< Jozue 10 >

1 Nzokande, Adoni-Tsedeki, mokonzi ya Yelusalemi, ayokaki ete Jozue abotolaki Ayi mpe abebisaki yango nyonso; asalaki Ayi mpe mokonzi na yango ndenge kaka asalaki Jeriko mpe mokonzi na yango. Ayokaki lisusu ete bavandi ya Gabaoni basalaki boyokani ya kimia elongo na Isalaele mpe bakomaki kovanda kati na bango.
Now Adoni-zedek king of Jerusalem heard that Joshua had captured Ai and devoted it to destruction —doing to Ai and its king as he had done to Jericho and its king—and that the people of Gibeon had made peace with Israel and were living near them.
2 Boye, sango oyo epesaki somo na mokonzi ya Yelusalemi elongo na bato na ye, pamba te Gabaoni ezalaki engumba moko ya monene lokola bingumba ya bakonzi; ezalaki monene koleka ata Ayi, mpe mibali na yango nyonso bazalaki bilombe ya bitumba.
So Adoni-zedek and his people were greatly alarmed, because Gibeon was a great city, like one of the royal cities; it was larger than Ai, and all its men were mighty.
3 Adoni-Tsedeki, mokonzi ya Yelusalemi, atindaki maloba epai ya Oami, mokonzi ya Ebron; epai ya Pireami, mokonzi ya Yarimuti; epai ya Yafia, mokonzi ya Lakishi; mpe epai ya Debiri, mokonzi ya Egiloni.
Therefore Adoni-zedek king of Jerusalem sent word to Hoham king of Hebron, Piram king of Jarmuth, Japhia king of Lachish, and Debir king of Eglon, saying,
4 Alobaki: « Boya epai na ngai mpe bosunga ngai mpo ete tobundisa Gabaoni, pamba te asali boyokani ya kimia elongo na Jozue mpe bana ya Isalaele. »
“Come up and help me. We will attack Gibeon, because they have made peace with Joshua and the Israelites.”
5 Boye bakonzi mitano ya bato ya Amori: mokonzi ya Yelusalemi, ya Ebron, ya Yarimuti, ya Lakishi mpe ya Egiloni, bakendeki elongo na mampinga na bango nyonso mpo na kozingela Gabaoni mpe kobundisa yango.
So the five kings of the Amorites—the kings of Jerusalem, Hebron, Jarmuth, Lachish, and Eglon—joined forces and advanced with all their armies. They camped before Gibeon and made war against it.
6 Bato ya Gabaoni batindaki maloba epai ya Jozue kati na molako ya Giligali: « Koboya te kosunga basali na yo, yaka noki epai na biso mpe bikisa biso, pamba te bakonzi nyonso ya bato ya Amori, oyo bavandaka na ngomba, basaleli biso likita. »
Then the men of Gibeon sent word to Joshua in the camp at Gilgal: “Do not abandon your servants. Come quickly and save us! Help us, because all the kings of the Amorites from the hill country have joined forces against us.”
7 Jozue amataki wuta na Giligali elongo na mampinga na ye nyonso mpe bilombe nyonso ya bitumba.
So Joshua and his whole army, including all the mighty men of valor, came from Gilgal.
8 Yawe alobaki na Jozue: « Kobanga bango te, pamba te nakabi bango na maboko na yo; moko te akokoka kotelema liboso na yo. »
The LORD said to Joshua, “Do not be afraid of them, for I have delivered them into your hand. Not one of them shall stand against you.”
9 Sima na kotambola butu mobimba wuta na Giligali, Jozue abimelaki bango na pwasa.
After marching all night from Gilgal, Joshua caught them by surprise.
10 Yawe akimisaki bango liboso ya Isalaele, mpe Isalaele akweyisaki bango pene ya Gabaoni. Bana ya Isalaele balandaki bango na nzela oyo ekenda kino na Beti-Oroni mpe babomaki bango kino na Azeka mpe Makeda.
