< Jide 1 >

1 Ngai Jide, mowumbu ya Yesu-Klisto mpe ndeko ya Jake; Epai ya bato oyo Nzambe abenga, ba-oyo Nzambe Tata alingaka, mpe ba-oyo babatelami mpo na Yesu-Klisto:
Jude serviteur de Jésus-Christ, et frère de Jacques, à ceux qui ont été appelés [par l'Evangile], que Dieu a sanctifiés et Jésus-Christ a conservés.
2 Tika ete mawa, kimia mpe bolingo efuluka kati na bino!
Que la miséricorde, la paix, et l'amour vous soient multipliés.
3 Balingami na ngai, nazalaki na posa makasi ya kokomela bino na tina na lobiko oyo tozali na yango na lisanga. Nazwaki mokumba ya kokomela bino mpo na kolendisa bino ete bobunda mpo na kondima oyo Nzambe apesaki, mbala moko mpo na libela, epai ya basantu.
Mes bien-aimés, comme je m'étudie entièrement à vous écrire du salut [qui nous est] commun, il m'a été nécessaire de vous écrire pour vous exhorter à soutenir le combat pour la foi qui a été une fois donnée aux Saints.
4 Pamba te ezali na bato mosusu oyo basili kokota kati na bino na mayele mabe, ba-oyo etumbu na bango ekomama wuta kala: batosaka makambo ya Nzambe te, bakomisaka ngolu ya Nzambe na biso lokola nzela ya kosala makambo na bango ya soni, mpe bawanganaka Yesu-Klisto, Mokonzi kaka moko mpe Nkolo na biso.
Car quelques-uns se sont glissés [parmi vous], qui dès longtemps auparavant ont été écrits pour une telle condamnation; gens sans piété, qui changent la grâce de notre Dieu en dissolution, et qui renoncent le seul Dominateur Jésus-Christ notre Dieu et Seigneur.
5 Atako boyebi malamu makambo oyo nyonso, kasi nalingi kaka koyebisa bino lisusu ete Nkolo akangolaki bato na Ye na bowumbu kati na Ejipito, kasi, sima na yango, abomaki ba-oyo bazalaki na kondima te.
Or je veux vous faire souvenir d'une chose que vous savez déjà, [c'est] que le Seigneur ayant délivré le peuple du pays d'Egypte, il détruisit ensuite ceux qui n'avaient point cru;
6 Nzambe akangaki mpe na minyololo ya seko, kati na molili mpo na kosambisama ya mokolo monene, ba-anjelu oyo basepelaki te na evandelo oyo Nzambe apesaki bango mpe batikaki yango. (aïdios g126)
Et qu'il a réservé sous l'obscurité, dans des liens éternels, jusqu'au jugement de la grande journée, les Anges qui n'ont pas gardé leur origine, mais qui ont abandonné leur propre demeure; (aïdios g126)
7 Ndenge moko mpe mpo na bato ya Sodome, ya Gomore mpe ya bingumba ya pembeni: basalaki ndenge moko na ba-anjelu, bamipesaki na pite mpe bazalaki kosangisa nzoto na ndenge oyo esengeli te. Bazali ndakisa mpo na bato oyo bazali komona pasi ya etumbu ya moto ya seko na seko. (aiōnios g166)
[Et] que Sodome et Gomorrhe, et les villes voisines qui s'étaient abandonnées en la même manière que celles-ci, à l'impureté, et qui avaient couru après les péchés contre nature, ont été mises pour servir d'exemple, ayant reçu la punition du feu éternel; (aiōnios g166)
8 Ezali mpe ndenge moko mpo na bato wana: makanisi na bango etindikaka bango na kobebisa banzoto na bango, na kotiola bokonzi ya Nkolo, mpe na kofinga bikelamu ya nkembo ya Likolo.
Nonobstant cela ceux-ci tout de même s'étant endormis [dans le vice], souillent [leur] chair, méprisent la domination, et blâment les dignités.
9 Nzokande, ezala Misheli, mokonzi ya ba-anjelu, tango abendanaki na Satana na tina na nzoto ya Moyize, amekaki ata moke te kopesa Satana etumbu ya soni; kasi alobaki kaka: « Tika ete Nkolo apesa yo etumbu! »
Et néanmoins Michel l'Archange, quand il contestait disputant avec le Démon touchant le corps de Moïse, n'osa point prononcer de sentence de malédiction, mais il dit seulement: que le Seigneur te censure fortement!
10 Kasi bato wana bafingaka oyo bango basosolaka te, mpe makambo oyo bango basosolaka na lolenge na bango ya bomoto mpe ya bonyama ekobebisa bango.
Mais ceux-ci médisent de tout ce qu'ils n'entendent point, et se corrompent en tout ce qu'ils connaissent naturellement, comme font les bêtes brutes.
11 Mawa na bango, pamba te balandaki nzela ya Kayina, bapengwaki lokola Balami mpo na lokoso ya mbongo, mpe bakufaki lokola Kore mpo na botomboki.
Malheur à eux, car ils ont suivi le train de Caïn, et ont couru, par un égarement [tel que celui] de Balaam, [après] la récompense, et ont péri par une contradiction [semblable à celle] de Coré.
