< Jozue 21 >

1 Bakonzi ya mabota ya bakitani ya Levi bayaki epai ya Nganga-Nzambe Eleazari, epai ya Jozue, mwana mobali ya Nuni, mpe epai ya bakonzi ya bituka ya mabota mosusu ya Isalaele,
Overhodene for levittenes familier trådte frem for Eleasar, presten, og Josva, Nuns sønn, og for familie-overhodene i Israels barns stammer
2 na Silo, kati na mokili ya Kanana, mpo na koloba na bango: « Yawe apesaki mitindo na nzela ya Moyize ete bopesa biso bingumba ya kovanda elongo na mabele na yango mpo na bibwele na biso. »
og talte til dem i Silo i Kana'ans land og sa: Herren bød ved Moses at der skulde gis oss byer å bo i med jordet omkring for vårt fe.
3 Boye, kolanda mitindo ya Yawe, bana ya Isalaele balongolaki kati na libula na bango ndambo ya bingumba elongo na mabele na yango, mpe bapesaki yango epai ya bakitani ya Levi.
Da gav Israels barn efter Herrens befaling av sine arvelodder levittene disse byer med tilhørende jorder:
4 Zeke ya liboso ekweyaki epai ya etuka ya Keati. Bato ya Levi oyo bazalaki bakitani ya Nganga-Nzambe Aron bazwaki, na nzela ya zeke, bingumba zomi na misato kati na libota ya Yuda, ya Simeoni mpe ya Benjame.
Først kom loddet ut for kahatittenes ætter, og blandt disse levitter fikk Arons, prestens, sønner ved loddkastingen tretten byer av Juda stamme og av simeonittenes stamme og av Benjamins stamme,
5 Bakitani ya Keati oyo batikalaki bazwaki, na nzela ya zeke, bingumba zomi kati na mabele ya libota ya Efrayimi, ya Dani mpe ya ndambo ya libota ya Manase.
og de andre Kahats barn fikk ved loddkastingen ti byer av Efra'ims stammes ætter og av Dans stamme og av den halve Manasse stamme.
6 Bakitani ya Gerishoni bazwaki, na nzela ya zeke, bingumba zomi na misato kati na mabele ya libota ya Isakari, ya Aseri, ya Nefitali mpe ya ndambo ya libota ya Manase, kati na Bashani.
Gersons barn fikk ved loddkastingen tretten byer av Issakars stammes ætter og av Asers stamme og av Naftali stamme og av den halve Manasse stamme i Basan.
7 Bakitani ya Merari, kolanda bituka na bango, bazwaki bingumba zomi na mibale kati na mabele ya libota ya Ribeni, ya Gadi mpe ya Zabuloni.
Meraris barn fikk efter sine ætter tolv byer av Rubens stamme og av Gads stamme og av Sebulons stamme.
8 Boye, ndenge Yawe apesaki mitindo na nzela ya Moyize, bana ya Isalaele babetaki zeke mpo na kopesa bingumba wana elongo na mabele na yango epai ya bakitani ya Levi.
Disse byer med tilhørende jorder gav Israels barn levittene ved loddkasting, således som Herren hadde befalt ved Moses.
9 Kati na mabota ya Yuda mpe ya Simeoni, babetaki zeke mpo na kopesa bingumba oyo, kolanda bakombo na yango,
Av Judas barns stamme og av Simeons barns stamme avgav de de byer som nu skal nevnes:
10 epai ya bakitani ya Aron, oyo babimelaki na bituka ya Keati kati na bana mibali ya Levi, pamba te zeke ya liboso ekweyaki epai na bango:
Arons sønner av kahatittenes ætter, de av Levis barn som loddet først kom ut for,
11 Bapesaki bango Kiriati-Ariba oyo ezali Ebron, elongo na mabele na yango, kati na mokili ya bangomba ya Yuda. (Ariba azalaki koko ya Anaki);
fikk Arbas, anakittenes stamfars by, det er Hebron, i Juda-fjellene med tilhørende jorder rundt omkring;
12 kasi bapesaki bilanga ya engumba mpe bamboka na yango ya mike-mike, lokola libula epai ya Kalebi, mwana mobali ya Yefune.
men byens mark og dens landsbyer gav de Kaleb, Jefunnes sønn, til eiendom.
