< Jozue 19 >

1 Na mbala ya mibale, zeke ekweyaki epai ya libota ya Simeoni, kolanda bituka na bango. Libula na bango ezalaki na kati-kati ya eteni ya mabele ya libota ya Yuda.
Kèké kejì jáde fún ẹ̀yà Simeoni, ní agbo ilé, ní agbo ilé. Ìní wọn sì wà ní àárín ilẹ̀ Juda.
2 Bazwaki lokola libula: Beri-Sheba, Sheba, Molada,
Lára ìpín wọn ní: Beerṣeba (tàbí Ṣeba), Molada,
3 Atsari-Shuwali, Bala, Atsemi,
Hasari-Ṣuali, Bala, Esemu,
4 Elitoladi, Betuli, Orima,
Eltoladi, Betuli, Horma,
5 Tsikilagi, Beti-Marikaboti, Atsari-Suza,
Siklagi, Beti-Markaboti, Hasari Susa,
6 Beti-Lebaoti mpe Sharueni: bingumba nyonso ezalaki zomi na misato elongo na bamboka na yango ya mike-mike.
Beti-Lebaoti àti Ṣarueli, ìlú wọn jẹ́ mẹ́tàlá àti ìletò wọn.
7 Ayini, Rimoni, Eteri mpe Ashani: bingumba nyonso ezalaki minei elongo na bamboka na yango ya mike-mike
Aini, Rimoni, Eteri àti Aṣani, ìlú wọn jẹ́ mẹ́rin àti ìletò wọn,
8 mpe bamboka nyonso ya mike-mike oyo ezalaki zingazinga ya bingumba oyo, kino na Baalati-Beeri, oyo ezali Ramati ya Negevi. Yango nde ezalaki libula ya mabele ya libota ya Simeoni, kolanda bituka na bango.
àti gbogbo àwọn agbègbè ìlú wọ̀nyí títí dé Baalati-Beeri (Rama ní gúúsù). Èyí ni ilẹ̀ ìní ẹ̀yà àwọn ọmọ Simeoni, agbo ilé, ní agbo ilé.
9 Bazwaki eteni ya mabele ya libota ya Simeoni kati na eteni ya mabele ya libota ya Yuda, pamba te eteni ya mabele ya libota ya Yuda ezalaki monene koleka. Yango wana, bakitani ya Simeoni bazwaki libula na bango kati na eteni ya mabele ya libota ya Yuda.
A mú ogún ìní àwọn ọmọ Simeoni láti ìpín Juda, nítorí ìpín Juda pọ̀ ju èyí tí wọ́n nílò lọ. Báyìí ni àwọn ọmọ Simeoni gba ìní wọn ní àárín ilẹ̀ Juda.
10 Na mbala ya misato, zeke ekweyaki epai ya libota ya Zabuloni, kolanda bituka na bango: Mondelo ya libula na bango ekendeki kino na Saridi.
Kèké kẹta jáde fún Sebuluni, ní agbo ilé ní agbo ilé ààlà ìní wọn sì lọ títí dé Saridi.
11 Longwa wana, emataki na ngambo ya weste, pene ya Mareala, ekendeki kotutana na Dabesheti, kino na lubwaku oyo ezali pene ya Yokineami.
Ó sì lọ sí ìwọ̀-oòrùn ní Marala, ó sì dé Dabbeṣeti, ó sì lọ títí dé odo ní ẹ̀bá Jokneamu.
12 Longwa na Saridi, ebalukaki na ngambo ya este, epai moyi ebimelaka, na mondelo ya Kisiloti-Tabori, ekendeki na ngambo ya Dabirati mpe emataki na kino na Yafia.
Ó sì yípadà sí ìlà-oòrùn láti Saridi sí ìhà ìlà-oòrùn dé ilẹ̀ Kisiloti-Tabori, ó sì lọ sí Daberati, ó sì gòkè lọ sí Jafia.
13 Ekobaki koleka na ngambo ya este kino na Gati-Eferi mpe Ita-Katsini, ebimelaki na Rimoni mpe ebalukaki na ngambo ya Neya.
