< Jozue 12 >

1 Tala bakonzi ya mokili, oyo bana ya Isalaele balongaki mpe oyo babotolaki mokili na bango na ngambo ya este ya Yordani, wuta na moluka ya Arinoni kino na ngomba Erimoni, elongo na ngambo nyonso ya este ya Araba:
ואלה מלכי הארץ אשר הכו בני ישראל וירשו את ארצם בעבר הירדן מזרחה השמש--מנחל ארנון עד הר חרמון וכל הערבה מזרחה
2 Sikoni, mokonzi ya bato ya Amori, azalaki kovanda na Eshiboni. Azalaki kokonza wuta na Aroeri oyo ezalaki pene ya moluka ya Arinoni, wuta na moluka, elongo na ndambo ya mokili ya Galadi, kino na moluka ya Yaboki, oyo ezalaki na mondelo na bato ya Amoni.
סיחון מלך האמרי היושב בחשבון--משל מערוער אשר על שפת נחל ארנון ותוך הנחל וחצי הגלעד ועד יבק הנחל גבול בני עמון
3 Azalaki mpe lisusu kokonza ngambo ya este ya Araba, wuta na Ebale monene ya Kinereti kino na Ebale monene ya Araba (ebale monene ya Barozo), na ngambo ya este, na nzela ya Beti-Yeshimoti mpe na ebandeli ya ngomba Pisiga, na ngambo ya sude.
והערבה עד ים כנרות מזרחה ועד ים הערבה ים המלח מזרחה דרך בית הישמות ומתימן--תחת אשדות הפסגה
4 Ogi, mokonzi ya Bashani, moko kati na bakitani ya suka ya Refayimi, oyo azalaki kovanda na Ashitaroti mpe na Edreyi.
וגבול עוג מלך הבשן מיתר הרפאים--היושב בעשתרות ובאדרעי
5 Azalaki kokonza na ngomba Erimoni, na Salika mpe na Bashani mobimba kino na bandelo ya bato ya Geshuri mpe ya bato ya Maakati, mpe kino na ndambo ya mokili ya Galadi oyo ezalaki na mondelo ya mokili ya Sikoni, mokonzi na Eshiboni.
ומשל בהר חרמון ובסלכה ובכל הבשן עד גבול הגשורי והמעכתי וחצי הגלעד--גבול סיחון מלך חשבון
6 Moyize, mosali na Yawe, elongo na bana ya Isalaele balongaki bango. Boye, Moyize, mowumbu na Yawe, apesaki mokili na bango lokola libula, epai ya bato ya libota ya Ribeni, ya Gadi mpe ya ndambo ya libota ya Manase.
משה עבד יהוה ובני ישראל הכום ויתנה משה עבד יהוה ירשה לראובני ולגדי ולחצי שבט המנשה
7 Tala molongo ya bakonzi ya mokili oyo Jozue mpe bana ya Isalaele babotolaki na ngambo ya weste ya Yordani, wuta na Bala-Gadi, na lubwaku ya Libani kino na ngomba Alaki oyo ezalaki na ngambo ya Seiri. Jozue apesaki bamboka na bango lokola libula, epai ya bana ya Isalaele kolanda mabota na bango
ואלה מלכי הארץ אשר הכה יהושע ובני ישראל בעבר הירדן ימה מבעל גד בבקעת הלבנון ועד ההר החלק העלה שעירה ויתנה יהושע לשבטי ישראל ירשה--כמחלקתם
8 kati na mokili ya bangomba, na mokili ya se, na Araba, kokita na esobe mpe na Negevi, mikili ya bato ya Iti, ya Amori, ya Kanana, ya Perizi, ya Evi mpe ya Yebusi. Tala bakonzi yango:
בהר ובשפלה ובערבה ובאשדות ובמדבר ובנגב--החתי האמרי והכנעני הפרזי החוי והיבוסי
9 mokonzi ya Jeriko moko mokonzi ya Ayi, pembeni ya Beteli moko
מלך יריחו אחד מלך העי אשר מצד בית אל אחד
10 mokonzi ya Yelusalemi moko mokonzi ya Ebron moko
מלך ירושלם אחד מלך חברון אחד
11 mokonzi ya Yarimuti moko mokonzi ya Lakishi moko
מלך ירמות אחד מלך לכיש אחד
12 mokonzi ya Egiloni moko mokonzi ya Gezeri moko
מלך עגלון אחד מלך גזר אחד
13 mokonzi ya Debiri moko mokonzi ya Gederi moko
מלך דבר אחד מלך גדר אחד
14 mokonzi ya Orima moko mokonzi ya Aradi moko
מלך חרמה אחד מלך ערד אחד
15 mokonzi ya Libina moko mokonzi ya Adulami moko
מלך לבנה אחד מלך עדלם אחד
16 mokonzi ya Makeda moko mokonzi ya Beteli moko
מלך מקדה אחד מלך בית אל אחד
17 mokonzi ya Tapua moko mokonzi ya Eferi moko
מלך תפוח אחד מלך חפר אחד
18 mokonzi ya Afeki moko mokonzi ya Lasharoni moko
מלך אפק אחד מלך לשרון אחד
19 mokonzi ya Madoni moko mokonzi ya Atsori moko
מלך מדון אחד מלך חצור אחד
20 mokonzi ya Shimironi-Meroni moko mokonzi ya Akishafi moko
מלך שמרון מראון אחד מלך אכשף אחד
21 mokonzi ya Taanaki moko mokonzi ya Megido moko
מלך תענך אחד מלך מגדו אחד
22 mokonzi ya Kedeshi moko mokonzi ya Yokineami kati na Karimeli moko
מלך קדש אחד מלך יקנעם לכרמל אחד
23 mokonzi ya Dori, kati na lubwaku ya Dori moko mokonzi ya Goyimi, kati na Giligali moko
מלך דור לנפת דור אחד מלך גוים לגלגל אחד
24 mokonzi ya Tiritsa moko. Bango nyonso bazalaki bakonzi tuku misato na moko.
מלך תרצה אחד כל מלכים שלשים ואחד

< Jozue 12 >