13 Epai ya bakitani ya Nganga-Nzambe Aron, bapesaki Ebron lokola engumba ya kokimela mpo na moto oyo atangami mobomi, Libina,
Arons, prestens, sønner fikk både Hebron, som var tilfluktsstad for manndrapere, med tilhørende jorder og Libna med jorder
14 Yatiri, Eshitemoa,
og Jattir med jorder og Estemoa med jorder
15 Oloni, Debiri,
og Holon med jorder og Debir med jorder
16 Ayini, Yuta mpe Beti-Shemeshi, elongo na mabele na yango. Bazwaki bingumba libwa kati na bituka ya mabota oyo mibale: Yuda mpe Simeoni.
og A'in med jorder og Jutta med jorder og Bet-Semes med jorder - ni byer av disse to stammer;
17 Kati na libota ya Benjame, bapesaki bango bingumba oyo: Gabaoni, Geba,
og av Benjamins stamme: Gibeon med jorder, Geba med jorder,
18 Anatoti, Alimoni, elongo na mabele na yango; ezalaki bongo bingumba minei.
Anatot med jorder og Almon med jorder - fire byer.
19 Bingumba nyonso ya Banganga-Nzambe, bakitani ya Aron, ezalaki zomi na misato elongo na mabele na yango.
Således fikk Arons sønner, prestene, i alt tretten byer med tilhørende jorder.
20 Babetaki zeke mpo na kopesa epai ya bakitani mosusu ya Levi, oyo bazali ya bituka ya Keati, moko kati na bana mibali ya Levi, bingumba oyo, kati na mabele ya libota ya Efrayimi.
Og Kahats barns ætter av levittene - de andre av Kahats barn - fikk av Efra'ims stamme disse byer, som utgjorde deres lodd:
21 Kati na etuka ya bangomba ya Efrayimi, bapesaki bango: Sishemi lokola engumba ya kokimela mpo na moto oyo atangami mobomi, Gezeri,
De fikk Sikem, som var tilfluktsstad for manndrapere, med tilhørende jorder i Efra'im-fjellene og Geser med jorder
22 Kibitsayimi mpe Beti-Oroni, elongo na mabele na yango; ezalaki bongo bingumba minei.
og Kibsa'im med jorder og Bet-Horon med jorder - fire byer;
23 Kati na libota ya Dani, bapesaki bango bingumba oyo: Eliteke, Gibetoni,
og av Dans stamme: Elteke med jorder, Gibbeton med jorder,
24 Ayaloni, Gati-Rimoni, elongo na mabele na yango; ezalaki bongo bingumba minei.
Ajalon med jorder, Gat-Rimmon med jorder - fire byer;
25 Kati na ndambo ya libota ya Manase, bapesaki bango bingumba oyo: Taanaki, Gati-Rimoni elongo na mabele na yango; ezalaki bongo bingumba mibale.
og av den halve Manasse stamme: Ta'anak med jorder og Gat-Rimmon med jorder - to byer.
26 Bingumba nyonso oyo bapesaki epai ya bituka mosusu ya bakitani ya Keati ezalaki zomi, elongo na mabele na yango.
Det var i alt ti byer med tilhørende jorder som de andre kahatitters ætter fikk.
27 Epai ya bakitani ya Gerishoni kati na bituka ya bakitani ya Levi, bapesaki bingumba oyo: Kati na ndambo ya libota ya Manase: kati na Bashani, Golani lokola engumba ya kokimela mpo na moto oyo atangami mobomi, mpe Beyeshitira, elongo na mabele na yango; ezalaki bongo bingumba mibale.
Og Gersons barn av levittenes ætter fikk av den halve Manasse stamme Galon i Basan, som var tilfluktsstad for manndrapere, med tilhørende jorder, og Be'estera med jorder - to byer;
28 Kati na libota ya Isakari: Kishioni, Dabirati,
og av Issakars stamme: Kisjon med jorder, Daberat med jorder.