Nígbà náà ní o lọ sí ìhà ìlà-oòrùn lọ sí Gati-Heferi àti Eti-Kaṣini, ó sì jáde ní Rimoni, ó sì yí sí ìhà Nea.
14 Mondelo yango ezingelaki Anatoni, na ngambo ya nor, mpe esukaki na Lubwaku ya Yifita-Eli.
Ní ibẹ̀, ààlà sì yíká ní ìhà àríwá lọ sí Hnatoni ó sì pín ní àfonífojì Ifita-Eli.
15 Ekamataki mpe lisusu, Katati, Naalali, Shimironi, Yideala mpe Beteleemi: bingumba nyonso ezalaki zomi na mibale elongo na bamboka na yango ya mike-mike.
Lára wọn ni Katati, Nahalali, Ṣimroni, Idala àti Bẹtilẹhẹmu. Wọ́n sì jẹ́ ìlú méjìlá àti ìletò wọn.
16 Bingumba oyo elongo na bamboka na yango ya mike-mike nde ezalaki libula ya libota ya Zabuloni, kolanda bituka na bango.
Ìlú wọ̀nyí àti ìletò wọn jẹ́ ìní Sebuluni, ní agbo ilé agbo ilé.
17 Na mbala ya minei, zeke ekweyaki epai ya libota ya Isakari, kolanda bituka na bango.
Kèké kẹrin jáde fún Isakari, agbo ilé ní agbo ilé.
18 Kati na eteni ya mabele na bango, ezalaki na: Jizireyeli, Kesuloti, Sunemi,
Lára ilẹ̀ wọn ni èyí: Jesreeli, Kesuloti, Ṣunemu,
19 Afarayimi, Shiyoni, Anakarati,
Hafraimu, Ṣihoni, Anaharati,
20 Rabiti, Kishioni, Abetsi,
Rabiti, Kiṣioni, Ebesi,
21 Remeti, Eyini-Ganimi, Eyini-Ada mpe Beti-Patseti.
Remeti, Eni-Gannimu, Eni-Hada àti Beti-Pasesi.
22 Mondelo na yango etutanaki na Tabori, Shakatsima mpe Beti-Shemeshi, bongo esukaki na Yordani. Bingumba nyonso ezalaki zomi na motoba elongo na bamboka na yango ya mike-mike.
Ààlà náà sì dé Tabori, Ṣahasuma, àti Beti-Ṣemeṣi, ó sì pin ní Jordani. Wọ́n sì jẹ́ ìlú mẹ́rìndínlógún àti ìletò wọn.
23 Bingumba oyo elongo na bamboka na yango ya mike-mike nde ezalaki libula ya libota ya Isakari, kolanda bituka na bango.
Ìlú wọ̀nyí àti ìletò wọn jẹ́ ìní ẹ̀yà Isakari, ní agbo ilé agbo ilé.
24 Na mbala ya mitano, zeke ekweyaki epai ya libota ya Aseri, kolanda bituka na bango.
Kèké karùn-ún jáde fún ẹ̀yà Aṣeri, ní agbo ilé agbo ilé.
25 Eteni ya mabele na bango ezalaki: Elikati, Ali, Beteni, Akishafi,
Lára ilẹ̀ wọn ni èyí: Helikati, Hali, Beteni, Akṣafu,
26 Alameleki, Ameadi mpe Misheali. Mondelo na yango etutanaki na Karimeli mpe Shiyori-Libinati na ngambo ya weste;
Allameleki, Amadi, àti Miṣali. Ní ìhà ìwọ̀-oòrùn ààlà náà dé Karmeli àti Ṣihori-Libinati.
27 ebalukaki na ngambo ya este, na Beti-Dagoni, ekendeki kotutana na Zabuloni mpe Lubwaku ya Yifita-Eli, ekendeki na ngambo ya nor, na Beti-Emeki mpe Neyiyeli mpe elekelaki na Kabuli, na loboko ya mwasi.
