< Jozue 15 >
1 Eteni ya mabele ya bato ya libota ya Yuda, kolanda bituka na bango, ezalaki na ngambo ya sude, wuta na bandelo ya Edomi kino na esobe ya Tsini, na suka penza ya sude.
犹大支派按着宗族拈阄所得之地是在尽南边,到以东的交界,向南直到寻的旷野。
2 Mondelo na yango ya sude ebandaki na suka ya ebale monene ya Barozo, longwa na eteni ya mabele oyo ekota kati na ebale monene oyo etalana na Negevi,
他们的南界是从盐海的尽边,就是从朝南的海汊起,
3 emataki kino na ngambo ya sude ya Akarabimi mpe elekaki na Tsini, sima emataki na ngambo ya sude ya Kadeshi-Barinea mpe ekitaki na Etsironi; emataki na ngambo ya Adari mpe ebalukaki na ngambo ya Karika.
通到亚克拉滨坡的南边,接连到寻,上到加低斯·巴尼亚的南边,又过希斯 ,上到亚达珥,绕到甲加,
4 Elekaki na Atsimoni, ekendeki kotutana na moluka ya Ejipito mpe esukaki na Ebale monene. Yango nde ezali mondelo na bango na ngambo ya sude.
接连到押们,通到埃及小河,直通到海为止。这就是他们的南界。
5 Na ngambo ya este, mondelo ezalaki ebale monene ya Barozo kino na suka ya Yordani. Na ngambo ya nor, ezalaki longwa na eteni ya mabele oyo ekota kati na ebale kino na suka ya Yordani.
东界是从盐海南边到约旦河口。北界是从约旦河口的海汊起,
6 Mondelo emataki na Beti-Ogila, elekaki na ngambo ya nor ya Beti-Araba mpe emataki kino na Libanga ya Boani, mwana mobali ya Ribeni.
上到伯·曷拉,过伯·亚拉巴的北边,上到吕便之子波罕的磐石;
7 Mondelo yango emataki kino na Debiri, longwa na Lubwaku ya Akori, mpe ebalukaki na ngambo ya nor kino na Giligali oyo etalana na nzela oyo emata na Adumimi, na ngambo ya sude ya moluka. Elekaki pene ya mayi ya Eyini-Shemeshi mpe ekendeki kosuka na Eyini-Rogeli.
从亚割谷往北,上到底璧,直向河南亚都冥坡对面的吉甲;又接连到隐·示麦泉,直通到隐·罗结,
8 Bongo mondelo yango emataki na nzela ya Lubwaku ya Beni-Inomi, pene ya mopanzi ya sude ya engumba ya bato ya Yebusi (oyo ezali Yelusalemi). Longwa na esika yango, emataki kino na songe ya ngomba oyo ezali na weste ya Lubwaku ya Inomi, na suka ya ngambo ya nor ya Lubwaku ya Refayimi.
上到欣嫩子谷,贴近耶布斯的南界(耶布斯就是耶路撒冷);又上到欣嫩谷西边的山顶,就是在利乏音谷极北的边界;
9 Longwa na songe ya ngomba, mondelo yango ekatisaki kino na etima ya mayi ya Nefitoa, ebimaki na bingumba ya ngomba Efroni mpe ekitaki na ngambo ya Baala (oyo ezali Kiriati-Yearimi).
又从山顶延到尼弗多亚的水源,通到以弗 山的城邑,又延到巴拉(巴拉就是基列·耶琳);
10 Longwa na Baala, mondelo yango ekatisaki na ngambo ya weste, pene ya ngomba Seiri; elekaki na mopanzi ya ngomba ya bazamba, na ngambo ya nor (oyo ezali ngomba Kesaloni); ekobaki kokita kino na Beti-Shemeshi mpe ekatisaki kino na Timina.
又从巴拉往西绕到西珥山,接连到耶琳山的北边(耶琳就是基撒 );又下到伯·示麦过亭纳,
11 Mondelo yango ekendeki na mopanzi ya ngambo ya nor ya Ekroni, ebalukaki na Shikeroni, elekaki pene ya ngomba Baala; ekendeki kino na Yabineyeli mpe esukaki na ebale monene.
通到以革伦北边,延到施基 ,接连到巴拉山;又通到雅比聂,直通到海为止。
12 Mondelo ya ngambo ya weste elekaki pembeni-pembeni ya ebale monene Mediterane. Yango nde ezalaki, na bangambo nyonso, eteni ya mabele ya bato ya libota ya Yuda kolanda bituka na bango.
西界就是大海和靠近大海之地。这是犹大人按着宗族所得之地四围的交界。
13 Kolanda mitindo oyo Yawe apesaki ye, Jozue apesaki Kalebi, mwana mobali ya Yefune, eteni ya mabele: Kiriati-Ariba (oyo ezali Ebron), kati na libota ya bato ya Yuda. (Ariba azalaki tata ya Anaki).