And the LORD threw them into confusion before Israel, who defeated them in a great slaughter at Gibeon, pursued them along the ascent to Beth-horon, and struck them down as far as Azekah and Makkedah.
11 Wana bazalaki kokima liboso ya Isalaele mpe kokita na Beti-Oroni, Yawe akitiselaki bango mabanga minene wuta na likolo kino na Azeka, mpe bakufaki. Bato oyo bakufaki na mabanga ya moto bazalaki motango ebele koleka ata bato oyo bana ya Isalaele babomaki na mopanga.
As they fled before Israel along the descent from Beth-horon to Azekah, the LORD cast down on them large hailstones from the sky, and more of them were killed by the hailstones than by the swords of the Israelites.
12 Na mokolo oyo Yawe akabaki bato ya Amori na maboko ya bana ya Isalaele, Jozue alobaki na Yawe na miso ya Isalaele: « Moyi, telema na Gabaoni! Sanza, telema na lubwaku ya Ayaloni! »
On the day that the LORD gave the Amorites over to the Israelites, Joshua spoke to the LORD in the presence of Israel: “O sun, stand still over Gibeon, O moon, over the Valley of Aijalon.”
13 Boye moyi etelemaki, mpe sanza eninganaki te kino tango ekolo ya Isalaele alongaki banguna na ye kolanda ndenge ekomama kati na buku ya Moto ya Sembo. Moyi etelemaki na kati-kati ya mapata mpe elalaki noki te, pene mokolo mobimba.
So the sun stood still and the moon stopped until the nation took vengeance upon its enemies. Is this not written in the Book of Jashar? “So the sun stopped in the middle of the sky and delayed going down about a full day.”
14 Mokolo ya boye etikala nanu kozala te, ezala na tango ya kala to na tango oyo ekoya, mokolo oyo Yawe atosi mongongo ya moto. Solo Yawe azalaki kobundela Isalaele.
There has been no day like it before or since, when the LORD listened to the voice of a man, because the LORD fought for Israel.
15 Jozue elongo na Isalaele mobimba bazongaki na molako na Giligali.
Then Joshua returned with all Israel to the camp at Gilgal.
16 Nzokande, bakonzi wana mitano bakimaki mpe bakendeki kobombama kati na lidusu ya mabanga, na Makeda.
Now the five kings had fled and hidden in the cave at Makkedah.
17 Tango bayebisaki Jozue ete bamoni bakonzi yango mitano babombami kati na lidusu ya mabanga, na Makeda,
And Joshua was informed: “The five kings have been found; they are hiding in the cave at Makkedah.”
18 Jozue alobaki: « Bopusa mabanga minene na ekotelo ya lidusu ya mabanga mpe botia bato pene na yango mpo na kobatela yango.
So Joshua said, “Roll large stones against the mouth of the cave, and post men there to guard them.
19 Kasi bosuka wana te. Bolanda banguna na bino mpe bokanga bango nzela mpo ete bakota na bingumba na bango te, pamba te Yawe, Nzambe na bino, akabi bango na maboko na bino. »
But you, do not stop there. Pursue your enemies and attack them from behind. Do not let them reach their cities, for the LORD your God has delivered them into your hand.”
20 Tango Jozue mpe bana ya Isalaele balongaki bango mpe basilisaki koboma bango, ndambo ya bato oyo babikaki bakimaki mpe bakotaki na bingumba oyo etongama makasi.
So Joshua and the Israelites continued to inflict a terrible slaughter until they had finished them off, and the remaining survivors retreated to the fortified cities.
21 Bato nyonso ya Isalaele bazongaki na kimia na molako pene ya Jozue, na Makeda. Moko te alobaki lisusu mabe mpo na bana ya Isalaele.
The whole army returned safely to Joshua in the camp at Makkedah, and no one dared to utter a word against the Israelites.
22 Sima, Jozue alobaki: « Bofungola ekotelo ya lidusu ya mabanga mpe bobimisa bakonzi wana mitano. »
Then Joshua said, “Open the mouth of the cave and bring those five kings out to me.”
