< Jide 1 >
1 Ngai Jide, mowumbu ya Yesu-Klisto mpe ndeko ya Jake; Epai ya bato oyo Nzambe abenga, ba-oyo Nzambe Tata alingaka, mpe ba-oyo babatelami mpo na Yesu-Klisto:
Jude, a servant of Jesus Christ, and brother of James, to those who are sanctified in God the Father, and preserved in Jesus Christ, and called:
2 Tika ete mawa, kimia mpe bolingo efuluka kati na bino!
mercy be to you, and peace and love be multiplied.
3 Balingami na ngai, nazalaki na posa makasi ya kokomela bino na tina na lobiko oyo tozali na yango na lisanga. Nazwaki mokumba ya kokomela bino mpo na kolendisa bino ete bobunda mpo na kondima oyo Nzambe apesaki, mbala moko mpo na libela, epai ya basantu.
Beloved, using all diligence to write to you of the common salvation, I thought it necessary to write to you, and exhort you to contend earnestly for the faith once delivered to the saints.
4 Pamba te ezali na bato mosusu oyo basili kokota kati na bino na mayele mabe, ba-oyo etumbu na bango ekomama wuta kala: batosaka makambo ya Nzambe te, bakomisaka ngolu ya Nzambe na biso lokola nzela ya kosala makambo na bango ya soni, mpe bawanganaka Yesu-Klisto, Mokonzi kaka moko mpe Nkolo na biso.
For some men have stealthily entered in, who were long ago appointed to this condemnation; ungodly men, who pervert the grace of our God, and use it for lascivious purposes, and deny our only Sovereign and Lord, Jesus Christ.
5 Atako boyebi malamu makambo oyo nyonso, kasi nalingi kaka koyebisa bino lisusu ete Nkolo akangolaki bato na Ye na bowumbu kati na Ejipito, kasi, sima na yango, abomaki ba-oyo bazalaki na kondima te.
But I wish to remind you, though you once knew this, that the Lord, having saved the people from the land of Egypt, then destroyed those who believed not.
6 Nzambe akangaki mpe na minyololo ya seko, kati na molili mpo na kosambisama ya mokolo monene, ba-anjelu oyo basepelaki te na evandelo oyo Nzambe apesaki bango mpe batikaki yango. (aïdios )
The angels also that kept not their own dominion, but left their proper habitation, he has reserved, in eternal chains under darkness, to the judgment of the great day. (aïdios )
7 Ndenge moko mpe mpo na bato ya Sodome, ya Gomore mpe ya bingumba ya pembeni: basalaki ndenge moko na ba-anjelu, bamipesaki na pite mpe bazalaki kosangisa nzoto na ndenge oyo esengeli te. Bazali ndakisa mpo na bato oyo bazali komona pasi ya etumbu ya moto ya seko na seko. (aiōnios )
So Sodom and Gomorrah, and the cities which were about them, in like manner giving themselves over to lewdness, and following after other flesh, are set forth as an example, suffering the punishment of eternal fire. (aiōnios )
8 Ezali mpe ndenge moko mpo na bato wana: makanisi na bango etindikaka bango na kobebisa banzoto na bango, na kotiola bokonzi ya Nkolo, mpe na kofinga bikelamu ya nkembo ya Likolo.
Yet, these dreamers also in like manner defile the flesh, despise government, and speak evil of dignitaries.
9 Nzokande, ezala Misheli, mokonzi ya ba-anjelu, tango abendanaki na Satana na tina na nzoto ya Moyize, amekaki ata moke te kopesa Satana etumbu ya soni; kasi alobaki kaka: « Tika ete Nkolo apesa yo etumbu! »
But Michael the archangel, when, contending with the devil, he disputed about the body of Moses, durst not bring a railing accusation, but said: The Lord rebuke you.
10 Kasi bato wana bafingaka oyo bango basosolaka te, mpe makambo oyo bango basosolaka na lolenge na bango ya bomoto mpe ya bonyama ekobebisa bango.
But these speak evil of the things which they know not: and those things which they know naturally, as animals without reason, in these they corrupt themselves.
11 Mawa na bango, pamba te balandaki nzela ya Kayina, bapengwaki lokola Balami mpo na lokoso ya mbongo, mpe bakufaki lokola Kore mpo na botomboki.
Alas for them! for they have gone in the way of Cain: and, in the error of Balaam, they have rushed headlong after reward, and have perished in the rebellion of Korah.
