< Jozue 2 >

1 Wuta na Shitimi, Jozue, mwana mobali ya Nuni, atindaki na nkuku banongi mibale; alobaki na bango: — Bokende kononga mokili, mingi-mingi Jeriko. Boye, bakendeki mpe bakotaki na ndako ya mwasi moko ya ndumba, Raabi, mpe bavandaki kuna.
And Joshua the son of Nun secretly sent two young men out of Shittim as spies, saying, "Go, view the land, and Jericho." And the two young men went and came to Jericho and entered into the house of a prostitute whose name was Rahab, and slept there.
2 Bayebisaki mokonzi ya Jeriko: — Tala, bato moko kati na bana ya Isalaele bayaki awa na butu mpo na kononga mokili.
The king of Jericho was told, "Look, men of the children of Israel came in here to spy out the land."
3 Boye, mokonzi ya Jeriko atindaki maloba oyo epai ya Raabi: — Bimisa mibali oyo bayaki epai na yo mpe bakotaki na ndako na yo, pamba te bayei nde mpo na kononga mokili mobimba.
The king of Jericho sent to Rahab, saying, "Bring out the men who came to you tonight; for they have come to spy out all the land."
4 Kasi mwasi yango akamataki mibali wana mibale mpe abombaki bango. Alobaki: — Solo, mibali bayaki epai na ngai, kasi nayebaki te esika bango bawutaki.
The woman took the two men and hid them. Then she said, "Yes, the men came to me, but I did not know where they came from.
5 Bakendeki na pokwa na tango oyo bakangaka ekuke ya engumba. Nayebi mpe te soki bakendeki na nzela nini. Bolanda bango noki. Bokoki solo kokanga bango.
It happened about the time of the shutting of the gate, when it was dark, that the men went out. Where the men went, I do not know. Pursue them quickly; for you will overtake them."
6 Nzokande amatisaki bango likolo ya mwanza ya ndako mpe abombaki bango na se ya matiti oyo basalelaka bilamba ya lino, oyo atiaki likolo ya mwanza.
But she had brought them up to the roof, and hid them with the stalks of flax, which she had laid in order on the roof.
7 Bongo, batindami ya mokonzi babimaki mpo na kolanda banongi na nzela oyo ekenda kino na esika oyo bakatiselaka ebale Yordani na makolo. Tango kaka batindami yango babimaki na engumba, bakangaki mpe mbala moko ekuke.
The men pursued them the way to the Jordan to the fords: and as soon as those who pursued them had gone out, they shut the gate.
8 Na butu, liboso ete banongi balala, Raabi amataki likolo ya mwanza
Before they had lain down, she came up to them on the roof;
9 mpe alobaki na bango: — Nayebi ete Yawe apesi mokili oyo na maboko na bino. Tozali na somo makasi mpo na bino mpe bavandi nyonso ya engumba oyo bazali kolenga na somo likolo na bino.
and she said to the men, "I know that the LORD has given you the land, and that the fear of you has fallen on us, and that all the inhabitants of the land melt away before you.
10 Toyokaki ndenge nini Yawe akawusaki Ebale monene ya Barozo liboso na bino tango bobimaki na Ejipito, mpe makambo oyo bosalaki Sikoni mpe Ogi, bakonzi mibale ya bato ya Amori, oyo bobomaki penza na ngambo ya este ya Yordani.
For we have heard how the LORD dried up the water of the Red Sea before you, when you came out of Egypt; and what you did to the two kings of the Amorites, who were beyond the Jordan, to Sihon and to Og, whom you utterly destroyed.
11 Tango toyokaki sango yango, mitema na biso ebukanaki mpe makasi ya moko na moko kati na biso esilaki likolo na bino, pamba te Yawe, Nzambe na bino, azali Nzambe ya likolo, kuna penza na lola, mpe Nzambe ya se, awa na mabele.
As soon as we had heard it, our hearts melted, neither did there remain any more spirit in any man, because of you: for the LORD your God, he is God in heaven above, and on earth beneath.
