< Yoane 1 >
1 Na ebandeli, Ye oyo azali Liloba azalaka; azalaka elongo na Nzambe, mpe azali Nzambe.
εν αρχη ην ο λογος και ο λογος ην προς τον θεον και θεος ην ο λογος
2 Wuta na ebandeli, azalaka elongo na Nzambe.
ουτος ην εν αρχη προς τον θεον
3 Nzambe akelaki biloko nyonso na nzela na Ye; ezali na eloko moko te oyo ekelama soki na nzela na Ye te.
παντα δι αυτου εγενετο και χωρις αυτου εγενετο ουδε εν ο γεγονεν
4 Bomoi ewuta epai na Ye, mpe bomoi yango ezalaki pole mpo na bato.
εν αυτω ζωη ην και η ζωη ην το φως των ανθρωπων
5 Pole engengaka kati na molili, kasi molili eyambaki yango te.
και το φως εν τη σκοτια φαινει και η σκοτια αυτο ου κατελαβεν
6 Nzambe atindaki moto moko, kombo na ye ezalaki « Yoane. »
εγενετο ανθρωπος απεσταλμενος παρα θεου ονομα αυτω ιωαννης
7 Ayaki lokola motatoli, mpo na kotatola na tina na pole, mpo ete bato nyonso bandima na nzela na ye.
ουτος ηλθεν εις μαρτυριαν ινα μαρτυρηση περι του φωτος ινα παντες πιστευσωσιν δι αυτου
8 Ye moko Yoane azalaki pole te, kasi ayaki nde mpo na kozala motatoli na tina na pole.
ουκ ην εκεινος το φως αλλ ινα μαρτυρηση περι του φωτος
9 Pole ya solo eyaki na mokili, mpe engengisaka bato nyonso.
ην το φως το αληθινον ο φωτιζει παντα ανθρωπον ερχομενον εις τον κοσμον
10 Ye oyo azali Liloba azalaki kati na mokili, pamba te Ye nde akelaki yango, kasi mokili endimaki Ye te.
εν τω κοσμω ην και ο κοσμος δι αυτου εγενετο και ο κοσμος αυτον ουκ εγνω
11 Ayaki epai ya ekolo na Ye, kasi bato ya ekolo na Ye moko bayambaki Ye te;
εις τα ιδια ηλθεν και οι ιδιοι αυτον ου παρελαβον
12 nzokande bato nyonso oyo bayambaki Ye, ba-oyo bandimelaki Kombo na Ye, apesaki bango makoki ya kokoma bana na Nzambe.
οσοι δε ελαβον αυτον εδωκεν αυτοις εξουσιαν τεκνα θεου γενεσθαι τοις πιστευουσιν εις το ονομα αυτου
13 Bakomi bana na Nzambe na nzela ya mbotama ya bomoto te, na posa ya bomoto te to mpe na mokano ya moto te, kasi na mokano ya Nzambe.
οι ουκ εξ αιματων ουδε εκ θεληματος σαρκος ουδε εκ θεληματος ανδρος αλλ εκ θεου εγεννηθησαν
14 Ye oyo azalaki Liloba akomaki moto mpe avandaki kati na biso, atonda na ngolu mpe na solo. Tomonaki nkembo na Ye, nkembo oyo azwi epai ya Tata na Ye, lokola Mwana se moko.
και ο λογος σαρξ εγενετο και εσκηνωσεν εν ημιν και εθεασαμεθα την δοξαν αυτου δοξαν ως μονογενους παρα πατρος πληρης χαριτος και αληθειας
15 Yoane azalaki kotatola na tina na Ye, na mongongo makasi: « Botala Ye oyo nalobaki na tina na Ye: ‹ Ye oyo azali koya sima na ngai aleki ngai na lokumu, pamba te azalaki liboso ete ngai nazala. › »
ιωαννης μαρτυρει περι αυτου και κεκραγεν λεγων ουτος ην {VAR1: ο ειπων } {VAR2: ον ειπον } ο οπισω μου ερχομενος εμπροσθεν μου γεγονεν οτι πρωτος μου ην
16 Lokola atonda na bolingo mpo na biso, apesaki biso ngolu likolo ya ngolu;
οτι εκ του πληρωματος αυτου ημεις παντες ελαβομεν και χαριν αντι χαριτος
17 pamba te Mibeko eyaki na nzela ya Moyize, kasi ngolu mpe solo eyaki na nzela ya Yesu-Klisto.
