< Jozue 6 >
1 Bikuke ya engumba Jeriko ezalaki ya kokangama makasi penza mpo na bana ya Isalaele; moto moko te akokaki kokota to kobima.
A Jerihon se zatvori, i èuvaše se od sinova Izrailjevih; niko ne izlažaše, niti ko ulažaše.
2 Yawe alobaki na Jozue: — Tala, na maboko na yo, nasili kokaba Jeriko elongo na mokonzi na yango mpe bilombe na yango ya bitumba.
A Gospod reèe Isusu: evo, dajem ti u ruke Jerihon i cara njegova i junake njegove.
3 Botambola zingazinga ya engumba mbala moko na mokolo, yo elongo na bato nyonso ya etumba. Bosala bongo mikolo motoba.
Zato obidite oko grada svi vojnici, iduæi oko grada jedanput na dan; tako uèini šest dana.
4 Kamata Banganga-Nzambe sambo; Nganga-Nzambe moko na moko asengeli komema kelelo moko basala na liseke ya meme. Banganga-Nzambe nyonso sambo basengeli kotambola liboso ya Sanduku. Na mokolo ya sambo, bobaluka zingazinga ya engumba mbala sambo, elongo na Banganga-Nzambe oyo bakozala kobeta bakelelo.
A sedam sveštenika neka nose sedam truba od rogova ovnujskih pred kovèegom; a sedmoga dana obidite oko grada sedam puta, i sveštenici neka trube u trube.
5 Tango lolaka ya bakelelo yango ekoyokana tango molayi, tika ete bato nyonso baganga makasi; bongo mir ya engumba ekokweya na pwasa, mpe moto na moto akokota na engumba, na esika oyo akozala.
Pa kad otežuæi zatrube u rogove ovnujske, èim èujete glas od trube, neka povièe sav narod iza glasa; i zidovi æe gradski popadati na svojem mjestu, a narod neka ulazi, svaki naprema se.
6 Boye Jozue, mwana mobali ya Nuni, abengaki Banganga-Nzambe mpe alobaki na bango: — Bomema Sanduku ya Boyokani ya Yawe, mpe tika ete Banganga-Nzambe sambo kati na bino bakamata bakelelo sambo mpe batambola liboso ya Sanduku ya Yawe.
Tada Isus sin Navin dozva sveštenike, i reèe im: uzmite kovèeg zavjetni, a sedam sveštenika neka nose sedam truba od rogova ovnujskih pred kovèegom Gospodnjim.
7 Bongo apesaki mitindo oyo epai ya bana ya Isalaele: — Bokende liboso! Botambola zingazinga ya engumba, mpe tika ete basoda oyo bazalaka na liboso, na etumba, baleka liboso ya Sanduku ya Yawe.
A narodu reèe: idite i obidite oko grada, i vojnici neka idu pred kovèegom Gospodnjim.
8 Tango Jozue asilisaki koloba na bato, Banganga-Nzambe sambo, oyo bakamataki bakelelo sambo liboso ya Yawe, balekaki liboso mpe bakomaki kobeta yango, wana Sanduku ya Boyokani ya Yawe ezalaki kolanda bango na sima.
A kad Isus reèe narodu, sedam sveštenika noseæi sedam truba od rogova ovnujskih poðoše pred Gospodom, i zatrubiše u trube, a kovèeg zavjeta Gospodnjega poðe za njima.
9 Basoda oyo bazalaka na liboso, na bitumba, bazalaki kotambola liboso ya Banganga-Nzambe oyo bazalaki kobeta bakelelo; bongo basoda oyo batikalaka na sima, bazalaki kolanda Sanduku ya Boyokani. Na tango wana nyonso, bakelelo ezalaki kaka kobeta.
A vojnici poðoše pred sveštenicima, koji trubljahu u trube, a ostali poðoše za kovèegom; iduæi trubljahu u trube.
10 Kasi Jozue apesaki mitindo oyo epai ya bana ya Isalaele: — Boganga te, boloba mpe eloko moko te! Bovanda kaka kimia kino tango nakoloba na bino ete boganga makasi; wana nde bokoganga makasi.
A narodu zapovjedi Isus govoreæi: ne vièite, i nemojte da vam se èuje glas, i nijedna rijeè da ne izide iz usta vaših do dana kad vam ja kažem: vièite; tada æete vikati.
11 Boye, Sanduku ya Yawe ezalaki kotambola zingazinga ya engumba mbala moko na mokolo; bongo na sima, bato bazalaki kozonga na molako mpo na kolekisa butu.
Tako obide kovèeg Gospodnji oko grada jednom; pa se vratiše u oko, i noæiše u okolu.
12 Na tongo-tongo ya mokolo oyo elandaki, Jozue alamukaki, mpe Banganga-Nzambe bamemaki Sanduku ya Yawe.
A sjutradan usta Isus rano, i sveštenici uzeše kovèeg Gospodnji.
13 Banganga-Nzambe sambo oyo basimbaki bakelelo sambo balekaki liboso, batambolaki liboso ya Sanduku ya Yawe, na kobeta bakelelo. Basoda oyo bazalaka na liboso, na bitumba, balekaki liboso na bango; mpe basoda oyo batikalaka na sima bazalaki kolanda Sanduku ya Yawe, wana bakelelo ezalaki kobeta.
I sedam sveštenika noseæi sedam truba od rogova ovnujskih iðahu pred kovèegom Gospodnjim, i iduæi trubljahu u trube; a vojnici iðahu pred njima, a ostali iðahu za kovèegom Gospodnjim; iduæi trubljahu u trube.
14 Na mokolo ya mibale, babalukaki lisusu engumba mbala moko; bongo na sima, bazongaki na molako. Boye, basalaki bongo mikolo motoba.
