< Yona 2 >

1 Wuta na libumu ya mbisi, Yona asambelaki Yawe, Nzambe na ye.
Yunus balığın karnından Tanrısı RAB'be şöyle dua etti:
2 Alobaki: « Kati na mawa na ngai, nabelelaka Yawe, mpe ayanolaka ngai. Wuta kati na mboka ya bakufi, nasengaka lisungi, mpe ayokaka ngai. (Sheol h7585)
“Ya RAB, sıkıntı içinde sana yakardım, Yanıtladın beni. Yardım istedim ölüler diyarının bağrından, Kulak verdin sesime. (Sheol h7585)
3 Obwakaki ngai kati na libulu ya molili makasi, kati na mozindo ya ebale monene epai wapi mayi ezingeli ngai mpe bambonge na yo nyonso ekweyeli ngai.
Beni engine, denizin ta dibine fırlattın. Sular sardı çevremi. Azgın dalgalar geçti üzerimden.
4 Nazali komilobela: ‹ Obengani ngai mosika na miso na Yo; nzokande ngai nazali kokoba kotalela Tempelo na Yo ya bule. ›
‘Huzurundan kovuldum’ dedim, ‘Yine de göreceğim kutsal tapınağını.’
5 Nazindi kino na kingo, mayi ya libulu ya molili makasi ezingeli ngai, matiti ya ebale ekangani-kangani zingazinga ya moto na ngai.
Sular boğacak kadar kuşattı beni, Çevremi enginler sardı, Yosunlar dolaştı başıma.
6 Nazindi kino na esika oyo ngomba ebandaka, mabele esili kokanga bikangelo na yango sima na ngai mpo na libela. Kasi Yo Yawe, Nzambe na ngai, obimisi ngai ya bomoi wuta na libulu ya mozindo.
Dağların köklerine kadar battım, Dünya sonsuza dek sürgülendi arkamdan; Ama, ya RAB, Tanrım, Canımı sen kurtardın çukurdan.
7 Wana nakomi pene ya kobungisa elikya, nakanisi Yo, Yawe, mpe libondeli na ngai emati kino epai na Yo, kino na Tempelo na Yo ya bule.
Soluğum tükenince seni andım, ya RAB, Duam sana, kutsal tapınağına erişti.
8 Bato oyo bakangamaka na banzambe ya bikeko ezanga tina babungisaka bolingo oyo Nzambe alingaka bango.
Değersiz putlara tapanlar, Vefasızlık etmiş olurlar.
9 Kasi ngai, na koyembaka nzembo ya matondi, nalingi kobanda kobonzelaka Yo bambeka mpe kokokisaka bilaka oyo nazali kopesa, pamba te lobiko ezali ya Yawe. »
Ama şükranla kurban sunacağım sana, Adağımı yerine getireceğim. Kurtuluş senden gelir, ya RAB!”
10 Mpe Yawe apesaki mitindo na mbisi, mpe mbala moko, mbisi esanzaki Yona na mokili.
RAB balığa buyruk verdi ve balık Yunus'u karaya kustu.

< Yona 2 >