< Yoane 8 >

1 Kasi Yesu akendeki na ngomba ya banzete ya olive.
THEN Jesus went to the mount of Olives.
2 Na tongo-tongo ya mokolo oyo elandaki, azongaki kati na lopango ya Tempelo; mpe lokola bato nyonso bayaki kozingela Ye, avandaki mpe abandaki koteya bango.
But early in the morning he came again to the temple, and all the people came to him; and sitting down he taught them.
3 Balakisi ya Mobeko mpe Bafarizeo bakumbaki mwasi moko oyo bakutaki azali kosala ekobo; batambolisaki ye kati na ebele ya bato mpe batiaki ye liboso ya Yesu, na miso ya bato nyonso.
Then the scribes and Pharisees brought to him a woman caught in adultery; and placing her in the midst,
4 Balobaki na Yesu: — Moteyi, mwasi oyo asali ekobo; bakuti ye penza azali kosala yango!
they say unto him, Master, this woman was caught in adultery, in the very act.
5 Kati na mibeko, Moyize apesa biso mitindo ya koboma basi ya boye na mabanga. Bongo yo, olobi nini na tina na yango?
Now Moses in the law commanded, that such women should be stoned: therefore what sayest thou?
6 Balobaki bongo mpo na kotiela Yesu motambo mpe koluka nzela ya kofunda Ye. Kasi Yesu agunzamaki; mpe na nzela ya mosapi na Ye, abandaki kokoma na mabele.
But this they said, trying to entrap him, that they might have ground of accusation against him. But Jesus stooping down, with his finger wrote on the ground.
7 Lokola bakobaki kaka kopesa Ye mituna, Yesu atelemaki mpe alobaki na bango: — Tika ete moto oyo, kati na bino, asala nanu lisumu te abamba ye libanga moto ya liboso.
Now when they continued questioning him, raising himself up, he said to them, Let the person who is sinless among you, first cast a stone at her.
8 Bongo Yesu agunzamaki lisusu mpe azongelaki kokoma na mabele.
And again stooping down, he wrote on the ground.
9 Tango bayokaki bongo, bango nyonso babendanaki moko sima na moninga, kobanda na mikolo. Mpe Yesu atikalaki Ye moko. Lokola mwasi yango azalaki kaka wana kati na lopango ya Tempelo,
But when they heard him, and felt the conviction of their conscience, they slunk away one by one, beginning from the elders to the last: so Jesus was left alone, with the woman standing in the midst.
10 Yesu atombolaki moto mpe alobaki na ye: — Mwasi, bato oyo bayei kofunda yo bazali wapi? Boni, ata moko te akateli yo etumbu?
Then Jesus raising himself up, and seeing no person but the woman, said unto her, Woman, where are these thine accusers? hath no man condemned thee?
11 Mwasi azongisaki: — Nkolo, moko te! Bongo Yesu alobaki na ye: — Ngai mpe nakateli yo etumbu te. Kende; kasi, kobanda lelo, kosala lisusu masumu te.]
She said, No man, Lord. Then said Jesus unto her, Neither do I condemn thee: go, and sin no more.
12 Yesu alobaki lisusu na bato: — Nazali pole ya mokili; moto nyonso oyo alandaka Ngai akotikala kotambola kati na molili te, kasi akozwa pole ya bomoi.
Then spake Jesus again to them, saying, I am the light of the world: he that followeth me shall not walk in darkness, but shall have the light of life.
13 Bafarizeo balobaki na Ye: — Ozali kotatola mpo na yo moko, litatoli na yo ezali ya solo te.
The Pharisees said to him, Thou bearest witness of thyself; thy witness is not true.
14 Yesu azongiselaki bango: — Ezala soki natatoli mpo na Ngai moko, litatoli na Ngai ezali ya solo, pamba te nayebi epai nawuti mpe epai nazali kokende; kasi bino, boyebi te ezala epai nawuti to epai nazali kokende.
Jesus answered and said to them, Though I do bear witness of myself, my witness is true: for I know whence I came, and whither I am going; but ye know not whence I come, nor whither I am going.
15 Bino, bosambisaka na ndenge ya bomoto; kasi Ngai, nasambisi moto ata moko te.
Ye judge after the flesh; I judge no man.