Nígbà náà ni o yí sí ìhà ìlà-oòrùn Beti-Dagoni, dé Sebuluni àti àfonífojì Ifita-Eli, ó sì lọ sí àríwá sí Beti-Emeki àti Neieli, ó sì kọjá lọ sí Kabulu ní apá òsì.
28 Ekendeki kino na Ebron, Reobi, Amoni mpe Kana kino na Sidoni, engumba monene.
Ó sì lọ sí Abdoni, Rehobu, Hammoni àti Kana títí dé Sidoni ńlá.
29 Mondelo yango ebalukaki na ngambo ya Rama mpe ekendeki kino na engumba ya Tiri, oyo batonga makasi, ebalukaki na ngambo ya Osa mpe na ngambo ya Ebale monene mpe esukaki na Ebale monene Mediterane, na etuka ya Akizibi,
Ààlà náà sì tẹ̀ sí ìhà Rama, ó sì lọ sí ìlú olódi Tire, ó sì yà sí Hosa, ó sì jáde ní Òkun Ńlá ní ilẹ̀ Aksibu,
30 ya Uma, ya Afeki, ya Reobi. Bingumba nyonso ezalaki tuku mibale na mibale elongo na bamboka na yango ya mike-mike.
Uma, Afeki àti Rehobu. Wọ́n sì jẹ́ ìlú méjìlélógún àti ìletò wọn.
31 Bingumba oyo elongo na bamboka na yango ya mike-mike nde ezalaki libula ya libota ya Aseri, kolanda bituka na bango.
Àwọn ìlú wọ̀nyí àti ìletò wọn ní ìní ẹ̀yà Aṣeri, ní agbo ilé agbo ilé.
32 Na mbala ya motoba, zeke ekweyaki epai ya libota ya Nefitali, kolanda bituka na bango.
Ìpín kẹfà jáde fún Naftali, agbo ilé ní agbo ilé,
33 Eteni ya mabele na bango ezalaki longwa na Elefi, longwa na terebente oyo ezali na Tsananimi, lekela na Adamu-Nekebi mpe Yabineyeli kino na Lakumi mpe esukaki na Yordani.
ààlà wọn lọ láti Helefi àti igi ńlá ní Saananimu nímù; kọjá lọ sí Adami Nekebu àti Jabneeli dé Lakkumu, ó sì pín ní Jordani.
34 Mondelo na yango ebalukaki na ngambo ya weste na Azinoti-Tabori mpe ekendeki kobimela na Ukoki, etutanaki na Zabuloni, na ngambo ya sude, na Aseri, na ngambo ya weste, mpe Yuda; Yordani, na ngambo ya este.
Ààlà náà gba ìhà ìwọ̀-oòrùn lọ sí Asnoti-Tabori ó sì jáde ní Hukoki. Ó sì dé Sebuluni, ní ìhà gúúsù Aṣeri ní ìhà ìwọ̀-oòrùn àti Juda ní Jordani ní ìhà ìlà-oòrùn.
35 Bingumba batonga makasi ezalaki: Tsidimi, Tseri, Amati, Rakati, Kinereti,
Àwọn ìlú olódi sì Siddimu, Seri, Hamati, Rakàti, Kinnereti,
36 Adama, Rama, Atsori;
Adama, Rama Hasori,
37 Kedeshi, Edreyi, Eyini-Atsori;
Kedeṣi, Edrei, Eni-Aṣọri,
38 Yireoni, Migidali-Eli, Oremi, Beti-Anati mpe Beti-Shemeshi. Bingumba nyonso ezalaki zomi na libwa elongo na bamboka na yango ya mike-mike.
Ironi, Migdali-Eli, Horemu, Beti-Anati àti Beti-Ṣemeṣi. Wọ́n sì jẹ́ ìlú mọ́kàndínlógún àti ìletò wọn.
39 Bingumba oyo elongo na bamboka na yango ya mike-mike nde ezalaki libula ya libota ya Nefitali, kolanda bituka na bango.
Àwọn ìlú wọ̀nyí àti ìletò wọn ní ìní ẹ̀yà Naftali, ní agbo ilé sí agbo ilé.
