< Jozue 1 >

1 Sima na kufa ya Moyize, mowumbu na Yawe, Yawe alobaki na Jozue, mwana mobali ya Nuni, mosungi ya Moyize:
Tras la muerte de Moisés, el siervo del Señor, el Señor habló con Josué, el hijo de Nun, que había sido asistente de Moisés. Y le dijo:
2 « Moyize, mowumbu na Ngai, asili kokufa. Sik’oyo, yo elongo na bato oyo nyonso, bobongama mpo na kokatisa ebale Yordani mpe kokota na mokili oyo nakopesa bana ya Isalaele.
“Mi siervo Moisés ha muerto. Así que ve y cruza el Jordán, tú y todo el pueblo, y entren en el país que yo le entrego a los israelitas.
3 Nakopesa bino esika nyonso oyo matambe ya makolo na bino ekonyata, ndenge nalakaki Moyize.
Como se lo prometí a Moisés, dondequiera que pongas un pie, será tierra que yo te daré,
4 Mokili na bino ekozala longwa na esobe kino na bangomba ya Libani oyo bozali komona, mpe longwa na Ebale monene, ebale Efrate, mokili nyonso ya bato ya Iti kino na Ebale monene, na ngambo ya weste: yango nde ekozala mokili na bino.
desde el desierto hasta el Líbano, y hasta el río Éufrates; toda la tierra de los hititas, y hasta la costa oeste del Mar Mediterráneo. Este será su territorio.
5 Na mikolo nyonso ya bomoi na yo, moto moko te akolonga kotelemela yo. Ndenge nazalaki elongo na Moyize, ndenge wana mpe nakozala elongo na yo; nakotika yo te mpe nakosundola yo te.
Nadie podrá enfrentarse a ti mientras vivas. Tal como lo hice con Moisés, estaré contigo. Nunca te dejaré y nunca te abandonaré.
6 Zala makasi mpe yika mpiko, pamba te yo nde okokamba bato oyo mpe okopesa bango mokili oyo nalakaki kopesa lokola libula epai ya batata na bango na nzela ya ndayi.
“¡Sé fuerte! ¡Sé valiente! Serás el líder del pueblo mientras habiten la tierra que le prometí a sus antepasados.
7 Kasi zala makasi mpe yika mpiko, sala keba ete otosa mibeko nyonso oyo Moyize, mowumbu na Ngai, apesaki yo; komeka te kobima libanda na yango, ezala na ngambo ya loboko ya mobali to na ngambo ya loboko ya mwasi, mpo ete okoka kolonga na makambo nyonso oyo okosala.
Sé fuerte y muy valiente, y asegúrate de obedecer toda la ley que mi siervo Moisés te ha ordenado seguir. No te apartes de ella, ni a la derecha ni a la izquierda, para que tengas éxito en todo lo que hagas.
8 Sala ete maloba ya buku oyo ya Mobeko ewumela tango nyonso na monoko na yo; tangaka mpe kanisaka yango butu mpe moyi, mpo ete osala kolanda nyonso oyo ekomami kati na yango. Na bongo nde okokende liboso mpe okolonga kati na misala na yo nyonso.
Sigue recordándole al pueblo la ley. Mediten en ella de día y de noche, para estés seguro de hacer lo que es debido. Entonces tendrás éxito y prosperarás en lo que hagas.
9 Boni, nalobaki na yo te: Zala makasi mpe yika mpiko? Kozala na somo te mpe kolemba nzoto te, pamba te Ngai Yawe, Nzambe na yo, nakozala elongo na yo na bisika nyonso oyo okokende. »
No te olvides lo que te dije: ¡Sé fuerte! ¡Sé valiente! ¡No tengas miedo! ¡No te desanimes! Porque el Señor tu Dios está contigo dondequiera que vayas”.
10 Jozue apesaki mitindo epai ya bakambi ya bato:
Entonces Josué le dio una orden a los líderes del pueblo:
11 « Botambola kati na molako mpe boloba na bato: ‹ Bobongisa bilei na bino, pamba te sima na mikolo misato, bokokatisa ebale Yordani na esika oyo mpo na kokende kobotola mokili oyo Yawe, Nzambe na bino, asili kopesa bino. › »
“Vayan por todo el campamento y díganle al pueblo: ‘Preparen todo, porque en tres días cruzaremos el Jordán, para ir a tomar la tierra que Dios les da’”.
12 Kasi Jozue alobaki na bato ya libota ya Ribeni, na bato ya libota ya Gadi, mpe na bato ya ndambo ya libota ya Manase:
Pero a las tribus de Rubén y Gad, y a la mitad de la tribu de Manasés, Josué les dijo:
13 — Bobosana te Mobeko oyo Moyize, mowumbu ya Yawe, apesaki bino: « Yawe, Nzambe na bino, apesaki bino bopemi mpe mabele oyo. »
“Recuerden lo que Moisés, el siervo del Señor, les ordenó hacer: ‘El Señor su Dios les está dando descanso, y les dará esta tierra’.
14 Kaka basi, bana mpe bibwele na bino nde bakoki kotikala na mabele oyo Moyize apesaki bino na ngambo ya este ya Yordani. Kasi bilombe na bino nyonso ya etumba basengeli kolata bibundeli, kokatisa mpe kotambola liboso ya bandeko na bino. Bokosunga bandeko na bino
Sus esposas, hijos, y su ganado se quedarán aquí en la tierra que Moisés les asignó cuando estaban al oriente del Jordán. Pero todos sus hombres armados, listos para la batalla, irán delante y cruzarán primero para ayudarles,
15 kino Yawe akopesa bango mpe bopemi ndenge asalaki mpo na bino, mpe kino tango bango mpe bakobotola mokili oyo Yawe, Nzambe na bino, apesi bango. Na sima na yango nde bokoki kozonga mpe kovanda na mabele na bino moko, mabele oyo Moyize, mosali na Yawe, apesaki bino na ngambo ya este ya Yordani, na ngambo oyo moyi ebimelaka.
hasta que el Señor les de descanso, como los ha dejado descansar a ustedes, y cuando hayan tomado posesión de la tierra que el Señor les entrega. Entonces podrán regresar y ocupar la tierra que Moisés les asignó al oriente del Jordán”.
16 Bazongiselaki Jozue: — Tokosala nyonso oyo okotinda biso mpe tokokende esika nyonso oyo okotinda biso.
Entonces ellos le dijeron a Josué: “Haremos todo lo que nos has dicho, e iremos a donde nos envíes.
17 Ndenge totosaki Moyize na makambo nyonso, ndenge wana mpe tokotosa yo. Tika ete Yawe, Nzambe na yo, azala elongo na yo ndenge azalaki elongo na Moyize!
Te obedeceremos como obedecimos a Moisés en todo. Que el Señor Dios esté contigo como estuvo con Moisés.
18 Moto nyonso oyo akotombokela mitindo na yo to akotosa te maloba na yo na likambo nyonso oyo okotinda, akokufa. Tika ete ozala makasi mpe oyika mpiko!
Cualquiera que se rebele contra lo que dices y no siga tus órdenes, y quienquieraque no obedezca todo lo que dices, será ejecutado. ¡Sé fuerte! Sé valiente!”

< Jozue 1 >