16 Mpe ezala soki esalemi ete Ngai nasambisi moto, kosambisa na Ngai ezali ya solo, pamba te nazali Ngai moko te: Tata oyo atindi Ngai azali elongo na Ngai.
But though I should judge, my judgment is true: for I am not alone, but I and the Father who sent me.
17 Ekomama kutu, kati na mibeko na bino, ete litatoli ya bato mibale nde ezalaka ya solo.
Now even in your law it is written, that the testimony of two men is true.
18 Ngai, nazali kopesa litatoli na tina na Ngai moko, mpe Tata oyo atindaki Ngai azali lisusu kotatola na tina na Ngai.
I am a witness for myself, and the Father who sent me beareth witness of me.
19 Bongo batunaki Ye: — Tata na yo azali wapi? Yesu azongisaki: — Boyebi Ngai te, mpe boyebi Tata na Ngai te. Soki boyebaki Ngai, bolingaki mpe koyeba Tata na Ngai.
Then said they to him, Where is thy father? Jesus answered, Ye neither know me, nor my Father: if ye had known me, ye would have known my Father also.
20 Yesu alobaki bongo, wana azalaki koteya kati na lopango ya Tempelo, pene ya esika oyo bazalaki kotia makabo; mpe moto ata moko te amekaki kokanga Ye, pamba te tango na Ye ekokaki nanu te.
These words spake Jesus in the treasury, as he taught in the temple: and no person apprehended him; for his hour was not yet come.
21 Yesu alobaki na bango lisusu: — Ngai, nazali kokende; mpe bokoluka Ngai, kasi bokokufa kati na lisumu na bino. Epai Ngai nazali kokende, bino, bokoki te koya kuna.
Then spake Jesus again to them, I am going away, and ye shall seek me, and shall die in your sin: whither I am going ye cannot come.
22 Na bongo, Bayuda batunanaki bango na bango: — Boni, azali na makanisi ya komiboma, yango wana alobi: « Epai Ngai nazali kokende, bino, bokokoka te koya kuna? »
The Jews said therefore, Will he kill himself? because he said, Whither I go, ye cannot come.
23 Yesu azongiselaki bango: — Bino, bozali bato ya se; kasi Ngai, nawuti na Likolo. Bino, bozali bato ya mokili oyo; kasi Ngai, nazali ya mokili oyo te.
And he said to them, Ye are from those beneath; I am from those above: ye are of this world; I am not of this world.
24 Yango wana nalobaki na bino: « Bokokufa kati na lisumu na bino; » pamba te soki bondimi te ete « Nazali oyo azali, » bokokufa kati na lisumu na bino.
I said therefore unto you, that ye shall die in your sins: for if ye believe not that I am, ye shall die in your sins.
25 Batunaki Ye: — Boye ozali nani? Yesu azongiselaki bango: — Oyo nazali koloba na bino wuta na ebandeli.
They said, therefore to him, Who art thou? And Jesus said to them, Assuredly the same as I am telling you.
26 Nazali na makambo mingi ya koloba na tina na bino mpe ya kosambisa kati na bino; kasi Ye oyo atindaki Ngai azali solo, mpe makambo oyo nayokaki epai na Ye, yango nde nazali koyebisa mokili.
I have many things to speak and to decide concerning you: but he that sent me is true; and the things which I have heard from him I speak to the world.
27 Kasi bazalaki kososola te ete Yesu azalaki koloba na bango na tina na Tata.
They knew not that he spake to them of the Father.
28 Alobaki lisusu: — Sima na bino kotombola Mwana na Moto nde bokoyeba ete, Ngai, nazali oyo azali, mpe ete nasalaka eloko moko te na ndenge na Ngai moko, kasi nalobaka kolanda makambo oyo Tata ateyaki Ngai.
Then said Jesus to them, When ye shall have lifted up on high the Son of man, then shall ye know that I am, and of myself have I done nothing; but as the Father hath instructed me, so I speak.
29 Ye oyo atindaki Ngai azali elongo na Ngai; atikaki Ngai moko te, pamba te, Ngai, nasalaka tango nyonso makambo oyo esepelisaka Ye.
And he that sent me is with me: the Father hath not left me alone; because I always do the things acceptable to him.
