< Jozue 7 >

1 Bato ya Isalaele babebisaki ekila ya Yawe. Akana, mwana mobali ya Karimi, mwana mobali ya Zabidi, mwana mobali ya Zera, moto ya libota ya Yuda, akamataki biloko oyo Yawe apekisaki. Bongo, kanda ya Yawe epelaki likolo ya bana ya Isalaele.
וימעלו בני ישראל מעל בחרם ויקח עכן בן כרמי בן זבדי בן זרח למטה יהודה מן החרם ויחר אף יהוה בבני ישראל
2 Wuta na Jeriko, Jozue atindaki bato kokende na engumba Ayi oyo ezalaki pene ya Beti-Aveni, na ngambo ya este ya Beteli. Alobaki na bango: « Bokende kononga mokili wana. » Bato yango bakendeki mpe banongaki Ayi.
וישלח יהושע אנשים מיריחו העי אשר עם בית און מקדם לבית אל ויאמר אליהם לאמר עלו ורגלו את הארץ ויעלו האנשים וירגלו את העי
3 Tango bazongaki epai ya Jozue, balobaki na ye: « Ezali penza na tina te ete bato nyonso bakende kobundisa Ayi. Tinda kaka bato nkoto mibale to nkoto misato mpo na kobotola yango. Komonisa bato nyonso pasi te, pamba te engumba yango ezali kaka na bato moke. »
וישבו אל יהושע ויאמרו אליו אל יעל כל העם--כאלפים איש או כשלשת אלפים איש יעלו ויכו את העי אל תיגע שמה את כל העם כי מעט המה
4 Boye, bato pene nkoto misato bakendeki, kasi bakimaki liboso ya bato ya Ayi.
ויעלו מן העם שמה כשלשת אלפים איש וינסו לפני אנשי העי
5 Bato ya Ayi babomaki bato pene tuku misato na motoba na molongo ya Isalaele. Balandaki bango kino koleka ekuke ya engumba Shebarimi mpe babomaki bango na kokita ya ngomba. Mpo na yango, mitema ya bana ya Isalaele elembaki mpe bakomaki lokola mayi oyo ezali kotiola.
ויכו מהם אנשי העי כשלשים וששה איש וירדפום לפני השער עד השברים ויכום במורד וימס לבב העם ויהי למים
6 Jozue apasolaki bilamba na ye mpe amibwakaki elongi kino na mabele liboso ya Sanduku ya Yawe kino na pokwa. Bakambi ya Isalaele mpe basalaki kaka ndenge moko, bamisopelaki putulu na mito na bango.
ויקרע יהושע שמלתיו ויפל על פניו ארצה לפני ארון יהוה עד הערב--הוא וזקני ישראל ויעלו עפר על ראשם
7 Jozue alobaki: — Ah Nkolo Yawe, mpo na nini otikaki ete bato oyo bakatisa Yordani? Boni, ezalaki mpo ete okaba biso na maboko ya bato ya Amori ete baboma biso? Elekaki malamu ete totikala na biso na ngambo mosusu ya ebale!
ויאמר יהושע אהה אדני יהוה למה העברת העביר את העם הזה את הירדן לתת אתנו ביד האמרי להאבידנו ולו הואלנו ונשב בעבר הירדן
8 Oh Nkolo, sik’oyo naloba nini, awa Isalaele akimi liboso ya banguna na ye?
בי אדני מה אמר--אחרי אשר הפך ישראל ערף לפני איביו
9 Bato ya Kanana mpe bato mosusu ya mokili bakoyoka sango yango, bakobalukela biso mpe bakolongola kombo na biso na mokili. Boye, okosala nini mpo na monene ya Kombo na Yo?
וישמעו הכנעני וכל ישבי הארץ ונסבו עלינו והכריתו את שמנו מן הארץ ומה תעשה לשמך הגדול
10 Yawe alobaki na Jozue: — Telema! Mpo na nini omibwaki elongi kino na mabele?
ויאמר יהוה אל יהושע קם לך למה זה אתה נפל על פניך
11 Isalaele asali lisumu. Babebisi boyokani na Ngai oyo natindaki bango ete babatela. Bakamati ndambo ya biloko oyo ekabami mpo na kobebisama, bayibi yango mpe babombi yango kati na biloko na bango.
חטא ישראל וגם עברו את בריתי אשר צויתי אותם וגם לקחו מן החרם וגם גנבו וגם כחשו וגם שמו בכליהם
12 Yango wana, bana ya Isalaele bakolonga kotelema te liboso ya banguna na bango, bakozonga sima mpe bakokima liboso ya banguna na bango, pamba te babebisi ekila. Nakozala elongo na bino te soki bolongoli te mabe oyo ezali kati na bino.
ולא יכלו בני ישראל לקום לפני איביהם--ערף יפנו לפני איביהם כי היו לחרם לא אוסיף להיות עמכם אם לא תשמידו החרם מקרבכם
13 Telema, bulisa bato. Loba na bango: « Bomibulisa mpo na lobi, pamba te Yawe, Nzambe ya Isalaele, alobi boye: ‹ Mabe ezali kati na yo Isalaele, okolonga kobundisa banguna na yo te kino tango okolongola yango. ›
קם קדש את העם ואמרת התקדשו למחר כי כה אמר יהוה אלהי ישראל חרם בקרבך ישראל--לא תוכל לקום לפני איביך עד הסירכם החרם מקרבכם
14 Lobi na tongo, bokopusana pene na Ngai, libota na libota. Libota oyo Yawe akopona ekopusana, etuka na etuka; etuka oyo Yawe akopona ekopusana, ndako na ndako; mpe ndako oyo Yawe akopona ekopusana, moto na moto.