οτι ο νομος δια μωυσεως εδοθη η χαρις και η αληθεια δια ιησου χριστου εγενετο
18 Moto moko te amona Nzambe, kasi ezali kaka Mwana se moko oyo azali Nzambe mpe azali moko na Tata nde atalisaki biso Ye.
θεον ουδεις εωρακεν πωποτε μονογενης θεος ο ων εις τον κολπον του πατρος εκεινος εξηγησατο
19 Tala litatoli oyo Yoane apesaki tango bakambi ya Bayuda batindaki, wuta na Yelusalemi, Banganga-Nzambe mpe Balevi, mpo na kotuna ye: — Yo ozali nani?
και αυτη εστιν η μαρτυρια του ιωαννου οτε απεστειλαν {VAR1: προς αυτον } {VAR2: [προς αυτον] } οι ιουδαιοι εξ ιεροσολυμων ιερεις και λευιτας ινα ερωτησωσιν αυτον συ τις ει
20 Abetaki monoko te, kasi alobaki na bango solo na bonsomi nyonso: — Ngai, nazali Klisto te.
και ωμολογησεν και ουκ ηρνησατο και ωμολογησεν οτι εγω ουκ ειμι ο χριστος
21 Batunaki ye lisusu: — Bongo ozali nani? Ozali Eliya? Azongisaki: — Nazali Eliya te. Batunaki ye lisusu: — Ozali mosakoli? Azongisaki: — Te!
και ηρωτησαν αυτον τι ουν {VAR1: [συ] } {VAR2: συ } ηλιας ει και λεγει ουκ ειμι ο προφητης ει συ και απεκριθη ου
22 Bakobaki kotuna ye: — Bongo ozali penza nani? Ozali koloba nini na tina na yo moko? Yebisa biso yango, pamba te tosengeli kopesa eyano epai ya bato oyo batindi biso.
ειπαν ουν αυτω τις ει ινα αποκρισιν δωμεν τοις πεμψασιν ημας τι λεγεις περι σεαυτου
23 Yoane azongiselaki bango kolanda ndenge mosakoli Ezayi alobaki: — Ngai, nazali mongongo ya moto oyo azali kobelela kati na esobe: « Bobongisa nzela mpo na Nkolo! »
εφη εγω φωνη βοωντος εν τη ερημω ευθυνατε την οδον κυριου καθως ειπεν ησαιας ο προφητης
24 Nzokande batindami yango bazalaki Bafarizeo.
και απεσταλμενοι ησαν εκ των φαρισαιων
25 Batunaki ye lisusu: — Soki ozali Masiya te, Eliya te to mpe mosakoli te, bongo mpo na nini ozali kobatisa?
και ηρωτησαν αυτον και ειπαν αυτω τι ουν βαπτιζεις ει συ ουκ ει ο χριστος ουδε ηλιας ουδε ο προφητης
26 Yoane azongiselaki bango: — Ngai, nazali kobatisa na mayi; kasi kati na bino, ezali na Moto moko oyo bino boyebi te;
απεκριθη αυτοις ο ιωαννης λεγων εγω βαπτιζω εν υδατι μεσος υμων {VAR1: στηκει } {VAR2: εστηκεν } ον υμεις ουκ οιδατε
27 azali koya sima na ngai, mpe ngai nabongi kutu te mpo na kofungola ata basinga ya basandale na Ye.
{VAR2: ο } οπισω μου ερχομενος ου ουκ ειμι [εγω] αξιος ινα λυσω αυτου τον ιμαντα του υποδηματος
28 Makambo oyo nyonso esalemaki na Betani, na ngambo mosusu ya Yordani, epai wapi Yoane azalaki kobatisa.
ταυτα εν βηθανια εγενετο περαν του ιορδανου οπου ην ο ιωαννης βαπτιζων
29 Mokolo oyo elandaki, wana Yoane amonaki Yesu koya epai na ye, alobaki: — Tala Mpate ya Nzambe, oyo alongolaka lisumu ya mokili.
