< Jozue 24 >

1 Jozue asangisaki mabota nyonso ya Isalaele na Sishemi. Abengisaki bampaka, bakambi, basambisi mpe bakalaka ya Isalaele; mpe bango bayaki liboso ya Nzambe.
ויאסף יהושע את כל שבטי ישראל שכמה ויקרא לזקני ישראל ולראשיו ולשפטיו ולשטריו ויתיצבו לפני האלהים
2 Jozue alobaki na bato nyonso: — Tala liloba oyo Yawe, Nzambe ya Isalaele, alobi: « Wuta kala, bakoko na bino mpe Tera, tata ya Abrayami mpe Naori, bavandaki na ngambo mosusu ya ebale mpe bazalaki kosalela banzambe mosusu.
ויאמר יהושע אל כל העם כה אמר יהוה אלהי ישראל בעבר הנהר ישבו אבותיכם מעולם תרח אבי אברהם ואבי נחור ויעבדו אלהים אחרים
3 Kasi nabimisaki tata na bino, Abrayami, wuta na mokili oyo ezalaki na ngambo mosusu ya ebale, natambolisaki ye na mokili mobimba ya Kanana mpe napesaki ye bakitani ebele. Napesaki ye Izaki;
ואקח את אביכם את אברהם מעבר הנהר ואולך אתו בכל ארץ כנען וארב (וארבה) את זרעו ואתן לו את יצחק
4 mpe na nzela ya Izaki, napesaki ye Jakobi mpe Ezawu. Napesaki mokili ya bangomba Seiri epai ya Ezawu, kasi Jakobi elongo na bana na ye ya mibali, bakendeki na Ejipito.
ואתן ליצחק את יעקב ואת עשו ואתן לעשו את הר שעיר לרשת אותו ויעקב ובניו ירדו מצרים
5 Boye, natindaki Moyize mpe Aron; nabetaki Ejipito kolanda makambo nyonso oyo nasalaki kuna mpe nabimisaki bino kuna.
ואשלח את משה ואת אהרן ואגף את מצרים כאשר עשיתי בקרבו ואחר הוצאתי אתכם
6 Tango nabimisaki batata na bino na Ejipito, bakomaki kino na ebale monene ya Barozo, bato ya Ejipito balandaki bango na bashar mpe na basoda oyo batambolaka likolo ya bampunda kino na Ebale monene ya Motane.
ואוציא את אבותיכם ממצרים ותבאו הימה וירדפו מצרים אחרי אבותיכם ברכב ובפרשים--ים סוף
7 Batata na bino bagangaki epai na Yawe mpo na kosenga lisungi, mpe Yawe atiaki molili kati na bino mpe bato ya Ejipito, azindisaki bango na mayi ya Ebale monene oyo ezipaki bango. Miso na bino moko emonaki makambo oyo nasalaki bato ya Ejipito. Mpe bowumelaki mibu ebele na esobe.
ויצעקו אל יהוה וישם מאפל ביניכם ובין המצרים ויבא עליו את הים ויכסהו ותראינה עיניכם את אשר עשיתי במצרים ותשבו במדבר ימים רבים
8 Namemaki bino na mokili ya bato ya Amori, oyo bazalaki kovanda na ngambo ya este ya Yordani. Babundisaki bino kasi nakabaki bango na maboko na bino. Nabomaki bango na miso na bino mpe bobotolaki mokili na bango.
ואבאה (ואבא) אתכם אל ארץ האמרי היושב בעבר הירדן וילחמו אתכם ואתן אותם בידכם ותירשו את ארצם ואשמידם מפניכם
9 Tango Balaki, mwana mobali ya Tsipori, mokonzi ya Moabi, abimaki mpo na kobundisa Isalaele, atindaki ete baluka Balami, mwana mobali ya Beori, mpo ete alakela bino mabe.
ויקם בלק בן צפור מלך מואב וילחם בישראל וישלח ויקרא לבלעם בן בעור--לקלל אתכם
10 Kasi naboyaki koyoka Balami, boye akomaki nde kopambola bino tango na tango mpe nakangolaki bino na loboko na ye.
ולא אביתי לשמע לבלעם ויברך ברוך אתכם ואצל אתכם מידו
11 Boye bokatisaki Yordani mpe bokomaki na engumba Jeriko. Bavandi ya Jeriko babundisaki bino ndenge kaka bato ya Amori, ya Perizi, ya Kanana, ya Iti, ya Girigazi, ya Evi mpe ya Yebusi, basalaki; kasi nakabaki bango mpe na maboko na bino.