23 Boye babimisaki bakonzi wana mitano na libanda ya lidusu ya mabanga: mokonzi ya Yelusalemi, ya Ebron, ya Yarimuti, ya Lakishi mpe ya Egiloni.
So they brought the five kings out of the cave—the kings of Jerusalem, Hebron, Jarmuth, Lachish, and Eglon.
24 Tango bamemaki bakonzi yango epai ya Jozue, abengisaki mibali nyonso ya Isalaele mpe alobaki na bakonzi ya basoda oyo bazalaki na ye elongo: « Bopusana mpe botia makolo na bino na bakingo ya bakonzi oyo. » Bakonzi ya basoda bapusanaki mpe batiaki makolo na bango na bakingo ya bakonzi yango.
When they had brought the kings to Joshua, he summoned all the men of Israel and said to the army commanders who had accompanied him, “Come here and put your feet on the necks of these kings.” So the commanders came forward and put their feet on their necks.
25 Jozue alobaki na bango: « Bobanga te mpe bolemba nzoto te. Bozala makasi mpe boyika mpiko, pamba te ezali boye nde Yawe akosala banguna nyonso oyo bokobundisa. »
“Do not be afraid or discouraged,” Joshua said. “Be strong and courageous, for the LORD will do this to all the enemies you fight.”
26 Sima na yango, Jozue abomaki bakonzi yango mpe adiembikaki bango na banzete mitano. Bibembe na bango etikalaki kodiembela na banzete yango kino na pokwa.
After this, Joshua struck down and killed the kings, and he hung their bodies on five trees and left them there until evening.
27 Tango moyi elalaki, Jozue apesaki mitindo ete bakitisa bibembe yango wuta na banzete mpe babwaka yango kati na lidusu ya mabanga epai wapi babombamaki. Batiaki mabanga minene na ekotelo ya lidusu ya mabanga. Mabanga yango ezali wana kino na mokolo ya lelo.
At sunset Joshua ordered that they be taken down from the trees and thrown into the cave in which they had hidden. Then large stones were placed against the mouth of the cave, and the stones are there to this day.
28 Kaka na mokolo yango, Jozue abotolaki engumba Makeda. Abomaki na mopanga mokonzi na yango mpe moto nyonso oyo akutaki kuna mpe atikaki ata moto moko te na bomoi. Asalaki mokonzi ya Makeda ndenge kaka asalaki mokonzi ya Jeriko.
On that day Joshua captured Makkedah and put it to the sword, along with its king. He devoted to destruction everyone in the city, leaving no survivors. So he did to the king of Makkedah as he had done to the king of Jericho.
29 Jozue elongo na bana nyonso ya Isalaele balongwaki na Makeda, bakendeki kino na engumba Libina mpe babundisaki yango.
Then Joshua and all Israel with him moved on from Makkedah to Libnah and fought against Libnah.
30 Yawe akabaki lisusu engumba mpe mokonzi na yango na maboko ya Isalaele. Jozue abomaki na mopanga, bato nyonso oyo bazalaki kuna; mpe atikaki ata moto moko te na bomoi. Asalaki mokonzi na yango ndenge asalaki mokonzi ya Jeriko.
And the LORD also delivered that city and its king into the hand of Israel, and Joshua put all the people to the sword, leaving no survivors. And he did to the king of Libnah as he had done to the king of Jericho.
31 Jozue elongo na bana nyonso ya Isalaele balongwaki na Libina mpe bakendeki kino na Lakishi. Bazingelaki yango mpe babundisaki yango.
And Joshua and all Israel with him moved on from Libnah to Lachish. They laid siege to it and fought against it.
32 Yawe akabaki engumba Lakishi na maboko ya Isalaele, mpe Jozue abotolaki yango, mokolo oyo elandaki. Jozue abomaki na mopanga, bato nyonso oyo bazalaki kuna ndenge kaka asalaki engumba Libina.
And the LORD delivered Lachish into the hand of Israel, and Joshua captured it on the second day. He put all the people to the sword, just as he had done to Libnah.
