< Jozue 11 >

1 Tango Yabini, mokonzi ya Atsori, ayokaki makambo oyo, atindaki maloba epai ya Yobabi, mokonzi ya Madoni; epai ya mokonzi ya Shimironi, epai ya mokonzi ya Akishafi,
When Jabin king of Hazor heard of it, he sent to Jobab king of Madon, to the king of Shimron, to the king of Achshaph,
2 epai ya bakonzi oyo bazalaki na etuka ya bangomba na nor, na etando ya Araba, na ngambo ya sude ya Kinereti, na mokili ya bangomba mikuse, na ngambo ya weste ya etando ya Dori;
and to the kings who were on the north, in the hill country, in the Arabah south of Chinneroth, in the lowland, and in the heights of Dor on the west,
3 epai ya bato ya Kanana oyo bazalaki na ngambo ya este mpe na ngambo ya weste; epai ya bato ya Amori, ya Iti, ya Perizi mpe ya Yebusi, oyo bazalaki kovanda na mokili ya bangomba; epai ya bato ya Evi, na se ya Erimoni, na mokili ya Mitsipa.
to the Canaanite on the east and on the west, the Amorite, the Hittite, the Perizzite, the Jebusite in the hill country, and the Hivite under Hermon in the land of Mizpah.
4 Babimaki elongo na mampinga na bango nyonso, mpe bato bazalaki ebele lokola zelo ya ebale elongo na motango monene ya bampunda mpe ya bashar.
They went out, they and all their armies with them, many people, even as the sand that is on the seashore in multitude, with very many horses and chariots.
5 Bakonzi yango nyonso basangisaki mampinga na bango esika moko mpe batongaki molako na bango pembeni ya mayi ya Meromi mpo na kobundisa Isalaele.
All these kings met together; and they came and encamped together at the waters of Merom, to fight with Israel.
6 Yawe alobaki na Jozue: « Kobanga bango te, pamba te lobi, kaka na ngonga oyo, nakokaba bango nyonso na maboko ya Isalaele lokola bibembe. Okokata misisa ya makolo ya bampunda na bango mpe okotumba bashar na bango. »
The LORD said to Joshua, “Don’t be afraid because of them; for tomorrow at this time, I will deliver them up all slain before Israel. You shall hamstring their horses and burn their chariots with fire.”
7 Boye Jozue elongo na mampinga na ye nyonso babimelaki bango na pwasa, na mayi ya Meromi mpe babundisaki bango;
So Joshua came suddenly, with all the warriors, against them by the waters of Merom, and attacked them.
8 bongo Yawe akabaki bango na maboko ya Isalaele. Balongaki bango mpe balandaki bango kino na Sidoni, engumba monene, kino na Misirefoti-Mayimi mpe kino na ngambo ya este ya lubwaku ya Mitsipe. Babomaki bango mpe batikaki ata moto moko te na bomoi.
The LORD delivered them into the hand of Israel, and they struck them, and chased them to great Sidon, and to Misrephoth Maim, and to the valley of Mizpah eastward. They struck them until they left them no one remaining.
9 Jozue asalaki bango ndenge Yawe atindaki: akataki misisa ya makolo ya bampunda na bango mpe atumbaki bashar na bango.
Joshua did to them as the LORD told him. He hamstrung their horses and burned their chariots with fire.
10 Na tango wana, Jozue azongaki, abotolaki engumba Atsori mpe abomaki mokonzi na yango na mopanga. Atsori ezalaki mboka mokonzi ya mokili wana nyonso.
Joshua turned back at that time, and took Hazor, and struck its king with the sword; for Hazor used to be the head of all those kingdoms.
11 Babomaki moto nyonso oyo azalaki kuna na mopanga. Babebisaki penza bango nyonso, babikisaki ata ekelamu moko te ya pema mpe batumbaki engumba Atsori.
They struck all the souls who were in it with the edge of the sword, utterly destroying them. There was no one left who breathed. He burned Hazor with fire.
12 Jozue abotolaki bingumba nyonso ya bakonzi wana mpe abomaki bakonzi na yango na mopanga. Abomaki bango nyonso kolanda ndenge Moyize, mowumbu na Yawe, atindaki.