ותעברו את הירדן ותבאו אל יריחו וילחמו בכם בעלי יריחו האמרי והפרזי והכנעני והחתי והגרגשי החוי והיבוסי ואתן אותם בידכם
12 Natindelaki bango liboso na bino, banzoyi ya minene oyo ebenganaki bango mosika na bino, na bakonzi mibale ya Amori. Bosalaki yango na mipanga mpe na matolotolo na bino te.
ואשלח לפניכם את הצרעה ותגרש אותם מפניכם שני מלכי האמרי לא בחרבך ולא בקשתך
13 Boye, napesaki bino mokili oyo bino bomonelaki pasi te mpe bingumba oyo bino botongaki te. Bokomaki kovanda kuna, kolia bambuma ya bilanga ya vino mpe ya olive oyo bolonaki te.
ואתן לכם ארץ אשר לא יגעת בה וערים אשר לא בניתם ותשבו בהם כרמים וזיתים אשר לא נטעתם אתם אכלים
14 Sik’oyo botosa Yawe mpe bosalela Ye na motema mobimba mpe na bosembo. Bobwaka banzambe oyo batata na bino basalelaki na ngambo mosusu ya ebale mpe na Ejipito, mpe bosalela Yawe.
ועתה יראו את יהוה ועבדו אתו--בתמים ובאמת והסירו את אלהים אשר עבדו אבותיכם בעבר הנהר ובמצרים ועבדו את יהוה
15 Kasi soki bosepeli kosalela Yawe te, bopona lelo nani bolingi kosalela; banzambe oyo batata na bino basalelaki tango bazalaki na ngambo mosusu ya ebale to banzambe ya bato ya Amori epai wapi bozali kovanda. Kasi ngai mpe libota na ngai, tokosalela Yawe. »
ואם רע בעיניכם לעבד את יהוה בחרו לכם היום את מי תעבדון--אם את אלהים אשר עבדו אבותיכם אשר בעבר (מעבר) הנהר ואם את אלהי האמרי אשר אתם ישבים בארצם ואנכי וביתי נעבד את יהוה
16 Bato bazongisaki: — Tozali na likanisi te ya kosundola Yawe to ya kosalela banzambe mosusu!
ויען העם ויאמר חלילה לנו מעזב את יהוה--לעבד אלהים אחרים
17 Pamba te Yawe azali Nzambe na biso; ezali Ye Yawe nde abimisaki biso mpe batata na biso na Ejipito, na mokili wana ya bowumbu, mpe asalaki na miso na biso bilembo minene ya kokamwa. Azalaki kobatela biso na banzela nyonso oyo tozalaki kotambola mpe kati na bikolo nyonso epai wapi tozalaki koleka.
כי יהוה אלהינו הוא המעלה אתנו ואת אבותינו מארץ מצרים מבית עבדים ואשר עשה לעינינו את האתות הגדלות האלה וישמרנו בכל הדרך אשר הלכנו בה ובכל העמים אשר עברנו בקרבם
18 Yawe abenganaki liboso na biso bikolo nyonso elongo na bato ya Amori oyo bazalaki kovanda na mokili oyo. Biso mpe tokosalela Yawe, pamba te azali Nzambe na biso.
ויגרש יהוה את כל העמים ואת האמרי ישב הארץ--מפנינו גם אנחנו נעבד את יהוה כי הוא אלהינו
19 Jozue alobaki na bato: — Bokokoka kosalela Yawe te, pamba te azali Nzambe ya Bule, Nzambe ya Zuwa; akolimbisa te botomboki mpe masumu na bino.
ויאמר יהושע אל העם לא תוכלו לעבד את יהוה--כי אלהים קדשים הוא אל קנוא הוא לא ישא לפשעכם ולחטאותיכם
20 Soki bosundoli Yawe mpe bokeyi kosalela banzambe ya bapaya, akobalukela bino mpo na kosala bino mabe, mpe akosilisa koboma bino sima na kotalisa bino bolamu.