τη επαυριον βλεπει τον ιησουν ερχομενον προς αυτον και λεγει ιδε ο αμνος του θεου ο αιρων την αμαρτιαν του κοσμου
30 Ezali na tina na Ye nde nalobaki: « Ezali na moko oyo azali koya sima na ngai, aleki ngai na lokumu, pamba te azalaki liboso ete ngai nazala. »
ουτος εστιν υπερ ου εγω ειπον οπισω μου ερχεται ανηρ ος εμπροσθεν μου γεγονεν οτι πρωτος μου ην
31 Ngai moko mpe nayebaki te soki esengelaki kozala nani; kasi tina oyo ngai nayaki kobatisa bato na mayi, ezalaki nde mpo ete natalisa Ye epai ya bato ya Isalaele.
καγω ουκ ηδειν αυτον αλλ ινα φανερωθη τω ισραηλ δια τουτο ηλθον εγω εν υδατι βαπτιζων
32 Bongo Yoane apesaki litatoli oyo: — Namonaki Molimo kokita wuta na likolo lokola ebenga mpe kovanda likolo na Ye.
και εμαρτυρησεν ιωαννης λεγων οτι τεθεαμαι το πνευμα καταβαινον ως περιστεραν εξ ουρανου και εμεινεν επ αυτον
33 Ngai moko mpe nayebaki Ye te; kasi Ye oyo atindaki ngai kobatisa na mayi alobaki na ngai: « Moto oyo okomona Molimo kokita mpe kowumela likolo na Ye, Ye nde akobatisa kati na Molimo Mosantu. »
καγω ουκ ηδειν αυτον αλλ ο πεμψας με βαπτιζειν εν υδατι εκεινος μοι ειπεν εφ ον αν ιδης το πνευμα καταβαινον και μενον επ αυτον ουτος εστιν ο βαπτιζων εν πνευματι αγιω
34 Mpe lokola ezali yango nde likambo oyo ngai namonaki, yango wana nazali kotatola: Moto oyo azali Mwana na Nzambe.
καγω εωρακα και μεμαρτυρηκα οτι ουτος εστιν ο υιος του θεου
35 Mokolo oyo elandaki, wana Yoane azalaki lisusu na esika yango elongo na bayekoli na ye mibale,
τη επαυριον παλιν ειστηκει {VAR2: ο } ιωαννης και εκ των μαθητων αυτου δυο
36 amonaki Yesu koleka mpe alobaki: « Botala Mpate ya Nzambe! »
και εμβλεψας τω ιησου περιπατουντι λεγει ιδε ο αμνος του θεου
37 Lokola bayekoli nyonso mibale bayokaki ndenge Yoane alobaki, balandaki Yesu.
και ηκουσαν οι δυο μαθηται αυτου λαλουντος και ηκολουθησαν τω ιησου
38 Bongo tango Yesu abalukaki mpo na kotala na sima, amonaki bango mibale bazali kolanda Ye. Atunaki bango: — Bolingi nini? Bazongisaki: — Rabi, ovandaka wapi?
στραφεις δε ο ιησους και θεασαμενος αυτους ακολουθουντας λεγει αυτοις τι ζητειτε οι δε ειπαν αυτω ραββι ο λεγεται μεθερμηνευομενον διδασκαλε που μενεις
39 Yesu azongiselaki bango: — Boya mpe bokomona. Balandaki Yesu, bamonaki esika oyo azalaki kovanda mpe bavandaki elongo na Ye na mokolo wana. Ezalaki na ngonga ya minei sima na midi.