I obidoše oko grada jednom drugoga dana, pa se vratiše u oko; tako uèiniše šest dana.
15 Na mokolo ya sambo, balamukaki na tongo-tongo mpe babalukaki zingazinga ya engumba mbala sambo, ndenge kaka bazalaki kosala. Ezalaki kaka mokolo wana nde babalukaki mbala sambo zingazinga ya engumba.
A sedmoga dana ustaše zorom, i obidoše oko grada isto onako sedam puta; samo toga dana obidoše oko grada sedam puta.
16 Na mbala oyo ya sambo, tango Banganga-Nzambe babetaki bakelelo tango molayi, Jozue apesaki mitindo epai ya bato: — Boganga makasi, pamba te Yawe akabi engumba oyo na maboko na bino!
A kad bi sedmi put da zatrube sveštenici u trube, Isus reèe narodu: vièite, jer vam Gospod dade grad.
17 Bobebisa mpo na Yawe engumba oyo nyonso elongo na biloko nyonso oyo ezali kati na yango. Bobikisa kaka Raabi, mwasi ya ndumba, elongo na bato na ye nyonso oyo bakozala kati na ndako na ye, pamba te abombaki banongi oyo totindaki.
A grad da bude proklet Gospodu i što je god u njemu; samo Rava kurva nek ostane u životu i svi koji budu kod nje u kuæi, jer sakri poslanike koje bijasmo poslali.
18 Kasi bosala keba na tina na biloko oyo ekabami mpo na kobebisama, mpo ete bomilukela pasi te na koluka kokamata ata eloko moko kati na yango, noki te bokomema lisuma oyo ekobebisa molako ya Isalaele mpe bokotia yango na mobulu.
Ali se èuvajte od prokletijeh stvari da i sami ne budete prokleti uzevši što prokleto, i da ne navuèete prokletstvo na oko Izrailjev i smetete ga.
19 Kasi palata, wolo mpe biloko nyonso ya bronze elongo na bibende ekobulisama mpo na Yawe mpe esengeli kokende na ebombelo bomengo ya Yawe.
Nego sve srebro i zlato i posuðe od mjedi i od gvožða neka bude sveto Gospodu, neka uðe u riznicu Gospodnju.
20 Tango babetaki bakelelo, bato bagangaki makasi. Bongo, tango bato bagangaki makasi sima na koyoka lolaka ya kelelo kobeta tango molayi, mir ya engumba ekweyaki na pwasa. Boye, moto nyonso akotaki na engumba, liboso na ye, mpe babotolaki yango.
Tada povika narod i zatrubiše trube, i kad narod èu glas trubni i povika iza glasa, popadaše zidovi na mjestu svom; i narod uðe u grad, svaki naprema se; i uzeše grad.
21 Babomaki na mopanga, nyonso oyo ezalaki kati na engumba: mobali to mwasi, elenge to mobange, ngombe to meme to mpe ane.
I pobiše kao prokleto oštrijem maèem sve što bješe u gradu, i žene i ljude, i djecu i starce, i volove i ovce i magarce.
22 Jozue alobaki na bato mibale oyo banongaki Jeriko: — Bokota na ndako ya mwasi ya ndumba, bobimisa ye libanda elongo na bato na ye nyonso, kolanda ndayi oyo bolapaki liboso na ye.
A onoj dvojici što uhodiše zemlju reèe Isus: idite u kuæu one žene kurve, i izvedite nju i sve što je njezino, kao što ste joj se zakleli.
23 Boye, bilenge mibali oyo bakendeki kononga mokili bakotaki mpe babimisaki Raabi, tata na ye, mama na ye, bandeko na ye ya mibali mpe biloko na ye nyonso. Babimisaki libota na ye mobimba na libanda mpe batiaki bango libanda ya molako ya Isalaele.
I otišavši oni momci što uhodiše zemlju, izvedoše Ravu i oca joj i mater joj i braæu joj i što god bješe njezino, i sav rod njezin izvedoše, i ostaviše ih iza okola Izrailjeva.
24 Batumbaki engumba mobimba elongo na biloko nyonso oyo ezalaki kati na yango, longola kaka palata mpe wolo, bisalelo nyonso ya bronze mpe ya bibende oyo batiaki na ebombelo bomengo ya Tempelo ya Yawe.
A grad spališe ognjem i što bješe u njemu; samo srebro i zlato i posuðe od mjedi i od gvožða metnuše u riznicu doma Gospodnjega.
25 Jozue abikisaki Raabi, mwasi ya ndumba, libota na ye mpe bato na ye nyonso, pamba te abombaki bato oyo Jozue atindaki mpo na kononga Jeriko. Boye, akomaki kovanda kati na bana ya Isalaele kino na mokolo ya lelo.
A Ravu kurvu i dom oca njezina i sve što bješe njezino ostavi u životu Isus, i ona osta meðu Izrailjcima do danas, jer sakri poslanike koje posla Isus da uhode Jerihon.
26 Kaka na tango yango, Jozue akataki seleka oyo: « Tika ete moto oyo akoluka kotonga lisusu engumba Jeriko alakelama mabe liboso ya Yawe! Solo, akofuta motuya ya bomoi ya mwana na ye ya liboso ya mobali, tango akotonga miboko na yango; mpe motuya ya bomoi ya mwana na ye ya suka, tango akotia bikuke na yango. »
I u to vrijeme prokle Isus govoreæi: proklet da je pred Gospodom èovjek koji bi ustao da gradi ovaj grad Jerihon! na prvencu svom osnovao ga, i na mjezincu svom postavio mu vrata!
27 Yawe azalaki elongo na Jozue, mpe sango na ye epanzanaki mokili mobimba.
I Gospod bijaše s Isusom, i razglasi se ime njegovo po svoj zemlji.