כי תעזבו את יהוה ועבדתם אלהי נכר ושב והרע לכם וכלה אתכם אחרי אשר היטיב לכם
21 Kasi bato balobaki na Jozue: — Te, tokosalela kaka Yawe!
ויאמר העם אל יהושע לא כי את יהוה נעבד
22 Jozue alobaki na bato: — Bozali bino moko batatoli mpo na bino awa boponi kosalela Yawe. Bazongisaki: — Ezali se bongo, tondimi yango, tozali batatoli.
ויאמר יהושע אל העם עדים אתם בכם כי אתם בחרתם לכם את יהוה לעבד אותו ויאמרו עדים
23 Jozue alobaki: — Na bongo, bolongola sik’oyo banzambe ya bapaya oyo ezali kati na bino mpe bopesa mitema na bino nyonso epai na Yawe, Nzambe ya Isalaele.
ועתה הסירו את אלהי הנכר אשר בקרבכם והטו את לבבכם אל יהוה אלהי ישראל
24 Bato bazongiselaki Jozue: — Tokosalela Yawe, Nzambe na biso, mpe tokoyoka mongongo na Ye.
ויאמרו העם אל יהושע את יהוה אלהינו נעבד ובקולו נשמע
25 Na mokolo wana, Jozue asalaki boyokani elongo na bana ya Isalaele na Sishemi, mpe apesaki bango mibeko mpe bikateli.
ויכרת יהושע ברית לעם ביום ההוא וישם לו חק ומשפט בשכם
26 Bongo, Jozue akomaki makambo wana nyonso na buku ya Mobeko ya Nzambe. Akamataki libanga moko ya monene mpe atelemisaki yango wana, na se ya terebente oyo ezalaki kati na Esika ya bule ya Yawe.
ויכתב יהושע את הדברים האלה בספר תורת אלהים ויקח אבן גדולה ויקימה שם תחת האלה אשר במקדש יהוה
27 Jozue alobaki na bato nyonso: — Botala, libanga oyo ekozala litatoli mpo na biso, pamba te esili koyoka maloba nyonso oyo Yawe alobi na biso. Ekozala motatoli mpo na kosambisa bino mpo ete bowangana Nzambe na bino te.
ויאמר יהושע אל כל העם הנה האבן הזאת תהיה בנו לעדה--כי היא שמעה את כל אמרי יהוה אשר דבר עמנו והיתה בכם לעדה פן תכחשון באלהיכם
28 Boye, Jozue azongisaki bato, moto na moto kati na libula na ye.
וישלח יהושע את העם איש לנחלתו
29 Sima na makambo oyo, Jozue, mwana mobali ya Nuni, mowumbu na Yawe, akufaki na mibu nkama moko na zomi.
ויהי אחרי הדברים האלה וימת יהושע בן נון עבד יהוה--בן מאה ועשר שנים
30 Bakundaki ye na mabele ya libula na ye, na Timinati-Sera, na etuka ya bangomba ya Efrayimi, na ngambo ya nor ya ngomba Gashi.
ויקברו אתו בגבול נחלתו בתמנת סרח אשר בהר אפרים מצפון להר געש
31 Bato ya Isalaele basalelaki Yawe tango nyonso Jozue azalaki na bomoi mpe, sima na kufa na ye, tango nyonso bampaka oyo bamonaki misala nyonso ya Yawe mpo na Isalaele bazalaki na bomoi.
ויעבד ישראל את יהוה כל ימי יהושע וכל ימי הזקנים אשר האריכו ימים אחרי יהושע ואשר ידעו את כל מעשה יהוה אשר עשה לישראל
32 Mpe bakundaki mikuwa ya Jozefi oyo bana ya Isalaele bamemaki wuta na Ejipito na Sishemi, na eteni ya elanga oyo Jakobi asombaki na motuya ya mbongo ya bibende nkama moko, epai ya bana mibali ya Amori, tata ya Sishemi. Yango ekoma mpe libula ya bakitani ya Jozefi.
ואת עצמות יוסף אשר העלו בני ישראל ממצרים קברו בשכם בחלקת השדה אשר קנה יעקב מאת בני חמור אבי שכם במאה קשיטה ויהיו לבני יוסף לנחלה
33 Bongo, Eleazari, mwana mobali ya Aron, mpe akufaki. Bakundaki ye na ngomba moke oyo bapesaki na Pineasi, mwana na ye ya mobali, kati na etuka ya bangomba ya Efrayimi.
ואלעזר בן אהרן מת ויקברו אתו בגבעת פינחס בנו אשר נתן לו בהר אפרים

< Jozue 24 >