12 Boye sik’oyo, bolapa ndayi liboso na ngai na Kombo na Yawe ete bokosalela libota na ngai bolamu ndenge ngai nasaleli bino. Bopesa ngai elembo ya solo;
Now therefore, please swear to me by the LORD, since I have dealt kindly with you, that you also will deal kindly with my father's house, and give me a true token;
13 elembo oyo ekolakisa ete bokobikisa bomoi ya tata mpe ya mama na ngai, ya bandeko na ngai ya mibali mpe ya basi mpe ya bato nyonso oyo bavandaka elongo na bango, mpe lisusu ete bokobikisa biso na kufa.
and that you will save alive my father, my mother, my brothers, and my sisters, and all that they have, and will deliver our lives from death."
14 Banongi bayebisaki ye: — Solo, tolapi ndayi, tokondima kokufa mpo na bino soki olobi te makambo oyo tozali kosala. Tokosalela bino bolamu mpe ngolu tango Yawe akopesa biso mokili oyo.
The men said to her, "Our life for yours, even to death, if you do not talk about this business of ours; and it shall be, when the LORD gives us the land, that we will deal kindly and truly with you."
15 Boye, Raabi abimisaki bango na lininisa mpe akitisaki bango na singa, pamba te ndako oyo azalaki kovanda ezalaki ya kokangama na eteni ya mir ya engumba.
Then she let them down by a cord through the window; for her house was on the side of the wall, and she lived on the wall.
16 Alobaki na bango: — Bokende na nzela ya bangomba ya mikuse mpo ete bato oyo bazali kolanda bino bamona bino te. Bobombama kuna mikolo misato kino tango bakozonga, bongo nde bokoki kokoba nzela na bino.
She said to them, "Go to the mountain, lest the pursuers find you; and hide yourselves there three days, until the pursuers have returned. Afterward, you may go your way."
17 Banongi balobaki na ye: — Tokozala na ngambo te na ndayi oyo olapisi biso
The men said to her, "We will be guiltless of this your oath which you have made us to swear.
18 soki, tango tokokota na mokili, okokangisa singa oyo ya motane na lininisa oyo okitiseli biso mpe okosangisa, kati na ndako na yo, tata mpe mama na yo, bandeko mpe bato nyonso ya libota na yo.
Look, when we come into the land, you shall bind this line of scarlet thread in the window which you did let us down by. You shall gather to yourself into the house your father, your mother, your brothers, and all your father's household.
19 Soki moto moko abimi libanda ya ndako na yo mpe akei na balabala, makila na ye ekotangama na moto na ye moko; ekozala ngambo na biso te. Kasi soki babomi moto moko kati na bato oyo bakozala kati na ndako na yo, wana makila na ye ekotangama na mito na biso.
It shall be that whoever goes out of the doors of your house into the street, his blood will be on his head, and we will be guiltless. Whoever is with you in the house, his blood shall be on our head, if any hand is on him.
20 Soki mpe olobi makambo oyo biso tozali kosala, tokozala na ngambo te liboso ya ndayi oyo olapisi biso.
But if you talk about this business of ours, then we shall be guiltless of your oath which you have made us to swear."
21 Raabi azongisaki: — Boye, tika ete esalema ndenge bolobi. Atikaki bango kokende, mpe bakabwanaki. Bongo na sima, akangisaki singa ya motane na lininisa.
She said, "According to your words, so be it." She sent them away, and they departed. She tied the scarlet line in the window.
22 Sima na bango kokabwana, bakendeki na bangomba mikuse mpe bavandaki kuna mikolo misato kino tango bato oyo bazalaki kolanda bango balembaki koluka bango na nzela nyonso. Lokola bamonaki bango te, bazongaki na bango.
They went, and came to the mountain, and stayed there three days, until the pursuers had returned. The pursuers sought them throughout all the way, but did not find them.
23 Banongi oyo mibale bazongelaki nzela na bango, babimaki na bangomba mikuse, bakatisaki ebale mpe bakomaki kino epai ya Jozue, mwana mobali ya Nuni. Bayebisaki ye makambo nyonso oyo ekomelaki bango.
Then the two men returned, descended from the mountain, passed over, and came to Joshua the son of Nun; and they told him all that had happened to them.
24 Balobaki na Jozue: — Solo, Yawe apesi mokili oyo nyonso na maboko na biso; bato nyonso bazali kolenga liboso na biso.
They said to Joshua, "Truly the LORD has delivered into our hands all the land. Moreover, all the inhabitants of the land melt away before us."

< Jozue 2 >