ונקרבתם בבקר לשבטיכם והיה השבט אשר ילכדנו יהוה יקרב למשפחות והמשפחה אשר ילכדנה יהוה תקרב לבתים והבית אשר ילכדנו יהוה יקרב לגברים
15 Moto nyonso oyo mabe ekomonana kati na ye asengeli kokufa na moto, ye elongo na nyonso ya ye, pamba te abebisi boyokani ya Yawe mpe asali likambo ya soni kati na Isalaele. »
והיה הנלכד בחרם--ישרף באש אתו ואת כל אשר לו כי עבר את ברית יהוה וכי עשה נבלה בישראל
16 Mokolo oyo elandaki, Jozue alamukaki na tongo-tongo penza, mpe abengisaki Isalaele, libota na libota. Mpe ezali libota ya Yuda nde eponamaki.
וישכם יהושע בבקר ויקרב את ישראל לשבטיו וילכד שבט יהודה
17 Tango abengisaki etuka na etuka ya libota ya Yuda, etuka ya Zera nde eponamaki. Tango abengisaki ndako na ndako kati na etuka ya Zera, ndako ya Zabidi nde eponamaki.
ויקרב את משפחת יהודה וילכד את משפחת הזרחי ויקרב את משפחת הזרחי לגברים וילכד זבדי
18 Sima, tango abengisaki moto na moto kati na ndako ya Zabidi, Akana, mwana mobali ya Karimi, mwana mobali ya Zabidi, mwana mobali ya Zera, moto ya libota ya Yuda, nde aponamaki.
ויקרב את ביתו לגברים וילכד עכן בן כרמי בן זבדי בן זרח--למטה יהודה
19 Jozue alobaki na Akana: — Mwana na ngai, pesa nkembo epai na Yawe, Nzambe ya Isalaele, mpe pesa Ye penza lokumu. Yebisa ngai likambo oyo osalaki, kobombela ngai eloko moko te.
ויאמר יהושע אל עכן בני שים נא כבוד ליהוה אלהי ישראל--ותן לו תודה והגד נא לי מה עשית אל תכחד ממני
20 Akana azongiselaki Jozue: — Solo, nasali lisumu liboso ya Yawe, Nzambe ya Isalaele. Tala likambo oyo nasalaki:
ויען עכן את יהושע ויאמר אמנה אנכי חטאתי ליהוה אלהי ישראל וכזאת וכזאת עשיתי
21 Namonaki, kati na bomengo ya bitumba, kazaka moko ya kitoko ya mboka Mezopotami, mbongo ya bibende ya palata, nkama mibale mpe ndambo ya kilo ya wolo; nalulaki yango mpe nazwaki yango. Nakundaki yango na kati-kati ya ndako na ngai ya kapo, mpe palata ezali na se na yango.
ואראה (וארא) בשלל אדרת שנער אחת טובה ומאתים שקלים כסף ולשון זהב אחד חמשים שקלים משקלו ואחמדם ואקחם והנם טמונים בארץ בתוך האהלי והכסף תחתיה
22 Jozue atindaki bato, mpe bakendeki mbangu kati na ndako ya kapo ya Akana mpe bakutaki penza kazaka bakunda na se ya ndako ya kapo, elongo na palata, na se na yango.
וישלח יהושע מלאכים וירצו האהלה והנה טמונה באהלו והכסף תחתיה
23 Babimisaki biloko yango wuta na ndako na ye ya kapo, bamemaki yango liboso ya Jozue mpe ya bana nyonso ya Isalaele; mpe sima, basopaki yango liboso ya Yawe.
ויקחום מתוך האהל ויבאום אל יהושע ואל כל בני ישראל ויצקם לפני יהוה
24 Jozue elongo na bana nyonso ya Isalaele bakamataki Akana, mwana mobali ya Zera, elongo na palata, kazaka, liboke ya wolo, bana na ye ya mibali mpe ya basi, bangombe na ye, ba-ane na ye, bameme mpe bantaba na ye, ndako na ye ya kapo mpe biloko na ye nyonso; bamemaki bango na Lubwaku ya Akori.
ויקח יהושע את עכן בן זרח ואת הכסף ואת האדרת ואת לשון הזהב ואת בניו ואת בנתיו ואת שורו ואת חמרו ואת צאנו ואת אהלו ואת כל אשר לו וכל ישראל עמו ויעלו אתם עמק עכור
25 Jozue alobaki: « Mpo na nini omemeli biso pasi? Tika ete Yawe amonisa yo pasi lelo! » Bongo bato nyonso ya Isalaele babambaki ye mabanga mpe akufaki; babambaki lisusu mabanga na bato oyo batikalaki mpe bato yango bakufaki; mpe batumbaki bibembe na bango na moto.
ויאמר יהושע מה עכרתנו יעכרך יהוה ביום הזה וירגמו אתו כל ישראל אבן וישרפו אתם באש ויסקלו אתם באבנים
26 Babwakaki na likolo ya Akana liboke ya mabanga ebele oyo ezali kino na mokolo ya lelo, mpe kanda ya Yawe esilaki. Yango wana, kino na mokolo ya lelo, babengaka esika yango Lubwaku ya Akori.
ויקימו עליו גל אבנים גדול עד היום הזה וישב יהוה מחרון אפו על כן קרא שם המקום ההוא עמק עכור עד היום הזה

< Jozue 7 >