< Yona 4 >

1 Yona asepelaki na yango ata moke te, asilikaki makasi.
Entonces tuvo Jonás un pesar muy grande y se enojó.
2 Asambelaki Yawe: — Oh Yawe! Ezali te makambo ya boye nde nazalaki komilobela tango nazalaki epai na ngai? Yango wana nasalaki na ngai mobembo na Tarsisi mpo na koluka kokima, pamba te nayebaki malamu ete ozali Nzambe ya ngolu mpe ya mawa, osilikaka noki te mpe otonda na bolingo, obongolaka makanisi na Yo ya kosala bato mabe.
Y oró a Yahvé, diciendo: “¡Oh Yahvé! ¿No es esto lo que yo me decía estando todavía en mi país? Por eso me adelanté a huir a Tarsis; ya sabía que eres un Dios clemente y misericordioso, longánimo y de gran benignidad, y que te arrepientes del mal.
3 Sik’oyo, oh Yawe, kamata na Yo bomoi na ngai; pamba te eleki malamu ete nakufa na ngai, kasi nazala na bomoi te!
Ahora, pues, Yahvé, quítame la vida: para mí es mejor la muerte que la vida.”
4 Kasi Yawe azongiselaki ye: — Boni, okanisi ete ozali kosala malamu ndenge ozali kosilika?
Respondió Yahvé: “¿Te parece bien enojarte?”
5 Yona abimaki na libanda ya engumba mpe akendeki kovanda na este na yango. Kuna, amitongelaki ndako moko ya matiti mpe avandaki na se ya pio na yango mpo na kozela makambo oyo ekokweyela engumba Ninive.
Y salió Jonás de la ciudad y se sentó al oriente de ella; allí se hizo una cabaña y se estableció debajo de ella, a la sombra, hasta ver lo que sería de la ciudad.
6 Yawe Nzambe abimisaki nzete moko mpe akolisaki yango mpo na kopesa pio na moto ya Yona mpe kokitisa ye motema. Nzete yango esepelisaki Yona makasi.
Entonces Yahvé Dios, hizo crecer un ricino, el cual creció hasta por encima de Jonás, para hacer sombra a su cabeza, a fin de librarle de su mal; y concibió Jonás un gran placer por el ricino.
7 Kasi na tongo-tongo ya mokolo oyo elandaki, Nzambe abimisaki mwa nyama moko oyo eliaka banzete; bongo eliaki nzete yango, mpe nzete yango ekawukaki.
Pero al día siguiente, al rayar el alba, mandó Dios un gusano, que picó el ricino, el cual se secó.
8 Tango moyi ebimaki makasi, Nzambe atindaki mopepe ya este oyo epesaki molunge makasi. Moyi ebetaki moto ya Yona makasi. Yona alembaki nzoto, asengaki kokufa; alobaki: — Eleki malamu ete nakufa na ngai, kasi nazala na bomoi te!
Y cuando se levantó el sol, mandó Dios un viento abrasador del oriente; y el sol hería la cabeza de Jonás de tal modo que desfallecía, por lo cual pidió para sí la muerte, diciendo: “Mejor para mí la muerte que la vida.”
9 Nzambe alobaki na Yona: — Okanisi ete ozali kosala malamu ndenge ozali kosilika mpo na nzete oyo? Yona azongisaki: — Ezali se bongo. Nazali kosala malamu ndenge nazali kosilika kino kosenga kufa na ngai.
Y dijo Dios a Jonás: “¿Te parece bien enojarte a causa del ricino?” Respondió él: “Sí, me parece bien enojarme hasta la muerte.”
10 Yawe alobaki: — Oyoki pasi na motema mpo na nzete oyo omoneli ata pasi te mpe okolisi te, oyo ekoli kaka na butu moko mpe ekawuki na butu oyo elandi! Oyokeli yango mpe mawa!
Y dijo Yahvé: “Tú tienes lástima del ricino, que ningún trabajo te ha costado, ni tú lo hiciste crecer; creció en una noche, y en una noche pereció.
11 Bongo ndenge nini Ngai nayoka motema pasi te mpo na Ninive, engumba monene, oyo ezali na bato koleka nkoto nkama moko na tuku mibale oyo bayebi te kokesenisa makambo mabe mpe makambo malamu, mpe ezali na ebele ya bibwele?
¿Y Yo no he de tener lástima de Nínive, la ciudad tan grande, en la cual hay más de ciento veinte mil almas que no saben discernir su mano derecha de la izquierda, y numerosísimos animales?”

< Yona 4 >