< Jozue 3 >

1 Na tongo-tongo, Jozue mpe bana nyonso ya Isalaele babimaki wuta na Shitimi mpe bakendeki kino na Yordani epai wapi batongaki molako na bango liboso ete bakatisa.
Vstal pak Jozue velmi ráno, a hnuvše se z Setim, přišli až k Jordánu, on i všickni synové Izraelští, a přenocovali tu, prvé nežli šli přes něj.
2 Sima na mikolo misato, bakambi bakomaki kotambola kati na molako
I stalo se, že třetího dne správcové šli prostředkem stanů,
3 mpo na kopesa bato mitindo oyo: — Soki bomoni Sanduku ya Boyokani ya Yawe, Nzambe na bino, mpe Banganga-Nzambe oyo bazali Balevi komema yango, bolongwa na bisika oyo bozali mpe bolanda yango.
A přikazovali lidu, řkouce: Když uzříte truhlu smlouvy Hospodina Boha svého a kněží Levítské, ani ji nesou, vy také hnete se s místa svého a půjdete za ní,
4 Bongo bokoyeba nzela nini bokoki kolanda mpo ete nanu botambola na nzela yango te. Kasi bozala mosika na Sanduku ya Boyokani, na bametele pene nkoto moko, bopusana pene na yango te.
(A však místo mezi vámi a mezi ní bude okolo dvou tisíc loket míry obecné, nepřibližujte se k ní), abyste viděli cestu, kterouž byste jíti měli; nebo nešli jste tou cestou prvé.
5 Jozue alobaki na bato: — Bomibulisa, pamba te lobi, Yawe akosala makambo ya kokamwa kati na bino.
Řekl pak byl Jozue lidu: Posvěťtež se, zítra zajisté učiní Hospodin divné věci mezi vámi.
6 Jozue alobaki na Banganga-Nzambe: — Bomema Sanduku ya Boyokani mpe botambola liboso ya bato. Batombolaki yango mpe batambolaki liboso ya bato.
Potom řekl Jozue kněžím těmi slovy: Vezměte truhlu smlouvy, a jděte před lidem. I vzali truhlu smlouvy a brali se před lidem.
7 Yawe alobaki na Jozue: — Lelo, nakobanda kotombola yo na miso ya bana nyonso ya Isalaele mpo ete bayeba ete nazali mpe elongo na yo ndenge nazalaki elongo na Moyize.
Nebo řekl byl Hospodin k Jozue: V tento den začnu tebe zvelebovati před očima všeho Izraele, aby poznali, že jakož jsem byl s Mojžíšem, tak budu s tebou.
8 Yebisa Banganga-Nzambe oyo bamemi Sanduku ya Boyokani: « Tango bokokoma pembeni ya mayi ya Yordani, botia makolo na bino kati na mayi mpe botelema wana. »
Protož ty přikaž kněžím, kteříž nosí truhlu smlouvy, a rci: Když vejdete na kraj vody Jordánské, zastavte se v Jordáně.
9 Jozue alobaki na bana ya Isalaele: — Bopusana awa mpe boyoka maloba ya Yawe, Nzambe na bino.
Řekl také Jozue synům Izraelským: Přistupte sem, a slyšte slova Hospodina Boha vašeho.
10 Bongo Jozue alobaki: — Ezali na nzela oyo nde bokoyeba solo ete Nzambe na bomoi azali elongo na bino mpe akobengana liboso na bino bato ya Kanana, ya Iti, ya Evi, ya Perizi, ya Girigazi, ya Amori mpe ya Yebusi.
I řekl Jozue: Po tomto poznáte, že Bůh silný živý jest u prostřed vás, a že konečně vyžene od tváři vaší Kananejského, Hetejského, Hevejského, Ferezejského, Gergezejského, Amorejského a Jebuzejského:
11 Sanduku ya Boyokani ya Yawe ya mokili mobimba ekoleka liboso na bino kati na mayi ya Yordani.
Aj, truhla smlouvy Panovníka vší země půjde před vámi přes Jordán.
12 Sik’oyo, bopona bato zomi na mibale kati na mabota ya Isalaele, moto moko mpo na libota moko.
Protož nyní vezměte sobě dvanácte mužů z pokolení Izraelských, po jednom muži z každého pokolení.
13 Mpe tango kaka Banganga-Nzambe oyo bakomema Sanduku ya Yawe, Nkolo ya mokili mobimba, bakotia matambe ya makolo na bango kati na Yordani, mayi na yango ekokabwana na biteni mibale; mayi oyo ekowuta na ngambo ya likolo ekotelema lokola mir.
I bude, že hned jakž se zastaví kněží, nesoucí truhlu Hospodina Panovníka vší země, u vodě Jordánské, vody Jordánu rozdělí se, a vody tekoucí s vrchu zůstanou v jedné hromadě.
14 Boye tango bato bakobima na molako mpo na kokatisa Yordani, Banganga-Nzambe oyo bakomema Sanduku ya Boyokani bakotambola liboso na bango.
Stalo se tedy, když se bral lid z stanů svých, aby šli přes Jordán, a kněží, kteříž nesli truhlu smlouvy, před nimi,
15 Nzokande, na tango ya kobuka milona, mayi ya Yordani etondaka makasi penza. Kasi tango kaka Banganga-Nzambe oyo bamemaki Sanduku bakomaki pembeni ya Yordani mpe batiaki matambe na bango kati na mayi,
A když ti, kteříž nesli truhlu, přišli až k Jordánu, a kněží, nesoucí truhlu, omočili nohy v kraji vod: (Jordán pak rozvodňuje se a vystupuje ze všech břehů svých v každý čas žně),
16 mayi oyo ezalaki kowuta na ngambo ya likolo etikaki kotiola mpe esalaki lokola mir moko ya monene, mpe etikaki nzela moko ya monene wuta na engumba Adamu, oyo ezalaki pembeni ya Tsaritani; bongo na ngambo mosusu, mayi oyo ezalaki kokita kino na ebale monene ya Araba, ebale monene ya Barozo, ya lubwaku ya Yordani, esilaki nyonso. Bato bakatisaki kino na Jeriko oyo ezalaki liboso na bango.
Že se zastavily vody, kteréž s hůry přicházely, a shrnuly se v hromadu jednu velmi daleko od Adam města, kteréž leží k straně Sartan, kteréž pak odcházely k moři dolů, k moři slanému sešly a sběhly, a lid přešel naproti Jerichu.
17 Banganga-Nzambe oyo bamemaki Sanduku ya Boyokani ya Yawe bapikamaki na mabele ya kokawuka, na kati-kati ya mayi ya Yordani, wana bana nyonso ya Isalaele bazalaki koleka kino tango ekolo mobimba esilisaki kokatisa na mabele ya kokawuka.
Stáli pak kněží, kteříž nesli truhlu smlouvy Hospodinovy na suše u prostřed Jordánu, nehýbajíce se, (a všecken Izrael šel po suše), až se lid všecken přepravil přes Jordán.

< Jozue 3 >