< Yona 3 >

1 Yawe alobaki na Yona na mbala ya mibale:
ויהי דבר יהוה אל יונה שנית לאמר
2 — Telema, kende na Ninive, engumba monene, mpe sakola kuna maloba oyo nakopesa yo.
קום לך אל נינוה העיר הגדולה וקרא אליה את הקריאה אשר אנכי דבר אליך
3 Yona atosaki Liloba na Yawe; atelemaki mpe akendeki na Ninive. Nzokande Ninive ezalaki engumba moko ya monene na miso ya Nzambe; esengelaki kosala mikolo misato mpo na kosilisa kotambola kati na yango.
ויקם יונה וילך אל נינוה--כדבר יהוה ונינוה היתה עיר גדולה לאלהים--מהלך שלשת ימים
4 Yona abandaki mosala na ye, atambolaki mokolo mobimba kati na engumba; azalaki kosakola: — Etikali mikolo tuku minei mpo ete engumba ya Ninive ebebisama nye!
ויחל יונה לבוא בעיר מהלך יום אחד ויקרא ויאמר עוד ארבעים יום ונינוה נהפכת
5 Bato ya Ninive bandimelaki Nzambe; bazwaki mokano ya kokila bilei mpe ya kolata basaki, kobanda na oyo aleki na bozwi kino na oyo aleki na bobola.
ויאמינו אנשי נינוה באלהים ויקראו צום וילבשו שקים מגדולם ועד קטנם
6 Tango sango yango ekomaki epai ya mokonzi ya Ninive, atelemaki longwa na kiti na ye ya bokonzi, alongolaki bilamba na ye ya bokonzi, alataki saki mpe amivandisaki na putulu.
ויגע הדבר אל מלך נינוה ויקם מכסאו ויעבר אדרתו מעליו ויכס שק וישב על האפר
7 Apesaki mitindo ete bapanza sango oyo na Ninive: « Na mitindo ya mokonzi mpe ya bakalaka na ye, Epekisami na bato mpe na bibwele, ezala ngombe, meme to ntaba; epekisami kolia biloko nyonso mpe komela mayi.
ויזעק ויאמר בנינוה מטעם המלך וגדליו לאמר האדם והבהמה הבקר והצאן אל יטעמו מאומה--אל ירעו ומים אל ישתו
8 Tika ete bato mpe bibwele balata basaki, babelela Nzambe makasi. Tika ete moko na moko atika nzela na ye ya mabe mpe mobulu oyo ekangami ye na maboko.
ויתכסו שקים האדם והבהמה ויקראו אל אלהים בחזקה וישבו איש מדרכו הרעה ומן החמס אשר בכפיהם
9 Nani ayebi? Tango mosusu Nzambe akobongola makanisi, akolongola kanda mpe akozongisa motema sima mpo ete tokufa te. »
מי יודע ישוב ונחם האלהים ושב מחרון אפו ולא נאבד
10 Tango Nzambe amonaki makambo oyo basalaki mpe ndenge batikaki banzela na bango ya mabe, abongolaki makanisi na Ye mpe atindelaki bango lisusu te etumbu oyo akanaki kopesa bango.
וירא האלהים את מעשיהם כי שבו מדרכם הרעה וינחם האלהים על הרעה אשר דבר לעשות להם--ולא עשה

< Yona 3 >