< Jozue 9 >

1 Tango bakonzi nyonso (bakonzi ya bato ya Iti, ya Amori, ya Kanana, ya Perizi, ya Evi mpe ya Yebusi) oyo bazalaki na ngambo ya weste ya Yordani, kati na mokili ya bangomba, na etando mpe na mokili oyo ezalaki pembeni-pembeni ya Mayi monene Mediterane, pene ya Libani, bayokaki sango ya makambo yango,
約旦河西,住在山地和平原並沿大海一帶直到黎巴嫩山上的眾王子,即赫特人、阿摩黎人、客納罕人、堷黎齊人、希威人和耶步斯人,聽見了這些事,
2 basanganaki mpo na kobundisa Jozue mpe Isalaele.
聯合起來,同心協力對抗若蘇厄和以色人。
3 Tango mpe bato ya Gabaoni bayokaki makambo oyo Jozue asalaki na Jeriko mpe na Ayi,
基貝紅居民聽說若蘇厄對耶利哥和哈依所行的事,
4 basalelaki mayele mabe: babongolaki lolenge na bango, batiaki na likolo ya ba-ane na bango basaki epasuka-pasuka mpe bambeki ya kala ya vino oyo etoboka-toboka mpe babamba-bamba.
便設詭許帶著行糧上路將一些舊布袋和破裂縫補的舊酒囊馱在驢上;
5 Balataki basapato ya kala oyo babamba-bamba mpe bilamba ya kala; mapa na bango ya kolia ezalaki biteni-biteni mpe ya kokawuka.
腳上穿著補過的破鞋,身上穿著襤褸的衣服;所帶的食物,又乾又碎,
6 Bakendeki kokutana na Jozue kati na molako ya Giligali, mpe balobaki na ye mpe na bana ya Isalaele: — Towuti na mokili moko ya mosika; bosala boyokani elongo na biso.
來到基耳加耳營中見若蘇厄;對他和以色列人說:「我們是遠方來的,現在請你們與我們立約。」
7 Bato ya Isalaele balobaki na bato ya Evi: — Tango mosusu bozalaka kaka pembeni na biso! Ndenge nini tosala boyokani elongo na bino?
以色列對這些希威人說:「你們也許是我們附近的居民,我們怎能同你們立約﹖」
8 Bazongiselaki Jozue: — Tozali basali na yo. Kasi Jozue atunaki bango: — Bozali banani mpe bowuti wapi?
他們回答若蘇厄說:「我們是你的僕人。」若蘇厄問他們說:「你們是什麼人﹖是從那裏來的﹖」
9 Bazongiselaki ye: — Basali na yo bawuti na mokili moko ya mosika penza, likolo ya sango na Yawe, Nzambe na bino. Pamba te toyokaki sango na Ye mpo na makambo nyonso oyo asalaki kati na Ejipito
他們答說:「你的僕人是因為聽了上主你們天主的名聲,由極遠的地方來的,因為我們聽見人 談及衪的聲望,和衪在埃及所行的一切,
10 mpe epai ya bakonzi mibale ya bato ya Amori oyo bazalaki na ngambo ya este ya Yordani: Sikoni, mokonzi ya Eshiboni, mpe Ogi, mokonzi ya Bashani, oyo azalaki kovanda na Ashitaroti.
以及衪對住在約旦河東的的兩阿摩黎王:即赫市朋王息紅和阿市塔洛特的巴商王敖格所行的一切。
11 Bampaka na biso mpe bavandi nyonso ya mokili na biso balobaki na biso: « Bokamata biloko ya kolia na nzela, bokende kokutana na bango mpe boyebisa bango: ‹ Tozali basali na bino, bosala boyokani elongo na biso. › »
為此,我們的長老和我們本地的居民,對我們說:你們手中拿些路用的食物,去迎接以色列人;對他們說:我們是你們的僕人,現在請你們與我們立約。
12 Tala kutu mapa na biso, ezalaki ya moto tango tobongisaki yango na bandako na biso lokola bilei ya mobembo, na mokolo oyo tolongwaki mpo ete toya epai na bino. Kasi sik’oyo tala ndenge nini esili kokawuka mpe kokoma biteni-biteni.
看,這是我們的食物,我們從家中帶出來,要到你們這裏來的那天還熱,看,現在又乾又碎;
13 Mpe lisusu, totondisaki bambeki oyo na vino tango ezalaki nanu ya sika, kasi tala sik’oyo ndenge nini esili kopasuka-pasuka mpe tala ndenge nini bilamba mpe basapato na biso esili kokufa mpo ete nzela ya mobembo eleki molayi.