约书亚照耶和华所吩咐的,将犹大人中的一段地,就是基列·亚巴,分给耶孚尼的儿子迦勒。亚巴是亚衲族的始祖(基列·亚巴就是希伯 )。
14 Kalebi abenganaki, wuta na Ebron, bakitani misato ya Anaki: Sheshayi, Ayimani mpe Talimayi.
迦勒就从那里赶出亚衲族的三个族长,就是示筛、亚希幔、挞买;
15 Longwa wana, akendeki kobundisa bavandi ya Debiri oyo kombo na yango ezalaki na kala « Kiriati-Seferi. »
又从那里上去,攻击底璧的居民。(这底璧从前名叫基列·西弗。)
16 Kalebi alobaki: « Nakopesa na libala Akisa, mwana na ngai ya mwasi, epai ya moto nyonso oyo akobundisa mpe akobotola Kiriati-Seferi. »
迦勒说:“谁能攻打基列·西弗将城夺取,我就把我女儿押撒给他为妻。”
17 Otinieli, mwana mobali ya Kenazi, ndeko mobali ya Kalebi, abotolaki yango; boye Kalebi apesaki Akisa, mwana na ye ya mwasi, na libala epai ya Otinieli.
迦勒兄弟基纳斯的儿子俄陀聂夺取了那城,迦勒就把女儿押撒给他为妻。
18 Nzokande, tango Akisa akomaki na ndako ya Otinieli, atindikaki ye ete asenga elanga epai ya Kalebi, tata na ye. Boye, tango Akisa akitaki wuta na ane na ye, Kalebi atunaki ye: — Olingi nini?
押撒过门的时候,劝丈夫向她父亲求一块田,押撒一下驴,迦勒问她说:“你要什么?”
19 Akisa azongisaki: — Salela ngai ngolu. Lokola opesaki ngai eteni ya mabele kati na Negevi, pesa ngai lisusu bitima. Boye, Kalebi apesaki ye bitima ya likolo mpe ya se.
她说:“求你赐福给我,你既将我安置在南地,求你也给我水泉。”她父亲就把上泉下泉赐给她。
20 Yango nde ezalaki eteni ya mabele oyo bato ya libota ya Yuda bazwaki lokola libula, kolanda mabota na bango.
以下是犹大支派按着宗族所得的产业。
21 Tala bingumba oyo ezalaki na suka ya eteni ya mabele ya bato ya libota ya Yuda, na ngambo ya mondelo ya Edomi, na Negevi: Kabiseyeli, Ederi, Yaguri,
犹大支派尽南边的城邑,与以东交界相近的,就是甲薛、以得、雅姑珥、
23 Kedeshi, Atsori, Itinani,
基低斯、夏琐、以提楠、
24 Zifi, Telemi, Bealoti,
西弗、提链、比亚绿、
25 Atsori-Adata, Kerioti-Etsironi oyo bazalaki mpe kobenga Atsori,
夏琐·哈大他、加略·希斯 (加略·希斯 就是夏琐)、
27 Atsari-Gada, Eshimoni, Beti-Paleti,
哈萨·迦大、黑实门、伯·帕列、
28 Atsari-Shuwali, Beri-Sheba, Biziotia,
哈萨·书亚、别是巴、比斯约他、
30 Elitoladi, Kesili, Orima,
伊勒多腊、基失、何珥玛、
31 Tsikilagi, Madimana, Sanisana,
洗革拉、麦玛拿、三撒拿、
32 Lebaoti, Shilimi, Ayini mpe Rimoni: bingumba nyonso ezalaki tuku mibale na libwa elongo na bamboka na yango ya mike-mike.
利巴勿、实忻、亚因、临门,共二十九座城,还有属城的村庄。
33 Tala bingumba oyo ezalaki na etando, pene ya ebale monene: Eshitaoli, Tsorea, Ashina,
在高原有以实陶、琐拉、亚实拿、
34 Zanoa, Eyini-Ganimi, Tapua, Enami,
撒挪亚、隐·干宁、他普亚、以楠、
35 Yarimuti, Adulami, Soko, Azeka,
耶末、亚杜兰、梭哥、亚西加、
36 Shaarayimi, Aditayimi, Gedera to Gederotayimi: bingumba nyonso ezalaki zomi na minei elongo na bamboka na yango ya mike-mike.
