< Jozue 5 >

1 Nzokande, tango bakonzi nyonso ya Amori, na ngambo ya weste ya Yordani, mpe bakonzi nyonso ya Kanana, pene ya ebale monene ya Barozo, bayokaki ndenge nini Yawe akawusaki ebale Yordani liboso ya bana ya Isalaele kino tango basilisaki kokatisa, mitema na bango ebukanaki mpe bazalaki lisusu na makasi te ya kotelemela bana ya Isalaele.
And it came to pass, when all the kings of the Amorites, who were on the side of Jordan westward, and all the kings of the Canaanites, who were by the sea, heard that the LORD had dried up the waters of Jordan from before the children of Israel, until we had passed over, that their heart melted, neither was there spirit in them any more, because of the children of Israel.
2 Na tango wana, Yawe alobaki na Jozue: — Sala bambeli ya mabanga mpe kata lisusu bana mibali ya Isalaele ngenga.
At that time the LORD said to Joshua, Make thee sharp knives, and circumcise again the children of Israel the second time.
3 Jozue asalaki bambeli ya mabanga mpe akataki bana mibali ya Isalaele ngenga, pene ya ngomba moke ya Araloti.
And Joshua made him sharp knives, and circumcised the children of Israel at the hill of the foreskins.
4 Tala mpo na nini Jozue asengelaki kokata bango ngenga: Mibali nyonso oyo babimaki na Ejipito mpe bakokisaki mibu ya kobunda bitumba bakufaki na nzela, kati na esobe, sima na bango kobima na Ejipito.
And this is the cause why Joshua did circumcise: All the people that came out of Egypt, that were males, even all the men of war, died in the wilderness by the way, after they came out of Egypt.
5 Mibali nyonso oyo babimaki na Ejipito bakatamaki ngenga; kasi bato nyonso oyo babotamaki na nzela, kati na esobe, bakatamaki ngenga te.
Now all the people that came out were circumcised: but all the people that were born in the wilderness by the way as they came forth from Egypt, them they had not circumcised.
6 Bana ya Isalaele batambolaki kati na esobe mibu tuku minei, kino tango ekeke mobimba ya mibali oyo bakokisaki mibu ya kobunda bitumba tango babimaki na Ejipito basilaki kokufa. Mpo ete batosaki Yawe te, Yawe alapaki ndayi ete bakomona te mokili oyo alakaki kopesa epai ya batata na bango, mokili oyo ezali kobimisa miliki mpe mafuta ya nzoyi.
For the children of Israel walked forty years in the wilderness, till all the people that were men of war, who came out of Egypt, were consumed, because they obeyed not the voice of the LORD: to whom the LORD swore that he would not show them the land, which the LORD swore to their fathers that he would give us, a land that floweth with milk and honey.
7 Boye, atombolaki bana na esika ya batata na bango; yango wana Jozue akataki bango ngenga, pamba te bakatamaki ngenga te na nzela.
And their children, whom he raised up in their stead, them Joshua circumcised: for they were uncircumcised, because they had not circumcised them by the way.
8 Sima na ekolo mobimba kokatama ngenga, batikalaki esika moko kati na molako kino tango bapota na bango ekawukaki.
And it came to pass, when they had done circumcising all the people, that they abode in their places in the camp, till they were healed.
9 Yawe alobaki na Jozue: — Lelo, natindiki soni ya Ejipito mosika na bino. Babengaki esika yango « Giligali » kino na mokolo ya lelo.
And the LORD said to Joshua, This day have I rolled away the reproach of Egypt from off you. Therefore the name of the place is called Gilgal to this day.
10 Na pokwa ya mokolo ya zomi na minei ya sanza wana, bana ya Isalaele basalaki feti ya Pasika, wana bazalaki nanu na molako ya Giligali, na etando ya Jeriko.
And the children of Israel encamped in Gilgal, and kept the passover on the fourteenth day of the month at evening in the plains of Jericho.
11 Mokolo oyo elandaki feti ya Pasika, baliaki biloko ya mokili ya Kanana: mapa ezanga levire mpe bambuma ya ble oyo bakalingaki kaka mokolo wana.
And they ate of the old grain of the land on the next day after the passover, unleavened cakes, and roasted grain in the same day.
12 Mokolo oyo elandaki mokolo oyo baliaki biloko ya mokili ya Kanana, mana etikaki kokweya; mana ezalaki lisusu te mpo na bana ya Isalaele. Boye, na mobu wana, baliaki biloko ya mokili ya Kanana.
And the manna ceased on the next day after they had eaten of the old grain of the land; neither had the children of Israel manna any more; but they ate of the fruit of the land of Canaan that year.
13 Nzokande, tango Jozue azalaki pene ya Jeriko, atombolaki miso mpe amonaki moto moko atelemi liboso na ye; moto yango asimbaki mopanga na loboko na ye. Jozue apusanaki pene na ye mpe atunaki ye: — Boni, ozali na ngambo na biso to na ngambo ya banguna na biso?
And it came to pass, when Joshua was by Jericho, that he lifted up his eyes and looked, and, behold, there stood a man opposite him with his sword drawn in his hand: and Joshua went to him, and said to him, Art thou for us, or for our adversaries?
14 Azongiselaki Jozue: — Te, kasi nazali mokonzi ya mampinga ya Yawe; nayei kaka sik’oyo. Boye, Jozue akweyaki elongi kino na mabele mpe alobaki na ye: — Sango nini nkolo na ngai azali na yango mpo na mosali na ye?
And he said, Nay; but as captain of the host of the LORD am I now come. And Joshua fell on his face to the earth, and worshipped, and said to him, What saith my lord to his servant?
15 Mokonzi ya mampinga ya Yawe alobaki na ye: — Longola basapato na yo na makolo, pamba te esika oyo ozali ezali bule. Jozue asalaki se bongo.
And the captain of the LORD’S host said to Joshua, Loose thy shoe from off thy foot; for the place on which thou standest is holy. And Joshua did so.

< Jozue 5 >