< Jozue 17 >

1 Libota ya Manase, mwana liboso ya Jozefi, bazwaki eteni ya mabele; pamba te Makiri, mwana liboso ya Manase, tata ya Galadi, azalaki moto ya bitumba mpe azwaki Galadi mpe Bashani.
瑪拿西是約瑟的長子,他的支派拈鬮所得之地記在下面。至於瑪拿西的長子基列之父 瑪吉,因為是勇士就得了基列和巴珊。
2 Bakitani mosusu ya Manase, kolanda mabota na bango, bazwaki eteni ya mabele: bakitani ya Abiezeri, ya Eleki, ya Asirieli, ya Sishemi, ya Eferi mpe ya Shemida. Bango nde bazalaki bana mibali ya Manase, mwana mobali ya Jozefi, kolanda bituka na bango.
瑪拿西其餘的子孫,按着宗族拈鬮分地,就是亞比以謝子孫,希勒子孫,亞斯列子孫,示劍子孫,希弗子孫,示米大子孫;這些按着宗族,都是約瑟兒子瑪拿西子孫的男丁。
3 Tselofikadi, mwana mobali ya Eferi, mwana mobali ya Galadi, mwana mobali ya Makiri, mwana mobali ya Manase, atikalaki kobota bana mibali te; azalaki kaka na bana basi oyo bakombo na bango ezalaki: Mala, Noa, Ogila, Milika mpe Tiritsa.
瑪拿西的玄孫,瑪吉的曾孫,基列的孫子,希弗的兒子西羅非哈沒有兒子,只有女兒。他的女兒名叫瑪拉、挪阿、曷拉、密迦、得撒;
4 Bayaki liboso ya Nganga-Nzambe Eleazari, liboso ya Jozue, mwana mobali ya Nuni, mpe liboso ya bakambi. Balobaki: « Yawe apesaki mitindo epai ya Moyize ete apesa biso eteni ya mabele kati ya bandeko na biso ya mibali. » Boye, Jozue apesaki bango libula elongo na bandeko mibali ya tata na bango, kolanda mitindo na Yawe.
她們來到祭司以利亞撒和嫩的兒子約書亞並眾首領面前,說:「耶和華曾吩咐摩西在我們弟兄中分給我們產業。」於是約書亞照耶和華所吩咐的,在她們伯叔中,把產業分給她們。
5 Boye, ndambo ya libota ya Manase ezwaki biteni zomi, bakisa mokili ya Galadi mpe ya Bashani oyo ezali na ngambo mosusu ya Yordani.
除了約旦河東的基列和巴珊地之外,還有十分地歸瑪拿西,
6 Na bongo, bakitani ya Manase ya basi bazwaki libula ya mabele kati na bakitani na ye ya mibali, kasi mokili ya Galadi ezalaki ya bana mibali mosusu ya Manase.
因為瑪拿西的孫女們在瑪拿西的孫子中得了產業。基列地是屬瑪拿西其餘的子孫。
7 Eteni ya mabele ya Manase ezalaki longwa na Aseri, na mokili ya Mikimeta oyo ezalaki ya kotalana na Sishemi, kino na ngambo ya Yamini, na ngambo ya bavandi ya Eyini-Tapua.
瑪拿西的境界:從亞設起,到示劍前的密米他,往北到隱‧他普亞居民之地。
8 Manase azwaki eteni ya mabele ya Tapua, kasi yango moko Tapua oyo ezalaki na bandelo ya Manase ezalaki ya bakitani ya Efrayimi.
他普亞地歸瑪拿西,只是瑪拿西境界上的他普亞城歸以法蓮子孫。
9 Bongo mondelo ekitaki kino na ngambo ya sude ya moluka ya Kana. Bingumba oyo ezalaki na zingazinga ya bingumba ya Manase ezalaki ya Efrayimi. Kasi mondelo ya Manase elekaki na ngambo ya nor ya moluka mpe ekendeki kosuka na Ebale monene.