12 Ezali mpe kaka bango nde babetisaka baninga mabaku na tango ya kolia na lisanga: baliaka na lokoso mpe na soni te, balukaka kaka bolamu na bango; bazali lokola mapata oyo ezangi mayi, oyo mopepe ezali komema; bazali lokola banzete oyo ebotaka bambuma te, ata na eleko ya kobuka bambuma; ekufaka mbala mibale soki bapikoli yango.
Ceux-ci sont des taches dans vos repas de charité, en prenant leurs repas avec vous, et se repaissant eux-mêmes sans crainte; [ce] sont des nuées sans eau, emportées des vents çà et là; des arbres dont le fruit se pourrit, et sans fruit, deux fois morts, et déracinés;
13 Babimisaka misala na bango ya soni ndenge ebale monene ebimisaka mbonge mpe fulufulu soki etomboki makasi; bazali lokola minzoto oyo eyengaka-yengaka. Nzambe abombeli bango etumbu ya molili makasi mpo na libela. (aiōn g165)
Des vagues impétueuses de la mer, jetant l'écume de leurs impuretés; des étoiles errantes, à qui l'obscurité des ténèbres est réservée éternellement. (aiōn g165)
14 Ezala Enoki, mokitani ya sambo wuta Adamu, asakolaki na tina na bango: « Tala, Nkolo azali koya elongo na basantu na Ye, bankoto na bankoto,
Desquels aussi Enoch, septième homme après Adam, a prophétisé, en disant:
15 mpo na kosambisa bato nyonso mpe kopesa etumbu na bato nyonso oyo batosaka Ye te mpo na misala na bango nyonso ya botomboki mpe mpo na mafinga nyonso oyo basumuki yango babimisaki mpo na kofinga Nzambe. »
Voici, le Seigneur est venu avec ses Saints, qui sont par millions, pour juger tous les hommes, et pour convaincre tous les méchants d'entre eux de toutes leurs méchantes actions qu'ils ont commises méchamment, et de toutes les paroles injurieuses que les pécheurs impies ont proférées contre lui.
16 Bato yango bayimaka-yimaka mpe bamilelaka-lelaka tango nyonso, batambolaka kolanda baposa mabe ya banzoto na bango, bamikumisaka mpe bakumisaka bato mosusu na lokuta mpo na kobenda litomba kowuta na bango.
Ce sont des murmurateurs, des querelleurs, se conduisant selon leurs convoitises, dont la bouche prononce des discours fort enflés, et qui admirent les personnes pour le profit qui leur en revient.
17 Kasi bino, balingami na ngai, bokanisa maloba oyo bantoma ya Yesu-Klisto, Nkolo na biso, balobaki liboso.
Mais vous, mes bien-aimés, souvenez vous des paroles qui ont été dites auparavant par les Apôtres de notre Seigneur Jésus-Christ.
18 Balobaki na bino: « Na tango ya suka, ekozala na batioli oyo bakotambola kolanda baposa na bango, oyo ekotindika bango na koboya kotosa makambo ya Nzambe. »
Et comment ils vous disaient, qu'au dernier temps il y aurait des moqueurs, qui marcheraient selon leurs impies convoitises.
19 Bazali bato oyo bakotisaka bokabwani kati na bato, bazali lokola banyama mpo ete bazangi Molimo ya Nzambe.
Ce sont ceux qui se séparent eux-mêmes, des gens sensuels, n'ayant point l'Esprit.
20 Kasi bino, balingami na ngai, botonga bomoi na bino na likolo ya kondima na bino, oyo eleki bule. Bobondelaka na nguya ya Molimo Mosantu.
Mais vous, mes bien-aimés, vous appuyant vous-mêmes sur votre très-sainte foi, et priant par le Saint-Esprit,
21 Bomibomba kati na bolingo ya Nzambe, wana bozali kozela ete Yesu-Klisto, Nkolo na biso, na mawa na Ye, apesa bino bomoi ya seko. (aiōnios g166)
Conservez-vous les uns les autres dans l'amour de Dieu, en attendant la miséricorde de notre Seigneur Jésus-Christ, pour [obtenir] la vie éternelle. (aiōnios g166)
22 Boyokela bato oyo bazali nanu na tembe mawa;
Et ayez pitié des uns en usant de discrétion;
23 mpo na bato mosusu, bobikisa bango na kobimisa bango na moto; mpe mpo na bato mosusu lisusu, boyokela bango mpe mawa oyo esangana na bobangi, na koyina ezala ata bilamba na bango, oyo baposa na bango ya nzoto ekomisa mbindo.
Et sauvez les autres par la frayeur, les arrachant comme hors du feu, et haïssez même la robe souillée par la chair.
24 Epai na Ye oyo azali na makoki ya kobatela bino mpo ete bokweya te, mpe ya kotelemisa bino liboso ya nkembo na Ye lokola bato oyo bazangi mbeba mpe bato ya esengo monene;
[Or] à celui qui est puissant pour vous garder sans que vous fassiez aucune chute et vous présenter irrépréhensibles devant sa gloire, avec joie;
25 epai ya Nzambe moko kaka, Mobikisi na biso, na nzela ya Yesu-Klisto, Nkolo na biso, tika ete nkembo, lokumu, nguya mpe bokonzi ezala ya Ye, wuta liboso ya tango, sik’oyo mpe mpo na libela na libela! Amen! (aiōn g165)
A Dieu, seul sage, notre Sauveur, soit gloire et magnificence, force, et empire dès maintenant et dans tous les siècles, Amen! (aiōn g165)

< Jide 1 >