< Jozue 18 >

1 Sima na bana ya Isalaele kozwa bokonzi likolo ya mokili, lisanga na bango mobimba esanganaki na Silo mpe batelemisaki kuna Ndako ya kapo ya Bokutani.
The whole congregation of the children of Israel assembled themselves together at Shiloh, and set up the Tent of Meeting there. The land was subdued before them.
2 Kasi kati na bana ya Isalaele, ezalaki na mabota sambo oyo ezwaki nanu te libula na yango ya mabele.
Seven tribes remained among the children of Israel, which had not yet divided their inheritance.
3 Jozue alobaki na bana ya Isalaele: « Kino tango nini bokozela mpo na kokende kozwa mokili oyo Yawe, Nzambe ya batata na bino, apesaki bino?
Joshua said to the children of Israel, "How long will you neglect to go in to possess the land, which the LORD, the God of your fathers, has given you?
4 Bopona bato misato kati na libota moko na moko. Nakotinda bango mpo ete bakende kotambola kati na mokili mpe kotia bandelo na yango kolanda libula ya libota na libota; bongo na sima nde bakoki kozonga epai na ngai.
Appoint for you three men of each tribe. I will send them, and they shall arise, walk through the land, and describe it according to their inheritance; and they shall come to me.
5 Bakokabola mokili yango na biteni sambo; bakitani ya Yuda bakotikala na eteni na bango ya mabele ya ngambo ya sude, mpe bakitani ya Jozefi bakotikala na eteni na bango ya mabele ya ngambo ya nor.
They shall divide it into seven portions. Judah shall live in his borders on the south, and the house of Joseph shall live in their borders on the north.
6 Sima na bino kosala mabongisi ya kokabola mokili na biteni sambo, bomemela ngai yango awa, mpe ngai nakobeta zeke mpo na bino liboso ya Yawe, Nzambe na bino.
You shall survey the land into seven parts, and bring the description here to me; and I will cast lots for you here before the LORD our God.
7 Kasi bakitani ya Levi bakotikala kozwa eteni moko te ya mabele elongo na bino, pamba te mosala ya bonganga-Nzambe nde ekozala libula na bango. Bato ya libota ya Gadi, ya Ribeni mpe ya ndambo ya libota ya Manase, bazwaki eteni ya mabele oyo Moyize, mosali na Yawe, apesaki bango na ngambo ya este ya Yordani. »
For the Levites have no portion among you; for the priesthood of the LORD is their inheritance. Gad, Reuben, and the half-tribe of Manasseh have received their inheritance beyond the Jordan eastward, which Moses the servant of the LORD gave them."
8 Tango bato batelemaki mpo na kokende kosala mabongisi ya kokabola mokili, Jozue apesaki mitindo oyo: « Bokende kotambola kati na mokili, bokata bandelo na yango, mpe na sima, bozongela ngai awa na Silo, mpe ngai nakobeta zeke mpo na bino liboso ya Yawe. »
The men arose and went. Joshua commanded those who went to survey the land, saying, "Go walk through the land, survey it, and come again to me. I will cast lots for you here before the LORD in Shiloh."
9 Boye, bato oyo bakendeki, batambolaki kati na mokili, bakataki bandelo na yango mpe batiaki yango na mokanda, engumba na engumba, mpe bakabolaki mokili mobimba na biteni sambo; bongo na sima, bazongaki na Silo, na molako epai ya Jozue.
The men went and passed through the land, and surveyed it by cities into seven portions on a scroll. They came to Joshua to the camp at Shiloh.
10 Jozue abetaki zeke mpo na bango liboso ya Yawe, na Silo, mpe kuna akabolaki mokili kati na bana ya Isalaele kolanda mabota na bango.
Joshua cast lots for them in Shiloh before the LORD. There Joshua divided the land to the children of Israel according to their divisions.
11 Zeke ekweyaki epai ya libota ya bakitani ya Benjame kolanda bituka na bango. Eteni ya mabele oyo epesamelaki bango na zeke ezalaki na kati-kati ya mabele ya bakitani ya Yuda mpe ya Jozefi.
The lot of the tribe of the descendants of Benjamin came up according to their families. The border of their lot went out between the descendants of Judah and the descendants of Joseph.
12 Na ngambo ya nor, mondelo na bango ezalaki longwa na Yordani, emataki na mopanzi ya Jeriko, ekatisaki mokili ya bangomba, na ngambo ya weste, mpe esukaki na esobe, na Beti-Aveni.
Their border on the north quarter was from the Jordan. The border went up to the side of Jericho on the north, and went up through the hill country westward. It ended at the wilderness of Beth Aven.
13 Mondelo yango elekelaki wana mpe ekendeki kino na Luze, na mopanzi na yango ya ngambo ya sude, oyo ezali Beteli; ekendeki kotutana na Ataroti-Adari, na ngomba oyo ezalaki na ngambo ya sude ya Beti-Oroni, mokili ya se.