這就是我們的酒囊,才盛酒的時候還新,看,現在都破裂了;這是我們的衣服和鞋,為了路途遙遠,都穿爛了。」
14 Bana ya Isalaele bazwaki bilei oyo bato ya Gabaoni bayaki na yango, kasi batunaki Yawe te.
以色列的首領便取了他們的行糧,並沒有請求上主的諭示;
15 Jozue asalaki elongo na bango boyokani ya kimia; alakaki ete akoboma bango te. Mpe bakambi ya lisanga ya Isalaele bandimaki yango na kolapa ndayi.
若蘇厄便與他們修好,與他們立了約,讓他們生存,會眾的首領也向他們起了誓。
16 Nzokande, mikolo misato sima na kosala boyokani elongo na bato ya Gabaoni, bana ya Isalaele bayokaki ete bato yango bazalaka pene na bango mpe bavandaka kati na bango.
但是,與他們立約後才過了三天,以色列人就聽說,他們是住在自己附近的居民。
17 Boye, bana ya Isalaele batelemaki mpo na kokende; mpe na mokolo ya misato, bakomaki na bingumba na bango: Gabaoni, Kefira, Beyeroti mpe Kiriati-Yearimi.
以色列子民於是動身,第三天便到了他們的城市:就是基貝紅、革非辣、貝洛特和克黎雅特耶阿陵。
18 Kasi bana ya Isalaele babundisaki bango te, pamba te bakambi ya lisanga balapaki ndayi mpo na bango na Kombo na Yawe, Nzambe ya Isalaele. Boye, lisanga mobimba ekomaki koyimayima mpo na bakambi.
但以色列子民沒有擊殺他們,因為會眾的首領指著上主,以色列的天主,對他們起過誓;但全會眾對他們的首領不滿。
19 Kasi bakambi nyonso balobaki na lisanga mobimba: « Solo, tolapaki ndayi mpo na bango na Kombo na Yawe, Nzambe ya Isalaele. Boye, tokoki kosala bango mabe te.
眾首領對全會眾說:「我們既已指著上主以色列的天主對他們起誓,那麼我們決不能加害他們,
20 Kasi tala ndenge nini tokoki kosala bango: Tokotika bango kobika mpo ete kanda na Nzambe ekitela biso te, pamba te tolapaki ndayi na tina na bango. »
只有這樣做,就是讓他們生存下去,免得因我們對他們所起的誓,為我們招來上主的義怒。」
21 Bakambi babakisaki lisusu: « Tika ete bazala na bomoi, kasi bakobanda kokata banzete mpe kotoka mayi mpo na lisanga mobimba. » Wana nde ezalaki mokano oyo bakambi bazwaki.
首領又對民眾說:「讓他們生存下去,但他們應為全會眾劈柴挑水。」全會眾便遵照首領的話而行。
22 Jozue abengisaki bato ya Gabaoni mpe atunaki bango: — Mpo na nini bokosaki biso na koloba: « Tovandaka mosika na bino, » nzokande bovandi kaka pene na biso awa?
若蘇厄將基貝紅人召來,對他們說:「你們為什麼欺騙我們說:我們離你們很遠,其實你們就住在我們附近﹖
23 Bozali sik’oyo na se ya elakeli mabe mpe bokotikala libela kozala bawumbu; bokobanda kokataka bakoni mpe kotokaka mayi mpo na Ndako ya Nzambe na ngai.
從此你們應受詛咒,你們中間,決不斷有人在我天主的殿內,做劈柴挑水的勞役。」
24 Bazongiselaki Jozue: — Basali na yo bayokaki sango ya mitindo oyo Yawe, Nzambe na bino, apesaki epai ya mosali na Ye Moyize, ete akopesa bino mokili oyo nyonso mpe akoboma bato na yango nyonso liboso na bino. Boye, tozalaki na somo makasi ya kobungisa bomoi na biso liboso na bino; yango wana tosalaki bongo.
他們回答若蘇厄說:「你的僕人確實聽說:上主你的天主,曾吩咐衪的僕人梅瑟,要把這整塊土地賜給你們,並在你們面前,將這地方上的一切居民消滅;我們見你們前來,我們實在為我們的生命擔憂,所以才做了這事。
25 Tala biso oyo, tomitiki na maboko na yo; nyonso oyo okomona malamu mpe sembo na miso na yo, sala biso yango.
現在,我們都在你手裏,你以為怎樣好,怎樣對,就怎樣對待我們吧! 」
26 Jozue abikisaki bango na maboko ya bana ya Isalaele, mpe babomaki bango te.
若蘇厄就這樣對待了他們:將他們由以色列人手中救出,不讓人加害他們。
27 Na mokolo wana, Jozue akomisaki bango bawumbu mpo na kokata bakoni mpe kotoka mayi mpo na lisanga ya Isalaele mpe mpo na etumbelo ya Yawe, kino na mokolo ya lelo, na esika nyonso oyo Yawe akopona.
當天就派定他們在上主選定的地方,為會眾,為上主的祭壇,劈柴挑水,直到今日。

< Jozue 9 >