12 Ezali mpe kaka bango nde babetisaka baninga mabaku na tango ya kolia na lisanga: baliaka na lokoso mpe na soni te, balukaka kaka bolamu na bango; bazali lokola mapata oyo ezangi mayi, oyo mopepe ezali komema; bazali lokola banzete oyo ebotaka bambuma te, ata na eleko ya kobuka bambuma; ekufaka mbala mibale soki bapikoli yango.
These, while feasting with you, are spots in your lovefeasts, feeding themselves without fear; they are clouds without water, driven along by winds; trees of autumn, without fruit, twice dead, torn up by the roots:
13 Babimisaka misala na bango ya soni ndenge ebale monene ebimisaka mbonge mpe fulufulu soki etomboki makasi; bazali lokola minzoto oyo eyengaka-yengaka. Nzambe abombeli bango etumbu ya molili makasi mpo na libela. (aiōn )
raging waves of the sea, foaming up their own shame: wandering stars, for whom the blackness of darkness is reserved forever. (aiōn )
14 Ezala Enoki, mokitani ya sambo wuta Adamu, asakolaki na tina na bango: « Tala, Nkolo azali koya elongo na basantu na Ye, bankoto na bankoto,
And Enoch, the seventh from Adam, also prophesied with reference to these men, saying: Behold, the Lord comes with his holy myriads,
15 mpo na kosambisa bato nyonso mpe kopesa etumbu na bato nyonso oyo batosaka Ye te mpo na misala na bango nyonso ya botomboki mpe mpo na mafinga nyonso oyo basumuki yango babimisaki mpo na kofinga Nzambe. »
to execute judgment upon all, and to convict all the ungodly of all their ungodly works, which they have impiously committed, and of all the hard words which ungodly sinners have spoken against him.
16 Bato yango bayimaka-yimaka mpe bamilelaka-lelaka tango nyonso, batambolaka kolanda baposa mabe ya banzoto na bango, bamikumisaka mpe bakumisaka bato mosusu na lokuta mpo na kobenda litomba kowuta na bango.
These are murmurers, fault-finders, walking according to their own desires; and their mouth speaks boastful words, while they admire persons for the sake of gain.
17 Kasi bino, balingami na ngai, bokanisa maloba oyo bantoma ya Yesu-Klisto, Nkolo na biso, balobaki liboso.
But do you, beloved, remember the words that were formerly spoken by the apostles of our Lord Jesus Christ;
18 Balobaki na bino: « Na tango ya suka, ekozala na batioli oyo bakotambola kolanda baposa na bango, oyo ekotindika bango na koboya kotosa makambo ya Nzambe. »
that they said to you, There should come, in the last days, scoffers walking according to their own ungodly desires.
19 Bazali bato oyo bakotisaka bokabwani kati na bato, bazali lokola banyama mpo ete bazangi Molimo ya Nzambe.
These are they who separate themselves, animal, not having the Spirit.
20 Kasi bino, balingami na ngai, botonga bomoi na bino na likolo ya kondima na bino, oyo eleki bule. Bobondelaka na nguya ya Molimo Mosantu.
But you, beloved, building yourselves up on your most holy faith, praying in the Holy Spirit,
21 Bomibomba kati na bolingo ya Nzambe, wana bozali kozela ete Yesu-Klisto, Nkolo na biso, na mawa na Ye, apesa bino bomoi ya seko. (aiōnios )
keep yourselves in the love of God, looking for the mercy of our Lord Jesus Christ, in order to eternal life. (aiōnios )
22 Boyokela bato oyo bazali nanu na tembe mawa;
And on some, have compassion, making a distinction:
23 mpo na bato mosusu, bobikisa bango na kobimisa bango na moto; mpe mpo na bato mosusu lisusu, boyokela bango mpe mawa oyo esangana na bobangi, na koyina ezala ata bilamba na bango, oyo baposa na bango ya nzoto ekomisa mbindo.
and others, save by fear, snatching them from the fire, hating even the garment spotted by the flesh.
24 Epai na Ye oyo azali na makoki ya kobatela bino mpo ete bokweya te, mpe ya kotelemisa bino liboso ya nkembo na Ye lokola bato oyo bazangi mbeba mpe bato ya esengo monene;
Now to him that is able to keep you free from stumbling, and to present you blameless in the presence of his glory with exceeding joy,
25 epai ya Nzambe moko kaka, Mobikisi na biso, na nzela ya Yesu-Klisto, Nkolo na biso, tika ete nkembo, lokumu, nguya mpe bokonzi ezala ya Ye, wuta liboso ya tango, sik’oyo mpe mpo na libela na libela! Amen! (aiōn )
to the only God our Savior, be glory and majesty, strength and authority, both now and throughout all the ages. Amen. (aiōn )