The border passed along from there to Luz, to the side of Luz (that is, Bethel), southward. The border went down to Ataroth Addar, by the mountain that lies on the south of Lower Beth Horon.
14 Longwa na ngomba moke oyo etalana na Beti-Oroni na ngambo ya sude, mondelo yango ebalukaki na ngambo ya weste, mpe esukaki na Kiriati-Bala, oyo ekoma Kiriati-Yearimi, engumba ya bakitani ya Yuda. Yango nde ezalaki mondelo na yango na ngambo ya weste.
The border extended, and turned around on the west quarter southward, from the mountain that lies before Beth Horon southward; and ended at Kiriath Baal (that is, Kiriath Jearim), a city of the descendants of Judah. This was the west quarter.
15 Na ngambo ya sude, mondelo yango ebandaki longwa na Kiriati-Yearimi, na ngambo ya weste, mpe ekendeki kobima na etima ya mayi ya Nefitoa.
The south quarter was from the farthest part of Kiriath Jearim. The border went out westward, and went out to the spring of the waters of Nephtoah.
16 Ekitaki kino na ebandeli ya ngomba moke oyo etalana na Lubwaku ya Beni-Inomi, na ngambo ya nor ya etando ya bato ya Refayimi. Ekitaki na Lubwaku ya Inomi, na mopanzi ya ngambo ya sude ya engumba ya bato ya Yebusi kino na Eyini-Rogeli.
The border went down to the farthest part of the mountain that lies before the Valley of Ben Hinnom, which is in the Valley of Rephaim northward. It went down to the Valley of Hinnom, to the slope of the Jebusites southward, and went down to En Rogel.
17 Ebalukaki na ngambo ya nor, elekelaki na Eyini-Shemeshi, elekaki na Geliloti oyo etalana na nzela emata kino na Adumimi; sima ekitaki kino na Libanga ya Boani, mwana mobali ya Ribeni.
It extended northward, went out at En Shemesh, and went out to Geliloth, which is over against the ascent of Adummim. It went down to the Stone of Bohan the son of Reuben.
18 Elekaki na mopanzi ya ngambo ya nor, liboso ya Beti-Araba, mpe ekitaki kino na etando ya Araba.
And it passed on to the north to the shoulder of Beth Arabah, and went down to the Arabah.
19 Mondelo yango elekelaki na mopanzi ya Beti-Ogila, na ngambo ya nor, mpe esukaki na eteni ya mabele oyo ekota na mayi ya ebale monene ya Barozo, na ngambo ya nor, na suka ya ngambo ya sude ya Yordani. Yango nde ezalaki mondelo na yango na ngambo ya sude.
The border passed along to the side of Beth Hoglah northward; and the border ended at the north bay of the Salt Sea, at the south end of the Jordan. This was the south border.
20 Ebale ya Yordani ekomaki mondelo na yango na ngambo ya este. Yango nde ezalaki bandelo ya libula ya mabota ya bakitani ya Benjame na bangambo nyonso.
The Jordan was its border on the east quarter. This was the inheritance of the descendants of Benjamin, by the borders around it, according to their families.
21 Tala bingumba ya bakitani ya Benjame kolanda bituka na bango: Jeriko, Beti-Ogila, Emeki-Ketsitsi,
Now the cities of the tribe of the descendants of Benjamin according to their families were Jericho, and Beth Hoglah, and Emek Keziz,
22 Beti-Araba, Tsemarayimi, Beteli,
and Beth Arabah, and Zemaraim, and Bethel,
23 Avimi, Para, Ofira,
and Avvim, and Parah, and Ophrah,
24 Kefari-Amonayi, Ofini mpe Geba: bingumba nyonso ezalaki zomi na mibale, elongo na bamboka na yango ya mike-mike.
and Chephar Ammoni, and Ophni, and Geba; twelve cities with their villages.
25 Gabaoni, Rama, Beyeroti,
Gibeon, and Ramah, and Beeroth,
26 Mitsipe, Kefira, Motsa,
and Mizpeh, and Chephirah, and Mozah,
27 Rekemi, Yiripeyeli, Tareala,
and Rekem, and Irpeel, and Taralah,
28 Tsela, Elefi, engumba ya Yebusi oyo ezali Yelusalemi, Gibea, Kiriati: bingumba nyonso ezalaki zomi na minei elongo na bamboka na yango ya mike-mike. Yango nde ezalaki libula ya mabele ya bakitani ya Benjame kolanda bituka na bango.
and Zelah, Haeleph, and Jebus (that is, Jerusalem), and Gibeath, and Kiriath Jearim; fourteen cities with their villages. This is the inheritance of the descendants of Benjamin according to their families.

< Jozue 18 >