< Jozue 4 >

1 Tango ekolo mobimba esilisaki kokatisa Yordani, Yawe alobaki na Jozue:
When all the people crossed over the Jordan, Yahweh said to Joshua,
2 « Pona mibali zomi na mibale kati na bato, mobali moko mpo na libota moko.
“Choose twelve men for yourselves from among the people, one man from each tribe.
3 Pesa bango mitindo oyo: ‹ Bozwa kati na mayi ya Yordani, na esika oyo Banganga-Nzambe bapikamaki, mabanga zomi na mibale, bomema yango elongo na bino mpe botia yango na esika oyo bokolekisa butu ya lelo. › »
Give them this command: 'Take up twelve stones from the middle of the Jordan where the priests are standing on the dry ground, and bring them over with you and lay them down in the place where you will spend the night tonight.'”
4 Boye, Jozue abengaki mibali zomi na mibale oyo aponaki kati na bana ya Isalaele, mobali moko mpo na libota moko.
Then Joshua called the twelve men whom he had chosen from the tribes of Israel, one from each tribe.
5 Jozue alobaki na bango: « Boleka liboso ya Sanduku ya Yawe, Nzambe na bino, kino na kati-kati ya Yordani. Moko na moko kati na bino amema libanga na lipeka na ye kolanda motango ya mabota ya Isalaele
Joshua said to them, “Go over before the ark of Yahweh your God into the middle of the Jordan. Each of you is to take up a stone upon his shoulder, according to the number of the tribes of the people of Israel.
6 mpo ete ezala lokola elembo kati na bino. Sima na tango, soki bana na bino batuni bino: ‹ Mabanga oyo elakisi nini? ›
This will be a sign in your midst for you when your children ask in days to come, 'What do these stones mean to you?'
7 Bokoyebisa bango ete mayi ya Yordani ekatanaki na biteni mibale liboso ya Sanduku ya Boyokani ya Yawe. Tango ekatisaki Yordani, mayi na yango mpe ekatanaki. Mabanga oyo ezali lokola ekaniseli ya seko na seko mpo na bana ya Isalaele. »
Then you will say to them, 'The waters of the Jordan were cut off before the ark of the covenant of Yahweh. When it passed over the Jordan, the waters of the Jordan were cut off. So these stones will be a memorial to the people of Israel forever.'”
8 Boye, bana ya Isalaele basalaki ndenge Jozue atindaki bango. Bazwaki kati na Yordani, mabanga zomi na mibale kolanda motango ya mabota ya Isalaele, ndenge Yawe alobaki na Jozue. Bamemaki yango kino na molako na bango, epai wapi batiaki yango.
The people of Israel did just as Joshua commanded, and they picked up twelve stones from the middle of the Jordan, as Yahweh said to Joshua. They set the stones up according to the number of the tribes of the people of Israel. They carried the stones with them, over to the place where they camped and they set them down there.
9 Jozue atelemisaki mabanga zomi na mibale mosusu na kati-kati ya Yordani, na esika oyo Banganga-Nzambe oyo bamemaki Sanduku ya Boyokani bapikamaki, mpe etikala wana kino na mokolo ya lelo.
Then Joshua set up twelve stones in the middle of the Jordan River, in the place where the feet of the priests that carried the ark of the covenant stood. The memorial is there to this day.
10 Nzokande, Banganga-Nzambe oyo bamemaki Sanduku bawumelaki na kati-kati ya Yordani kino tango bato bakokisaki makambo nyonso oyo Yawe atindaki Jozue, ndenge kaka Moyize ayebisaki ye. Ezalaki na lombangu nde bato bakatisaki Yordani.
The priests that carried the ark stood in the middle of the Jordan until everything that Yahweh commanded Joshua to tell the people was completed, according to all that Moses had commanded Joshua. The people hurried and they crossed over.
11 Tango bango nyonso basilisaki kokatisa, Sanduku ya Yawe elongo na Banganga-Nzambe balekaki lisusu liboso ya bato.
When all the people had finished crossing over, the ark of Yahweh and the priests crossed over before the people.