30 Wana Yesu azalaki koloba bongo, bato mingi bandimaki Ye.
As he spake these words, many believed on him.
31 Bongo Yesu alobaki na Bayuda oyo bandimaki Ye: — Soki bowumeli kati na Liloba oyo nateyaki bino, bokozala penza bayekoli na Ngai,
Then said Jesus to those Jews who believed on him, If ye abide in my word, assuredly ye are my disciples;
32 bokoyeba solo, mpe solo ekokangola bino.
and ye shall know the truth, and the truth shall make you free.
33 Bazongiselaki Ye: — Biso, tozali bato ya libota ya Abrayami, totikala kozala te bawumbu ya moto; ndenge nini oloba ete tokokoma bansomi?
They answered him, We are Abraham’s seed, and never were in bondage to any man: how sayest thou, That we shall be made free?
34 Yesu azongiselaki bango: — Nazali koloba na bino penza ya solo: moto nyonso oyo asalaka masumu azali mowumbu ya lisumu.
Jesus answered them, Verily, verily, I say unto you, That every one who committeth sin is the slave of sin.
35 Nzokande, mowumbu azalaka kati na libota tango nyonso te, kasi mwana azali kati na yango mpo na seko. (aiōn g165)
But the slave abideth not in the family for ever: but the son abideth for ever. (aiōn g165)
36 Boye, soki Mwana akangoli bino, bokozala penza bansomi.
If the Son therefore make you free, ye will be truly free.
37 Nayebi ete bozali bato ya libota ya Abrayami; nzokande, bozali koluka koboma Ngai, pamba te boboyi koyamba Liloba na Ngai.
I know that ye are Abraham’s seed; yet ye seek to kill me, because my word has no place in you.
38 Ngai, nazali koloba makambo oyo namonaki epai ya Tata na Ngai; bino mpe bozali kosala makambo oyo boyokaki epai ya tata na bino.
I speak what I have seen with my Father: and ye do therefore what ye have seen with your father.
39 Bazongisaki: — Ezali Abrayami nde azali tata na biso. Yesu alobaki na bango: — Soki bozalaki bana ya Abrayami, bolingaki kosala misala oyo Abrayami asalaki.
They answered and said unto him, Our Father is Abraham. Jesus saith unto them, If ye were the children of Abraham, ye would have done the works of Abraham.
40 Kasi sik’oyo, na esika ete bosala yango, bozali koluka koboma Ngai, Ngai oyo nalobi na bino solo oyo nayokaki epai ya Nzambe! Abrayami atikala kosala bongo te.
But now ye seek to kill me, a man who hath told you the truth, which I have heard from God. Abraham did not so.
41 Bozali penza kosala misala ya tata na bino. Bazongisaki: — Tozali bana ya makangu te; tozali kaka na tata moko: Nzambe!
Ye do the works of your father. They said unto him, We are not born of whoredom; we have one Father, even God.
42 Yesu alobaki na bango: — Soki Nzambe azalaki penza Tata na bino, bolingaki kolinga Ngai, pamba te nawutaki epai ya Nzambe, mpe ezali kolanda mokano na Ye nde nazali sik’oyo awa. Nayaki na ndenge na Ngai moko te, kasi Ye nde atindaki Ngai.
Then said Jesus unto them, If God was your Father, ye would have loved me: for I came out from God, and I am coming; neither indeed came I of myself, but he hath sent me.
43 Mpo na nini bozali kososola te elobeli na Ngai? Ezali mpo ete bozali kokoka te koyoka makambo oyo nazali koloba na bino.
Wherefore do ye not understand my speech? because ye cannot hear my word.
44 Ezali Satana nde azali tata na bino, mpe bolingi nde kaka kokokisa posa ya tata na bino. Wuta na ebandeli, ye azala mobomi; avandaka kati na solo te, pamba te solo ezalaka te kati na ye. Tango akosaka, alobaka penza makambo oyo ewutaka kati na ye; pamba te azali mokosi mpe tata ya lokuta.
Ye are of your father the devil, and the lusts of your father ye will practise. He was a murderer from the beginning, and stood not fast in the truth, because truth was not in him. When he speaketh a lie, he speaketh what is peculiarly his own: for he is a liar, and the father of it.