Joshua captured all the cities of those kings, with their kings, and he struck them with the edge of the sword, and utterly destroyed them, as Moses the servant of the LORD commanded.
13 Kasi Isalaele atikalaki te kotumba bingumba oyo ezalaki na bangomba longola kaka Atsori oyo Jozue atumbaki.
But as for the cities that stood on their mounds, Israel burned none of them, except Hazor only. Joshua burned that.
14 Bana ya Isalaele bazwaki mpo na bango lokola bomengo ya bitumba: biloko nyonso ya engumba wana mpe bibwele na yango, kasi basilisaki koboma bato nyonso na mopanga, batikaki ata moto moko te na bomoi.
The children of Israel took all the plunder of these cities, with the livestock, as plunder for themselves; but every man they struck with the edge of the sword, until they had destroyed them. They didn’t leave any who breathed.
15 Jozue asalaki ndenge kaka Yawe atindaki ye na nzela ya mosali na ye Moyize, atikaki ata eloko moko te kati na makambo nyonso oyo Yawe atindaki Moyize.
As the LORD commanded Moses his servant, so Moses commanded Joshua. Joshua did so. He left nothing undone of all that the LORD commanded Moses.
16 Jozue abotolaki bamboka oyo nyonso: mokili ya bangomba, Negevi mobimba, mokili mobimba ya Gosheni, mokili ya se, etando ya Araba, ngomba ya Isalaele mpe bamboka na yango ya se,
So Joshua captured all that land, the hill country, all the South, all the land of Goshen, the lowland, the Arabah, the hill country of Israel, and the lowland of the same,
17 wuta na ngomba Alaki oyo ezalaki na ngambo ya Seiri kino na Bala-Gadi, na lubwaku ya Libani na ebandeli ya ngomba Erimoni. Abundisaki bakonzi na yango nyonso mpe abomaki bango.
from Mount Halak, that goes up to Seir, even to Baal Gad in the valley of Lebanon under Mount Hermon. He took all their kings, struck them, and put them to death.
18 Jozue abundisaki bakonzi wana nyonso tango molayi.
Joshua made war a long time with all those kings.
19 Longola kaka bato ya Evi oyo bazalaki kovanda na Gabaoni, engumba moko te etikalaki kosala boyokani ya kimia na bana ya Isalaele, oyo babotolaki yango nyonso na bitumba.
There was not a city that made peace with the children of Israel, except the Hivites, the inhabitants of Gibeon. They took all in battle.
20 Nzokande, Yawe Ye moko azalaki koyeisa bango mitema mabanga mpo ete babundisa Isalaele, mpe mpo ete Isalaele asilisa koboma bango nyonso na mawa te, ndenge Yawe atindaki Moyize.
For it was of the LORD to harden their hearts, to come against Israel in battle, that he might utterly destroy them, that they might have no favor, but that he might destroy them, as the LORD commanded Moses.
21 Na tango wana, Jozue akendeki koboma bato ya Anaki wuta na mokili ya bangomba: wuta na Ebron, na Debiri, na Anabi, na mokili nyonso ya bangomba ya Yuda mpe na mokili nyonso ya bangomba ya Isalaele. Jozue asilisaki koboma bango nyonso elongo na bingumba na bango.
Joshua came at that time, and cut off the Anakim from the hill country, from Hebron, from Debir, from Anab, and from all the hill country of Judah, and from all the hill country of Israel. Joshua utterly destroyed them with their cities.
22 Ata moto moko te ya Anaki atikalaki kati na mokili ya bana ya Isalaele. Batikalaki kaka na Gaza, kati na Gati, mpe na Asidodi.
There were none of the Anakim left in the land of the children of Israel. Only in Gaza, in Gath, and in Ashdod, did some remain.
23 Jozue abotolaki mokili yango nyonso ndenge Yawe atindaki na Moyize, apesaki yango na Isalaele lokola libula mpe akabolaki yango kolanda mabota ya Isalaele. Bongo mokili ekomaki na kimia mpe bitumba ezalaki lisusu te.
So Joshua took the whole land, according to all that the LORD spoke to Moses; and Joshua gave it for an inheritance to Israel according to their divisions by their tribes. Then the land had rest from war.

< Jozue 11 >