12 Bato ya libota ya Ribeni, ya Gadi, mpe ya ndambo ya libota ya Manase bakatisaki, balataki bibundeli mpe batambolaki liboso ya bana ya Isalaele, ndenge Moyize atindaki bango.
The tribe of Reuben, the tribe of Gad, and the half tribe of Manasseh passed before the people of Israel formed up as an army, just as Moses said to them.
13 Bazalaki bato pene nkoto tuku minei, bato ya bitumba, oyo bakamataki bibundeli mpo na kobunda; balekaki liboso ya Yawe na nzela ya bitando ya Jeriko mpo na kobunda.
About forty thousand men equipped for war passed before Yahweh, for battle on the plains of Jericho.
14 Na mokolo wana, Yawe atombolaki Jozue na miso ya bana nyonso ya Isalaele; mpe bapesaki ye lokumu mikolo nyonso ya bomoi na ye, ndenge kaka bapesaki Moyize lokumu.
On that day Yahweh made Joshua great in the eyes of all Israel. They honored him—just as they honored Moses— all his days.
15 Yawe alobaki na Jozue:
Then Yahweh spoke to Joshua,
16 « Pesa Banganga-Nzambe oyo bamemi Sanduku ya Litatoli mitindo ete babima wuta na kati-kati ya ebale Yordani. »
“Command the priests who carry the ark of the testimony to come up out of the Jordan.”
17 Jozue apesaki mitindo epai ya Banganga-Nzambe: « Bobima wuta na kati-kati ya ebale Yordani. »
So, Joshua commanded the priests, “Come up out of the Jordan.”
18 Boye Banganga-Nzambe oyo bamemaki Sanduku ya Boyokani ya Yawe babimaki wuta na ebale. Tango kaka batiaki matambe na bango na mokili, mayi ya Yordani ezongaki na esika na yango, etondaki makasi mpe ekomaki kotiola ndenge ezalaki momesano na yango.
When the priests carrying the ark of the covenant of Yahweh came up out of the middle of the Jordan, and the soles of their feet were lifted up out on dry ground, then the waters of the Jordan returned to their place and overflowed its banks, just as they were four days before.
19 Na mokolo ya zomi ya sanza ya liboso, bato bakendeki wuta na Yordani mpe batongaki molako na bango na Giligali, na mondelo ya este ya Jeriko.
The people came up out of the Jordan on the tenth day of the first month. They stayed in Gilgal, east of Jericho.
20 Jozue atelemisaki, na Giligali, mabanga zomi na mibale oyo babimisaki na Yordani.
The twelve stones that they took out of the Jordan, Joshua set up in Gilgal.
21 Alobaki na bana ya Isalaele: « Tango bakitani na bino bakotuna batata na bango: ‹ Mabanga oyo elakisi nini? ›
He said to the people of Israel, “When your descendants ask their fathers in times to come, 'What are these stones?'
22 Boyebisa bango: ‹ Bato ya Isalaele bakatisaki Yordani na mabele ya kokawuka. ›
Tell your children, 'This is where Israel crossed over the Jordan on dry ground.'
23 Pamba te Yawe, Nzambe na bino, akawusaki liboso mayi ya Yordani kino tango bosilisaki kokatisa. Yawe asalaki na Yordani makambo oyo asalaki na ebale monene ya Barozo tango akawusaki yango liboso na biso, kino tango tosilisaki kokatisa yango.
Yahweh your God dried up the waters of the Jordan for you, until you had crossed over, just as Yahweh your God did to the Sea of Reeds, which he dried up for us until we passed over,
24 Asalaki bongo mpo ete bato nyonso ya mokili bayeba ete loboko ya Yawe ezalaka na nguya, mpe mpo ete bobangaka Yawe, Nzambe na bino, tango nyonso. »
so that all the peoples of the earth may know that the hand of Yahweh is mighty, and that you will honor Yahweh your God forever.”

< Jozue 4 >