45 Kasi Ngai, lokola nalobi solo, yango wana bozali kondima Ngai te.
But because I tell you the truth, ye believe me not.
46 Nani kati na bino akoki kotalisa Ngai ete nasali masumu? Soki nalobaka solo, mpo na nini bondimaka Ngai te?
Which of you can convict me of sin? Now if I speak the truth, why do ye not believe me?
47 Moto oyo azali ya Nzambe ayokaka makambo oyo Nzambe alobaka; kasi soki bino boyokaka te, ezali mpo ete bozali ya Nzambe te.
He that is of God heareth the words of God: ye therefore do not hear him, because ye are not of God.
48 Bayuda bazongiselaki Ye: — Omoni! Yango wana tolobaki na biso ete ozali moto ya Samari mpe ozali na molimo mabe kati na yo.
Then answered the Jews, and said to him, Do we not rightly affirm, that thou art a Samaritan, and hast a devil?
49 Yesu azongisaki: — Nazali na molimo mabe te kati na Ngai. Ngai nazali nde kopesa Tata na Ngai lokumu, kasi bino bozali kotiola Ngai.
Jesus answered, I have not a devil; but I honour my Father, and ye dishonour me.
50 Nalukaka lokumu na Ngai moko te; ezali na Moko oyo alukaka yango mpe asambisaka.
But I seek not my own glory: there is one that seeketh and judgeth.
51 Nazali koloba na bino penza ya solo: moto oyo akobatela Liloba na Ngai kati na ye akotikala kokufa te. (aiōn g165)
Verily, verily, I say unto you, If any man observe my saying, he shall never see death to all eternity. (aiōn g165)
52 Na yango, Bayuda balobaki na Ye: — Tomoni sik’oyo ete ozali na molimo mabe kati na yo! Pamba te Abrayami asila kokufa, basakoli mpe lokola; bongo yo ozali koloba ete moto oyo akobatela Liloba na yo kati na ye akotikala kokufa te! (aiōn g165)
Then said the Jews to him, Now we know that thou hast a devil. Abraham is dead, and the prophets; and thou sayest, If any man observe my word, he shall never taste of death to eternity. (aiōn g165)
53 Boni, yo okanisi ete oleki Abrayami, tata na biso, oyo akufa to mpe oleki basakoli nyonso oyo bakufa? Yango yo, ozali komimona nani?
Art thou greater than our father Abraham, who is dead? and the prophets are dead: whom makest thou thyself?
54 Yesu azongiselaki bango: — Soki namipesaki Ngai moko lokumu, lokumu na Ngai elingaki kozala na tina te. Kasi ezali Tata na Ngai, Ye oyo bino bozali koloba ete azali Nzambe na bino, nde azali kopesa Ngai lokumu.
Jesus answered, If I assume glory to myself, my glory is nothing: it is the Father who glorifies me; of whom ye say, that he is your God:
55 Solo, bino, boyebi Ye te; kasi Ngai, nayebi Ye. Soki nameki koloba ete nayebi Ye te, wana nakozala mokosi lokola bino. Kasi nayebi Ye mpe nabatelaka Liloba na Ye.
yet have ye not known him; but I know him: and if I should say, that I know him not, I should be like you, a liar: but I know him, and observe his word.
56 Tata na bino, Abrayami, atondaki na esengo, wana akanisaki ete akomona mokolo na Ngai. Amonaki yango mpe atondaki na esengo.
Your father Abraham exulted for joy that he should see this day of mine: and saw it, and rejoiced.
57 Bayuda balobaki na Ye: — Nini? Yo moto oyo okokisi nanu te ata mibu tuku mitano ya mbotama, ozali koloba ete omonaki Abrayami!
Then said the Jews unto him, Thou hast not yet reached the age of fifty, and hast thou seen Abraham?
58 Yesu azongisaki: — Nazali koloba na bino penza ya solo: liboso ete Abrayami abotama, Ngai nazali.
Jesus said unto them, Before Abraham had a being, I Am.
59 Tango Bayuda bayokaki bongo, balokotaki mabanga mpo na kobamba Yesu, kasi abombamaki mpe abimaki libanda ya lopango ya Tempelo.
Then took they up stones to hurl at him: but Jesus was hid, and went out of the temple, passing through the midst of them, and so went away.

< Yoane 8 >