λεγει αυτοις ερχεσθε και οψεσθε ηλθαν ουν και ειδαν που μενει και παρ αυτω εμειναν την ημεραν εκεινην ωρα ην ως δεκατη
40 Andre, ndeko ya Simona Petelo, azalaki moko kati na bato wana mibale oyo bayokaki maloba ya Yoane mpe balandaki Yesu.
ην ανδρεας ο αδελφος σιμωνος πετρου εις εκ των δυο των ακουσαντων παρα ιωαννου και ακολουθησαντων αυτω
41 Akendeki kokutana na Simona, ndeko na ye, mpe alobaki na ye: « Tomoni Masiya! »
ευρισκει ουτος πρωτον τον αδελφον τον ιδιον σιμωνα και λεγει αυτω ευρηκαμεν τον μεσσιαν ο εστιν μεθερμηνευομενον χριστος
42 Bongo amemaki Simona epai ya Yesu. Yesu atalaki Simona mpe alobaki: « Ozali Simona, mwana mobali ya Yoane; kasi bakobanda kobenga yo Sefasi. »
ηγαγεν αυτον προς τον ιησουν εμβλεψας αυτω ο ιησους ειπεν συ ει σιμων ο υιος ιωαννου συ κληθηση κηφας ο ερμηνευεται πετρος
43 Mokolo oyo elandaki, Yesu azwaki mokano ya kokende na Galile. Na nzela, akutanaki na Filipo mpe alobaki na ye: « Landa Ngai. »
τη επαυριον ηθελησεν εξελθειν εις την γαλιλαιαν και ευρισκει φιλιππον και λεγει αυτω ο ιησους ακολουθει μοι
44 Filipo, Andre mpe Petelo bazalaki bato ya engumba Betisaida.
ην δε ο φιλιππος απο βηθσαιδα εκ της πολεως ανδρεου και πετρου
45 Filipo akutanaki na Natanaele mpe alobaki na ye: — Tomoni Yesu ya Nazareti, mwana mobali ya Jozefi, oyo Moyize alobela kati na buku ya Mobeko, mpe oyo basakoli balobela.
ευρισκει φιλιππος τον ναθαναηλ και λεγει αυτω ον εγραψεν μωυσης εν τω νομω και οι προφηται ευρηκαμεν ιησουν υιον του ιωσηφ τον απο ναζαρετ
46 Natanaele atunaki ye: — Boni, eloko ya malamu ekoki mpe kobima na Nazareti? Filipo azongiselaki ye: — Yaka mpe okomona yo moko.
και ειπεν αυτω ναθαναηλ εκ ναζαρετ δυναται τι αγαθον ειναι λεγει αυτω {VAR1: ο } {VAR2: [ο] } φιλιππος ερχου και ιδε
47 Tango Yesu amonaki Natanaele koya epai na Ye, alobaki na tina na ye: — Tala moto ya Isalaele ya solo-solo oyo, kati na ye, lokuta ezali te!
ειδεν {VAR2: ο } ιησους τον ναθαναηλ ερχομενον προς αυτον και λεγει περι αυτου ιδε αληθως ισραηλιτης εν ω δολος ουκ εστιν
48 Natanaele atunaki Ye: — Oyebi ngai ndenge nini? Yesu azongiselaki ye: — Liboso ete Filipo abenga yo, wana ozalaki nanu na se ya nzete ya figi, namonaki yo.
λεγει αυτω ναθαναηλ ποθεν με γινωσκεις απεκριθη ιησους και ειπεν αυτω προ του σε φιλιππον φωνησαι οντα υπο την συκην ειδον σε
49 Natanaele alobaki: — Moteyi, ozali solo Mwana na Nzambe; ozali penza Mokonzi ya Isalaele.
απεκριθη αυτω ναθαναηλ ραββι συ ει ο υιος του θεου συ βασιλευς ει του ισραηλ
50 Yesu alobaki na ye: — Ondimi kaka mpo ete nalobi na yo: Namonaki yo na se ya nzete ya figi? Okomona lisusu makambo minene koleka oyo.
απεκριθη ιησους και ειπεν αυτω οτι ειπον σοι οτι ειδον σε υποκατω της συκης πιστευεις μειζω τουτων οψη
51 Bongo alobaki lisusu: « Nazali koloba na bino penza ya solo: bokomona Likolo kofungwama, mpe ba-anjelu ya Nzambe komata mpe kokita mpo na Mwana na Moto. »
και λεγει αυτω αμην αμην λεγω υμιν οψεσθε τον ουρανον ανεωγοτα και τους αγγελους του θεου αναβαινοντας και καταβαινοντας επι τον υιον του ανθρωπου