< Yoane 9 >
1 Wana Yesu azalaki kokende, amonaki moto moko akufa miso wuta mbotama na ye.
И когато заминаваше, видя един сляпороден човек.
2 Bayekoli na Ye batunaki Ye: — Moteyi, nani asalaki masumu mpo ete moto oyo abotama mokufi miso: boni, ezali ye moko to baboti na ye?
И учениците Му Го попитаха казвайки: Учителю, поради чий грях, негов ли, или на родителите му, той се е родил сляп?
3 Yesu azongisaki: — Ezali te mpo na masumu na ye to ya baboti na ye, kasi ezali mpo ete misala ya Nzambe emonisama kati na ye.
Исус отговори: Нито поради негов грях, нито на родителите му, но за да се явят в него Божиите дела.
4 Lokola moyi ezali, esengeli na Ngai kosala misala ya Ye oyo atindaki Ngai; butu ezali koya, oyo moto ata moko te akokoka kosala mosala.
Ние трябва до вършим делата на Този, Който Ме е пратил, докле е ден; иде нощ, когато никой не може да работи.
5 Wana nazali kati na mokili, nazali pole ya mokili.
Когато съм в света, светлина съм на света.
6 Sima na Yesu koloba bongo, abwakaki soyi na mabele mpe, na nzela ya soyi na Ye, asalaki potopoto. Bongo apakolaki yango na miso ya mokufi miso
Като рече това, плюна на земята, направи кал с плюнката и намаза с калта очите му;
7 mpe alobaki na ye: — Kende kosukola na liziba ya Siloe. Mokufi miso akendeki mpe asukolaki. Tango azongaki, abandaki komona.
и рече му: Иди, омий се в къпалнята Силоам (което значи Пратен). И тъй, той отиде, оми се, и дойде прогледнал.
8 Bato oyo bazalaki zingazinga na ye mpe ba-oyo bazalaki komona ye kosenga-senga mbongo bakomaki koloba: — Boni, ezali ye te moto oyo azalaki tango nyonso ya kovanda mpo na kosenga-senga mbongo?
А съседите и ония, които бяха виждали по-преди, че беше просяк, казваха: Не е ли е този, който седеше и просеше?
9 Bamoko bazalaki koloba: — Ezali ye! Bamosusu: — Te, ezali ye te; akokani na ye! Kasi ye moko, mokufi miso, azalaki koloba: — Ezali ngai!
Едни казваха: Той е; други казваха: Не, а прилича на него. Той каза: Аз съм.
10 Bongo batunaki ye: — Miso na yo ebikaki ndenge nini?
Затова му рекоха: Тогава как ти се отвориха очите?
11 Azongiselaki bango: — Moto oyo babengaka Yesu asalaki potopoto, apakolaki ngai yango na miso, bongo alobaki na ngai: « Kende kosukola na Siloe. » Boye, nakendeki, nasukolaki mpe, mbala moko, nakomaki komona.
Той отговори: Човекът който се нарича Исус, направи кал, намаза очите ми, и рече ми: Иди на Силоам и омий се. И тъй отидох, и като се омих прогледах.
12 Batunaki ye lisusu: — Moto yango azali wapi? Azongisaki: — Nayebi te!
Тогава му рекоха: Где е Той? Казва: Не зная.
13 Bamemaki liboso ya Bafarizeo, mokufi miso oyo abikaki.
Завеждат при фарисеите някогашния слепец.
14 Nzokande mokolo oyo Yesu asalaki potopoto mpo na kobikisa miso ya mokufi miso yango ezalaki mokolo ya Saba.
А беше събота, когато Исус направи калта и му отвори очите.
15 Yango wana Bafarizeo mpe batunaki ye soki ndenge nini miso na ye ebikaki. Azongiselaki bango: — Atiaki ngai potopoto na miso, nasukolaki mpe nakomi komona.
И тъй, пак го питаха и фарисеите как е прогледал. И той им рече: Кал тури на очите ми, омих се и гледам.
16 Kati na Bafarizeo, bamoko balobaki: — Moto oyo awuti epai ya Nzambe te, mpo ete azali kotosa te mokolo ya Saba. Kasi bamosusu balobaki: — Ndenge nini moto ya masumu akoki kozwa bokonzi ya kosala bikamwa ya ndenge wana? Bokabwani ekotaki kati na bango.
Затова някои от фарисеите казваха: Този човек не е от Бога, защото не пази съботата. А други казваха: Как може грешен човек да върши такива знамения? И възникна раздор по между им.
17 Batunaki lisusu mokufi miso: — Bongo yo, olobi nini na tina na ye, pamba te ezali miso na yo nde abikisi? Azongiselaki bango: — Azali mosakoli.
Казват пак на слепеца: Ти що казваш за Него, като ти е отворил очите? И той рече: Пророк е.
18 Bayuda baboyaki kondima ete azalaki liboso mokufi miso mpe ete abiki. Boye, babengaki baboti na ye
Но юдеите не вярваха, че той е бил сляп и прогледал, докато не повикаха родителите на прогледалия,
19 mpe batunaki bango: — Mobali oyo azali mwana na bino? Boni, abotama solo mokufi miso? Ndenge nini sik’oyo akomi komona?
та ги попитаха казвайки: Тоя ли е вашият син, за когото казвате, че се е родил сляп? А сега как вижда?
20 Baboti na ye bazongisaki: — Toyebi ete azali mwana na biso mpe ete abotama mokufi miso;
Родителите в отговор казаха: Знаем, че този е нашият син, и че се роди сляп;
21 kasi mpo na oyo etali koyeba ndenge nini akomi komona sik’oyo mpe nani abikisi ye, toyebi eloko te. Botuna ye moko. Azali mokolo; akoloba na tina na ye moko.
