< Jozue 14 >

1 Nzokande, tala mabele oyo bana ya Isalaele bazwaki lokola libula kati na mokili ya Kanana; mabele oyo Nganga-Nzambe Eleazari; Jozue, mwana mobali ya Nuni, mpe bakambi ya bituka ya mabota ya bana ya Isalaele bakabolelaki bango.
And this is what the children of Israel inherited in the land of Canaan, which Eleazar the priest, and Joshua the son of Nun, and the chief fathers of the tribes of the children of Israel, allotted for inheritance to them:
2 Bakabolelaki bango yango na nzela ya zeke, ndenge Yawe atindaki na nzela ya Moyize kati na mabota libwa mpe ndambo ya libota.
their inheritance was by lot, as Jehovah had commanded by Moses, for the nine tribes, and the half tribe.
3 Moyize apesaki epai ya mabota mibale mpe ndambo ya libota mabele na bango, na ngambo ya este ya Yordani; kasi epai ya bato ya libota ya Levi, apesaki mabele te kati na mabota mosusu;
For Moses had given the inheritance of the two tribes and the half tribe beyond the Jordan, but to the Levites he had given no inheritance among them.
4 pamba te bana mibali ya Jozefi, Manase mpe Efrayimi, bakomaki mabota mibale. Bato ya libota ya Levi bazwaki libula te kati na mokili longola kaka bingumba ya kovanda elongo na mabele na yango mpo na bibwele mpe biloko na bango.
For the children of Joseph were two tribes, Manasseh and Ephraim; and they gave no part to the Levites in the land, save cities to dwell in, and their suburbs for their cattle and for their substance.
5 Boye, bana ya Isalaele bakabolaki mokili, ndenge kaka Yawe atindaki Moyize.
As Jehovah had commanded Moses, so the children of Israel did, and they divided the land.
6 Bato ya libota ya Yuda bayaki epai ya Jozue, na Giligali. Kalebi, mwana mobali ya Yefune, moto ya Kenizi, ayebisaki Jozue: « Oyebi malamu makambo oyo Yawe alobaki na Moyize, moto na Nzambe, na Kadeshi-Barinea na tina na yo mpe na tina na ngai.
Then the children of Judah came near to Joshua in Gilgal, and Caleb the son of Jephunneh the Kenizzite said to him, Thou knowest the word that Jehovah spoke to Moses the man of God, concerning me and thee, in Kadesh-barnea.
7 Nazalaki nanu na mibu tuku minei tango Moyize, mowumbu na Yawe, atindaki ngai wuta na Kadeshi-Barinea mpo na kononga mokili. Mpe napesaki ye sango kolanda ndenge motema na ngai ezalaki kondima.
Forty years old was I when Moses the servant of Jehovah sent me from Kadesh-barnea to search out the land; and I brought him word again as it was in my heart.
8 Bandeko na ngai, oyo tomataki na bango elongo balembisaki bato nzoto; nzokande ngai nalandaki bobele Yawe, Nzambe na ngai, na motema mobimba.
And my brethren that had gone up with me made the heart of the people melt; but I wholly followed Jehovah my God.
9 Na mokolo wana, Moyize alapaki ndayi: ‹ Solo, nalapi ndayi ete mokili oyo matambe na yo esilaki konyata ekozala libula na yo mpe ya bakitani na yo mpo na libela, pamba te olandaki Yawe, Nzambe na ngai, na motema mobimba. ›
And Moses swore on that day, saying, The land whereon thy feet have trodden shall assuredly be thine inheritance, and thy children's for ever! for thou hast wholly followed Jehovah my God.
10 Sik’oyo tala, eleki mibu tuku minei na mitano oyo Yawe abateli ngai na bomoi, wuta tango alobaki liloba oyo epai ya Moyize tango bana ya Isalaele bazalaki kotambola na esobe. Boye, ndenge nazali awa lelo, nakokisi mibu tuku mwambe na mitano ya mbotama,
And now behold, Jehovah has kept me alive, as he said, these forty-five years, since Jehovah spoke this word to Moses, when Israel wandered in the wilderness; and now behold, I am this day eighty-five years old.
11 mpe nazali na makasi lokola na tango oyo Moyize atindaki ngai; nazali na nguya ya kobunda bitumba ndenge kaka nazalaki na yango na kala.
I am still this day strong, as in the day that Moses sent me: as my strength was then, even so is my strength now, for war, both to go out and to come in.
12 Pesa ngai mokili ya bangomba wana oyo Yawe alakaki ngai na mokolo wana. Mokolo wana, yo moko oyokaki ete bato ya Anaki bazalaki kovanda kuna mpe bingumba na bango ezalaki minene mpe batonga makasi. Kasi na lisungi na Yawe, nakobengana bango ndenge Yawe alobaki. »
And now give me this mountain, of which Jehovah spoke in that day; for thou heardest in that day that Anakim are there, and great fortified cities. If so be Jehovah shall be with me, then I shall dispossess them, as Jehovah said.
13 Jozue apambolaki Kalebi, mwana mobali ya Yefune, mpe apesaki ye engumba Ebron lokola libula.
And Joshua blessed him, and gave Hebron to Caleb the son of Jephunneh for an inheritance.
14 Boye, wuta na tango yango, engumba Ebron ekomaki libula ya Kalebi, mwana mobali ya Yefune, moto ya Kenizi; mpo ete alandaki Yawe, Nzambe ya Isalaele, na motema mobimba.
Hebron therefore became the inheritance of Caleb the son of Jephunneh the Kenizzite to this day, because he wholly followed Jehovah the God of Israel.
15 Liboso, bazalaki kobenga Ebron « Kiriati-Ariba. » Ariba azalaki elombe oyo alekaki bato nyonso ya Anaki na makasi. Bongo, mokili ekomaki na kimia mpe bitumba ezalaki lisusu te.
Now the name of Hebron before was Kirjath-Arba; the great man among the Anakim. And the land rested from war.

< Jozue 14 >