其界下到加拿河的南邊。在瑪拿西城邑中的這些城邑都歸以法蓮。瑪拿西的地界是在河北直通到海為止;
10 Efrayimi azwaki eteni ya mabele oyo ezalaki na ngambo ya sude; mpe Manase azwaki oyo ezalaki na ngambo ya nor. Eteni ya mabele ya Manase ekomaki kino na Ebale monene, na mondelo ya Aseri, na ngambo ya nor mpe ya Isakari, na ngambo ya este.
南歸以法蓮,北歸瑪拿西,以海為界;北邊到亞設,東邊到以薩迦。
11 Kati na Isakari mpe Aseri, Manase azwaki Beti-Sheani elongo na bamboka na yango ya mike-mike, Yibileayimi elongo na bamboka na yango ya mike-mike, Dori elongo na bamboka na yango ya mike-mike, Eyini-Dori elongo na bamboka na yango ya mike-mike, Taanaki elongo na bamboka na yango ya mike-mike, mpe Megido elongo na bamboka na yango ya mike-mike (engumba ya misato, kati na molongo, ezali Nafoti).
瑪拿西在以薩迦和亞設境內,有伯‧善和屬伯‧善的鎮市,以伯蓮和屬以伯蓮的鎮市,多珥的居民和屬多珥的鎮市;又有三處山岡,就是隱‧多珥和屬隱‧多珥的鎮市;他納的居民和屬他納的鎮市,米吉多的居民和屬米吉多的鎮市。
12 Nzokande, bakitani ya Manase bazalaki na makoki te ya kozwa bingumba oyo, pamba te bato ya Kanana batingamaki kaka kovanda na etuka yango.
只是瑪拿西子孫不能趕出這些城的居民,迦南人偏要住在那地。
13 Atako bongo, tango bana ya Isalaele bakomaki makasi koleka, bakomaki kosalisa bato ya Kanana misala makasi oyo ekoki na bawumbu, kasi bakokaki te kobengana bango.
及至以色列人強盛了,就使迦南人做苦工,沒有把他們全然趕出。
14 Bakitani ya Jozefi balobaki na Jozue: — Mpo na nini opesi biso lokola libula, kaka eteni moko ya mabele? Tozali penza bato ebele na motango mpe Yawe apamboli biso makasi.
約瑟的子孫對約書亞說:「耶和華到如今既然賜福與我們,我們也族大人多,你為甚麼僅將一鬮一段之地分給我們為業呢?」
15 Jozue azongiselaki bango: — Soki bozali bato ebele mpe etuka ya bangomba ya Efrayimi ezali moke mpo na bino, bokende komikatela eteni ya mabele na bazamba ya bato ya Perizi mpe ya Refayimi.
約書亞說:「你們如果族大人多,嫌以法蓮山地窄小,就可以上比利洗人、利乏音人之地,在樹林中砍伐樹木。」
16 Bakitani ya Jozefi balobaki na ye: — Mokili ya bangomba ezali moke mpo na biso, mpe bato nyonso ya Kanana oyo bavandaka na etando ya Beti-Sheani elongo na bamboka na yango ya mike-mike, mpe bavandi ya lubwaku ya Jizireyeli, bazalaka na bashar ya bibende mpo na kobunda.
約瑟的子孫說:「那山地容不下我們,並且住平原的迦南人,就是住伯‧善和屬伯‧善的鎮市,並住耶斯列平原的人,都有鐵車。」
17 Jozue alobaki na bato ya Efrayimi mpe ya Manase, bakitani ya Jozefi: — Bozali ebele mpe bozali makasi. Bokozala kaka na eteni ya mabele moko te.
約書亞對約瑟家,就是以法蓮和瑪拿西人,說:「你是族大人多,並且強盛,不可僅有一鬮之地,
18 Kasi bozwa etuka mobimba ya bangomba, atako ezali bazamba; bokata bazamba yango mpe bovanda kuna kino na basuka na yango, bobengana bato ya Kanana, atako bazali na bashar ya bibende mpe bazali makasi.
山地也要歸你,雖是樹林,你也可以砍伐;靠近之地必歸你。迦南人雖有鐵車,雖是強盛,你也能把他們趕出去。」

< Jozue 17 >