40 Na mbala ya sambo, zeke ekweyaki epai ya libota ya Dani, kolanda bituka na bango.
Ìbò kéje jáde fún ẹ̀yà Dani, ní agbo ilé ní agbo ilé.
41 Libula na bango ya mabele ezalaki: Tsorea, Eshitaoli, Iri-Shemeshi;
Ilẹ̀ ìní wọn nìwọ̀nyí: Sora, Eṣtaoli, Iri-Ṣemesi,
42 Shaalabini, Ayaloni, Yitila;
Ṣaalabini, Aijaloni, Itila,
43 Eloni, Timinata, Ekroni,
Eloni, Timna, Ekroni,
44 Eliteke, Gibetoni, Baalati,
Elteke, Gibetoni, Baalati,
45 Yeudi, Bene-Beraki, Gati-Rimoni;
Jehudu, Bene-Beraki, Gati-Rimoni,
46 mayi ya Yarikoni, Rakoni mpe etuka oyo etalana na Jafa.
Me Jakoni àti Rakkoni, pẹ̀lú ilẹ̀ tí ó kọjú sí Joppa.
47 Kasi bakitani ya Dani balongaki te kobotola eteni ya mabele na bango, boye bakendeki kobundisa Leshemi mpe babotolaki yango. Babomaki bato ya Leshemi na mopanga, babotolaki yango mpe bakomaki kovanda kuna. Bakomaki kobenga Leshemi « Dani, » kombo ya koko na bango.
(Ṣùgbọ́n àwọn ará Dani ní ìṣòro láti gba ilẹ̀ ìní wọn, bẹ́ẹ̀ ni wọ́n gòkè lọ, wọ́n sì kọlu Leṣemu, wọ́n sì gbà á, wọ́n sì fi idà kọlù ú, wọ́n sì ń gbé ibẹ̀. Wọ́n sì ń gbé ní Leṣemu, wọ́n sì pe orúkọ rẹ̀ ní Dani orúkọ baba ńlá wọn).
48 Bingumba oyo elongo na bamboka na yango ya mike-mike nde ezalaki libula ya libota ya Dani, kolanda bituka na bango.
Àwọn ìlú wọ́n yí àti ìletò wọn ní ìní ẹ̀yà Dani, ní agbo ilé agbo ilé.
49 Tango bana ya Isalaele basilisaki kokabola mokili na biteni na zeke, bapesaki Jozue, mwana mobali ya Nuni, libula moko kati na bango.
Nígbà tí wọ́n ti parí pínpín ilẹ̀ náà ní ìpín ti olúkúlùkù, àwọn ará Israẹli fún Joṣua ọmọ Nuni ní ìní ní àárín wọn,
50 Kolanda mitindo na Yawe, bapesaki ye engumba oyo asengaki; ezali Timinati-Sera, kati na etuka ya bangomba ya Efrayimi. Bongo Jozue atongaki engumba yango mpe akomaki kovanda kuna.
bí Olúwa ti pàṣẹ, wọ́n fún un ni ìlú tí ó béèrè fún, Timnati Serah ní ìlú òkè Efraimu. Ó sì kọ́ ìlú náà, ó sì ń gbé ibẹ̀.
51 Yango nde ezalaki libula ya mabele oyo Nganga-Nzambe Eleazari; Jozue, mwana mobali ya Nuni, mpe bakambi ya bituka, kolanda mabota ya bana ya Isalaele, bakabolaki na zeke liboso ya Yawe, na Silo, na ekotelo ya Ndako ya kapo ya Bokutani. Boye nde basilisaki kokabola mokili.
Wọ̀nyí ni àwọn ilẹ̀ tí Eleasari àlùfáà, Joṣua ọmọ Nuni àti àwọn olórí ẹ̀yà agbo ilé Israẹli fi ìbò pín ní Ṣilo ní iwájú Olúwa ní ẹnu-ọ̀nà àgọ́ ìpàdé. Báyìí ni wọ́n parí pínpín ilẹ̀ náà.

< Jozue 19 >