沙拉音、亚底他音、基底拉、基底罗他音,共十四座城,还有属城的村庄。
37 Tsenani, Adasha, Migidali-Gadi,
又有洗楠、哈大沙、麦大·迦得、
38 Dileani, Mitsipe, Yokiteyeli,
底连、米斯巴、约帖、
39 Lakishi, Botsikati, Egiloni,
拉吉、波斯加、伊矶伦、
40 Kaboni, Lakimasi, Kitilishi,
迦本、拉幔、基提利、
41 Gederoti, Beti-Dagoni, Naama mpe Makeda: bingumba nyonso ezalaki zomi na motoba elongo na bamboka na yango ya mike-mike.
基低罗、伯·大衮、拿玛、玛基大,共十六座城,还有属城的村庄。
42 Libina, Eteri, Ashani;
又有立拿、以帖、亚珊、
43 Yifita, Ashina, Netsibi,
益弗他、亚实拿、尼悉、
44 Keila, Akizibi mpe Maresha: bingumba nyonso ezalaki libwa elongo na bamboka na yango ya mike-mike.
基伊拉、亚革悉、玛利沙,共九座城,还有属城的村庄。
45 Engumba ya Ekroni elongo na bamboka na yango mpe bamboka na yango ya mike-mike oyo ezingelaki yango,
又有以革伦和属以革伦的镇市村庄;
46 longwa na Ekroni mpe na ngambo ya weste, mabele nyonso oyo ezalaki pene ya Asidodi mpe bamboka na yango;
从以革伦直到海,一切靠近亚实突之地,并属其地的村庄。
47 Asidodi, bingumba na yango mpe bamboka na yango ya mike-mike; Gaza, bingumba na yango mpe bamboka na yango ya mike-mike kino na moluka ya Ejipito, ebale monene Mediterane mpe bazingazinga na yango.
亚实突和属亚实突的镇市村庄;迦萨和属迦萨的镇市村庄;直到埃及小河,并大海和靠近大海之地。
48 Na mokili ya bangomba: Shamiri, Yatiri, Soko,
在山地有沙密、雅提珥、梭哥、
49 Dana, Kiriati-Sana oyo bazalaki mpe kobenga Debiri,
大拿、基列·萨拿(基列·萨拿就是底璧)、
50 Anabi, Eshitemoa, Animi,
亚拿伯、以实提莫、亚念、
51 Gosheni, Oloni mpe Gilo: bingumba nyonso ezalaki zomi na moko elongo na bamboka na yango ya mike-mike.
歌珊、何伦、基罗,共十一座城,还有属城的村庄。
53 Yanumi, Beti-Tapua, Afeki,
雅农、伯·他普亚、亚非加、
54 Umeta, Kiriati-Ariba oyo bazalaki mpe kobenga Ebron, mpe Tsiori: bingumba nyonso ezalaki libwa elongo na mboka na yango ya mike-mike.
宏他、基列·亚巴(基列·亚巴就是希伯 )、洗珥,共九座城,还有属城的村庄。
55 Maoni, Karimeli, Zifi, Yuta,
又有玛云、迦密、西弗、淤他、
56 Jizireyeli, Yokideami, Zanoa,
耶斯列、约甸、撒挪亚、
57 Kayini, Gibea mpe Timina: bingumba nyonso ezalaki zomi elongo na bamboka na yango ya mike-mike.
该隐、基比亚、亭纳,共十座城,还有属城的村庄。
58 Aliwuli, Beti-Tsuri, Gedori,
又有哈忽、伯·夙、基突、
59 Maarati, Beti-Anoti mpe Elitekoni: bingumba nyonso ezalaki motoba elongo na bamboka na yango ya mike-mike.
玛腊、伯·亚诺、伊勒提君,共六座城,还有属城的村庄。
60 Kiriati-Bala oyo bazalaki mpe kobenga Kiriati-Yearimi, mpe Raba: bingumba nyonso ezalaki mibale elongo na bamboka na yango ya mike-mike.
又有基列·巴力(基列·巴力就是基列·耶琳)、拉巴,共两座城,还有属城的村庄。
61 Tala bingumba oyo ezalaki na esobe: Beti-Araba, Midini, Sekaka,
在旷野有伯·亚拉巴、密丁、西迦迦、
62 Nibishani, Iri-Amelayi mpe Eyini-Gedi: bingumba nyonso ezalaki motoba elongo na bamboka na yango ya mike-mike.
匿珊、盐城、隐·基底,共六座城,还有属城的村庄。
63 Bato ya libota ya Yuda bakokaki te kobengana bato ya Yebusi oyo bazalaki kovanda na Yelusalemi. Boye, kino na mokolo ya lelo, bato ya Yebusi bazali kovanda na Yelusalemi elongo na bato ya libota ya Yuda.
至于住耶路撒冷的耶布斯人,犹大人不能把他们赶出去,耶布斯人却在耶路撒冷与犹大人同住,直到今日。