< Jozue 16 >

1 Eteni ya mabele ya bakitani ya Jozefi ebandaki wuta na Yordani, pene ya Jeriko, na ngambo ya este ya mayi ya Jeriko, na esobe oyo emata na Jeriko na mokili ya bangomba ya Beteli.
约瑟的子孙拈阄所得之地是从靠近耶利哥的约旦河起,以耶利哥东边的水为界:从耶利哥上去,通过山地的旷野,到伯特利;
2 Ekendeki longwa na Beteli kino na Luze, elekaki na ngambo ya bandelo ya bato ya Ariki mpe Ataroti,
又从伯特利到路斯,接连到亚基人的境界,至亚他绿;
3 ekitaki kino na ngambo ya weste na mondelo ya bato ya Yafeleti kino na etuka ya Beti-Oroni ya se, kino na Gezeri ya suka mpe esukaki na Ebale monene.
又往西下到押利提人的境界,到下伯·和 的境界,直到基色,通到海为止。
4 Boye bana mibali ya Jozefi, Manase mpe Efrayimi, bazwaki eteni ya mabele lokola libula.
约瑟的儿子玛拿西、以法莲就得了他们的地业。
5 Tala eteni ya mabele ya bakitani ya Efrayimi kolanda bituka na bango: Mondelo ya eteni ya mabele na bango ezalaki na ngambo ya este, longwa na Ataroti-Adari kino na Beti-Oroni ya likolo;
以法莲子孙的境界,按着宗族所得的,记在下面:他们地业的东界是亚他绿·亚达到上伯·和 ;
6 ekobaki kino na Ebale monene. Na ngambo ya weste, mondelo ezalaki longwa na Mikimeta na ngambo ya nor, ebalukaki na ngambo ya este na Tanati-Silo, elekelaki wana kino na Yanoa, na ngambo ya este.
往西通到北边的密米他,又向东绕到他纳·示罗,又接连到雅挪哈的东边;
7 Mpe lisusu ekitaki longwa na Yanoa kino na Ataroti mpe na Naarata, etutanaki na Jeriko mpe ekendeki kobima kino na Yordani.
从雅挪哈下到亚他绿,又到拿拉,达到耶利哥,通到约旦河为止;
8 Longwa na Tapua, ekendeki na ngambo ya weste kino na moluka ya Kana mpe ekendeki kosuka na Ebale monene. Yango nde ezalaki eteni ya libula ya bakitani ya libota ya Efrayimi, kolanda bituka na bango.
从他普亚往西,到加拿河,直通到海为止。这就是以法莲支派按着宗族所得的地业。
9 Ebakisamaki mpe bingumba nyonso elongo na bamboka na yango ya mike-mike oyo epesamelaki bato ya libota ya Efrayimi kati na libula ya bato ya libota ya Manase.
另外在玛拿西人地业中得了些城邑和属城的村庄。这都是分给以法莲子孙的。
10 Kasi babenganaki te bato ya Kanana oyo bazalaki kovanda na Gezeri. Yango wana, bato ya Kanana bazali kovanda kati na bato ya Efrayimi kino na mokolo ya lelo. Kasi bakomaki kosalisa bango misala makasi oyo ekoki na bawumbu.
他们没有赶出住基色的迦南人;迦南人却住在以法莲人中间,成为做苦工的仆人,直到今日。

< Jozue 16 >