kasi tobondeli Yo: bikisa biso lisusu sik’oyo!
Et les fils d’Israël dirent à l’Éternel: Nous avons péché; fais-nous selon tout ce qui sera bon à tes yeux; seulement, nous te prions, délivre-nous ce jour-ci.
16 Bongo bana ya Isalaele balongolaki banzambe ya bapaya kati na bango mpe basalelaki Yawe. Mpe Yawe akokaki lisusu te kotala pasi na bango.
Et ils ôtèrent du milieu d’eux les dieux étrangers, et servirent l’Éternel; et son âme fut en peine de la misère d’Israël.
17 Tango bato ya Amoni basanganaki mpe batiaki molako na bango kati na Galadi, bana ya Isalaele basanganaki mpe batiaki molako na bango kati na Mitsipa.
Et les fils d’Ammon se rassemblèrent, et campèrent en Galaad; et les fils d’Israël s’assemblèrent, et campèrent à Mitspa.
18 Bato mpe bakonzi ya Galadi balobanaki: « Moto oyo akobundisa liboso bana ya Amoni akozala mokonzi ya bato nyonso ya Galadi. »
Et le peuple, les princes de Galaad, se dirent l’un à l’autre: Quel est l’homme qui commencera à faire la guerre contre les fils d’Ammon? Il sera chef de tous les habitants de Galaad.