а как сега вижда, не знаем; или кой му е отворил очите, не знаем; него питайте, той е на възраст, сам нека говори за себе си.
22 Baboti na ye balobaki bongo mpo ete bazalaki kobanga Bayuda, pamba te Bayuda basilaki kozwa mokano ya kobengana, na ndako na bango ya mayangani, moto nyonso oyo akondima ete Yesu azali Klisto.
Това казаха родителите му, защото се бояха от юдеите; понеже юдеите се бяха вече споразумели помежду си да отлъчат от синагогата онзи, който би Го изповядал, че е Христос.
23 Yango wana baboti na ye bazongisaki: « Botuna ye moko, azali mokolo. »
По тая причина родителите му, рекоха: Той е на възраст, него питайте.
24 Bafarizeo babengisaki lisusu, mpo na mbala ya mibale, moto oyo azalaki mokufi miso mpe balobaki na ye: — Pesa Nzambe nkembo na koloba solo; biso toyebi ete moto wana azali moto ya masumu.
И тъй, повикаха втори път човека, който беше сляп, и му рекоха: Въздай слава на Бога; ние знаем, че този човек е грешник.
25 Azongiselaki bango: — Soki azali moto ya masumu, wana ngai nayebi yango te; kasi ngai nayebi kaka likambo moko: nazalaki mokufi miso, kasi sik’oyo, nakomi komona.
А той отговори: Дали е грешник, не зная; едно зная, че бях сляп, а сега виждам.
26 Batunaki ye lisusu: — Asalaki yo nini? Abikisaki miso na yo ndenge nini?
Затова му казаха: Какво ти направи? Как ти отвори очите?
27 Azongiselaki bango: — Nasilaki koyebisa bino yango, kasi boyokaki te. Bongo mpo na nini bolingi lisusu koyoka yango? Boni, bino mpe bolingi kokoma bayekoli na ye?
Отговори им: Казах ви ей сега, и не чухте; защо искате пак да чуете? Да не би и вие да искате да Му станете ученици?
28 Bongo Bafarizeo bakomaki kofinga ye mpe koloba: — Ezali yo nde ozali moyekoli na ye; biso tozali bayekoli ya Moyize.
Тогава те го изругаха, казвайки: Ти си Негов ученик; а ние сме Моисееви ученици.
29 Toyebi ete Nzambe alobaki na Moyize; kasi moto wana, toyebi kutu te soki awuti wapi!
Ние знаем, че на Моисея Бог е говорил, а Този не знаем откъде е.
30 Moto yango azongisaki: — Oh, ezali penza likambo ya kokamwa soki boyebi te epai nini awuti! Kasi mpo na ngai, abikisi miso na ngai.
Човекът в отговор им каза: Това е чудно, че вие не знаете откъде е, но пак ми отвори очите.
31 Toyebi biso nyonso ete Nzambe ayokaka bato ya masumu te, kasi ayokaka nde moto oyo atosaka Ye mpe asalaka mokano na Ye.
Знаем, че Бог не слуша грешници; но ако някой е благочестив и върши Божията воля, него слуша.
32 Mpe totikala nanu koyoka te ete moto abikisi moto moko akufa miso wuta mbotama na ye. (aiōn )
А пък от века не се е чуло да е отворил някой очи на сляпороден човек. (aiōn )
33 Soki moto wana awutaki epai ya Nzambe te, akokaki kosala ata eloko moko te.
Ако не беше Този Човек от Бога, не би могъл нищо да стори.
34 Bazongiselaki ye: — Ndenge nini yo moto oyo obotama mobimba kati na lisumu oteya biso? Boye, babenganaki ye.
Те в отговор му казаха: Ти цял в грехове си роден, и нас ли учиш? И го изпъдиха вън Или: отлъчиха го.
35 Tango Yesu ayokaki ete babengani moto wana, akendeki kokutana na ye mpe alobaki na ye: — Boni, ondimi Mwana na Moto?
Чу Исус, че го изпъдили вън, и, като го намери, рече: Ти вярваш ли в Божия Син?
36 Moto wana azongiselaki Ye: — Nkolo, azali nani? Yebisa ngai mpo ete nandima Ye.
Той в отговор рече: А Кой е Той, Господи, за да вярвам в Него?
37 Yesu alobaki: — Omoni Ye! Ezali Ye oyo azali koloba na yo.
Исус му рече: И видял си Го, и Който говори с тебе, Той е.
38 Moto yango azongisaki: — Nkolo, nandimi. Mpe agumbamelaki Ye.
А той рече: Вярвам Господи; и поклони Му се.
39 Yesu alobaki: — Nayaki mpo na kotia bososoli kati na mokili; mpo ete bakufi miso bakoma komona, mpe ba-oyo bazali komona bakoma bakufi miso.
И Исус рече: За съдба дойдох Аз на тоя свят, за да виждат невиждащите, а виждащите да ослепеят.
40 Bafarizeo mosusu oyo bazalaki elongo na ye bayokaki maloba yango mpe batunaki Yesu: — Boni, olingi koloba ete biso mpe tozali bakufi miso?
Ония от фарисеите, които бяха с Него, като чуха това, рекоха Му: Да не сме и ние слепи?
41 Yesu azongiselaki bango: — Soki bozalaki bakufi miso, bolingaki kozala na ngambo te; kasi lokola bolobi ete bomonaka, elingi koloba ete bozali penza na ngambo.
Исус им рече: Ако бяхте слепи, не бихте имали грях, но по эяяя