33 Boye, Orami, mokonzi ya Gezeri, amataki mpo na kosunga Lakishi; kasi Jozue abomaki ye na mopanga elongo na bato na ye, atikaki ata moto moko te na bomoi.
At that time Horam king of Gezer went to help Lachish, but Joshua struck him down along with his people, leaving no survivors.
34 Jozue elongo na bana nyonso ya Isalaele balongwaki na Lakishi mpe bakendeki kino na engumba Egiloni; bazingelaki yango mpe babundisaki yango.
So Joshua moved on from Lachish to Eglon, and all Israel with him. They laid siege to it and fought against it.
35 Babotolaki yango kaka na mokolo wana mpe babomaki na mopanga bato nyonso oyo bazalaki kuna; babebisaki bango mokolo wana, ndenge kaka basalaki na Lakishi.
That day they captured Eglon and put it to the sword, and Joshua devoted to destruction everyone in the city, just as he had done to Lachish.
36 Jozue mpe Isalaele mobimba balongwaki na Egiloni, bamataki kino na Ebron mpe babundisaki yango.
Then Joshua and all Israel with him went up from Eglon to Hebron and fought against it.
37 Babotolaki engumba yango, babomaki na mopanga bato nyonso oyo bazalaki kuna elongo na mokonzi na yango. Bazwaki mpe bamboka na yango ya mike-mike mpe babomaki na mopanga, bato nyonso oyo bazalaki kuna. Batikaki ata moto moko te na bomoi, ndenge kaka basalaki na engumba Egiloni. Babebisaki yango nyonso penza mpe babomaki bato nyonso oyo bazalaki kuna.
They captured it and put to the sword its king, all its villages, and all the people. Joshua left no survivors, just as he had done at Eglon; he devoted to destruction Hebron and everyone in it.
38 Jozue elongo na Isalaele mobimba babalukaki na ngambo ya engumba Debiri mpe babundisaki yango.
Finally Joshua and all Israel with him turned toward Debir and fought against it.
39 Babotolaki engumba mpe bamboka na yango ya mike-mike, bakangaki mokonzi na yango mpe babomaki bato nyonso oyo bazalaki kuna na mopanga. Batikaki ata moto moko te na bomoi. Jozue asalaki engumba Debiri elongo na mokonzi na yango, ndenge kaka asalaki engumba Libina elongo na mokonzi na yango, mpe Ebron elongo na mokonzi na yango.
And they captured Debir, its king, and all its villages. They put them to the sword and devoted to destruction everyone in the city, leaving no survivors. Joshua did to Debir and its king as he had done to Hebron and as he had done to Libnah and its king.
40 Boye, Jozue alongaki etuka wana nyonso: mokili ya bangomba, Negevi, etando ya pembeni-pembeni ya Ebale monene mpe etando ya se ya bangomba elongo na bakonzi na yango nyonso. Atikaki ata moto moko te na bomoi, abebisaki bato nyonso mpe biloko nyonso oyo ezalaki na bomoi, ndenge Yawe, Nzambe ya Isalaele, apesaki ye mitindo.
So Joshua conquered the whole region—the hill country, the Negev, the foothills, and the slopes, together with all their kings—leaving no survivors. He devoted to destruction everything that breathed, just as the LORD, the God of Israel, had commanded.
41 Jozue alongaki bango wuta na Kadeshi-Barinea kino na Gaza, mpe mokili mobimba ya Gosheni kino na Gabaoni.
Joshua conquered the area from Kadesh-barnea to Gaza, and the whole region of Goshen as far as Gibeon.
42 Jozue alongaki bakonzi wana nyonso na mbala moko mpe abotolaki bamboka na bango, pamba te Yawe, Nzambe ya Isalaele, azalaki kobundela Isalaele.
And because the LORD, the God of Israel, fought for Israel, Joshua captured all these kings and their land in one campaign.
43 Sima na yango, Jozue elongo na bana nyonso ya Isalaele bazongaki na molako na Giligali.
Then Joshua returned with all Israel to the camp at Gilgal.

< Jozue 10 >