29 Yarimuti, Eyini-Ganimi, elongo na mabele na yango; ezalaki bongo bingumba minei.
Jarmut med jorder, En-Gannim med jorder - fire byer;
30 Kati na libota ya Aseri: Misheali, Abidoni,
og av Asers stamme: Misal med jorder, Abdon med jorder,
31 Elikati, Reobi, elongo na mabele na yango; ezalaki bongo bingumba minei.
Helkat med jorder og Rehob med jorder - fire byer;
32 Kati na libota ya Nefitali: Kedeshi, kati na mokili ya Galile, lokola engumba ya kokimela mpo na moto oyo atangami mobomi; Amoti-Dori mpe Karitani, elongo na mabele na yango; ezalaki bongo bingumba misato.
og av Naftali stamme: Kedes i Galilea, som var tilfluktsstad for manndrapere, med tilhørende jorder, og Hammot-Dor med jorder og Kartan med jorder - tre byer.
33 Bingumba nyonso oyo bapesaki epai ya bakitani ya Gerishoni, kolanda bituka na bango, ezalaki zomi na misato elongo na mabele na yango.
Gersonittenes byer efter deres ætter utgjorde således i alt tretten byer med tilhørende jorder.
34 Epai ya bituka ya Merari, bakitani ya Levi oyo batikalaki, bapesaki bingumba oyo: Kati na libota ya Zabuloni: Yokineami, Karita,
Og Meraris barns ætter, resten av levittene, fikk av Sebulons stamme: Jokneam med jorder, Karta med jorder,
35 Dimina mpe Naalali, elongo na mabele na yango; ezalaki bongo bingumba minei.
Dimna med jorder, Nahalal med jorder - fire byer;
36 Kati na libota ya Ribeni: Betseri lokola engumba ya kokimela mpo na moto oyo atangami mobomi, Yakatsi,
og av Rubens stamme: Beser med jorder og Jahsa med jorder,
37 Kedemoti mpe Mefati, elongo na mabele na yango; ezalaki bongo bingumba minei.
Kedemot med jorder og Mefa'at med jorder - fire byer;
38 Kati na libota ya Gadi: Ramoti, kati na Galadi, lokola engumba ya kokimela mpo na moto oyo atangami mobomi, Maanayimi,
og av Gads stamme: Ramot i Gilead, som var tilfluktsstad for manndrapere, med tilhørende jorder, og Mahana'im med jorder,
39 Eshiboni mpe Yaezeri, elongo na mabele na yango; ezalaki bongo bingumba minei.
Hesbon med jorder, Jaser med jorder - i alt fire byer.
40 Bingumba nyonso oyo babetelaki zeke mpo na kopesa epai ya bakitani ya etuka ya Merari, bakitani ya Levi oyo batikalaki, ezalaki zomi na mibale.
De byer som Meraris barn, resten av levittenes ætter, fikk som sin lodd efter sine ætter, var i alt tolv byer.
41 Bingumba nyonso ya bakitani ya Levi kati na mabele oyo epesamelaki bana ya Isalaele ezalaki tuku minei na mwambe, elongo na mabele na yango.
I alt utgjorde levittenes byer i Israels barns eiendomsland åtte og firti byer med tilhørende jorder.
42 Engumba moko na moko ezingelamaki na mabele na yango; ezalaki penza bongo mpo na bingumba yango nyonso.
Disse byer hadde hver for sig sine jorder rundt omkring sig; så var det med alle disse byer.
43 Boye, Yawe apesaki na Isalaele mokili nyonso oyo alakaki kopesa epai ya batata na bango na nzela ya ndayi. Bana ya Isalaele bazwaki yango mpe bakomaki kovanda kuna.
Således gav Herren Israel hele det land han hadde svoret å ville gi deres fedre; og de inntok det og bosatte sig der.
44 Yawe apesaki bango kimia na bangambo nyonso, kolanda nyonso oyo alakaki batata na bango na nzela ya ndayi. Monguna moko te kati na banguna na bango alongaki lisusu kotelemela bango. Yawe akabaki banguna na bango nyonso na maboko na bango.
Og Herren lot dem ha ro på alle kanter, aldeles som han hadde tilsvoret deres fedre; og ingen av alle deres fiender kunde holde stand imot dem; alle deres fiender gav Herren i deres hånd.
45 Kati na bilaka nyonso ya kitoko oyo Yawe apesaki na libota ya Isalaele, moko te etikalaki kokweya; solo, nyonso ekokisamaki.
Ikke ett ord blev til intet av alle de gode ord Herren hadde talt til Israels hus; det blev opfylt alt sammen.

< Jozue 21 >